2010–2019
Makebisi ya Nsuka
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Makebisi ya Nsuka

Mpe ekoki biso kobonzela mpe kobonzela lisusu babomoi na kosalelaka Nzambe mpe bana na Ye—na banso na bangambo ya elamba.

Bandeko na ngai balingami mibali mpe basi, lokola tokimi na nsuka ya likta na biso ya nsango, totondi Nkolo mpo na bofuli mpe bobateli na Ye. Mateya eteyaki mpe elendisaki biso.

Bamama na likambo epesamaki na balobi te. Babondelaki bango moko mpo na emoniseli ya moto se ye moko na kobongisaka mateya na bango. Mpo na ngai, ezali kokamuisama lolenge milongo ya mateya ekokani makasi na moko mpe mosusu. Soki boyekoli yango, boluki kososola nni Nkolo azali komekaka koteya biso na nzela ya basali na Ye.

Miziki ezalaki ya nkembo. Totondi na bozindo babeti miziki ebele oyo basangisaki baboyebi na bango mpo na komema Molimo ya Nkolo ya liyangani moko na moko. Mpe Ye apambolaki basambeli mpe lisanga na liyangani moko na moko. Na bosolo mpenza, likita ezalaki lisusu lipati ya molimo mpo na biso nionso.

Tolikii mpe tosambeli ete ndako ya mondimi moko na moko ekokoma ebombelo ya solo ya bondimi, epai wapi Molimo na Nkolo ekoki kovanda. Atako kowelana nionso ezingi biso, ndako ya moko na moko ekoki kokoma esika moko ya lola, epai wapi koyekola, losambo, mpe bondimi ekoki kosangana na bolingo. Tokoki kokoma solo bayekoli ya Nkolo, kotelemaka likolo mpe kolobaka mpo na Ye esika nionso tozali.

Ntina ya Nzambe esengeli ezala ntina na biso. Ye alingi bana na Ye bapona kozonga epai na Ye, komibongisa, kobonga, dote, kokanga, mpe bondimi na mayokani tosalaki na batempelo ya bule.

Sikoyo tozali na batempelo 162 ebulisama. Baoyo ya kala te etelemi lokola bikeko ya bondimi mpe limoni ya bapionie na biso balingami. Tempelo yago etongamaki na bango lokola mbano uta libonza monene ya moto se yemoko mpe bokasi. Yango etelemi lokola palata ya kitoko na motole ya bokokisi pionie.

Ya biso ezali mokambi moko ya bule mpo na kobomba yango. Boye, batempelo wana ya yambo ekozua eleko ya kobongisama mpe ya kozongisama sika, mpe, mpo na mingi, mozongisami moko menene. Babokasi ekosalama mpo na kobomba lisolo moko ya tempelo yango esika nionso ekoki, kobombaka kitoko efulisami mpe etongeli ndako ya ndenge na yango moko ya nkola eleka ntango-molai.

Likambo mokomoko mpo na tempelo ya St. George Utah yango esi elongolamaki. Mabongisi mpo na bobongisi Tempelo ya Salt Lake Temple, Temple Square, mpe plaza na ngambo pembeni ya Church Office Building ekosakola mokolo ya Mitano, Sanza ya minei 19, 2019.

Batempelo ya Manti mpe Logan ekobongisama na mibu ekoya. Ntango makanisi wana ebongisami, yango mpe akosakolama

Yango ekosenga ete ba tempelo yango ezala ya kokangama na eleko moko ya ntango Bandimi ya Eklezia bakoki kokoba na kosepela na masanjoli ya tempelo mpe mosala na batempelo misusu ya pembeni. Ntango mosala wana ekokisami, tempelo yango ekobonzama lisusu.

Bandeko mibali mpe basi, totalaka tempelo lokola etonga moko ya bule ya Eklezia. Lokola tosakoli misala ya botongi moko tempelo ya sika, yango ekokoka eteni ya mambi na biso ya bule. Sikoyo, nasengi boyoka na bokebi mpe kimia nionso. Lokola nalobeli tempelo moko na esika moko ya kitoko mpo na bino, ekoki ngai kosenga ete bogumba na pete mitu na bino elongo na libondeli ya botondi na mitema na bino. Biso tolingi te mposa moko te ya maloba ekende uta na lolenge ya bule ya likita mpe batempelo ya bule ya Nkolo.

Lelo tosepeli kosakola miango ya kotonga batempelo mingi koleka, kotongama na bisika elandi:

Pago Pago, American Samoa; Okinawa City, Okinawa; Neiafu, Tonga; Tooele Valley, Utah; Moses Lake, Washington; San Pedro Sula, Honduras; Antofagasta, Chile; Budapest, Hungary.

Natondi bino, bandeko na ngai mibali mpe basi.

Lokola tozali kolobela batempelo na biso ya kala mpe ya sika, tika moko na moko na biso alakisa na misala ete tozali bayekoli ya solo ya Nkolo Yesu Klisto. Biso tokoki kobongisa babomoi na biso na nzela ya bondimi mpe kotia elikia na ye. Ekoki biso kokota na nguya ya Bomikabi na Ye na nzela ya boyamboli na biso mokolo nionso. Mpe ekoki biso kobonzela mpe kobonzela lisusu babomoi na kosalelaka Nzambe mpe bana na Ye—na banso na bangambo ya elamba.

Natikili bino bolingo mpe lipamboli, kokitisa bino motema ete bobimisi ezali kokoba na kati na yango, Eklezia ya Nkolo. Yango ekokoba kino “makanisi ya Nzambe ekokokisama, mpe Yehova monene akoloba mosala esili.”1

Ngai boye napamboli mpe napesi litatoli na ngai ete Nzambe azali na bomoi! Yesu azali Klisto! Oyo ezali Eklezia na Ye. Tozali bato na Ye. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 142.

Bimisa na lokasa