2010–2019
Klisto: Mwinda Oyo Engengi na Molili
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Klisto: Mwinda Oyo Engengi na Molili

Soki oyoki ete mwinda ya litatoli na yo ezali kopanzanapanzana mpe molili ekomi pembeni, zala makasi. Bomba bilaka na yo na NzambeKeep your promises to God.

Bilo na ngai na Ndako ya Lingomba Bamama Basungi ezali na bomoni moko ebongi nie ya Tempelo ya Salt Lake City. Butu nionso, lokola kosangisama ya bibende ntango nionso, minda ya libanda ya tempelo epelaka na pokwa. Tempelo ezali mwinda moko ya elikia kaka libanda ya lininisa na ngai.

Elilingi
Tempelo ya Salt Lake na ebonga

Butu moko na sanza ya mibale eleki, bilo na ngai etikalaki pole na mokolo wana kaka lokola moyi ekoti. Ntango natalaki libanda ya lininisa, tempel ezalaki molili. Minda epelaki te. Namiyokaki na mbalakaka mabe. Nakokaki komona te tempelo bimatelo oyo nazalaki komata mibu nyonso.

Elilingi
Tempelo ya Salt Lake na bimatelo ezanga minda

Komonaka molili oyo nazalaki kozela namona mwinda ekinisaki ngai ete Moko ya bosenga ya ntina oyo tozali na yango mposa mpo na kokola ezali kotikala ya kokangana na liziba na biso ya pole—Yesu Klisto. Ye azali liziba ya nguya na biso, Mwinda mpe Bomoi ya Mokili. Kozangaka bokangani moko makasi na Ye, tobandi kokufa na molimo. Koyebaka yango, Satana ameki kosalela babopusi ya mokili oyo tokutani na yango. Asalaka mpo na kokitisa mwinda na biso, kobebisa-mokuse bokangani, kokata nguya ya kosunga, kotikaka biso moko na molili. Babopusi yango ezali ndenge moko na lolenge ya kibokufi, kasi Satana aazali kosala makasi mpo na kotia biso na pembeni mpe koyebisa biso tozali kaka moko ya kimayele na yango.

Basusu kati na Biso Bakangami esika moko na Mpasi.

Ntango makama elekeli biso, ntango bomoi enyokoli biso mingi tokoki kopema te, ntango tobetami lokola mobali na nzela ya Yeliko mpe atikamaki lokola mokufi, Yesu ayaki na esika mpe apakolaki mafuta na bapota na biso, atomboli biso liko na pete nyonso, amemi biso na kisuku, atalaki biso.1 Na baoyo ya biso bazali na mpasi, Ye alobi, “Ngai nako … kokomisa pepele mikumba oyo ezali likolo ya mapeka na bino, ete kutu bokoka te koyoka yango likolo ya mikongo na bino, … ete bino bokoki koyeba na bosolo nionso ete ngai, Nkolo Nzambe, natalaka bato na ngai na mikakatano na bango.”2 Klisto abikisi bampota.

Basusu kati na Biso Bazali Kaka ya Kolemba Mpenza.

Mpaka Holland alobaki: “yango esengeli te ete tokima mbangu koleka makasi na biso. … Kasi atako nionso wana, nayebi … ebele nati nabino bazali kokima [mpenza,] makasi mingi mpe ete nguya mpe bobakisi [yango] ya mayoki ntango mosusu ebombami ekendaka na kosila.”3 Ntango babozeli eleki likolo na biso, tokoki kozonga sima mpe kotuna Tata ya Lola nini kosala. Eteni ya ya mayele bomoi na biso ezaki koteya nini tosengeli te kosala. Kasi ata kutu bongo, ntango mosusu bomoi ekoki kolembisa makasi. Yesu apesi biso elikia, “Boya epai na ngai, banso bozali na mpasi mpe bokumbami na mikumba, mpe nakopesa bino kimia.”4

Klisto azali na bolingi ya kosangana elongo na biso na mosala mpe kobenda mpo na kokomisa pepele mikumba na biso. Klisto azali bopemi.

Basusu kati na Biso Tomiyoki Tofandisami te kati na Masini ya Momesano.

Mpo na bantina ya kilikili, tomiyokaka tondimami to ya kondimama te. Boyokani ya sika etalisi bokasi monene Yesu asalaki kotanda loboko na ye na bato nyonso ya lolenge oyo: bamaba, bafutisi mpako, bana, Bato ya galile, basi ya ndumba, Bafilisai, basumuki, Basamalia, basi bakufeli mibali, basoba ya Baloma, bato na ekobo, bonganga ya bosoto. Na mwa pene na lisolo nyonso, Ye azali otandaka loboko na moto moko mingimingi andimamaki te na momemesano na lisanga.

Luka 19 ebeti lisolo ya mokonzi ya bafutisi mpako na Yeliko na nkombo ya Zakai. Ye amataki likolo ya nzete mpo alingaki komona Yesu koleka. Zakai azalaki kosala mosala na Bula matari ya Baloma mpe amonanaki lokola muzwi kaniaka mpe mosumuki. Ye amonaki ye likolo ya nzete mpe abengaki ye, kolobaka, “Zakai, sala noki, mpe kita; mpo ete ekoki na ngai kofanda na ndako na yo lelo.”5 Mpe ntango Yesu amonaki boboto ya motema ya Zakai mpe makambo ye asalaki mpo basusu, Ye andimaki likabo na ye, alobaki, “Lelo kobikisama eyei na ndako oyo, [mpo] ye pe azali mwana mobali moko ya Abalayama.”6

Klisto na pete nionso alobelaki ba Nefite, “Napesaki motindo ete moko te akati na bino akende libanda.”7 Petelo azuaki nguya monene ya bobimi wana na Misala 10 ntango asakolaki, “Nzambe asili kotalisa ngai ete ete nabianga moto mosususu [moto] mpamba te to soki moto na mbindo te.”8 Yango ezali motindo moko ekobukukama te mpo na bayekoli ya Klisto mpe Bansantu ya Mikolo mya suka kolakisa bolingo ya solo na moko mpe mosusu.9 Yesu apesi lolenge moko ya mbela na biso lokola asalaki na Zakai: “Tala, natelemi liboso ya ekuke, mpe nazali kobeta: soki [bino] boyoki mongongo na ngai, mpe bofongoli ekuke, nakoya epai na [bino], mpe kolia elongo na[bino], mpe [bino] elongo na ngai.”10 Klisto amonaka biso kati na nzete na biso.

Basusu kati na Biso Bazali ya Kotondisa na Mituna.

Mibu ebeleki eleki te nazalaki na bozito mpe natungisamaki na mituna oyo nakokaki kozua eyano te. Na ntongo makasi ya mokolo ya poso moko, nalotaki ndoto moke moko. Na kati ya ndoto nakokaki komona ndako moko moke, mpe nasosolaki ete nakokaki kokende kotelema na kati na yango. Yango ezalaki na ba arc mitano ezingaki yango, kasi maninisa esalamaki na libanga. Nalelakilelaki kati na ndoto, kolingaka te kokota na kati mpo ete ezalaki mpenza makasi. Boye likanisi eyaki na makanisi na ngai ete ndeko ya Yale na kokitisa mote nionso apanzaki mabanga kino ekoma matalata ya pole. kitalatala ezali libang oyo ekomi na lolenge moko ya kobonguana. Ntango Nkolo asimbaki mabanga mpo na ndeko mobali ya Yalede, yango engengaki mwinda na kati ya masuwa ya molili.11 Na mbalamoko natondisamaki na mposa ya kozala na kati ya ndako moke wana makasi koleka esika mosusu. Ezalaki esika koleka—esika kaka moko—mpo na ngai ya bosolo mpenza “komona.” Mituna oyo ezalaki kotungisa ngai ekendaki te, kasi oyo epelaki koleka na makanisi na ngai ezalaki motuna sima ya ngai kolamuka: “Boniboni you okokolisa bondimi na yo, lokola ndeko ya Yalede, boye mabanga na bino ekoki kopela?”12

Babongo na biso ya bokufi ezalama mpo koluka bososoli mpe ndimbola na maboke esembolami. Nayebi te bantina nini nionso mpo na nini elamba likolo ya bokufi ezali mpenza monene. Yango ezali te etape na bokobi na biso ya seko epai wapi tozui biyano nionso. Ezali etape epai wapi tokobisi bozangi bobangi na biso (to ntango mosusu elikia na biso) na bosolo ya biloko emonani te. Kozanga bobangi eyei na balolenge oyo ezali pete te mpo na kososola, kasi kuna ezali mwinda na molili. Yesu alobaki, “Ngai nazali mwinda, mpe bomoi, mpe bosolo ya mokili.”13 Mpo na baye baluki bosolo, ekoki komonana kozala liboma ya bobangi bifeli ya kaka oyo esalami na libanga. Kasi na mituna ya kokitisa motema mpe bondimi, Yesu akoki kongola bifelo na ya mabanga na matalatala ya mwinda. Klisto azali mwinda ya komona.

Basusu kati na Biso Tomiyokaka ete Tokoki ata Mokolo moko te Kozala Malamu Ekoka.

Langi ya motane ya Boyambi ya Kala ezalaki kaka langi mpenza kasi ezalaki mpe langi ya makasi, kolobaka ete langi ya kongela makasi ekanga makasi na elamba ya pete mpe ekobeba te atako mbala o boni yango ekosokuamaki.14 Satana abongisi lolenge ya kokanisa oyo lokola nzeta ya bozito : elamba ya pete ya pembe etangeli langi ya motane makasi ekoki ata mokolo moko te kozonga pembe. kasi Yesu Klisto asakolaki, “Baznzela na ngai [ezali] likolo makasi koleka banzela na bino,”15 mpe bikamwa ya ngolu na Ye ete ntango toyamboli masumu na biso, Makila na ye motane ngola ekozongisa biso petwa. Yango ezali mpenza sembo te, kasi ata bongo yango ezali solo.

Elilingi
Elamba na mbindo

Foto kowuta na iStock.com/iinwibisono

“Atako masumu na bino ekomi motane lokola ngola, ekokoma pembe lokola mbula mpembe; atako yango ezali motane makasi, yango ekokoma lokola elamba ya mpembe koleka.”16 Nkolo alobi na kobetaka nsete: mobali to mwasi “oyo ayamboli … lisumu, lolenge kaka alimbisami, mpe Ngai, Nkolo, nakokanisa ya,go lisusu te.”17 Na kibomoto: Boye, tika biso tokanisa elongo.18 Osalaki mabunga; nionso ekomi mokuse.19 Yaka epai na ngai mpe yambola.20 Nakokanisa lisumu na yo atamoke te.21 Okoki kozala mobimba lisusu.22 Nazali na mosala moko mpo na yo kosala.23 Klisto akomisaka lainea pembe.

Kasi nini ezali bitape ya kosalela? Nini ezali fungola ya kokangisaka na nguya ya Yesu Klisto ntango tozali kotepakatepaka na mwinda? Mokambi Russell M. Nelson alobaki yango ezali pete mpenza: “Fungola ezali kosala mpe kobomba mayokani ya bule. … Yango ezali nzela moko kobulunga te.”24 Tia Klisto katikati ya bomoi na yo.25

Soki oyoki ete mwinda ya litatoli na yo ezali kopanzanapanzana mpe molili ekomi pembeni, zala makasi. Bomba bilaka na yo na NzambeKeep your promises to God. Tuna mituna na yo. Na bompikiliki komisa libanga mayi na kati ya kopo. Tala epai ya Yesu, oyo akobi kolinga yo .

Yesu alobaki, “Nazali mwinda [oyo] ekongengaka na molili mpe molili esosoli ye te.”26 Yango elakisi ete ata lolenge ya makasi yango ekomeka, molili ekoki te kolongola mwinda wana. Ata mokolo moko te. Yo okoki kotia motema ete mwinda na Ye ekozala wana mpo na yo.

Elilingi
Bongengisi lisusu Tempelo ya Salt Lake

Biso moko, to bato tolingaka, tokoki na ntango kokoma na molili. Na oyo etali Tempelo ya Salt Lake, mokambi ya bobongisi makambo, Ndeko mobali Val White, abengamaki na mbalamoko. Bato bamonakia Likambo nini na baminda ya tempelo? Yambo, bato ya mosala bakendaki bangomoko na ndako ya lotiliki nionso na tempele mpe bapelisaki minda na lolenge ya maboko. Nsima bazongisaki bapile kati na epesi nguya ya otomatiki mpe bamekaki yango mpo na koluka nini ebebaki.

Ezali pasi kozongisa minda kopela na yomoko. Tosengeli na baninga. Tozali na bosenga ya moko mpe mosusu. Lokola mpenza bato ya misala ya bobongisi na tempelo, tokoki kosunga moko mpe mosusu na kokendaka yo moko, kotondisaka bapile na biso ya molimo, kobongisaka nini oyo ekomaki mabe.

Elilingi
Tempelo ya Salt Lake na eleko ya Noele

Pole na biso moko ekoki kozala lokola bobele ampule moko na nzete. Kasi tokokoba kongengisa mwinda na biso moke, mpe banso elongo, lokola Tempelo Square na eloko ya Noele tobengisaka bamilio ya bato na Ndako ya Nkolo. Ya malamu koleka nionso, lokola Mokambi Nelson apesaki bokasi, tokoki komema minda ya Mobikisi na kati na bisomo mpe na bato ya motuya na biso na mosala moko ya pete ya kobombaka mayokani. Na banzela ekeseni, Nkolo akopesa libonza mosala wana ya bondimi mpenza na nguya mpe esengo.27

Natatoli ete bino bolingami. Nkolo ayebi na makasi nini bozali komekaka. Bozali kopusanaka. Bokoba kokendaka. Ye azali komona mbeka na biso nionso ebombani mpe atangi yango mpo na bolamu na bino mpe mpo na bolamu ya baye bolingaka. Mosala na bino ezali ya pamba te. Bozali bino moko te. Nkombo na Ye nionso, Emmanuel, elakisi “Nzambe elongo na biso.”28 Ye azali ya solo na bino.

Pusana moke lisusu na nzela ya boyokani, kutu soki yango ezali molili ete okoki komona mosika penza te. Minda na ye ekopela lisusu. Natatoli bosolo ya maloba ya Yesu, mpe bango batondisami na mwinda: “Belema mpembeni na ngai mpe nakobelema mpembeni na yo; luka ngai na etingia mpe okomona ngai; senga, mpe okozwa; beta, mpe ekofungolama yo.”29 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa