2010–2019
Buku na Bino ya Lisano ya Bonganganzambe
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Buku na Bino ya Lisano ya Bonganganzambe

Bokela buku na bino moko ya lisano ya boniboni bokomilakisa lokola bayekoli ya Klisto.

Na sanza ya zomi na mibale eleki, Bokambi ya Yambo esakolaki ete bana mibali ya mibu 11 “bakobanda kozala na … masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona … na ebandeli ya sanza ya yambo na mobu bakokokisa mibu 12.”1

Lokola mbano, na eteni ya yambo ya mobu oyo, ezalaki na mwa moke ya mibu 11 basutukaki oyo balingaki kotikala na Eteyelo ya Bana kino bokundoli ya mobu na bango ekolanda kasi bazalaki sikoyo kolekisa elambo Mokolo ya Eyenga lokola badiakona bakulaki sika mpenza.

Natuni nani asutukaki mingi koleka na mbongwana wana—badiakona ya sika to baboti. Mingi na baoyo 80,000 badiakona ya sika bazali elongo na biso mpokwa ya lelo na ndako ya Likita Linene to bazali kosalela lipamboli ya masini. Boyei malamu na bondeko oyo ya mibali ya bonganganzambe!

Mbongwana oyo esali liyangani oyo moko oyo ekokende nsango—ezali ntango mosusu lingomba ya Bamemi Bonganganzambe ya Alona naino te bakende na liyangani ya bonganganzambe mobimba ya llikita linene. Kotalaka na libaku oyo ya kafukafu, nakopesa makebisi na ngai mingimingi na bilenge mibali ya Bonganganzambe ya Alona.

Mateya nayekolaki na Masano

Lokola bayekoli, mingi na bino bazali kokolisa ba batalanta na bino, na mbano, misala ya milulu ya libanda na koyekola na eteyelo to na mateya na bino moko, na masanga, mpe mangoma ya libanda ya eteyelo, lokola masano.

Kosepelaka masano na bomoi na ngai mobimba, nalulaka ntango nyonso baye bakolisaka makoki na bango ya ngalasisi ti na kosana na ndelo ya likolo. Mpo na moto azala solo malamu na likambo nyonso, ezali mabe te kozala na batalanta ya kobotama, kasi ekosengaka mingi koleka, komipesa mpe kolekisa ntango mingi na komekola mpe kosalela. Bato ya ngalasisi ya boye mbala mingi bayokaka bopameli ntango mosusu ya makasi ya bakambi mpe na bolingi batiaka mpembeni oyo balingi sikoyo mpo likambo moko ya monene mingi lobi.

Toyebi bandimi ya Eklezia mpe basimbi bonganganzambe oyo bazwi elonga na ndelo ya likola na ngalasisi ya kosala lokola mosala. Ezali na ndakisa malamu mingi, kasi nakoki kotanga kaka moke awa mpo na ntina ya ngonga. Bokoki koyeba lisusu boko ya bato ya ngalasisi: na baseball, Jeremy Guthrie mpe Bryce Harper; na basketball, Jabari Parker mpe Jimmer Fredette; na Hill, Daniel Sorensen, mpe Eric Weddle; na rugby, William Hopoate; mpe football, Taysom Hill mpe Daniel Sorensen. Moko na moko asali mosala na lisano na ye.

Atako balongi mpenza na masano na bango, bandeko oyo basengeli yambo kondima bazali bato ya ngalasisi babonga mpenza te mpe bato babonga mpenza te. Basalaka makasi mpo na kozala malamu mingi koleka na masano na bango—mpe basalelaka nsango malamu. Batelemaka soki basali libunga, mpe babundaka mpo na koyika mpiko kino na nsuka.

Boyekola Buku ya Lisano

Na masanga ya masano, kobeta ebongisamaka mpo na boko makambo ya lisano mpe ekomamaka na buku ya lisano. Bato ya ngalasisi bayekolaka lotomo na bango songolo mpo na lisano nyonso. Babeti ya elongo bayekolaka buku ya lisano mobimba mpenza ete, ntango lisano ebengami, bayebi malamu mpenza, lokola na motema, wapi kokenda mpe nini kosala.

Elilingi
Yekolisa na buku ya lisano

Foto na Dave Kaup/REUTERS/stock.adobe.com

Elilingi
Buku ya lisano

Na lolenge moko, biso basimbi bonganganzambe tozali na ekipi (lisanga likoki) mpe buku ya lisano (makomi masantu mpe maloba ya baprofeta ya sika).

Olendisaka baninga na yo ya ekipi?

Na malamu kasi boyekolaka buku na bino ya lisano?

Boyebi mpenza lotomo na bino?

Elilingi
Lisanga likoki ya bonganganzambe

Kotelemelaka Bonguna

Mpo na komema ndakisa kutu mosika, batei minene bayebaka babokasi mpe botau ya ekipi na bango to ya baninga mosusu. Bakelaki mwango ya lisano oyo ekopesa bango libaku malamu mingi koleka mpo na elonga. Boniboni mpo na bino?

Bayebi masenginia bokoki kokweya na yango mingi koleka, mpe bakoki koyeba liboso monguna akomeka kosopa mpe kolembisa bino. Bosali mwango na bino moko ya lisano mpe buku ya lisano mpo ete bokoyeba koyanola ntango bokutani na bokeseni?

Ntango bokutani na masenginia ya kilikil ezala elongo na basusu to ntango bozali bino moko kotala televizio boyebi mwango ya lisano na bino. Soki moninga apesi yo likanisi ya kopela molangwa to lopipi, oyebi lisano. Osalaki mpe oyebi boniboni kokoma liboso.

Na mwango ya lisano, buku ya lisano, mpe bomipesi moko ya sikisiki mpo na kosala mosala na yo, okomona ete lisenginia ezali moke na likoki likolo na yo. Osilaki kozwa mokano ya boniboni okoyanola mpe nini okosala. Okozala na ntina te ya kozwa mokano mbala nyonso okokutana na lisenginia.

Moko ya Bazomi na Mibale kala te bakabolaki lisolo moko oyo elimboli libongi oyo. Lokola nganganzambe na kelasi ya sekondere, azalaki kotambola elongo na baninga na ye.. Nsima ya kozwa mwa eloko ya kolia, bazalaki kotambola na motuka nzinganzinga ntango moto moko apesaki likanisi ete basengelaki kokende na filime moko boye. Kpokoso ezalak ayebaki ezalaki filime asengelaki te komona. Atako ayokaki nokinoki bofini mpe kobangabanga etali likambo yango, asalaki mwango mpo na yango. Yango ezalaki lokasa mpenza ya buku na ye ya lisano.

Kobendaka mpema ya mozindo mpe kozwaka mpiko na ye, asakolaki, “namoni litomba moko te na filimi wana. Tika ngai na ndako na ngai,” oyo basalaki. Lisano ya pete ememi elonga! Mibu nsima, moko ya baninga elongo na ye butu wana alimbolaki boniboni ndakisa oyo ekomaki bokasi monene mpo na ye mpo na kotelema na mpiko makambo ya bomoi na ye moko.

Nkasa ya Buku ya lisano

Nasengaki boko ya baninga na ngai mpo na koloba masano bosengeli kokotisa na buku ya lisano na bino. Oyo ezali mwa makanisi efulama:

  • Kosambela mokolo na mokolo mpo na pole monene mingi mpe litatoli ya Yesu Klisto.

  • Koyokamela na bokebi mateya ya baboti na bino mpe ya episikopo na bino mpe ya Bilenge mibali na Bino mpe bayangeli ya lisanga likoki.

  • Koboya pornografi mpe makambo ya media ya bato ya mbindo.

  • Bomikundola bilaka bosalaki na Nzambe mpe bosala mpo na kobatela yango.

  • Boyekola masolo ya makomi ya baprofeta minene mpe komekola mabongi na bango.

  • Kopambola bana ya Tata ta Lola na nzela ya mosala.

  • Boluka baninga malamu mpo na kosalisa bino bokoma bato bolingi kokoma.

  • Koma nganga mayele na FamilySearch app mpe kolukaluka mambi ya libota na bino moko.

  • Mwango etii ebombelo wapi bokoki kokimela nguya ya mabe.

  • Bolinga mpe bosalisa kolendisa bandimi ya lisanga likoki na bino.

Nasololaki lisusu elongo na basani oyo bandakisa na bango tosengeli kolanda. Namonaki yango ntina koleka ete bamimonaka bango moko na oyo bango basalaka lokola basani ya mosala te kasi na oyo bango bazali, lokola bana ya Tata ya Lola ya bolingo mpe basimbi ya bonganganzambe ya Nzambe.

Sikawa tika toyoka makanisi na bango:

  • Jimmer Fredette, awa lokola diakona, koyekolaka lolenge nini kokanga kalavati na ye, alobi: “nayekolaki koyekama na boyebi na ngai mpe bondimi ya bosolo ya nsango malamu. Yango ekambi ngai mpo na kozala … mosimbi bonganganzambe alongobana mpe likolo ya nyonso—ndakisa malamu.”

    Elilingi
    Jimmer Fredette lokola diakona
  • Bryce Harper, awa lokola, mobali akomaki: “nakanisaki nkembo, bozwi, mpe MVP ekokaki kopesa ngai kimia. Eloko moko ezangaki ngai. Na yango, na ... namilengelaki mpe [nakotaki] tampalo. Sikawa nazali na nzela ya [kozonga] epai ya Tata na ngai na Lola mpe nazwa libota ya seko—oyo ezali esengo monene na mokili!”

    Elilingi
    Bryce Harper na mwasi na ye
  • Daniel Sorensen, awa lokola misionele, alobi: “buku ya lisano malamu ezali moango oyo esalelaka batalanta mpe babokasi ya mondimi moko na moko ya ekipi. ... Ntango nayekoli mpe natie na misala mateya ya nsango malamu ya Yesu Klisto, nakoki koyeba lolenge nini kosalela babokasi na ngai mpo na kosalisa na bonganganzambe.”

    Elilingi
    Daniel Sorensen lokola misionele
  • Jeremy Guthrie, awa lokola kosalisaka lokola mokambi ya misio, akabolaki: “lokola diakona ya mibu 12 … [Nayokaki] Molimo kotatola epai na ngai [ete] ‘bomoi oyoezali ntango … kolengela mpo na kokutana na Nzambe.’2 Moango ya lisano ezali bondimi na Nzambe na mosala [mpe] boyamboli na nzela ya Mobikisi. … Buku ya lisano ezwami na kati ya makomi masantu mpe na nzela baprofeta ya bomoi.”

    Elilingi
    Jeremy Guthrie lokola mokambi ya misio
  • Jabari Parker, awa abatisamaki kala te, alobaki: “nakokaki te kokanisa moto oyo nalingaki kokoma soki nazwaka te mokano ya kozwa libatisi. … Nazali na esengo ete nazali na Nzambe na bomoi na ngai mpo na kokamba ngai mikolo nyonso.”

    Elilingi
    Jabari Parker na bokulisi ya bonganganzambe
  • Ricardo Rojas, azali sikawa kosungaka lokola mokambi ya etape, alobaki: “Na nzela ya bonganganzambe ya [Nzambe] [biso] tokoki kosunga mosala na Ye. Tobiangemi kozala ‘makasi mpe bokqsi malamu’3 na kolobelaka bosolo.” Oyo esungaki ye kolonga nyonso mibale mosala mpe mosiùbi bonganganzambe.

    Elilingi
    Ricardo Rojas lokola mokambi ya etape
  • Taysom Hill, awa lokola misionele, ayoki nsango malamu ya Yesu Klisto esungaki ye lokola buku ya lisano mpo na ye na bomoi oyo. Akabolaki, “Kondimelaka moango ya [Nzambe] mpe kosalaka makoki na ngai mpo na kokokisa mosala na ngai kati na yango epesi ngai ntina monene ya kimia mpe esengo na bomoi, koyebaka Nzambe asepeli na bokasi na ngai.”

    Elilingi
    Taysom Hill lokola misionele
  • William Hopoate, awa na lipamboli ya mwana na ye ya mobali na bikeke minei, alobi ete nsango malamu esungi ye ayeba “miango ya monguna mpe apesi bokasi ya molimo mpo na kotelemela mabe mpe kosunga basusu.”

    Elilingi
    William Hopoate na lipamboli ya mwana na ye

Boniboni mpo na bino? Oyebi ntina na yo monene mpe esantu lokola mwana ya Nzambe, momemi ya bonganganzambe na Ye mosantu? Na ezaleli oyo ya seko na makanisi, bokela mwango ya lisano mpe buku ya lisano oyo ekokamba bino na ngonga ya lisenginia mpe mokakatano. Bomaniola bwania ya kobundisa mpe ya komibatela.

Bwania ya kobundisa bosalisa kolendisa matatoli mpe kobakisa mokano ya kotikala na nzela alima mpe ya moke. Ndakisa ezali lokola losambo ya mbala na mbala, boyekoli ya makomi, kokende eklezia mpe tempelo, kofuta moko na zomi, mpe kolanda mbala na mbala toli ezwami na Jeunes Soyez Fort mokanda.

Bwania ya komibatela ezali lokola kosala mwango liboso boniboni bokotelemela lisenginia. Ntango bosenginiami mpo na kokitisa ndelo na bino, bayebi liboso nini bokosala.

Bosengeli na buku ya lisano mpo yango.

Boyoki te lokola bozali kosambela lelo? Ezali ngonga ya kosakana lisano bosilaki kobongisa kosakana.

Boyoki litatoli na bino ekiti? Bozali na lisano mpo na yango. Boyebi nini kosala.

Minzto nyonso na miso ya Nzambe.

Bozali bamemi ya bonganganzambe esantu ya Nzambe. Bomipesi na bino mpo na kosimba na molende lingenda ya ebende ekobongola bino na bato ya seko oyo bokelamelaki mpo na kokoma.

Nzambe ayebi mpe alingi yo. Akopambola bino mpe akokamba bitambe na bino.

Bokoki kokanisa ete bozali te bato ya kafukafu, ete bozali te na nzoto ya bilombe na nyonso. Kasi yango ezali ya solo te. Boyebi te ete Nzambe asakolaki, “Biloko ya botau ya mokili ekoya liboso mpe kobuka bato ya nguya mpe makasi”?4

Boye bozali komiyoka batau? bozanga ntina? Lokumu na bino, bowuti kaka kosala molongo!

Boyoki bozangi ntina? na nse? Bokoki kaka kozala oyo Nzambe asengeli.

Elilingi
Dawidi mpe Goliata

Ndakisa nini ya monene ezali koleka ya Dawidi kokotaka na esika ya kobundisa monguna ya kobangisa, Goliati. Koyekamaka na Nkolo, na mwango ya lisano mpe buku ya lisano, Dawidi abikisaki kaka te ye moko kasi limpinga ya Yisalaele!5 Koyeba ete Nkolo akozala elongo na bino soki boboti mpiko mpo na kozala na ngambo na Ye. “Soki Nzambe azali elongo na biso, nani akobundisa biso?”6

Ye akoki kofungola bikuke mpe kosalisa biso kozwa mpiko mpe makoki toyeba mokolo moko te tozalaka na yango.7

Boyokemela bakambi ya bino, lokola baboti na bino, episikopo, mpe bayangeli ya Bilenge Mibali. Boyekola buku ya lisano. Tanga makomi. Botangaka maloba ya baprofeta ya sika. Bokela mwango ya lisano ya binomei ya boniboni bokomilakisa lokola bayekoli ya Klisto.

Boyeba liboso masano bokosalela mpo na kolendisa molimo na bino mpe kokima mitambo ya monguna.

Bosala yango mpe Nzambe solo akosalela bino.

Sikawa, ezali na boko oyo bamilongoli na nsango malamu mpe bawayiwayi mosika. Basusu bakoki kofanda na baetando mpe bazali kotala lisano na mosika. Boko bakoki kopona kotikala na kiti, atako mokambi ameki kotinda bango na kati.. Nabengisi bino bobikisa, bosunga, mpe bolinga bango ntango bandimi ya ekipi!

Basusu balingi kokota na lisano—mpe kosala. Oyo eleki mingi mpenza ezali te boniboni bazali na makabo kasi boniboni bazali na bolingi mpo na komitia na lisano. Bazali kozela te babenga nimelo na bango, mpamb ate bayebi makomi oyo elobi, “Soki bozali na mposa ya kosalela Nzambe bobiangemi na mosala.”8

Bokoki komitia na molongo.

Bokosala yango na koyekolaka mpe kosalelaka buku na bino ya lisano.

Na nzela bokobeta pene libaku mpe bakokweya—ntango mosusu mbala mingi, mpenza. Bobonga mpenza te; kokweya ezali eteni ya nzela oyo ekopesa bino nzela mpo na kokebisa ezaleli na bino mpe kosala na lolenge ya mawa mingi. Mpe Nkolo mpe Bomikabi na Ye ezanga nsuka apesi nzela mpo na kolonga mabunga na biso na nzela ya boyamboli ya solo.

Bato ya ngalasisi ya monene balekisaka ngonga nkama kobongisa lolenge moko ya moke ya lisano. Lokola basimbi bonganganzambe, bosengeli na mayele wana kaka. Soki bokwei, boyambola mpe boyekola uta na yango. Bosalela solo bokosala malamu mbala ekoya. Na nsuka etali bino. Bokoyekola buku ya lisano?

Natindiki bino: Bondimela Nkolo. Bolata bibundeli nyonso ya Nzambe,9 mpe bokota na lisano.

Ezali na mingi oyo bakobeta masano lokola mosala na ndelo ya likolo, kasi ntango ekomi mpo na kimoyekoli, ezali na ebele baponi kolanda Klisto.

Na yango, yango ezali etinda na bino na bomoi oyo—koyekola banzela ya Nkolo, kokota na nzela ya kimoyekoli, mpe koluka kozala na bomoi engebene na moango ya Nzambe. Nzambe akosunga mpe akopambola bino soki bozongi epai na Ye. Bokoki kosala yango mpo bozali bino nyonso minzoto na misu na Ye.

Nasambeli ete bosala elaka ya komipesa mpo na kolongobana ya bonganganzambe esantu oyo ememaka mpe ebundaka mpo na kosala mosala ya bule mokolo na mokolo. Napamboli bino na bokoki mpe mposa ya kosala yango. Nabakisi litatoli na ngai ya nguya ya bonganganzambe oyo bomemi, ya baprofeta ya bomoi, mpe ya Yesu Klisto mpe mosala na ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso, na nkombo ya Yessu Klisto, amene. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene

Bimisa na lokasa