2010–2019
Wapi Yango Ekokamba?
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Wapi yango ekokamba?

Tosalaka maponi mpe tozwaka mikano malamu koleka soki totali biloko ya kopona mpe tokanisi epai wapi yango ekokamba

Nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto elendisaka biso tokanisa na ntina ya lobi ekoya. Elimbolaka ntina bomoi ya kufa mpe bosolo ya bomoi ya kolanda. Eteyaka makanisi manene na ntina ya lobi ekoya mpo na kokamba misala na biso lelo.

Na ngambo mosusu, biso nyonso toyebi bato oyo batalaka kaka bamposa ya lelo: kosalela yango lelo, kosepela lelo, mpe bakanisaka lobi ekoya te.

Lelo na biso mpe lobi ekoya ekozala malamu soki tokanisaka mpo na lobi ekoya. Ntango tosalaka bikateli lelo, tosengeli ntango nyonso komituna, “Yango ekokamba ngai wapi?”

I.

Bikateli misusu ezalaka maponi ya kosala likambo songolo to kosala likambo mosusu. Nayokaki ndakisa ya lolenge oyo ya boponi na likita ya likonzi moko na Etazini mibu ebele eleki.

Esika ezalaki na nganda ya universite moko kitoko. Lisanga ya bilenge bayekoli efandaki na matiti. Molobeli oyo alimbolaki likambo oyo alobaki bazalaki kotala mpuku kitoko ya nzete na mokila molai, ba suku ebele kosakana nzinga nzinga na nse ya nzete moko kitoko ya mabaya makasi. Ntango mosusu ekitaki na mabele, ngonga mususu emataki na nzete mpe ekitaki na nse mpe nzinga nzinga ya nzete. Kasi mpo na nini bomoni wana ekokaki kobungisa makanisi ya lisanga ya bayekoli oyo?

Kolalaka ya kopanzana na matiti ezalaki penepene mbwa ya Irlande moko. Azalaki eloko ya ntina mpo na bayekoli, mpe ekireye ezalaki eloko ya ntina mpo na ye. Ntango nyonso ekireye azalaki mwa ngonga komonana te na kobalukaka na nzete, mbwa oyo alingaki konguluma liboso mwa milimetele mpe nsima kozongela ezalelki na ye lokola koyebaka likambo te. Oyo ezalaki likambo ezalaki kosepelisa bayekoli. Kimia mpe na koningana te, miso na bango ezalaki kaka kotala likambo oyo nsuka na yango ezalaki kokoma solo mpenza.

Na nsuka, mbwa oyo akomaki pene mpo na kokanga ekireye mpe akangaki yango na monoko na ye. Mpema ya bobangi eyokanaki, mpe lisanga ya bayekoli bakendaki mbangu mpe babikisaki mwa nyama oyo na mbwa, kasi ntango esi elekaki. Ekireye azalaki ya kokufa.

Moto moko na moko kati ya lisanga akokaki kokebisa ekireye na ntango kani na kopepaka maboko na ye to kogangaka, kasi moto moko te asalaki yango. Bazalaki kaka kotala ntango mbwa azalaki koya penepene. Moto moko te atunaki, “Wapi yango ekokamba?” Ntango oyo bazelaki esalamaki, lisanga nyonso bakimaki mpo na kobikisa, kasi ntango esi elekaki. Mpasi na motema ezalaki bobele oyo bayokaki.

Lisolo wana ya solo ezali ndenge ya lisese Emonisamaka na makambo tomonaka na babomoi na bisomei, mpe na babomoi mpe mabaku nzinga nzinga na biso. Ntango tomonaka makama koyelaka bato to biloko tolingaka, tozali na boponi ya koloba to kosala to kotikala kimia. Ezali malamu tomituna biso moko, “Wapi yango ekokamba?” bisika makama ezali nokinoki mpe ya mpasi, tokoki te kofanda na bozangi kosala likambo. Tosengeli kopesa makebisi masengeli to kosunga babokasi elongobani mpo na kopekisa yango na ntango ngonga ezali naino.

Bikateli oyo natalisi esengi maponi katikati ya kosala likambo to ya kosala likambo moko te. Maponi yango esalemaka mbala ebele ya kosala likambo moko to mosusu. Yango esengaka maponi katikati ya bolamu to mabe, kasi mbala mingi ezali maponi ya kosala bolamu mibale. Awa mpe esengeli komituna wapi yango ekokamba. Tosalaka maponi ebele ya katikati ya bolamu mibale, mbala mingi esengaka lolenge nini tokosalela ntango na biso. Likambo mabe ezali te na kosakanaka masano ya video to kokomaka to kotalaka TV to kosololaka na telefone. Kasi moko na moko ya makambo oyo ebiangemi “motuya ya libaku,” elingi koloba ete soki tolekisi ntango na kosalaka likambo moko, tobungisaka libaku ya kosala mosusu. Nandimi bokoki komona yango ete tosengeli komeka mpenza ninitozali kobungisa na ntango oyo tolekisaka na mosala moko, atako yango ezali malamu mpenza na yango moko.

Mikolo eleki ebele napesaki liteya moko na nkombo ya “Malamu, Malamu mingi, Malamu mingi koleka.” Na liteya yango nalobelaki ete “bobele mpo ete likambo moko ezali malamu yango ezali ntina ekoka te mpo na kosala yango. Motango ya makambo malamu oyo tokoki kosala eleki ntango ezali mpo na kokokisa yango. Makambo misusu ezali malamu koleka malamu, mpe yango ezali makambo esengeli kotinda bokebi ya yambo na bomoi na biso. … Tosengeli kotika boko makambo malamu mpo na kopona mosusu oyo ezali malamu koleka to malamu mingi koleka.”1

Zakla na miso molai. Mbano nini ezali mpo na lobi na biso ekoya ya bikateli tosalaka lelo? Mikundola ntina ya kozwa botangi, koyekola nsango malamu, kokomisa mayokani na biso sika na koliaka elambo, kokendaka na tempelo.

II.

“Wapi yango ekokamba?” ezali lisusu ntina koponaka lolenge nini tosalaka to tokanisaka mpo na biso moko. Ya ntina mingi koleka, moko na moko na biso azali mwana ya Nzambe na likoki ya lobi ya bomoi ya seko. Nkombo nyonso mosusu, kutu atako mokumba, langi ya loposo, bomoto to lokumu, ezali mpo na ntango moke to ezanga ntina na boseko. Boponaka ntina na bino moko te to bokanisaka mpo na bino moko na ndenge oyo etiaka ndelo na ntina ya oyo bosengeli kobundela.

Bandeko na ngai ya mibali, mpe basi oyo bakotala to kotanga oyo nazali koloba na ngonga oyo, nalikii boyebi mpo na nini bakambi na bino bapesaka mateya mpe toli topesaka. Tolingaka bino, mpe Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye? Yesu Klisto, balingaka bino. Moango na bango mpo na biso ezali “moango monene ya esengo” (Alma 42:8). Moango yango mpe mitindo na Bango mpe makuli mpe mayokani ekambaka biso na esengo monene mpe bosepeli na bomoi oyo mpe na bomoi oyo ezali koya. Lokola basaleli ya Tata mpe Mwana, toteyaka mpe topesaka toli lokola Bango bakambaka biso na Molimo Mosantu. Tozali te na mposa mosusu koleka ya koloba oyo ezali bosolo mpe kolendisa bino bosala oyo Balengelaki lokola nzela ememi na bomoi ya seko, “likabo monene oyo eleki makabo nyonso ya Nzambe” (Doctrine et Alliances 14:7).

III.

Oyo ezali ndakisa mosusu etali mbano misusu ya bikateli ya lobi ekoya oyo tosalaka lelo. Ndakisa oyo etali boponi ya kosala likabo ya lelo mpo na kokokisa ntina monene ya lobi ekoya.

Na likita ya likonzi na Cali, Colombi, ndeko mwasi moko alobelaki lolenge nini ye mpe fiance na ye balingaki kobalana na tempelo, kasi na ntango wana tempelo ya penepene ezalaki mosika na Peru. Mpo na ntango molai, babombaki mosolo na bango mpo na bobrmbo ya bisi. Na nsuka bazwaki bisi kino na Bogotá, kasi ntango bakomaki kuna, bayokaki ete bakiti nyonso na bisi mpo na kokende na Lima, Peru, bazwaki yango. Bakokaki kozonga ndako na kozanga kobalana to kobalana libanda ya tempelo. Na libaku malamu, likanisi mosusu ezalaki. Bakokaki komata na bisi kino na Lima soki balingaki kofanda na nse na kati ya bisi mpo na mikolo nyonso mitano mpe butu mitano. Baponaki kosala yango. Alobaki ezalaki mpasi, atako bato misusu bazalaki kotikela bango bakiti bafanda mpo bakoka kolala na nse.

Oyo ekamwisaki ngai na lisolo na ye ezalaki liloba ya ndeko mwasi ete azalaki na botondi ete ye mpe mobali na ye bazalaki na likoki ya kokende na tempelo na nzela wana, mpo ete ebongolaki lolenge bayokaki na ntina ya nsango malamu mpe lolenge bayokaki na ntina ya libala na tempelo. Nkolo apesaki bango litomba na bokoli oyo ewutaki na libonza. Atalisaki lisusu ete mikolo na bango mitano ya mobembo kino na tempelo ekokisaki ntina monene mingi na botongi molimo na bango koleka batali ebele na tempelo oyo bazalaki libonza te.

Uta mibu ebele nayokaki litatoli wana, namitunaka bokeseni nini bomoi ya bilenge balongani wana ekoki kozala soki basalaki boponi mosusu—koboyaka libonza elongobana ya kobalana na tempelo.

Bandeko, tosalaka maponi ebele na bomoi, misusu ya minene mpe misusu neti mike. Kotalaka nsima, tokoki komona bokeseni monene na mwa maponi na biso tosalaka na babomoi na biso. Tosalaka maponi mpe tozwaka mikano malamu koleka soki totali biloko ya kopona mpe tokanisi epai wapi yango ekokamba Wana ezali biso kosala yango, tokozala kolanda toli ya Mokambi Russell M. Nelson ya tobanda na nsuka na makanisi na biso.2 Mpo na biso, nsuka ezali ntango nyonso na nzela ya liyokani na bomoi ya seko, likabo monene ya makabo nyonso ya Nzambe.

Natatoli na ntina ya Yesu Klisto mpe matomba ya Bomikabi ya mpe babosolo mosusu ya nsango malamu na Ye ya ntango nyonso na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Dallin H. Oaks, “Good, Better, Best,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2007, 104, 107.

  2. Tala Russell M. Nelson, “As We Go Forward Together,” Liahona, sanza ya minei 2018, 7.

Bimisa na lokasa