2010–2019
Bosukolami na Nzela ya Boyamboli
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Bosukolami na Nzela ya Boyamboli

Mpo na mwango ya Nzambe mpe Bomikabi ya Yesu Klisto, tokoki kosukolama na nzela ya boyamboli.

Na bokufi tozali na nse ya mibeko ya bato mpe mibeko ya Nzambe. Nakutani na likambo ya momesano te ya kosambisa botamboli ya mabe makasi na nse ya mibeko oyo nyonso mibale—yambo lokola zuzimoko ya Ndako ya Bosambisi ya Eluti likolo ya Utah mpe sikawa lokola Bokambi ya Yambo. Bokeseni nakutani na yango katikati ya mibeko ya moto mpe mibeko ya Nzambe ebutisi etaleli na ngai ya solo mpe nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Na nse mibeko ya moto, moto oyo asali bobomibomi ya mabe mpenza akoki kopesama etumbu ya boloko ya bomoi mobimba kozangaka likoki ya liloba. Kasi ezli na bokeseni na nse ya mwango ya mawa ya Tata ya bolingo ya Lola. Namoni ete masumu kaka oyo ekoki kolimbisama na bokufi mpo na libonza ya kosikola ya Mobikisi na biso mpamba te masumu ya “banso baye ba motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa” (2 Nefi 2:7). Klisto asikolaka, mpe Bomikabi na Ye ezali ya solo.

Mawa ya bolingo ya Mobikisi na biso elakisami kati na loyembo monene ewuti koyembama na bayembi.

Yaka epai ya Yesu; Akoyoka yo ntango nyonso,

Atako kati na molili obungi.

Bolingo na Ye ekomona yo mpe na boboto ekokamba yo

Uta na molili ya butu tii na pole ya mokolo.1

Libonza ya kosikola ya Yesu Klisto efungoli ekuke mpo na “bato banso [mpo na] bayambola mpe baya epai na ye” (Doctrine et Alliances 18:11; tala lisusu Malako 3:28; 1 Nefi 10:18; Alama 34:8, 16). Buku ya Alama elobeli boyamboli mpe bolimbisi kutu ya baoyo bazalaka bato mabe mpe basopi makila (tala Alama 25:16; 27:27, 30). Etinda na ngai lelo ezali moko ya elikia mpo na banso na biso, kobakisaka baoyo babungisi kimondimi na bango kati na Eklezia na nzela na bobakoli to bolongoli nkombo. Tozalii banso basumuki oyo bakoki kosukolama na nzela ya boyamboli. “Koyambola uta na lisumu ezali pete te,” Mpaka Russell M. Nelson ateyaki na likita linene ya kala. ““Kasi mbano ekokani na ntalo..”2

I. Boyamboli

Boyamboli ebandi na Mobikisi na biso, mpe ezali esengo, mokumba te. Na losambo ya noël ya sanza ya zomi na mibale eleki, Mokambi Nelson ateyaki kala te: “Boyamboli ya solo ezali likambo ya mbala moko te. mpe ezali likabo ezanga nsuka ata moke te. Ezali ebandeli epai ya bokoli mpe kozala na kimia ya molimo, libondi, mpe esengo.”3

Mateya minene mosusu etali boyamboli ezali na esakola kati na Buku ya Alama epai ya bandimi ya Eklezia oyo ye na nsima alimbolaki lokola kozalaka na ezalela moko ya “bozangi bondimi mingi,” “ botombwani … lolendo,” mpe na mitema mitiami “likolo lya bozwi mpe biloko bya mpamba bya mokili” (Alama 7:6). Mondimi moko na moko ya Eklezia ezongisami oyo azali na mingi ya koyekola uta mateya efulama ya Alama.

Tobandi na bondimi na Yesu Klisto, mpo “ezali ye oyo akoya solo kolongola masumu ma mokili” (Alama 5:48). Tosengeli koyambola mpo, lokola eteyaki Alama, “longola se soko boyamboli, bokoka na lolenge loko te kosangola bokonzi bwa lola” (Alama 5:51). Boyamboli ezali eteni ya ebandeli ya mwango mwa Nzambe. Mpo banso bakosumuka na bomoi na biso na kufa mpe kobwakama mosika na miso ya Nzambe, moto akoki te “kobikisama” kazanga boyamboli (Alama 5:31; tala lisusu Elamani 12:22).

Oyo etayami uta o ebandeli. Nkolo atindaki Adama, “Teya yango epai ya bana na yo, ete bato banso, bisika binso, basengeli koyambola, to bakoki na lolenge mosusu te kosangola bokonzi ya Nzambe, mpo eloko moko te ya kosukolama ekoki kofanda kuna, to kofanda na miso na ye” (Moses 6:57). Tosengeli koyambola masumu na biso nyonso—misala na biso nyonso to kozanga misala oyo etelemeli mitindo ya Nzambe. Moto moko te alongolami. Kaka na mpokwa eleki Mokambi Nelson asengaki biso, “Bandeko, tosengeli banso koyambola.”4

mpo na kosukolama na nzela ya boyamboli, tosengeli kotika masumu na biso mpe kotubela epai ya Nkolo mpe epai ya zusi na Ye ya kufa esika esengelami (tala Doctrine et Alliances 58:43). Alama ateyaki ete tosengeli “komema misala semba” (Alama 5:35). Nyonso oyo ezali eteni libiangi ya makomi ya ntango nyonso ya koya epai ya Klisto.

Tosengeli kolia elambo mokolo ya Saba moko na moko. Na bokuli wana tosalaka mayokani mpe tozwaka mapamboli oyo esalisaka biso tolonga misala nyonso mpe bamposa oyo epekisaka biso uta na bobongi nie oyo Mobikisi asengaka biso tokokisa (tala Matai 5:48; 3 Nefi 12:48). Ntango biso “tomiwangani [bisomei] na bozangi bonzambe bonso, mpe bolingi Nzambe na bokasi, mayele mpe makasi [ma biso] manso,” nde tokoki “kozala bobongi nie na Klisto” mpe “kosatisama” na nzela ya bosopi makila na Ye ete “bokoma basantu, bozanga mbindo” (Moloni 10:32–33 Wana ezali elaka monene! Oyo likamwisi monene! Oyo lipamboli monene!

II. Boyanoli ya babosambisi na kufa

Moko ya bantina ya mwango ya Nzambe mpo na likambo na kufa oyo ezali mpo na “kondimisa” biso “mpe komona soki [biso] tokosala makambo nyonso oyo Nkolo Nzambe [na biso] akotinda [biso]” (Abraham 3:25). Lokola eteni ya mwango oyo, tozali bayanoli epai ya Nzambe mpe epai ya basali na ye baponama, mpe boyanoli wana esengi babosambisi na kufa mpe na bonzambe mpe lokola.

Na Eklezia ya Nkolo, babosambisi na kufa mpo na bandimi to baninga ya Eklezia eyangelami na bakambi oyo bazali koluka nzela ya bonzambe. Ezali mokumba na bango ya kosambisa bato oyo bazali koluka koya epai ya Klisto mpo na koyamba nguya ya Bomikabi na Ye na nzela ya boyokani epai ya bomoi ya seko. Babosambisi ya kufa esalaka ekateli soki moto abelemi mpo na libatisi. Ezali moto ya kolongobana mpo na mokanda ya kokende na tempelo? Moto oyo nkombo na ye elongolamaki na mikanda ya Eklezia ayamboli ekoka na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto mpo kondimama lisusu na nzela ya libatisi?

Ntango zusi na kufa abiangemi na Nzambe, andimi moto mpo na bokoli ya kobakisa, ndakisa matomba ya tempelo, azali koloba na moto wana te lokola abongi nie,mpe azali kolimbisa masumu moko te. Mpaka Spencer W. Kimball ateyaki ete nsima ya oyo abengaki “kobosana [ya] bitumbu” na kufa moto “asengeli lisusu koluka mpe kozwa uta na Nzambe ya lola boyamboli ya nsuka mpe bobele ye akoki kolimbisa.”5 Mpe soki misala mpe mposa ya masumu eyambolami te kino Bosambisi ya Nsuka, moto oyo ayamboli te akotikala ya kosukolama te. Boyanoli ya nsuka, kobakisaka mbano ya kosukola ya nsuka ya boyamboli ezali katikati ya moko na moko na biso mpe Nzambe.

III. Bosekwi mpe Bosambisi ya Nsuka

Bosambisi oyo elimbolami mingi mpenza na bato na makomi ezali Bosambisi ya Nsuka oyo elandi Bosekwi (tala 2 Nefi 9:15). Makomi mingi elobi ete “biso nyonso tokotelema liboso na esambiselo na Klisto” (Baloma 14:10; tala lisusu 2 Nefi 9:15; Moziya 27:31) “mpo na kosambisama engebene na bikela [biye] bisalemaki o nzoto ya kufa” (Alama 5:15; tala lisusu Emoniseli 20:12; Alama 41:3; 3 Nefi 26:4). Banso bakosambisama “engebene na misala mya bango” (3 Nefi 27:15) mpe “engebene na [ba]mposa ya mitema na bango” (Doctrine et Alliances 137:9; tala lisusu Alama 41:6).

Ntina ya Bosambisi oyo ya Nsuka ezali mpo na kakana soki tokokisi maye Alama alimbolaki lokola “mbongwana makasi ya motema” (tala Alama 5:14, 26), wapi tokomi bikelamu ya sika, na “tozali lisusu na meko mpo ya kosala bobe te, kasi mpo ya kosala bolamu ntango insono” (Moziya 5:2). Mosambisi ya oyo azali Mobikisi na biso, Yesu Klisto (tala Joane 5:22; 2 Nefi 9:41). Nsima ya bosambisi na Ye tokotubela banso “ete masambisi ma ye mazali mayengebene” (Moziya 16:1; tala lisusu Moziya 27:31; Alama 12:15), mpo na boyebi na Ye ya makambo manso (tala 2 Nefi 9:15, 20) epesi Ye boyebi moko ebongi nie ya nyonso ya misala mpe mposa na biso, nyonso mibale baye bazali bosembo to bayamboli mpe baye bazali na bosembo mpe bayamboli te to babongwani te.

Makomi elimboli lolenge ya Bosambisi ya Suka oyo. Alama ateyi ete boyengebene ya Nzambe wa biso esengi ete na bosekwi “biloko binso bizongisama na molongo mwa byango molamu” (Alama 41:2). Oyo elingi koloba ete “soko misala mya bango mizalaki milamu na bomoi boye, mpe mposa ya mitema mya bango izalaki ilamu, … o mokolo mwa nsuka [bako] zongisama epai ya eye ezali elamu” (Alama 41:3). Mpela moko, “soko misala mya bango [to bamposa na bango] ezalaki mabe, bakozongisama [epai] ya bobe.” (Alama 41:4–5; see also Elamani 14:31). Mpela moko, profeta Yakobo ateyaki ete na Bosambisi ya Nsuka “baye bazali sembo bakozala sembo seko, mpe baye bazali mbindo bakozala mbindo seko.l” (2 Nefi 9:16; tala lisusu Mormon 9:14; 1 Nefi 15:33). Wana ezali lolenge yambo ya botelemi na biso liboso na oyo Moloni abengaki “esika ya elengi ya Yova monene, Mosambisi wa Seko wa bato ba bomoi mpe bakufa elongo” (Moloni 10:34; tala lisusu 3 Nefi 27:16).

Mpo na kosala ete tokosukolama liboso ya Nzambe, tosengeli koyambola liboso ya Bosambisi ya Nsuka (tala Mormon 3:22). Lokola Alama alobaki na mwana na ye ya mobali mosumuki, tokoki te kobomba masumu na biso liboso ya Nzambe, “mpe longola se soko oyamboli makoteleme lokola litatoli likolo lya yo o mokolo mwa nsuka” (Alama 39:8; nsete ebakisami). Bomikabi ya Yesu Klisto epesi biso nzela se moko mpo na kokokisa bosukoli esengelami na nsela ya boyamboli, mpe bomoi ya kufa oyo ezali ngonga ya kosala yango. Atako toteyami ete boyamboli mosusu ekoki kosalama na mokili ya molimo (tala Doctrine et Alliances 138:31, 33, 58wana ezali mpe sikisiki te. Mpaka Melvin J. Ballard ateyaki: “Ezali pete mingi kolonga mpe kosalela Nkolo ntango mosuni mpe molimo lokola ezali ya kosangana lokola eloko moko. Oyo ezali ngonga ya ntango bato bazali botosi mpe na makoki mingi. … Bomoi oyo ezali ntango ya koyambola.”6

ntango toyamboli, tozali na elikia ya Nkolo ete masumu na biso, kobakisasa misala na biso mpe bamposa, ekosukolama mpe mpe bosambisi ya nsuka na biso ya ngolu eko “kokundola yango lisusu te” (Doctrine et Alliances 58:42; tala lisusu Yisaya 1:18; Yilimia 31:34; Baebele 8:12; Alama 41:6; Elamani 14:18–19). Ya kosukolama na nzela ya boyamboli, tokoki kolonga mpo na bomoi ya seko, oyo Mokonzi Benzamine alimbolaki lokola “kofanda[ka] elongo na Nzambe na bozali boko bwa esengo ekosuka mokolo moko te” (Mosiya 2:41; tala lisusu Doctrine et Alliances 14:7).

Lokola eteni mosusu ya ya Nzambe “mwango ya bozongisi” (Alama 41:2, Bosekwi ekozongisa “ biloko binso … na lolenge la byango lolamu mpe lobongo nie” (Alama 40:23). Oyo ekwi bobongi nie ya nyonso ya biso ya bozangi mpe bolemene ya nzoto ezwami na bokufi, kobakisa na mbotama to na nzela ya mpasi to maladi.

Bozongisi oyo ebongisi biso nie bamposa esantu te nyonso to ekozami te to bokakemi na biso? Wana ekoki kosalama te. Toyebi uta na emoniseli yankola ya sika ete tokosambisama mpo na ya biso bamposa lokola mpe misala na biso (tala Alama 41:5; Doctrine et Alliances 137:9) mpe ete kutu ya biso makanisi ekokweisa biso (tala Alama 12:4). Tosengeli te “kozilisa mokolo mwa boyamboli bwa [biso]” kino liwa. Amuleke ateyaki (Alama 34:33), mpo molimo kaka oyo ezali na nzoto na biso na bomoi oyo—soki ya Nkolo to ya zabulu—“akozala na nguya ya kozwa nzoto ya [biso] o mokili mwa seko” (Alama 34:34). Mosikoli na biso azali na nguya mpe atelemi ya kobelema mpo na kopetola biso uta na mabe. Sikawa ezali ntango ya koluka lisalisi na Ye mpo na koyambola mabe na biso to bamposa mpe makanisi na biso ya mabempo na kosukolama mpe kolengelama mpo na koteleme liboso lya Nzambe na Bosambisi ya Nsuka.

IV. Maboko ya Mawa

Oyo eluti na mwango ya Nzambe mpe mitindo na Ye nyonso ezali bolingo na Ye mpo na moko na moko na biso, oyo “esengelami mingi likolo ya biloko nionso … eleki na esengo mpo na molimo” (1 Nefi 11:22–23). Profeta Yisaya alobaki kutu na bato ya mabe ete ntango bango “abutwa epai ya Yawe … akoyokela ye mawa, … [mpe] akolimbisa na solo” (Yisaya 55:7). Alama ateyaki, “Tala, atindi bobiangemi epai ya bato banso; mpo maboko ma ngolu maniolami ona bango,” (Alama 5:33; tala lisusu 2 Nefi 26:25–33). Nkolo mosekwi alobaki na Banefi, “Tala, loboko la ngai la ngolu lotandolami ona bino, mpe onso oyo akoya, nakoyamba ” (3 Nefi 9:14). Uta na eye mpe mateya mingi mosusu na makomi, toyebi ete Mobikisi ya biso ya bolingo afungoli maboko na Ye mpo na koyamba mibali mpe basi nyonso na bampo ya bolingo oyo Ye atie mpo na kosepela na mampamboli minene nzambe azali na yango mpo na bana na Ye.7

Mpo na mwango ya Nzambe mpe Bomikabi ya Yesu Klisto, natatoli na “bongengi bolamu bwa elikia” ete Nzambe alingi biso mpe to koki kosukolama na nzela ya boyamboli. Tolakelami ete “soki [to] kokende liboso mbangu, kosalaka lipati na liloba lya Klisto, mpe kotiaka molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi bwa seko” (2 Nefi 31:20). Ekoka biso kosala bongo, nabondeli mpe nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Venez à Jésus! Il vous appelle,” Cantiques, no. 62.

  2. Russell M. Nelson, “Repentance and Conversion,” Liahona, sanza ya mitano 2007, 102.

  3. Russell M. Nelson, “Four Gifts That Jesus Christ Offers to You” (Losambo ya Bokambi ya Yambo na Noël ya 2018, sanza ya zomi na mibale 2, 2018), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  4. Russell M. Nelson, “We Can Do Better and Be Better,” Liahona, sanza ya mitano 2019, 69.

  5. The Teachings of Spencer W. Kimball, ed. Edward L. Kimball (1982), 101.

  6. Melvin J. Ballard, na Melvin R. Ballard, Melvin J. Ballard: Crusader for Righteousness  W1966), 212–13.

  7. Tala Tad R. Callister, The Infinite Atonement  W2000), 27–29.

Bimisa na lokasa