2010–2019
Tala epai ya Yesu Klisto
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Tala epai ya Yesu Klisto

Soki totali epai ya Yesu Klisto, akosalisa biso totosa mayokani na biso mpe tosalela libiangi na biso lokola Bampaka ya yisalaele.

Wana ezalaki Yesu kotambola na balabala moko pembeni ya Kapalanauma1 elongo na liboke ya bato nzinganzinga na Ye, mwasdi moko amitungisaki na pkokoso moko monene ya bokonongonu uta mibu 12 asembolaki loboko mpe asimbaki nsuka ya elamba na Ye. Sasapi abikisamaki.2

Makomi ekomi ete Yesu, koyebaka “ete [nguya esilaka] kobima [Ye],”3 “abalukaki kati na ebele”4 mpe “atali … mpo na komona moto oyo asali yango.”5 “Mpe ntango mwasi amonaki bongo abombamaki lisusu te,”6 ye “akwei liboso na ye, mpe ayebisi ye solo nyonso.”7

Yesu alobaki na ye, “Mwana mwasi, zala na bolendisi malamu: bondimi na yo ebikisi yo; kende na kimia.”8

Yesu Klisto abikisaki mwana mwasi. Abikisamaki na nzoto, kasi ntango Yesu abongwanaki mpo na komona ye, alobaki bondimi na ye kati na Ye mpe Ye abikisaki motema na ye.9 Alobelaki ye na bolingo, alakaki ye lisungi na Ye, mpe apambolaki ye na kimia na Ye.10

Bandeko mibali, Lokola bamemi ya bonganganzambe esantu, tokoti na mosala ya lobiko. Na mobu eleki, Nkolo atiaki boyangeli ya mosala oyo na semba na mapeka ya bampaka na Yisalaele.11 Tozali na mokumba moko efulama uta na Nkolo—kosalaka elongo na bandeko na biso ya basi, tosengeli kosalisa na lolenge moko esantu koleka, kotambwisa noki bosangani ya Yisalaele na ngambu nyonso mibale ya elamba, kotia bandako na biso lokola esika ya bondimi mpe ya koyekola nsango malamu, mpe kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto.12

Lokola na makambo nyonso, Mobikisi alakisi biso nzela: tosengeli kotalela mpe kosalela Yesu Klisto lokola Ye atalelaki mpe asalelaki Tata na Ye.13 Mobikisi alobaki yango lolenge oyo na Profeta Joseph:

“Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, kobanga te.

“Botala bampota oyo etoboli mopanzi na ngai, mpe lisusu bilembo ya basete na maboko na ngai mpe makolo; bozala na kondima, botosa mitindo na ngai, mpe bokokota na bokonzi ya lola.”14

Na bokonzi ya yambo ya motama,Yesu alakaki Tata na Ye ete Ye akosala bolingi ya Tata na Ye mpe kozala Mobikisi mpe Mosikoli. Ntango Tata na Ye atunaki, “Nani nakotinda?”15 Yesu ayanolaki:

“Ngai oyo, tinda nga.”16

““Bolingi na yo esalalema, mpe nkembo ezala ya yo mpo na seko.”.”17

Kati na bomoi na Ye na kufa, Yesu abikaki elaka wana. Na bomikitisi, bosokemi, mpe bolingo, Ye ateyaki malongi ya Tata na Ye mpe asalaki mosala ya Tata na Ye na nguya mpe likoki Tata na Ye apesaki Ye.18

Yesu apesaaki motema na Ye na Tata na Ye. Alobaki:

“Nalingi Tata.”19

“Ntango nyonso, ngai nakosalaka makambo makosepelisa ye.”20

“Nayaki … koluka bolingi na ngaimei te, kasi bolingi ya [Tata na ngai, oyo] atindaki ngai.”21

Kati na kobunda na Ye na liwa na Getesemane, Ye asambelaki, “Bolingi na ngai te, kasi ya yo, esalama.”22

Ntango Nkolo abiangaki bampaka na Yisalaele mpo na “kotala epai na ngai na makanisi nyonso” mpe “tala bampota” na nzoto na Ye ya kosekwa, ezali libiangi moko ya koboya lisumu mpe mokili mpe kobaluka epaina Ye mpe kolinga mpe kotosa Ye. Ezali libiangi mpo na koteya malongi na Ye mpe kosala mosala na Ye na lolenge na Ye. Yango wana, ezali libiangi mpo na kondima Ye mobimba, kotika bolingi na biso mpe kopesa mitema na biso epai na Ye, mpe na nzela ya nguya na Ye ya kosikola kokoma lokola Ye.23

Bandeko, soki totali epai ya Yesu Klisto, Akopambola biso tozala ya Ye bampaka kati na Yisalaele—ya komikitisa, basokemi, botosi, kofuluka na bolingo na Ye.24 Mpe tokomema esengo mpe mapamboli ya nsango malamu mpe Eklezia na Ye epai ya mabota mpe bandeko na biso ya mibali mpe ya basi na ngambu nyonso mibale ya voile.

Mokambi Russell M. Nelson abengaki biso totala epai ya Yesu Klisto na kaka lolenge oyo: “Ezali na eloko moko ya pete to ya otomatiki te etali kokomaka moyekoli ya nguya ya boye Bokasi na biso esengeli koyekama na Mobikisi mpe nsango malamu na Ye. Esengi bokasi na bongo mpo na komeka kotala epai na Ye na nyonso makanisi. Kasi ntango tosali bongo, ntembe mpe bobangi na biso ekimi.”25

Koyekama ezali liloba monene. Elingi koloba konganga makasi, kobengisa mpe kosimba mobimba.26 Tomaniolaka Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye na kotosaka mayokani na biso.

ntango totosi mayokani na biso, yango etindiki makambo nyonso tozali koloba mpe kosala. Tobiki bomoi ya mayokani27 etonda bikela ya pete, ya mikolo nyonso ya bondimi oyo eyekamaka na Yesu Klisto: losambo uta na motema na ya Ye nkombo, kosalaka limpati na ya Ye liloba, kobalukaka epai na Ye mpo na koyambola masumu na biso, kobatelaka ya Ye mitindo, kokabolaka elambo mpe kobatelaka ya Ye Saba esantu, kokumbamelaka kati na ya Ye tempelo esantu mbala nzike ekoki biso, mpe kosalelaka ya Ye bonganganzambe esantu mpo na kosalisa bana ya Nzambe.

Misala oyo ya bomipesi na mayokani efungoli mitema mpe mayele na biso epai ya nguya ya bosikoli ya Mobikisi mpe mpe botindiki esantisaka ya Molimo Mosantu. Molongo likolo na molongo, Mobikisi abongoli ezalela na biso mpenza, tokomi mingi ya kobongwana na mozindo epai na Ye mpe mayokani na biso ekomi na bomoi kati na So it is with us.mitema na biso.28

Bilaka tosali epai ya Tata na biso ya Lola ekomi bomipesi ya makasi ya libanga, mposa na biso ya mozindo koleka mpenza. Bilaka ya Tata na Lola epai na biso etondisi biso na botondi mfpe esengo.29 Mayokani na biso etiki kozala mibeko tolandi mpe ekomi mabongi ya bolingo oyo efuli mpe ekambi biso mpe emanioli boyekami na biso na Yesu Klisto.30

Misala ya komipesa oyo ezali mpo na moto nyonso, elenge mpe mokolo. Bino bilenge babali oyo basimbi Bonganganzambe ya Alona, makambo nyonso nalobi na mpokwa ya lelo azali mpo na bino. Natondi Nzambe mpo na bino. Bosali makuli mpe mayokani esantu oyo ezali mpo na efuku ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka poso nyonso. Ntango bolengeli, bopamboli, to bolekisi elambo; bosali, bobatisi na tempelo; bobengisi moninga moko na molulu moko; to bosalisi kozongisa akitifi moto moko ya lisanga likoki bozali kosala mosala ya lobiko. Bino mpe bokoki kotala epai ya Yesu Klisto mpe kotosa mayokani mikolo nyonso. Nalaki bino ete soki bosali, bokozala basali ya elikia ya Nkolo sikawa mpe;’ na mikolo ekoya, bampaka ya nguya na Yisalaela.

Bandeko, nayebi ete nyonso oyo ekoki kobangisa. Kasi nasengi bomikundola maloba oyo ya mobikisi: “Nazali bobele ngai moko te zambi Tata azali na ngai elongo.”31 Boye ezali na biso. Tozali biso moko te. Nkolo Yesu Klisto mpe Tata na biso na Lola balingi biso, mpe Bango bazali elongo na biso.32 Lokola Yesu atalaki epai ya Tata na Ye mpe akokisaki libonza ya komikaba monene, tokoki kotala epai ya Yesu na kondima ete akosalisa biso.

Moko te na biso abonga nie; Ntango mosusu tokangamaka. Totambwisaka mayele to tolembisamaka. Tobetaka libaku. Kasi totali epai ya Yesu Klisto na motema ya koyambola, Ye akotombola biso likolo, kopetola biso uta na masumu, kolimbisa biso, mpe kolimbisa mitema na biso. Azali motema molai mpe boboto; bolingo na Ye ya kosikola esuki mokolo moko te mpe ekokweyi mokolo moko te.33 Akosalisa biso totosa mayokani na biso mpe tosalela libiangi na biso lokola Bampaka ya yisalaele.

Mpe Tata akopambola biso na nyonso esengeli mpo na kokokisa bantina na Ye—“makambo … nyonso mibale na lola mpe na mabele, bomoi mpe pole, Molimo mpe nguya, etindamaki na bolingi ya Tata na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na ye.”34

Ntango pole ya bonzambe mpe nguya etioli kati na bomoi na biso, makambo ya kokamwa misato esalami:

Yambo, tokoki komona! Na nzela ya emoniseli tobandi komona lokola Yesu amonaki mwasi: koleka etando tii na kati ya motema.35 Ntango tomoni lokola emonaka Yesu; Ye apamboli biso tolinga baye tozali kosalisa na bolingo na Ye. Na lisalisi na Ye, baye tozali kosalisa bakomona Mobikisi mpe bakoyoka bolingo na Ye.36

Ya mibale, tozali na nguya ya bonganganzambe! Tozali na likoki mpe nguya ya kosala na nkombo ya Yesu Klisto “mpo na kopambola, kokamba, kolendisa, mpe kobikisa basusu” mpe komema makamwisi epai ya baye biso tolingi mpe kobatela ya biso mabala mpe mabota na kimia.37

Ya misato, Yesu Klisto etamboli elongo na biso! Wapi tokei, Akei. Ntango totei, Atei. Ntango tolendisi, Alendisi. Ntango topamboli, Apamboli.38

Bandeko, ezali biso na ntina ya kosepela te? Tozali na yango! Tozali na Bonganganzambe esantu ya nzambe. Ntango tozali kotala epaai ya Yesu Klisto, totosi mayokani na biso, mpe tomanioli boyekami na biso na Ye, tokosangana elongo na bandeko basi mpe kosala na lolenge moko esantu koleka, kosangisa Yisalaele epalangana na ngambo nyonso mibale ya voile, kolendisa mpe kokangisa mabota na biso, mpe kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo Yesu Klisto. Ekosalama. Natatoli bongo.

Nasukisi na losambo oyo uta na motema na ngai, ete biso banso, moko na moko, tokotala epai ya Yesu Klisto na makanisi nyonso. Botiya ntembe te. Bobanga te. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. James E. Talmage atie Yesu na “eteni ya mboka ya Kapalanauma” ntango bobikisi oyo esalamaki (tala Jesus the Christ 2001], 291).

  2. Tala Luka 8:43–44; tala lisusu Matai 9:20–21; Malako 5:25–29

  3. Luka 8:46.

  4. Malako 5:30.

  5. Malako 5:32.

  6. Luka 8:47.

  7. Malako 5:33.

  8. Luka 8:48.

  9. James E. Talmage akomaki ete bobiki ya nzoto ya mwasi ezaalaki motuya koleka kondima ete Mobikisi akokisaki mposa ya motema na ye, mpe ete bondimi na ye eyambaki na Ye (tala Jesus the Christ, 318). Yesu abikisaki ye na nzoto mpe na molimo mpe efungolelaki ye nzela ya lobiko.

  10. Ezali na ntina koyeba ete Jairus, mokambi ya etonga, azalaki elongo na Yesu ntango libiki oyo esalamaki. Yesu azalaki kokende na ndako ya Jairus wapi, Ye alamusaki mwana mwasi ya Jairus uta na liwa. Mwasi oyo Yesu abikisaki ntango mosusu abenganamaki na sinagonga mpo na bokono na ye. Ntango Yesu abikisaki ye, Ye alakisaki lisusu polele na baoyo bazalaki kuna, kobakisaka Jairus, ete azalaki mwana mwasi wa bolingotha, mwasi ya bondimi, mpe nyonso na nzoto mpe molimo.

  11. Tala D. Todd Christofferson, “The Elders Quorum” (Liahona, sanza ya mitano 2018, 55–58) mpo na lisolo ya bambongwana ya kosala lisanga likoki ya bonganganzambe ya Melekisedeke moko na palwasi. Ntina ya mbongwana wana elimbolamaki na lolenge oyo kati na eteni Mituna Etunamaka Mingi mingi ya website ya Kosalisa: “Kozala na lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke moko kati na palwasi esangisi basimbi bonganganzambe mpo na kokokisa ndenge nyonso ya mosala ya lobiko, Kobakisaka mosala ya lisolo ya libota oyo eyangelamaki kala na mokambi ya liboke ya banganganzambe minene” (“This Is Ministering: Frequently Asked Questions,” question 8, ministering.ChurchofJesusChrist.org).

    Bambongwana elandi etie mokambi ya misio ya palwasi mpe mokambi ya lisolo ya libota mpe tempelo ya sika kati na palwasi na nse ya boyangeli ya bakambi ya lisanga likoki ya bampaka. Na kosalisaka mabota oyo esila kozala na nse ya boyangeli ya bokambi, bambongwana oyo etie bokambi ya mosala ya lobiko kati na masanga makoki ya bampaka. Ya solo, episikopo asimbi bafungola ya mosala ya lobiko na palwasi, kasi atindi mokumba mpe likoki mpo na mosala wana epai mokambi ya lisanga likoki mpo ete episikopo akoka kolekisa ngonga mingi kosalisaka libota na yemei, kolendisaka bilenge, mpe kosalaka lokola zusi na Yisalaele.

  12. Tala Russell M. Nelson, “Let Us All Press On,” Liahona, sanza ya mitano 2018, 118–19; Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 113–14; Quentin L. Cook, “Deep and Lasting Conversion to Heavenly Father and the Lord Jesus Christ,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 8–12.

  13. Nzambe atindaki Yesu Klisto, na mokili (tala John 17:18).

  14. Doctrine et Alliances 6:36–37.

  15. Abalayama 3:27.

  16. Abalayama 3:27.

  17. Mose 4:2.

  18. Ezali na matangi ebele kati na makomi oyo ekomi maloba ya Yesu alobaki etali mosala ya Tata na Ye mpe koteyaka malongi ya Tata na Ye. Tala, ndakisa, Yoane 5:19 (Yesu asalaka maye Amonaka Tata kosala); Yoane 5:36 (Tata apesaki Mwana na Ye mosala ya kosala); Yoane 8:26 (Yesu ateyaki maye Ye azwaka uta na Tata na Ye); Yoane14:28 (Yesu alobaki, “Tata aleki ngai”); 3 Nefi 11:32 (Malongi na Ye ezali malongi Tata na Ye apesaki Ye).

  19. Yoane 14:31.

  20. Yoane 8:29.

  21.  Yoane 6:38; tala lisusu  Yoane 5:30.

  22. Luka 22:42.

  23. Liloba tala na nkoma oyo (tala Doctrine et Alliances 6:36–37) na nkoma oyo ezali na ndimbola oyo ekokani na libiangi ya Nkolo: kotali na elongi (to kobaluka epai); koyangela bokebi ya moko epai, koyekama likolo na; koluka; kozela na elikia; kazala na makanisi lokola nsuka, kokanisa to kosala liboso (tala merriam-webster.com, “look”).

  24. Tala Doctrine et Alliances 121:41–42. Bizalela ya Boklisto ekomami na makomi ezali makabo ya Molimo oyo eyaka na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto. Ezali oyo esalaka bampaka kati na Yisalaele ya Ye Bampaka.

  25. Russell M. Nelson, “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona, sanza ya mitano 2017, 41.

  26. Tala merriam-webster.com, “rivet.”

  27. Mpo na lisolo moko ya liloba ya bomoi ya mayokani, tala Donald L. Hallstrom, “Living a Covenant Life,” Ensign, sanza ya motoba 2013, 46–49. Artikele oyo ewuti na lisolo moko molai koleka epesama na Université Brigham Young–Idaho na sanza ya mitano 2011. Mpo na nkoma ya molai koleka, tala Donald L. Hallstrom, “A Covenant Life” (Losambo ya Université Brigham Young–Idaho, sanza ya mitano 10, 2011), byui.edu.

  28. Tala Yilimia 31:31–33, wapi Nkolo alobi ete Ye akosala liyokani ya sika elongo na ndako ya Yisalaele ekomama kati na mitema na bango. Elilingi oyo ya mayokani ekomama kati na mitema na biso, to mayokani oyo ebotamaka kati na mitema na biso, emonani lisusu kati na nkoma ya Paulo (tala 2 Bakolinti 3:3; Baebele 8:10). Tala lisolo ya mbongwana mpe motema, tala David A. Bednar, “Converted unto the Lord,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2012, 106–9.

  29. Losambo ya elambo likolo ya limpa elobi na kitoko ezalela ya bozalani ya liyokani na biso na Tata na Lola. Na mwango ya Tata ya lobiko, tosali mayokani elongo na Tata na Lola, kasi bantina ya mayokani esalisami mpe tolongobani mpo na mapamboli elakelama na nzela ya Nkolo Yesu Klisto; Ye azali Mobongisi. Na makuli ya elambo, totatoli epai ya Tata (na mbano, kosalaka liyokani elongo na Ye ya sika) ete tozali na bolingi ya kokamata likolo na bisomei nkombo ya Yesu Klisto, kokundola Ye ntango nyonso, mpe kotosa mibeko na ye, ete tokoka ntango nyonso kozala na Molimo na Ye (Molimo Mosantu) elongo na biso.

    Makabo na bilaka ya Tata eyaka na nzela ya nguya ya kosikola mpe kolendisa ya Yesu Klisto. Ndakisa, lokola Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, Yesu Klisto azali liziba ya esengo nyonso (tala “Joy and Spiritual Survival,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2016, 82). Yango wana, komaniola boyekami na biso na Yesu Klisto ememi esengo kati na bomoi na biso likambo te ata bozwi na biso ezali nini.

  30. Mokambi Ezra Taft Benson alimbolaki nguya ya mbongana oyo na ezalela mpe boyekami oyo ntango alobaki, “Ntango botosi etiki kozala bolozi mpe ekomi ntina na biso, na ngonga wana nzambe akopambola biso na nguya” (na Donald L. Staheli, “Obedience—Life’s Great Challenge,” Ensign, sanza ya mitano 1998, 82).

  31. Yoane 16:32.

  32. Mpo na lisolo ya kobakisa mpo solo etali Tata mpe Mwana mpo na, litomba kati ya, bolingo mpo na, mpe bomipesi kati na bomoi na biso, tala Jeffrey R. Holland, “The Grandeur of God,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2003, 70–73; Henry B. Eyring, “Walk with Me,” Liahona, sanza ya mitano 2017, 82–85. Tala lisusu Matai 18:20; 28:20; Doctrine et Alliances 6:32; 29:5; 38:7; 61:36; 84:88.

  33. Tala Baloma 8:35–39; 1 Bakolinti 13:1–8; Moroni 7:46–47

  34. Doctrine et Alliances 50:27. Yeba ete Nkolo apesi moko na moko oyo akulisami mpe atindi elaka oyo ezali kati na yango, mpe atie ndelo, lotomo ya kafukafu epesami na ye.

    “Ye kaka aponami mpo na kozala mokolo koleka, atako azali moke koleka mpe mosali ya banso.

    “Yango wana, azali na makambo nyonso; mpamba te makambo manso makonzami na ye, nyonso mibale kati na lola mpe na mabele, bomoi mpe pole, Molimo mpe nguya, etindamaki na bolingi ya Tata na nzela ya Yesu Klisto, Mwana na Ye.

    “Kasi moto moko te azali na makambo manso longola se apetolama mpe asokwama na lisumu nyonso.

    “Mpe soki opetolami mpe osokwami na lisumu nyonso, okosenga nyonso okolinga na nkombo ya Yesu mpe ekosalama.” (Doctrine et Alliances 50:26–29).

  35. Tala 1 Samuele 16:7; 1 Bakolinti 2:14. Mpo na ndakisa ya lipamboli oyo ya komonaka lokola Yesu asalaka, tala lisolo ya Mokambi Henry B. Eyring ya boyebi na ye lokola episikopo ya elenge mobali moko oyo abomaka moto. Nkolo alobelaki ye ntango azalaki Episikpo Eyring, “Nakotika yo omona ye lokola emonaka ye” (“Walk with Me,” 84).

  36. Yango ezali elaka mpe etinda Mobikisi apesaki bato na tempelo na Bountiful. Atindaki bango batosa yango ete pole na Ye mpe ndakisa na Ye ekozala kati na bango, mpo ete bakoka kotombola Ye likolo lokola pole ya mokili kati na bomoi na bango mpe mabengisi na bango na basusu baya epai ya Klisto. Lokola byekoli na Ye babikaki bongo mpe babengisaki bongo, basusu bakoyoka Ye mpe komona Ye kati na basali ya Nkolo. (Tala 3 Nefi 18:24–25.)

  37. Tala Russell M. Nelson, “The Price of Priesthood Power,” Liahona, sanza ya mitano 2016, 68.

  38. Tala Doctrine et Alliances 84:88.

Bimisa na lokasa