2010–2019
Lisanga likoki: Esika Moko ya Kozala
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


2:3

Lisanga likoki: Esika Moko ya Kozala

Nkolo akolinga bino bofandisa lisanga likoki ya makasi. Lokola Ye asangisaka bana na Ye, bazali na mposa ya esika ya kozala mpe kokola.

Na 2010, Andre Sebako aszalaki elenge mobali moko kolukaka bosolo. Atako asala mokolo moko te losambo ya bosembo liboso, akanaki komeka. Nokinoki nsima akutanaki na misionele. Bapesaki ye kalati na foto ya Buku ya Mormon. Andre ayokaki eloko moko mpe atunaki soki bamisdionele bakotekela ye buku yango. Balobaki ete akokaki kozwa buku yango na mpamba soki akolinga koya na eklezia.1

Andre akendaki na Mochudi Branch oyo ekelamaki kala te na ntango wana na Botswana, Afrika, ye moko. Kasi etape yango ezalaki liboke ya bolingo, ya bomoko mpenza oyo ezalaki pene na bandimi 40.2 Bayambaki Andre na maboko ya kofungwama. Azwaki mateya ya bamisionele mpe azwaki libatisi. Ezalaki kafukafu!

Kasi nsima nini? Boniboni Andre alingaki kotikala akitife? Nani akolinga kosunga ye akola na nzela ya mayokani? Eyano moko na motuna wana ezali lisanga likoki na ye ya bonganganzambe!3

Mosimbi bonganganzambe nyonso, kotala ezaleli na ye te, azwaka litomba uta na lisanga likoki moko ya makasi. Bilenge bandeko na ngai mibali oyo basimbi Bonganganganzambe ya Alona, Nkolo akotia bino lisanga likoki moko ya makasi, esika ya kozalaka mpo na elenge mobali moko na moko mpe nyonso, esika moko wapi Molimo ya Nkolo azali, esika moko wapi bato ya lisanga likoki banso bayambami mpe batiami motuya. Lokola Nkolo asangisaka bana na Ye, bazali na mposa ya esika ya kozala mpe kokola.

Moko na moko na bino bato ya bokambi ya lisanga likoki bazalaka liboso na nzela wana ezali bino koluka bofuli4 mpe kokolisa bolingo mpe bondeko kati ya bato banso ya lisanga likoki. Bopesaka bokebi ya kafukafu epai ya baoyo bazali bandimi ya sika, oyo bazali akitife moke koleka, to oyo bazali na babonsenga ya kafukafu.5 Na nguya ya bonganganzambe, bozali kotonga lisanga likoki ya makasi.6 Mpe lisanga likoki moko ya makasi, ya bomoko esalaka bokeseni nyonso na bomoi ya elenge mobali.

Ntango Eklezia esakolaki boyekami etie ndako na katikati ya sika etali boyekoli nsango malamu,7 basusu bakanisaki na ntina ya bandimi lokola Andre mpe batunaki, “Nini mpo na bilenge bato oyo bawutaka na ezaleli ya libota wapi nsango malamu ezali koyekolama te mpe wapi ezali na esika moko te ya koyekola mpe kobika nsango malamu na ndako? Bakotikalama nsima?”

Te! Moto moko te akoki kotikama nsima! Nkolo alingaka elenge mobali moko na moko mpe elenge mwasi moko na moko. Biso, lokola basimbi bonganganzambe, tozali maboko ya Nkolo. Tozali lisungi ya Eklezia epayi babokasi etie ndako na kati. Ntango ezali na lisungi moke na ndako, masanga makoki ya bonganganzambe mpe bakambi mosusu mpe baninga bakengelaka mpe basungaka moto mpe libota moko na moko lokola esengeli.

Namoni yango kosala. Nakutani na yango. Ntango nazalaki na mibu motoba, baboti na ngai babomaki libala mpe tata na ngai atikaki mama na ngai na bilenge bana mitano. Mama na ngai abandaki kosala mpo na koleisa biso. Azalaki na mposa ya mosala ya mibale mpo na ntango mokuse, lokola mpe kobakisa kotanga kelasi. Ezalaki na ngonga moke mpo na kobokola bana. Kasi bankoko ya mibali, banoko, batata mwawsi, baepisikopo, mpe bateyi na libota basanganaki mpo na kosunga mama na ngai ya bolingo.

Mpe Nazalaki na Lisanga likoki. Nazali na botondi mpenza mpo na baninga na ngai—bandeko na ngai mibali—oyo balingaki mpe basungaki ngai. Lisanga likoki na ngai ezalaki esika moko ya kozala. Basusu bakokaki kokanisa ete nazalaki na litomba mingi te mpo na kolonga mpo na ezalela na ngai ya libota. Ntango mosusu ezalaki solo. Kasi masanga makoki ya bonganganzambe ebongoliisaki matomba na ngai ya elonga. Lisanga likoki na ngai esungaki ngai mpe epambolaki bomoi na ngai makasi.

Ezali na matomba ya elonga mpembeni nyonso na biso. Ntango mosusu banso tozali na tozali na lolenge moko to mosusu. Kasi moko na moko na biso awa azaali na lisanga likoki, esika wapi tokoki nyonso mibale kozwa bokasi mpe kopesa bokasi. Lisanga likoki ezali “banso mpo na moko mpe moko mpo na banso.”8 Ezali esika wapi topesanaka malako, tosalisaka basusu, mpe totongaka bomoko mpe bondeko wana ezali biso kosalela Nzambe.9 ezali esika moko wapi makamwisi esalamaka.

Nakolinga koloba na bino na ntina ya mwa ndambo ya makamwisi oyo esalamaka na lisanga likoki ya Andre na Mochudi. Ntango nazali kokabola ndakisa oyo, tala mabongi oyo elendisaka lisanga likoki nyonso ya bonganganzambe oyo esalelaka yango.

Nsima Andre abatisamaki, azalaki kotambola elongo na bamisionele wana ezalaki bango koteya bilenge mibali mosusu minei, oyo lisusu babatisamaki. Sikawa ezalaki na bilenge mibali mitanu. Babandaki kolendisa moko na mosusu mpe etape.

Elenge mobali ya motoba, Thuso, abatisamaki. Thuso akabolaki nsango malamu na misato ya baninga na ye, mpe nokinoki bakomaki libwa.

Bayekoli ya Yesu Klisto basangisamaka mbala mingi na lolenge oyo—moke na ngonga moko, ntango babengisami na baninga na bango. Na kala, ntango Andele amonaki Mobikisi, akendaki mbangu epai ya ndeko na ye ya mobali Simoni mpe “amemaki ye epai ya Yesu.”10 Lolenge moko, nokinoki nsima Filipe akomaki moyekoli ya Klisto, abengisaki moninga na ye Nathanael “yaka kotala.”11

Na Mochudi, elenge mobali moko ya 10 ayaki kokota na Eklezia. Bamisionele bamonaki ya mbala 11. Mpe elenge mobali ya 12 abatisamaki nsima ya komonaka litomba ya nsango malamu na baninga na ye.

Bandimi ya Etape ya Mochudi basepelaki. Bilenge mibali oyo “babongwamaki epai ya Nkolo, mpe … bakomaki bomoko na eklezia.”12

Buku ya Mormon ezalaki na mosala ya ntina na bongwana na bango.13 Thuso amikundolo, Nabandaki kotanga Buku ya Mormon … ntango nyonso nazalaki na mosala te, na ndako, na eteyelo, bisika nyonso.”14

Oratile akomaki kosepela na nsango malamu mpo na ndakisa ya baninga na ye. Alimboli: “[Ba]monanaki lokola kobongwana na mwa ngonga mokuse. … Nakanisaki esengelaki … kozala mpo na mwa … buku oyo babandaki komema elongo na … eteyelo. Nakokaki komona bato malamu nini bakomaka. … [Ngai] nalingaki kobongwana mpe.”15

Etape ya Mochudi

Bilenge mibali 12 banso basanganaki mpe babatisamaki na ntaka ya mibu mibale ya moko na mosusu. Moko na moko azalaki mondimi se moko ya Eklezia kati na libota na ye. kasi basungamaki na libota na bango ya Eklezia, kobakisaka Mokambi Rakwela,16 mokambi ya etape na bango; Mpaka mpe Ndeko mwasi Taylor,17 Bamisionele moko ya kulutu, mpe bandimi mosusu ya etape.

Ndeko mobali Junior,18 mokambi moko ya lisanga likoki, azalaki kobengisa bilenge mibali yango na ndako na ye na bampokwa ya eyenga mpe azalaki kopesa bango toli. Bilenge mibali bazalaki koyekola makomi elongo mpe kosala makita ya mpokwa na libota ntango nyonso.

Kotalaka bandimi

ndeko mobali Junior amemaki bango kokende kotala bandimi, bato oyo bazalaki koteyama na bamisionele, mpe moto nyonso kani oyo asengelaki kotalama. Bilenge mibali 12 nyonso batondaki nsima ya motuka ya Ndeko mobali Junior. Akitisaki bango na bandako na kimoninga ya mibale mibale to misato misato mpe ayaki kozwa bango nsima.

Kutu ata bilenge mibali yango bazalaki kaka koyekola na ntina ya nsango malamu mpe bamiyokaki te ete bayebaki mingi, ndeko mobali Junior alobaki na bango bakabola moko to makambo mibale bayebaki mpenza na bato oyo bakendaki kotala. Basimbi bonganzambe ya bilenge oyo bateyaki, basambelaki, mpe basungaki kokengela Eklezia.19 Bakokisaki mikumba na bango ya bonganganzambe mpe bayokaki esengo ya kosalisa.

Lingomba ya Bandeko mibali

Andre alobaki, “Tozalaki kosakana elongo, koseka elongo, kolela elongo, mpe tokomaki na kibondeko.”20 Yango wana, bamibengaki, “Liboke ya Bandeko mibali.”

Elongo batiaki ntina moko ete bakosala banso bamisio. Lokola bazalaki bango moko kaka bandimi kati na mabota na bango, bakutanaki na bikonongo ya kolonga, kasi basunganaki moko na mosusu na ntango na yango.

Moko na moko, bilenge mibali bazwaki mabiangi ya misio. Baoyo bakendaki liboso bakomaki mikanda na ndako epai ya baye bazalaki naino komiilengela. Zomi na moko ya bilenge mibali basalaki bamisio.

Bilenge mibali oyo bakabolaki nsango malamu na mabota na bango. Bamama, bandeko basi, baninga, lokola mpe bato bateyaki na bamisio na bango, babongwanaki mpe babatisamaki. Makamwisi esalamaki mpe bomoi mingi epambolamaki.

Nakoki koyoka basusu kati na bino kokanisaka ete ntango mosusu likamwisi ekokaki kosalama bobele na esika lokola Afrika, mabele malamu wapi bosangani ya Yisalaele ezali kotambola mbangu. Nzokande, Natatoli ete mibeko esalelamaki na Etape ya Mochudi ezali solo bisika kani. Bisika nyonso ozali, lisanga likoki na yo ekoki kokola na nzela ya akitivasio mpe kokabola nsango malamu. Ntango kutu moyekoli moko asemboli loboko epai ya moninga moko, moko akoki kokoma mibale. Mibale bakoki kokoma minei. Minei bakoki kokoma mwambe. Mpe mwambe bakoki kokoma zomi na mibale. Baetape ekoki kokoma bapalwasi.

Palwasi ya Mochudi

Mobikisi ateyaki, “Mpo ete wana mibale to misato basangani mpo na nkombo na ngai, … tala ngai nakozala kati na bango.”21 Tata na Lola azali kolengela makanisi mpe mitema ya bato banso nzinga nzinga na biso. Tokoki kolanda babotindiki, kokela kimoninga, kokabola bosolo, kosenga basusu batanga Buku ya Mormon, mpe balinga mpe basunga bango wana ezali bango koya koyeba mobikisi na biso.

Ezali pene mibu 10 uta Lingoba ya Bandeko mibali ya Mochudi ebandaki mobembo na bango elongo, mpe bazali naino liboke ya bandeko mibali.

Katlego alobaki, “Tokoki kokabolama na ntaka, kasi tozali kaka elongo mpo na moko na mosusu.”22

Ezali losambo na ngai ete tokondima libiangi ya Nkolo ya kozala bomoko elongo na Ye kati ya masanga makoki ya bonganganzambe na biso mpo ete lisanga likoki moko na moko ekoka kozala esika ya kozala, esika ya kosangana, esika oyo ekolaka.

Yesu Klisto azali Mobikisi mpe oyo ezali mosala na Ye. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Mark mpe Shirley Taylor, comp., The Band of Brothers (Masoli mpe matatoli ya bobongoli motema ya Etape ya Mochudi, 2012 2012),4, Ebombelo ya Masolo ya Eklezia, Salt Lake City .

  2. Mokanda ya moto se moko, Letanang Andre Sebako, Liboke ya Bandeko mibali, 2011–19, Ebombelo ya Masolo ya Eklezia, Salt Lake City.

  3. Mokambi Boyd K. Packer alobaki: “Ntango mobali moko asimbi bonganganzambe, azali eloko moko monene koleka yemei. Ezali eloko moko libanda na yemei epai na yango akoki komipesa mobimba” (“The Circle of Sisters,” Ensign, sanza ya zomi na moko 1980, 109–10).

  4. Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki lolenge ya koluka emoniseli mpe nsima alobaki, “Wana ezali yo kozongela nzela oyo moko na mokolo, sanza na sanza, mobu na mobu, oko ‘kola kati na mibeko ya emoniseli’” (“Revelation for the Church, Revelation for Our Lives,” Liahona, sanza ya mitano 2018, 95; tala lisusu Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 132).

  5. Tala Manuel 2: Administration de l’Eglise (2010), 8.3.2.

  6. Basusu basungaka lisusu, kobakisa bato ya boepisikopo mpe bapesi toli. Mpaka Ronald A. Rasband alobaki ete moko ya matomba ya bobongisi lisusu masanga makoki ya Bonganganzambe ya Melkisedeke, oyo esakolamaki na sanza ya misato 31, 2018, ezali mpo na “kopesa nzela na episikopo apesa mikumba mingi koleka na lisanga likoki ya bampaka mpe bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo ete episikopo mpe bapesi toli na ye bakoko kotalela balotomo na na bango ya yambo—mingi mingi kokamba bilenge basi mpe bilenge mibali oyo bamemi Bonganganzambe ya Alona” (“Botala! A Royal Army,” Liahona, sanza ya mitano 2018, 59). Banzelu bakosalisaka lisusu. Basimbi Bonganganzambe ya Alona bazali na bafungola ya mosala ya banzelu (tala Doctrine et Alliances 13:1; tala lisusu Dale G. Renlund mpe Ruth Lybbert Renlund, The Melchizedek Priesthood [2018], 26). mpaka Jeffrey R. Holland alobaki: “Mbala mingi [banzelu basalisi] bazali te ya komonana. ntango mosusu bamonanaka. Kasi bamonana to bamonana te bazali ntango nyonso pembeni. ntango mosusu mikumba na bango ezali monene mpenza mpe ezali na ntina mpo na mokili mobimba. Ntango mosusu nsango ezali ya moto se moko mingi koleka. Na mabaku mosusu ntina ya anzelu ezali ya kokebisa. Kasi mbala mingi mpenza ezali mpo na kobondisa, kopesa mwa lolenge ya bokebisi ya ngolu, bokambi na bantango ya mpasi” (“The Ministry of Angels,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2008, 29). Soki ozali na mposa ya lisungi, okoki “kosenga, mpe ekopesamela yo” (Yoane 16:24).

  7. Tala Russell M. Nelson, “Opening Remarks,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 7–8.

  8. Tala Alexandre Dumas, The Three Musketeers (1844).

  9. Tala Manuel 2, 8.1.2.

  10. Tala Yoane 1:40–42

  11. Tala Yoane 1:43–46

  12. 3 Nefi 28:23.

  13. Tala D. Todd Christofferson, “The Power of the Book of Mormon” (lisukulu epesami na seminele mpo na bakambi ya misio ya sika, sanza ya motoba 27, 2017).

  14. Thuso Molefe, na Taylor, The Band of Brothers, 22.

  15. Oratile Molosankwa, na Taylor, The Band of Brothers, 31–32.

  16. Lucas Rakwela, Mochudi, Botswana.

  17. Mark mpe Shirley Taylor, Idaho, USA.

  18. Cilvester Junior Kgosiemang, Mochudi, Botswana.

  19. Tala Doctrine et Alliances 20:46–47, 53–54.

  20. Mokanda ya moto ye moko, Letanang Andre Sebako, mikanda ya liziba ya Liboke ya Bandeko mibali.

  21. Doctrine et Alliances 6:32

  22. Katlego Mongole, na “Band of Brothers 2nd Generation” (bosangisi ebimi naino te), 21.