2010–2019
Ya Kotondisama na Mapamboli
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Ya kotondisama na Mapamboli

Mapamboli mingi oyo Nzambe alingaka kopambola biso esengaka misala na ngambo na biso—mosala oyo eyekami na bondimi na biso na Yesu Klisto.

Bandeko balingami mibali mpe basi, Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto balingi bapambola biso moko na moko na biso.1 Motuna ya lolenge nini kokota mpe kozwa mapamboli yango ezali likambo ya bosambi mpe masolo ya teoloji uta bikeke.2 Boko basambaki ete mapamboli balongaka yangoi kaka; tozwaka yango bobele na nzela ya misala na biso. Basusu basambaki ete Nzambe asi apona nani Akopambola—mpe ete bikateli oyo ebongwanaka te. Makanisi nyonso mibale ezali mpenza ya libunga. Mapamboli kowuta na lola elongamaka te na kobanzaka na makasi “bilembo ya misala malamu” to na kozelaka na kozanga lisungi komona soki tolongi tombola ya mapamboli te. Te, bosolo ezali kilikili koleka kasi mingi elongobani mpo na mokangano ya Tata ya Lola ya bolingo mpe baye bakoki kozwa libula na Ye—biso. Bosolo ezongisami ebimisi ete ezali moke te ya kolonga, kasi misala ya bondimi efulama na ngambo na biso, na ebandeli mpe na bokobi, ezali ya ntina.mpenza3

Elilingi
Liboke ya nkoni

Ntango totali lolenge tozwaka mapamboli kowuta na Nzambe, tomekisa mapamboli ya lola na bonene ya liboke ya nkoni. Kanisa na kati kati ya mwa ngomba ya mwa banzete ya bopelisi moto, na likolo mwa biteni ya nzete. Mwa banzete eyei nsima, nsima mwa mabaya, mpe na nsuka mabaya ya monene. Liboke ya nkoni oyo ezali na motango monene ya limba, na likoki ya kopelisa mwinda mpe molunge ya mikolo mingi. Kanisa oyo penepene na liboke ya nkoni alimeti moko kaka, lolenge ya oyo ezali na songe na fofolo.4

Elilingi
liboke ya nkoni na alimeti

Mpo na makasi na liboke ya nkoni eebima, alimeti esengeli kotutisama mpe ekopela. Moto ekopela na lombango mpe ekosalabiteni ya minene ya bankoni kozika. Ntango bopeli oyo ya kolandana ekobanda, ekokoba kino bankoni nyonso ekozika to moto esili oxigene.

Elilingi
lKozikisaka liboke ya nkoli

Kobeta alimeti mpe kopelisa wa moto ezali misala mike oyo ekopesa ndingisa na bokasi ekoka kopela ya nkoni mpo na ebima.5 Soki alimeti ebetami te, eloko moko te ekosalema, ata bonene kani ya liboke ya nkoni. Soki Alimeti abetami kasi etiami na mwa nkoni te, motango ya pole mpe moto ebimi na alimeti yango moko ezali moke mpenza mpe bozikisi ya makasi na nkoni etikala kobima te. Soki oxigene epesami te na esika nyonso, mbano ya bozikisi ekokatana.

Na lolenge moko, mapamboli ebele oyo Nzambe asengeli kopesa biso esengaka mosala na biso—mosala oyo eyekami na bondimi na biso na Yesu Klisto. Bondimi na Mobikisi ezali libongi ya mosala mpe nguya.6 Yambo tosalaka na bondimi, nsima nguya ekoya—engebene na bolingi mpe ntango na Nzambe . Bolandani oyo ezali na ntina mingi.7 Mosala oyo esengeli ezalaka ntango nyonso moke ntango ekokisami na mapamboli tozwaka na nsuka.8

Bomaniiola oyo esalemaki ntango banioka ya kopumbwa na moto eyaki na kati ya Bayisalaele ya kala na nzela na bango mpo na mabele ya elaka. Boswi ya nioka ya ngenge ezalaki koboma. Kasi moto oyo baswamaki bkokaki kobikisama na kotalaka na nioka ya motako oyo esalemaki na Mose mpe atiamaki na likolo ya nzete.9 Makasi kani yango esengelaki mpo na kotala eloko moko? Oyo nyonso azwaki banguya ya lola mpe abikisamaki. Bayisalaele misusu oyo baswamaki bazangaki kotala na nioka ya motako mpe bakufaki. Ntango mosusu bazangaki bondimi ya kotala.10 Ntango mosusu bandimelaki te ete mosala moke wana ekokaki kosala libiki elakamaki. To ntango mosusu na bolingi bakomisa makasi mitema na bango mpe babwakaki toli ya profeta ya Nzambe.11

Libongi ya mapamboli oyo ewutaka na Nzambe ezali seko. Lokola oyo ya Bayisalaela ya kala, biso mpe tosengeli kosala na bondimi na biso na Yesu Klisto mpo na kopambolama. Nzambe asakolaki ete “mobeko moko ezali, ekangama libela na lola yambo ya bokeli ya mokili oyo, likolo na yango mapamboli nyonso evandi—mpe ntango tozwi lipamboli moko kowuta na Nzambe, ezali na nzela ya botosi ya mobeko oyo evandi.”12 Yango elobami, bolongaka lipamboli te—liteya wana ezali libunga—kasi osengeli olongobana mpo na yango . Lobiko na biso eyaka bobele na nzela ya litomba mpe ngolu ya Yesu Klisto.13 Bonene mingii ya libonza ya bomikabi na Ye elingi koloba ete liboke ya nkoni ezali na nsuka te; mwa misala na biso ezali lokola penepene ya libungutulu. Kasi yango ezali zolongono te, mpe ezanga ntina te; na kati ya molili, alimeti oyo epeli ekoki komonisama kino mosika. Yango wana, ekoki kozala na lola mp misala mike esengelami mpo na kopelisa bilaka ya Nzambe.14

Mpo na kozwa lipamboli oyo esengelami kowuta na Nzambe, bosala na bondimi, bosala na makasi ya lola na yango nde ya lipamboli ya lola ekangani. Na ndakisa, moko ya bantina ya losambo ezali koluka mapamboli oyo Nzambe azali na bolingi ya kopesa kasi bobele kaka soki tosengi yango.15 Alma abelelaki ngolu mpe mpasi na ye esilaki; atungisamaki lisusu te na masumu na ye. Esengo na ye elongolaki mpasi na ye—nyonso mpamba te abelelaki na bondimi epai ya Yesu Klisto.16 Makasi ya kosala oyo esengelami mpo na biso ezali ya kozala na bondimi ekoka na Klisto mpo na kosenga ya solo epai ya Nzambe na losambo mpe kondima bolingi mpe ntango na Ye ya eyano.

Mbala mingi, makasi ya kosala esengeli mpo na mapamboli esengaka mingi koleka botali to kotuna; mosala ya bokobi; bobandeli; bondimi etonda esengeli. Na kati kati ya ekeke ya mbala ya 19, Brigham Young akambaki lingomba ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka mpo na kofanda na Arizona, etuka ekauka na Nordi ya Amerika. Nsima ya kokoma na Arizona, lingomba ekimaki libanda ya mai mpe babangaki kokufa. Babondelaki Nzambe mpo na lisungi. Kala te, mvula mpe mvula ya mpembe ekweyaki, epesaki bango ndingisa ya kotondisa bangungulu na bango na mai mpe mpo na bibwele na bango. Na botondi mpe makasi ya sika, bazongaki na Salt Lake City kosepelaka na bolamu ya Nzambe. Na bozongi na bango, nayebisaki makambo nyonso oyo bamonaki epai ya Brigham Young mpe balobaki bosukisi na bango ete Arizona ezalaki esika ya kofanda te.

Elilingi
Brigham Young

Nsima ya koyoka nsango, Brigham Young atunaki moto moko kati ya ndako na oyo akanisaki na ntina mobembo mpe bikamwa. Moto wana, Daniel W. Jones, ayanolaki mbala moko, “nasengelaki kotondisa, kokoba, mpe kosambela lisusu.” Ndeko mobali Brigham atiaki loboko na ye likolo ya ndeko mobali Jones mpe alobaki, “Oyo ezali moto oyo akozwa mosala ya mobembo ya nsima na Arizona.”17

Elilingi
Daniel W. Jones

Tokoki banso komikundola bangonga ntango tozali kokoba na mpe kosambela lisusu—mpe biyano ya mapamboli. Likambo ya Micheal mpe Marian elakisi mabongi oyo. Micheal mpe ngai tosalaki elongo lokola Bantuku Nsambo ya Etuka. Nazalaki ntango nyonso na esengo na ntango azalaki kobiangema mpo na kosambela na makita na biso mpo ete bozindo ya kimolimo na ye ezalaki makasi; ayebaki koloba na Nzambe. Nalingaki koyoka ye kosambela. Na ebandeli ya libala na bango, nzokande, Micheal mpe Marian bazalaki kosambela to kokende eklezia te. Bazalaki ntango nyonso kobatela bana na bango ya mike misato mpe kotonga elonga ya kimoninga. Micheal azalaki koyoka te azalaki moto ya losambo. Na mpokwa moko, episikopo na bango ayaki na ndako mpe alendisaki bango babanda kosambela.

Nsima ya Episikopo kokende, Micheal mpe Marian bazwaki mokano ete bakosambela. Yambo ya kokende kolala, bafukamaki na mbeto na bango, mpe, na pete te, Micheal abandaki. Na nsima ya maloba mabe na losambo, Micheal na mbalakaka akataki, kolobaka, “Marian, nakoki kosala yango te.” Ntango akataki mpe abandaki kotambola, Marian, akangaki ye na loboko, abendaki ye afukama lisusu, mpe alobaki “Mike, akoki kosala yango. Meka lisusu.” Na bolendisi oyo, Micheal asilisaki losambo ya mokuse.

Babandaki kosambela mbala na mbala. Bandimaki libiangi ya mozalani moko ya kokende eklezia. Ntango batambolaki na kati ya ndako Nzambe mpe bayokaki loyembo ya bofungoli, Molimo elobelaki bango, “Oyo ezali solo.” Nsima, na bozangi komona mpe bozangi kotuna, Michael asungaki na bolongoli ya mwa mbindo uta na ndaki ya makita. Ntango asalaki yango, ayokaki liyoki makasi, “Oyo ezali ndako na Ngai.”

Elilingi
Elenge Michael mpe Marian Holmes

Micheal mpe Marian bandimaki mabiangi mpe basungaki na palwasi na bango mpe likonzi. Bakangisamaki bango mibale, mpe bana na bango 3 bakangisamaki epai na bango. Bana misusu babotamaki, bakomaki 12. Ba Holmeses basungaki lokola mokambi ya misio mpe moninga—mbala mibale.

Elilingi
Michael mpe Marian Holmes lelo

Losambo ya bolembu na ebandeli ezalaki moke kasi mosala etondisama na bondimi ememaki mapamboli ya lola. Ba Holmeses babatelaki bondimi na bango na kokendaka na eklezia mpe kosungaka. Kimoyekoli na bango ya bomipesi nsima ya mibu ebele ekambaki bokasi oyo ezali kofula kino mokolo ya lelo.

Elilingi
Libota Monene ya Holmes

Moto, nzokande, esengeli kozwa bobakisi ya oxigene mpo ete nkoni esala mosala na yango ekoki mobimba. Lokola elakisamaki na Micheal mpe Marian Holmes, bondimi na Klisto esengaka mosala ya kokoba mpo ete moto ekoba kopela. Misala mike esungaka bokasi na biso ya kotambola na nzela ya liyokani mpe kokamba na mapamboli minene oyo Nzambe akoki kopesa. Kasi oxigene efulaka bobele soki biso tokobi koningisa makolo na biso. Mbala mosusu tosengelaka kosala litimbo mpe likula yambo bobimisi eya lokola na esika tosengeli koluka mpo bilei.18 Mbala mosusu tosengelaka kosala bisalele yambo mabimisi eya lokola na lolenge ya kotonga masuwa.19 Mbala mosusu, na bokambi ya profeta ya Nkolo, tosengeli kotumba mwa lipa na mafuta moke mpe fufu oyo tozali na yanbo mpo na kozwa mafuta oyo ekozanga te te mpe tono ya fufu.20 Mpe mbala mosusu tosengeli “kozala kimia mpe koyeba ete [Nzambe azali] Nzambe,” mpe kolikia na ntango na Ye.21

Ntango ozwi lipamboli songolo kowuta na Nzambe, okoki kosukisa ete yo okokisi mobeko ya seko ekambi bozwi ya lipamboli wana.22 Kasi bomikundola ete mobeko “ekangama libela” ezali ntango ya koyoka te, elakisi mapamboli eyaka na manaka ya Nzambe. Kutu baprofeta ya kala balukaki ndako na bango ya lola23 “bakufaki na bondimi, bazwaki bilaka te, kasi bamonaki yango na mosika … [mpe] bandimaki … mpe bayambaki yango.”24 Soki lipamboli elingami kowuta na Nzambe ezwami te—kasi—bosengeli komitungisa te, bomitungisa mingi na oyo bosengeli kosala. Na esika na yango, tala toli ya Joseph Smith mpo na “kosala makambo nyonso ezali [nguya] na yo; mpe nsima … yika mpiko kino, elongo na elikia monene, ya komona … loboko [ya Nzambe] … ebimisama.”25 Mapamboli misusu ebombami mpo na nsima, atako mpo na bilombe bana ya Nzambe.26

Basanza motoba eleki, mwango moko ndako na katikati, na lisungi ya Eklezia mpo na koyekola malongi, kolendisa bondimi, mpe kolendisa basusu mpe mabota etalisamaki. Mokambi Russell M. Nelson alakaki ete mbongwana ekoki kosunga biso kotikala na bomoi na molimo, komatisa esengo ya nsango malamu, mpe kolendisa na bozindo bosololi na biso elongo Tata ya Lola mpe Yesu Klisto.27 Kasi etali biso mpo na kosenga mapamboli yango. Tozali banso na nguya ya kofungola mpe koyekola Yaka, Landa Ngai—Mpo moko na moko mpe mabota, elongo na makomi mpe mokanda mosusu Yaka, Landa Ngai.28 Tosengeli kosolola yango elongo na libota mpe baninga na biso mpe kosala mokolo ya Saba epela moto ya lisese. To tokoki kofanda na kiti na biso ya mabota elongo na makasi etondisama na kati.

Nabengisi bino bosalela bondimi na nguya ya kozwa mapamboli lola kouta na Nzambe. Bosalelaka bondimi mpo na kopeta alimeti mpe kopelisa moto. Bobakia oxigene oyo esengelami na ntango bozali na bompikiliki kozela Nkolo. Elongo na mabengisi oyo, nasambeli ete Molimo Mosantu ekokamba mpe ekolakisa bino nzela, mpo ete bino, lokola “bato ya bondimi” batangami na Masese, bokozala “kotondisama na mapamboli.”29 Natatoli ete Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bazali na bomoi, bazali komitungisaka mpo na bolamu na biso, mpe bazali kosepela kopambola biso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Doctrine te Alliances 41:1; 78:17; 104:33.

  2. Tala, ndakisa, Craig Harline, A World Ablaze: The Rise of Martin Luther and the Birth of the Reformation (2017), 20. Moko ya lisolo ya boye esalemaki na kati ya Augustine (AD 354–430) mpe monguna na ye Pelagius (AD 354–420). Pelagius akangamaki ete “bato ya solo [bazali] na yango kati na bango kosala bolamu, mpe ete balongaka ngolu ya Nzambe na kosalaka mpo na bolamu yango mpe kobatelaka mitindo nyonso ya Nzambe.” Augustin aboyaki yango makasi. Tala lisusu Eric Metaxas, Martin Luther: The Man Who Rediscovered God and Changed the World (2017), 296. Luther ateyaki ete misala ekoki ata moke te komema na ngolu ya Nzambe; bondimi ekambaka na ngolu mpe misala malamu elandaka; “Ekoki kosalama te kokabola misala na bondimi, lokola ekoki kosalema te kokabola pole mpe moto.”

  3. Tala Doctrine et Alliances 82:10.

  4. Oyo ezali alimeti ya nganda, alimeti “ya kobeta esika nyonso” . Baalimeti ya lelo ya likama te, lokola alimeti ya soso, ezali na fofolo n nzela ya kobeta esika ezala na nsonge ya alimeti.

  5. Misala oyo ezali “makasi ya mosala” mpo na bopelisi. Liloba “makasi ya mosala” ebimisamaki na 1889 na nganga ya mayele moko ya mboka Suède Svante Arrhenius.

  6. Tala Lectures on Faith (1985), 3.

  7. Tala David A. Bednar, “Senga na Bondimi,” Liahona, sanza ya mitano 2008, 94.

  8. Tala Mozia 2:24–25.

  9. Tala Mituya 21:6–9.

  10. Tala 1 Nefi 17:41.

  11. Tala 1 Nefi 17:42.

  12. Doctrine et Alliances 130:20–21.

  13. Tala 2 Nefi 10:24; 25:23

  14. Tala Alma 60:11, 21; Dallin H. Oaks, “Small and Simple Things; Liahona, sanza ya mitano 2018, 89–92; M. Russell Ballard “Be Anxiously Engaged; Liahona, sanza ya zomi na moko 2012, 29–31.

  15. Tala Bible Dictionary, “Losambo”; tala lisusu Moroni 7:48.

  16. Tala Alma 36:18–21; tala lisusu Enose 1:5–8.

  17. Daniel W. Jones, 40 Years Among the Indians (1960), 222.

  18. Tala 1 Nefi 16:23.

  19. Tala 1 Nefi 17:9.

  20. Tala 1 Mikonzi 17:10–16.

  21. Doctrine et Alliances 101:16.

  22. Tala Doctrine et Alliances 130:20–21.

  23. Tala Baebele 11:16.

  24. Baebele 11:13.

  25. Doctrine et Alliances 123:17.

  26. Tala Jeffrey R. Holland, “An High Priest of Good Things to Come,” Liahona, sanza ya yambo 2000, 42–45. Mpaka Holland alobaki, “Mapamboli misusu eyaka na lombangu, misusu eyaka nsima, mpe misusu eyaka mpe te kino likolo; kasi mpo na baoyo bandimelaka nsango malamu ya Yesu Klisto, teyelaka bango.”

  27. Tala Russell M. Nelson, “Makebisi ya Bofungwami,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 6–8.

  28. Tala Quentin L. Cook, “Bozindo mpe Bosololi ya Nsuka epai ya Tata na Lola mpe Nkolo Yesu Klisto,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 8–12.

  29. Masese 28:20.

Bimisa na lokasa