Tolengelami mpo na Kozwa Nyonso Tosengeli na Yango
Mapamboli ekoya ntango tobundi kokokisa mokumba na biso moko mpo na koyekola mpe kolinga nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisami.
Miango mpe milulu ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekomi kotia mingi koleka ndako na katikati mpe na lisungi ya Eklezia, lokola emonisami na miso na milongo ya bambongwana esakolamaki na makita manene maleki. Mokambi Russell M. Nelson apesaki biso toli: “Ezali na mingi koleka ekoya. … Bolia bambuma na bino ya vitamini. Bopema. Ekozala elengi mpenza.”1
Nasambeli mpe nabengisi lisalisi ya Molimo Mosantu ntango tokomaniola elongo mbano mingi ya ntina ya bambongwana oyo ekoya na Eklezia ezongisama ya Nkolo.
Boyekoli Nsango Malamu Etie Ndako na Katikati mpe Esungi Eklezia
Mpaka Craig C. Christensen mpe ngai tozalaki baninga kala te na likita moko ya bokambi ya bonganganzambe, mpe asalelaki mituna mibale ya pete mpo na kobeta nsete na mabongi ya kokoma kotia ndako na katikati mpe esungami na Eklezia. Apesaki likanisi ete esika ya kozonga na ndako na biso nsima ya mayangani ya Eklezia mokolo ya eyenga mpe kotunaka, “Nini boyekolaki etali Mobikisi mpe nsango malamu na Ye lelo na eklezia?” tosengeli kotuna na mayanganni na biso ya Eklezia, “Nini boyekolaki etali Mobikisi mpe nsango malamu na Ye poso oyo na ndako na bino?” Bobateli elongobani ya mokolo ya Saba, mpe mateya ya sika, mpe manaka ebongisami ya mayangani nyonso ekosalisa biso mpo na koyekola nsango malamu na ndako mpe eklezia lokola.
Mondimi moko na moko ya ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka azali na mokumba na ye mpo na koyekola mpe kosaleka mateya ya Nkolo mpe kozwa na likoki elongobani makuli ya lobiko ma bonetoli. Tosengeli te kozela Eklezia lokola libongisi mpo na koteya to kolobela biso makambo nyonso tosengeli koyeba mpe kosala mpo na kokoma bayekoli bamipesa mpe kotia molende na mpikokino na nsuka.2 Esika na yango, mokumba na bisomei ezali koyekola oyo tosengeli koyekola, kosalela lokola toyebi tosengeli kosalela, mpe kokoma nani Moteyi elingi biso tokoma. Mpe ndako na biso ezali esika mpo na oyekola, kosala, mpe kokoma ya nsuka.
Lokola mwana, Joseph Smith ayekolaki na ntina ya Nzambe na libota na ye. Makasi na ye mpo na kososola bolingi ya Nzambe mpo na ye esalaki Joseph aluka bosolo o ntei ya mangomba kilikili ya bakliso, komaniola na lokengo makomi, mpe kosambela na bosembo na Nzambe. Ntango elenge Joseph Smith azongaki na ndako na ye uta na Zamba ya bule nokinoki nsima ya bobimi ya Tata mpe Mwana, alobaki liboso na mama na Ye. Ntango ye “ayekamaki na esika ya moto, mama na [ye] atunaki likambo ezalaki nini. [Joseph] ayanolaki, ‘Komitungisa te, nyonso ezali malamu—nazali malamu mpenza.’ [Ye] nsima alobaki na mama na [ye], ‘Nayekoli mpo na ngai moko.’”3 Likambo ya Joseph epesi ndakisa ya nguya ya koyekola oyo moko na moko na biso esengeli komekola. Biso lokola tosengeli koyekola mpo na biso moko.
Ntina ya mozindo ya mwango ya Tata na biso ya Lola ezali mpo na bana na Ye bakoma mingi lokola Ye. Engebene na yango, Ye akopesa biso mabaku esengeli mpo na kokola mpe kokende liboso. Bomipesi na biso mpo na koyekola mpe kosalela engebene na bosolo ezali ya motuya ya kobakisama na mokili na biso moko oyo ezali “ na mbilingambilinga”4 mpe ezali mingi koleka ya kobulingana mpe mabe. Tokoki te kaka kokende na mayangani ya Eklezia mpe kosala elongo na miango mpe na yango kozwa nyonso ya bolendisi mpe bobateli ya molimo oyo ekokokisa biso “kotelema na mokolo ya mabe”5
“Baboti bazali na mokuma ya bule mpo na kobokola bana na bango na bolingo mpe bosembo.”6 Bakambi, bayengeli mpe milulu mifulami ya Eklezia ekosalisa moto mpe libota mpo na kokola na molimo. Mpe atako biso banso tosengeli na lisalisi na kokendaka liboso na nzela ya boyokani, mokumba ya nsuka mpo na kokolisa bokasi mpe nguya ya molimo efandi likola ya moko na moko na biso.
Bomikundola boni Nefi, mwana ya profeta Leyi, azalaki na mposa ya komona, koyoka, mpe koyeba mpo na ye moko na nguya ya Molimo Mosantu makambo tata na ye ayekolaka na limoni ya nzete ya bomoi. Nefi na polele asengelaki mpe apambolamaki na bolenge na ye na ndakisa mpe mateya ya ye “baboti balamu.”7 Kasi, kaka lokola Joseph Smith, ye azalaki na mposa ya koyekola mpe koyeba mpo na ye moko.
Soki bino to ngai toyebi oyo etali Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezongisama ezali oyo bato basusu bateyi mpe balobeli biso, nde moboko ya litatoli na biso ya Ye mpe ya mosala ya mikolo ya nsuka ya nkembo na Ye etongami likolo ya zelo.8 Tokoki te koyekama bobele na pole mpe boyebi ya nsango malamu ya bato basusu—ata kutu baye tolingaka mpe totielaka elikia.
Ya solo, Propheta Joseph Smith ateyaki ete Mosantu ya Mikolo mya Nsuka moko na moko asengeli kososola mpo na ye moko “miango mpe ntina ya Nzambe na koyaka na Mokili.”9
“Ekoki biso kotanga mpe kososola nyonso oyo ekomama uta mikola ya Adama. etali mokangano ya moto mpe Nzambe mpe banzelu na ezaleli ekoya, tokoyeba moke mpenza etali yango. Kotangama likambo ya basusu, to libimisi lipesamaki na bango, ekoki ata moke te kopesa biso bomoni mobimba ya ezaleli mpe mokangano na biso ya solo na Nzambe. Boyebi ya makombo wana ekoki kaka kozwama na koyekola na nzela ya makuli ma Nzambe etiama mpo na ntina wana.”10
Kokokisa ntina ya mwango oyo ya monene mpo na bato mpe mabota ezali moko ya ntina ya mozindo miango mpe milulu ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali kokoma mingi koleka ya ndako na katikati mpe ya lisungi ya Eklezia na eleko oyo mpenza ya eleko ya litondi ya ntango.
Mbano ya Boyekoli Etie Ndako na Katikati mpe Esungami na Eklezia
Tika topesa na bokuse mwa mbano ya ntina ya koyekola nsango malamu kokomaka ya kobakisama ya ndako na katikati mpe esungami na Eklezia.
Nganda ya koyekola ya bamisionele ya nsuka ezali ndako; ya nganda ya mibele ya koyekola ya bamisionele ezali na Provo, Manila, Mexico City, mpe bisika bisusu. Kelasi ya Eteyelo ya Eyenga na biso ya koyekolela esengeli kozala koyekola na moto mpe libota na bisika na biso ya kofanda; Kelasi ya Eteyelo ya Eyenga ya lisungi kasi ya mibale ekosalema na ndakonzambe na biso.
Nganda ya mambi ya Libota sikoyo ezali na ndako na biso. Lisungi mosusu mpo na mosala ya boluki ya mambi ya libota na biso ezwami lisusu na ndakonzambe na biso.
Kelasi ya komilengela mpo na tempelo ya motuya mpenza esalemaka na ndako na biso; kelasi ya komilengela mpo na tempelo ya motuya mpenza kasi ya mibale ekoki lisusu kokambama mbala na mbala na ndakonzambe na biso.
Kokomisaka ndako na biso esambelo wapi tokoki “kotelema na bisika bisantu”11 ezali ntina mpenza na mikolo miye mya nsuka. Mpe lokola boyekoli etie ndako na katikati mpe esubngami na Eklezia ezali mpo na bokasi mpe bobateli na biso ya molimo lelo, ekozala kutu na ntina mingi koleka lobi.
Boyekoli Etie Ndako na Katikati mpe Esungami na Eklezia mpe Bolengeli mpo na Tempelo
Nasengi bomaniola boniboni libongi ya “ndako na katikati mpe esungami na Eklezia” etali bolengeli mpo na tempelo mpe bolongobani na biso moko mpo na kozwa makuli mpe mayokani ya bule na ndako ya Nkolo.
Ya solo, bomilengeli mpo na tempelo ezali makasi mingi na ndako na biso. Kasi bandimi mingi ya Eklezia bayebi solo te etali nini elongobani ekoki to te kolobama etali likambo ya tempelo libanda ya tempelo.
Mokambi Ezra Taft Benson alimbolaki ntina nini boyebi te solo oyo ezal:
“Tempelo ezali esika ya bule, mpe makuli na tempelo ezali na lolenge ya bule. Na ntina ya bule na yango tozali ntango mosusu kolinga te kolobela tempelo na bana mpe bankoko na biso.
“Lokola mbano, mingi bakolisaka mposa ya solo te ya kokende na tempelo, to ntango bakei kuna, basalaka yango na kozanga mpenza ntina mpo na kolengela bango mpo na lotomo mpe mayokani bakotaka na kati na yango.
“Nandimi bososoli ya solo to lisolo ekosalisa mpenza kolengela bilenge na biso mpo na tempelo … [mpe] ekokolisa na kati na bango mposa ya koluka mapamboli na bango ya bonganganzambe kaka lokola Abalayama alukaki ya ye.”12
Toli mibale ya ntina ekoki kosalisa baso kokoma na bososoli elongobani ebetamaki nsete na Mokambi Benson.
Toli #1. Mpamba te tolingi Nkolo, tosengeli ntango nyonso kolobela ndako na YE ya bule na limemia. Tosengeli te kobimisa to kolimbola bilembo ekangami na mayokani tozwaka na milulu ya tempelo. Tosengeli mpe te kosolola nsango oyo tolakaki mpenza na tempelo tokobimisa te.
Toli #2. Tempelo ezali ndako ya Nkolo. Nyonso na tempelo elakisi biso Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Tokoki kosolola bantina ya mozindo ya mpe malongi mpe mabongi ekangami na makuli mpe mayokani ya tempelo.
Mokambi Howard W. Hunter apesaki toli “Tika tokabola na bana na biso mayoki ya molimo tozali na yango na tempelo. Mpe toteya bango na lokengo mpe na esengo makambo tokoki koloba na kolongobana etali ntina ya ndako ya Nkolo.”13
O ntaka ya bankola uta Profeta Joseph Smith tii na Mokambi Russell M. Nelson, ntina ya malongi mpe mayokani ya tempelo eteyami na molai na bayangeli ya Eklezia.14 Liziba moko ya bomengo monene ezali na mikanda, ya audio, ya video, mpe ndenge misusu mpo na kosalisa biso koyekola oyo etali makuli ya ebandeli, dotasio, mabala, mpe mayokani misusu ya kokangisa.15 Nsango ekoki kozwama lisusu etali kolanda Mobikisi na kozwaka mpe kokumisaka mayokani mpo na kobatela mobeko ya botosi, mobeko ya libonza, mobeko ya nsango malamu, mobeko ya bopeto, mpe mobeko ya bobulisi.16 Bandimi nyonso ya Eklezia basengeli komesana na biloko ya malamu eluti ekoki kozwama na temples.ChurchofJesusChrist.org.
Mokambi Russell M. Nelson abetaki nsete na bokokani katikati ya lolenge ya bule ya milulu ya batempelo mpe nsango ya motuya etali tempelo ekomami na Eklezia oyo ezali bopanzi nsango ya solo, elongobani, mpe ekoki kozwama. Alimbolaki: “Natindi ete bandimi … batanga makambo na Bible Dictionary oyo etali tempelo, lokola ‘Mopakolami,’ ‘Boyokani,’ ‘Mabonza,’ mpe ‘Tempelo.’ Moto akoki lisusu kolinga kotanga Esode, mokapo 26–29, mpe Lewitika, mokapo 8. Boyokani ya Kala, lokola mpe babuku ya Moses and Abraham na Pearl of Great Price, elimboli kala ya tempelo mpe lolenge ya kowumela ya makuli na yango.”17
Boye, bobanza ete mwana na bino ya mobali to mwasi atuni, “Moto moko na kelasi elobelaki ngai ete bilamba ya kokamwa elatamaka na tempelo. Ezali ya solo” Mwa video ekoki kozwama na churchofjesuschrist.org/temples na mama na likambo “Sacred Temple Clothing.” Biloko oyo ya malamu eluti elimboli lolenge nini uta ntango ya kala bato mpe basi bayambaki miziki ya bule, ndenge kilikili ya losambo, bilamba ya bilemgo ya bozambe, bipale, mpe milulu mpo na kolakisa mayoki ya bango ya kati ya kobondela Nzambe. Bongo, bolengeli ya lisungi ya Eklezia ya ndako na katikati mpo na mapamboli ya nkembo na nzela ya mateya ya ntina mpe biloko ya kitoko lokola video oyo. Nsango mingi ya kosunga ekoki kozwama na bino.18
Ntango tobundi na kotambola na bosokemi ya Molimo ya Nkolo,19 tokopambolama mpo na kososola mpe kokoka na ndako na biso bokokani katikati ya niini ezali mpe elongobani na kosolola etali makuli mpe mayokani ya tempelo ya bule.
Elaka mpe Litatoli
Namoni lokola boko na bino bakoki komituna soki boyekoli na bino ya nsango malamu ekoki solo kokoma ya kotia ndako na katikati mpe ya kosungama na Eklezia. Ntango mosusu bozali kaka bandimi ya Eklezia na ndako na bino, to bozali na molingani mosungi, to bozali Basantu ya Mikolo mya Nsuka moboti moko, to bozali bino moko kaka to boboma libala, mpe bokoki kozala na mituna etali boni mabongi oyo ekokokisama na bino. Bokoki kozala mobali mpe mwasi kotalanaka mpe kotunaka, “Ekoki biso kosala yango?”
Iyo, bokoki kosala yango! Nalaki ete I promise ete mapamboli ya kokokisa ekosopana na kati mpe ekomonana na miso na bomoi na bino. Bikuke ekofungwana. Mwinda ekopela. Bokoki na bino ekobakisama mpo na koyika mpika na lokengo mpe bompikilili.
Natatolli na esengo ete mapamboli ya mbano ekoya ntango tobundi kokokisa mokumba na biso moko mpo na koyekola mpe kolinga nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisami. Ya solo tokoki “kozala ya kolengelama mpo na kozwa eloko nyonso tosengeli na yango.”20 Nalaki mpe natatoli boye na nkombo bule ya Yesu Klisto, amene.