2010–2019
Bolingo Monene mpo na Bana ya Tata na Biso
Likita Linene Sanza ya Minei 2019


Bolingo Monene mpo na Bana ya Tata na Biso

Bolingo ezali ezalela ya yambo mpe etindiki mpo na bantina ya molimo topesami mokumba ya kotambuisa na profeta na biso ya bolingo.

Bandeko balingami na ngai ya mibali mpe ya basi, oyo ezali ngonga ya ndenge na yango moko mpe ya moboko na lisituale. Biso topambolami na kozala na eleko ya suka liboso ya Bozongi ya Mibale ya Mobikisi. Pembeni ya ebandeli ya eleko oyo, na 1829, mobu yambo Eklezia ebongisama mpenza, emoniseli moko ya bolingo eyambamaki, kolobaka ete “mosala kitoko moko” ezalaki “koya liboso.” Emoniseli wana etiamaki ete baoyo nionso bazali na mposa ya kosalela Nzambe babongisami mpo na lolenge ya mosala yango na nzela ya “bondimi, elikia, bolingani mpe bolingo, elongo na botali liso moko na nkembo na Nzambe.”1 Bolingani, oyo ezali “bolingo ya petua ya Klisto,”2 sangisa bolingo ya seko ya Nzambe mpo na bana na Ye nionso.3

Ntina na ngai na ntongo ya lelo ezali kobeta nsete na mosala ya ntina ya lolenge ya bolingo yango na mosala ya misionele, tempelo mpe mosala ya mambi ya kala ya libota, mpe botosi ya boyambi- ya nsango malamu-na mabota kati na ndako mpe esungami na Eklezia. Bolingo ya Mobiki mpe bolingo na bandeko na biso mibali mpe basi4 ezali ezalela ya yambo mpe etindiki mpo na kosalisa mpe bantina ya molimo5 topesami mokumba ya kotambuisa na profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, na mbonguana esakolamaki na 2018.

Bokasi ya Misionele mpo na Kosangisa Yisalalele epanzani

Nazalaki liboso ya kiboninga katikati ya mosala mpe bolingo ya misionele nokinoki na bomoi na ngai. Ntango nazalaki na mibu 11, nazuaki lipamboli ya tata bamoko oyo azalaki koko na ngai ya mobali.6 Lipamboli wana elobaki ndambo na kati na yango, “napamboli yo na bolingo monene mpo na bandeko na yo, mpo okobiangema mpo na komema nsango malamu na mokili … komema milimo epai ya Klisto.”7

Nasosolaki kutu ete na mibu moke ete kokabolaka nsango malamu evandakina bolingo monene mpo na biso Bana nionso ya Tata Nzambe.

Lokola Bakambi Banene bapesaki mosala ya kosala na Prechez Mon Evangile mibu 15 eleki, biso tosukisaki ete ezalela ya bolingo ezalaki na motuya na mosala ya misionele na mikolo na biso oyo, kaka lokola yango ezala ntango nionso. Mokapo ya 6, etali bizalela ya lokola ya Klisto, kosangisaka bolingi mpe bolingo, ezalaka na kotondaka mpenza mokapo ya koyebana mingi katikati na bamisionele.

Lokola batindami ya Mobikisi, mingi ya bamisionele bayoki lolenge ya bolingo oyo, mpe ntango bango basali yango, babokasi na bango epambolamaka. Ntango bandimi bazuaka limoni moko ya lolenge ya bolingo oyo, oyo ya motuya ezali na kosungaka Nkolo na Ntina na Ye, mosala ya Nkolo ekokokisama.

Elilingi
R. Wayne Shute

Nazuaki libaku ya kozua mosala moko na ndakisa kitoko ya lolenge ya bolingo oyo. Ntango nazalaki kosala kosunga lokola Mokambi ya Etuka ya Pacific Islands, nazuaka mbela moko kowuta na Mokambi R. Wayne Shute. Lokola elenge mobali, asalaki misio na Samoa. Sima, ye azongaki na Samoa lokola mokambi ya missio.8 Ntango abengaki ngai na telefone, azalaki mokambi ya tempelo ya Apia Samoa. Moko ya bilenge bamisionele na ye, ntango azalaki mokambi ya misio, ezalaki Mpaka O. Vince Haleck, oyo azali sikawa Mokambi ya Etuka na Pacific. Mokambi Shute azalaki na bolingo monene mpe botosi na Vince mpe libota mobimba ya ba Haleck. Mingi ya mabota bazalaki bandimi ya Eklezia, kasi tata ya Vince, Otto Haleck, tata ya libota (ya mokitani ya baAllemand mpe Basamoa), azalaki mondimi te. Mokambi Shute ayebaki ete nazalaki kosangana na likita ya likonzi to na mayangani mosusu na America ya Samoa, mpe atunaki ngai soki nakokaki kokanisa kovanda na ndako ya Otto Haleck na ntina ya kokabola nsango malamu elongo na ye.

Elilingi
Mpaka O. Vincent Haleck lokola elenge misionele

Mwasi na ngai, Mary, mpe ngai tovandaki na Otto mpe mwasi na ye, Dorothy, na ndako na bango ya kitoko. Na ntango ya kolia na ntongo i nakabolaki etinda moko ya nsango malamu mpe nabengisaki Otto kokutana na ba misionele. Azalaki moto boboto , kasi sikisiki, na koboyaka libengi na ngai. Ye alobaki azalaki ba bosepeli ete ebele ya libota na ye bazalaki Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Kasi na makasi mingi alakisaki ete bakoko ya mama na ye baSamoan bazalaka na bomuana basalisaki mosala na Klisto na Samoa, mpe ayokaki botosi monene na bondimi na bango na Klisto uta bokoko.9 Ata bongo, totikalaki lokola baninga malamu.

Nsima, ntango Mokambi Gordon B. Hinckley azalki komibongisa pona kobonzela Tempelo ya Suva Fiji, azalaki na seketele na ye moko, Ndeko mobali Don H. Staheli,10 abengaki na New Zealand mpo na kosala mabongisi. Mokambi Hinckley alingaki kobembuka wuta Fiji kino Amerika Samoa kokutana na Basantu. Ndako ya bopemi moko esalelamaki na botali ya yambo elobamaki. Natunaki soki nakoki kosala mabongisi ya lolenge mosusu. Ndeko mobali Staheli alobaki, “Ozali Mokambi ya Etuka; yango ekosala malamu.”

Nabengaki na sasaipi Mokambi Shute mpe nayebisaki ye ete ntango mosusu tozalaki na libaku ya mibale na lipamboli ya molimo ya moninga na biso Otto Haleck. Na ntango yango misionele ezalaki Mokambi Gordon B. Hinckley. Natunaki ekoki kozala malamu mpo na Halecks komema biso nionso na liboke ya mobembo ya mokambi Hinckley.11 Mokambi mpe Ndeko Mwasi Hinkley, mwana na bango ya mwasi Jane, mpe Mpaka mpe Ndeko Mwasi Jeffrey R. Holland bazalaki mpe na kati ya lisanga ya mobembo. Mokambi Shute, asalaki elongo na libota, esalaki mabongisi nionso.12

Ntango tokomaki wuta Fiji sima ya bobulisi ya tempelo, biso toyambaki na esengo makasi.13 Tosololaki na mpokwa wana na bamokama ya bandimi ya mpe sima tokobaki na lopango monene ya libota. Ntango tosanganaki mpo na bilei ya ntongo na ntongo elandi, Mokambi Hinckley mpe Otto Haleck bakomaki baninga malamu. Yango ezalaki esengo mpo na ngai ete basololaki mingi lisolo kaka moko koleka oyo nasololaki na Otto mobu moko kala te. Ntango Otto atalisaki bosepeli na ye mpo na eklezia na biso kasi alobelaki lisusu bomipesi na ye na eklezia na ye azalaki, Mokambi Hinckley atiaki loboko na ye likolo ya lipeka ya Otto mpe alobaki, “Otto, yango ezali malamu mpenza te; yo osengeli kozala mondimi moko ya Eklezia. Oyo ezali Eklezia ya Nkolo.” Na ndenge ya kolobela okoki komona nguba ya botelemeli kokueya mosika wuta na Otto mpe bofungwami na oyo Mokambi Hinckley alobaki

Yango ezalaki ebandeli ya mateya ya bobakisi ya misionele mpe komikitisa moko ya molimo oyo epesaki nzela Otto Haleck ya kobatisama mpe kokotisama mondimi ya eklezia mwa moke sima ya mobu elandi. Mobu moko sima na yango, libota ya Haleck ekangisamaki lokola libota ya libela na tempelo.14

Elilingi
Libota ya Haleck ekangisama ya tempelo

Oyo esimbaki motema na ngai katikati ya mayele oyo ya kokamwa ezalaki mosala moko ya bolingo ya pasi elakisamaki na Mokalmbi Wayne Shute mpo na misionele na ye ya yambo, Mpaka Vince Haleck, mpe mposa na ye ya komona libota mobimba ya kosanganaka lokola libota moko ya libela.15

Ntango ekokoma mpo na kosangisa Yisalaele, tosengeli kotia na molongo mitema na biso elongo na lolenge ya bolingo oyo mpe tokende mosika wuta mayoki ya mokumba ya pete16 to elindo ya mayoki ya bolingo mpe kokota na kiboninga ya nzambe na bokaboli etinda ya Mobikisi, mosala, mpe misio elongo na mokili.17

Lokola bandimi tokoki kolakisa bolingo na biso mpo na Mobikisi mpe mpo na bandeko na biso ya mibali mpe ya basi katikati na mokili na kosalaka bambela ya pete. Manaka ya sika na bokoti liyangani ya Eyenga elakisi libaku ekokani na mosusu te mpo na bandimi ya kobenga baninga na bolongi mpe bolingo nionso mpe kosangisa kobenga mpe komona mpe koyoka mayele moko ya Eklezia.18 Liyangani ya elambo ya molimo, na elikia ezali ya bule lokola oyo Mpaka Jeffrey R. Holland alimbolaki lobi, ekolandisama na liyangani ya minuti 50 ya kobeta nsete na Boyokani ya Sika mpe Mobikisi to masikulu esengeli ya likita ya kobetaka nsete lisusu na Mobikisi mpe malongi.

Boko bandeko basi ya Lingomba Bamama Basungi bamitungisaki mpo na nini bapesamaki moko mosala ya “kokutanika” elongo na bandimi ya lisanga likoki ya bonganganzambe. Ezali na bantina mpo na yango, mpe Mokambi Nelson apesaki ebele na yango na likita linene oyo eleki. Ye asukisaki, “Tokoki mpenza kosangisa Yisalaele te na kozanga bino.”19 Na kobakisaka mpenza, na mikolo na biso oyo topambolami na bopusani mpe ya 30 ya mokama ya bamisionele na biso ya ntango mobimba bazali bandeko basi. Yango epesi botindiki ya bobakisi mpe litomba na bandeko basi ya Lingomba Bamama Basungi ya kokabolaka nsango malamu na bolingo. Oyo esengami ezali bomipesi moko ya kolingaka, koyokaka mawa, komipesa na moko mpe mosusu na biso—mibali, basi, bilenge, mpe bana—mpo na kokabola nsango malamu ya Yesu Klisto. Soki tolakisi bolingo, motema malamu, mpe komikisa, ebele bakondima mbela na biso. Baoyo baponi kondima mbela na biso bakotisaka kozala kaka baninga na biso.

Tempelo mpe Bokasi ya Mambi ya Libota mpo na Kozangisa Yisalaele

Bolingo ezali lisusu na katikati na tempelo mpe makasi ya mambi ma kala ma libota mpo na kosangisa israel na baoyo bazali na ngambo mosusu ya elamba. Ntango totangi mikakatano mpe oyo bakoko na biso bakutanaki na yango, bolingo mpe bosepeli na biso mpo na bango ekumisami. Bokasi ya Tempelo na biso mpe mambi ma kala ma libota epesamaki makasi na bolimboli ya ya motuya na mabongisi na ntango liyangani ya Eyenga mpe bopusi bakelasi ya bilenge mpe masanga makoki. Bambonguana yango epesi bokebi mpo na yambo mpe nguya makasi ya bokebi mpo koyekola na ntina na oyo etali bakoko na biso mpe bosangisi Yisalalele na basusu na ngambo ya elamba. Nionso mibale tempelo mpe mambi ma kala ma libota ekei liboso makasi.

Internet ezali esaleli moko ya nguya makasi. Bandimi na biso ya bilenge bazali na makoki ekokakani na mosusu te na boluki mambi ya kala ya libota mpe bazalani na boningisi makasi na molimo mpo na kosala mabatisi mpo na bankoko na bango, oyo bango bayekolaki kolinga mpe kosepelisa. Wuta bongwana ekiti ngonga, bamibu 11 kosala mabatisi mpo na bakufi, bakambi ya tempelo nzinganzinga na mokili balobi ematisi makasi bozali. Mokambi moko ya tempelo ayebisaki biso ete “kuna ezali na bomati ya kokamwa misala ya libatisi … mpe obakisa mibu 11 ememi mabota ebele kolekaa. … Atako na ya bango [bilenge] mibu, bango bamonani kopesa ntina ya komikitisa mpe ntina mpo na likulu bango bazali kosala. Ezali kitoko komona!”20

Nayebi ete bakambi ya Eteyelo ya bana mpe ya bilenge bazali mpe bakokoba kosala ma kala ma libota mpe mosala ya tempelo mosala moko ya makasi ya yambo. Lingomba Bamama Basungi mpe bandeko mibali ya bonganganzambe bakoki na bolingo nionso kosunga na botondisi tempelo na bango mpe mosala ya mambi ma kala ma libotam okumba ya moto se yemoko mpe lisusu na kosungaka mpe kofulaka bana mpe bilenge kosangisa Yisalaele na ngambo mosusu ya elamba. Yango ezali motuya na lolenge na yango moko nandako mpe na Sabata. Nalaki ete mosala ya makuli na bolingo mpo na bakoko ekopesa makasi mpe ekobatela bilenge na biso mpe mabota na mikili moko oyo ekomi kotonda na mabe. Natatoli lisusu ngaimoko ete Mokambi Russell M. Nelson azuaki emoniseli monene ya bozindo oyo etali batempelo mpe mosala ya tempelo.

Kobongisa Mabota mpo na libela mpe bato bango moko mpo kozala elongo na Nzambe

Nsete ya sika ebetami po na botangi nsango malamu katikati na-natango mpe kobikaka mpe makoki yo epesami na Eklezia ezali libaku moko monene mpo kobongisaka na bolingo mabota ya libela mpe batobango moko kokutana mpe kozala elongo na Nzambe.21

Ntango mobali mpe mwasi moko bakangani na tempelo, bango bakoti na molongo ya libala ya bule na mayokani ya sika mpe ya libela na libela, molongo ya bonganganzambe.22 Elongo bango bazui mpe bayambi mapamboli ya bonganganzambe mpe nguya ya kotambuisa makambo ya libota na bango. Basi mpe mibali bazali na motindo moko lokola etiami mokoloto na “La Famille: Declaration Au Monde,”23 kasi bobombi na bango ezali ya kokokana na motuya mpe na ntina.24 Bango bazali na nguya ekokani ya koyamba bobimisi mpo na libota na bango. Ntango bazali kosala elongo na bolingo mpe bosembo, mikano na bango ezali mapamboli ya lola.

Bayoko baluki koyeba bolingi ya Nkolo lokola bato se bangomoko mpe mabota na bango esengeli kobunda mpo na bosembo, meekness, bolamu, mpe bolingo. Kiomikitisa mpe bolingo ezali elembo monene ya baye oyo baluki bolingi ya Nkolo, mingimingi mpo na mabota na bango.

Kobongaka nie na bisomoko, ekopesaka bisomoko nzela na mapamboli ya mayokani, mpe kobongisaka biso mpo na kikutana na Nzambe ezalai mikumba ya moto se yemoko. Tosengeli kozala ya kokoka mpe ya komipesa mpenza na kosalaka bandako na biso ebombelo moko wuta na bambonge oyo ezingi biso25 mpe “ndako moko ya bondimi.”26 Baboti bazali na mokumba ya tokeya bana na bango na bolingo. Bandako etondisami na bolingo ezali na esengo moko, mpole moko, mpe kaka lokola lola na mabele.27

Loyembo mama na ngai alingaki mingi koleka ezalaki “Love at Home.”28 Ntango ye ayoki molongo ya yambo, “Ezali na kitoko nzinganzinga na na ndako ,ntango bolingo ezali na ndako,” ye akomaka na bomoni ya kosimbana mpe na mayi na misos. Lokola bana tokebisamaki ete tozali na lolenge ya ndako yango; yango ezalaki moko ya bantina ya likolo koleka.29

Na kobakisaka na kolendisaka mopepe moko ya bolingo na ndako, Mokambi Nelson abetaki nsete na kotata ndelo na bosaleli media oyo ezali kotia mobulu na bantina na biso ya yambo.30 Moko ya mbonguana oyo ekozala na mbano penepene na mabota nionso ezali kotia internet, reseau sociaux, mpe television lokola esaleli na esika ya kobulunganisa makanisi to, kutu mabe moko koleka, to mokonzi moko. Bitumba mpo na milimo ya banso, kasi penzapenza ya bana, ezali mingimingi na ntango. Lokola baboti tosengeli kondimisama ete makambo ya media ezali mpetwa, ya mobu ebongi, mpe elandisami na mopepe ya bolingo mpenza tozali komeka kosala.

Botangi na bandako na biso esengi kozala pole mpe makasi mingi31 kasi lisusu ya molimo, esengo mingi, mpe kotondisama na bolingo.

Nalaki ete soki totie makanisi na biso na bolingo mpo na mobikisi mpe Bomikabi na Ye, tosala Yemoboko ya bokasi na biso ya kosangisa Yisalalele na baoyo na ngambo ya elamba, koteya basusu, mpe komibongisa moto se yomoko mpo na kokutana na Nzambe, botindiki ya monguna ekokita mpe esengo, elengi, mpe kimia ya nsango malamu ekokumisa bandako na biso elongo na bolingo lokola ya Klisto.32 Natatoli na bilaka ya malongi yango mpe napesi bonzeneneke moko ya solo ya Yesu Klisto mpe likabo na ye ya bomikabi na ntina na biso, na Nkombo ya Yesu Klisto, amen.

Makomi

  1. Doctrine et Alliances 4:1,5

  2. Moloni 7:47

  3. Tala “Charity and Love,” Preach My Gospel: A Guide to Missionary Service, rev. ed. (2019), 124.

  4. Tala Dutelenome 6:5; Matai 22:36–40.

  5. Tala “Responsibilities of Elders Quorum and Relief Society Presidencies na Member Missionary and Temple and Family History Work,” mokanda, sanza ya zomi 6, 2018.

  6. Koko na ngai ya mobali apesamaki nzela ya kopesa lipamboli ya batata na bakoko oyo bavandi na makonzi ekeseni. Oyo ya ngai epesamaki na ngai na mibu 11 mpo ete azalaki kobela mpe akanisaki ete akokaki kokufa.

  7. Lipamboli ya batata epesamaki na Quentin L. Cook na mopamboli ya tata Crozier Kimball, sanza ya zomi 13, 1951, Draper, Utah.

  8. Mokambi R. Wayne Shute lisusu asalaki elongo na mwasi na ye Lorna na bamisio misusu ya ndenge ya kokesanakesana na Shanghai, Chine; Armenie; Singapoure; mpe Grèce. nsima ya liwa ya Lorna, ye abalaki Rhea Mae Rosvall, mpe bango basalaki na Misio moko ya Brisbane Australia. Nsambo ya ya bana na ye libua basalaki bamisio ya ntango-mobimba. Katikati ya mibu mibale ya mibu ye azalaki kosala lokola mokambi y amision moko na Samoa, Mpaka John H. Groberg azaalaki kosala lokola mokambi ya misio na Tonga. Boyebi bango mibale bazuaki ezalaki ya kobosana te.

  9. Otto Haleck azalaki motambwisi na Congregation Chretienne ya Eklezia ya Samoa, oyo ezalaki kolongolaka misisa wuta na Lisanga ya Misiole ya Londres. Tata na ye azalaki libula ya Ballmand wuta Dessau, Allemagne.

  10. Mokambi Don H. Staheli azali kosala sikawa lokola mokambi ya tempelo ya Bountiful Utah.

  11. Mokambi Gordon B. mpe ndeko mwasi Marjorie P. Hinckley mpe mwana na bango ya mwasi Jane Hinckley Dudley, Mokambi Jeffrey R. mpe ndeko Mwasi Patricia T. Holland, Mpaka Quentin L. mpe ndeko Mwasi Mary G. Cook, mpe Ndeko mobali Don H. Staheli bango nionso bazalaki.

  12. Mpaka O. Vincent Haleck ayebisi ngai ete tata na ye abengisaki Vince mpe ndeko na ye ya mobali David kozonga wuta na mboka mopaya mpo na kotala ndako mpe kozala kuna mpo na kotala ya Mokambi Hinckley. Mpaka Haleck alobaki ete tata na ye asakolaki, “Oyo bakokaki kozala banzelu, oyebi.” Ye ayebisaki bana na ye soki bango bakoyamba profeta, bango basengelaki kolinga ndako kozala bobongi nie.

  13. Mokambi Hinckley ayambamaki na lisanga monene ya bakambi ya America ya Samoa mpe ebele ya mokama ya baSamoa na libanda ya masano ya ndembo.

  14. Mabota esangana na nzela ya mosala makasi ya misio ezali ezaleli monene ya bango mibale baSamoa mpe bato ya Polynesie.

  15. Mokambi Shute alingamaki mpe asepelamaki ete abiangemaki koloba na mosala ya matanga ya Otto Haleck na 2006.

  16. “Ntango mosusu tokoki kobanda kosalisa na ntina ya mokumba to lolomo, kasi kutu mosala yango ekoki komema biso na eloko moko likolo … mpo na kosalisa na ‘nzela moko ya malamu koleka’ [1 Bakolinti 12:31]” Joy D. Jones, “Mpo na Ye,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 50).

  17. Tala Tad R. Callister, The Infinite Atonement (2000), 5–8.

  18. Bandimi ya eklezia basengeli kobongisa elongo na bamisionele atako ntango nini bango basali mabiangi.

  19. Russell M. Nelson, “Sisters’ Participation in the Gathering of Israel; Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 70.

  20. Lapolo ya Mokambi B. Jackson mpe ndeko Mwasi Rosemary M. Wixom, mokambi mpe mama mokolo ya Tempelo ya Salt Lake, epaio ya Bokambi Monene ya Eteyelo ya Bana, sanza ya Misato 2019. BaWixons bamonaki ete bango “bazalaki kosengaka bilamba ya libatisi XXXS koleka mpo na kokokisa bosenga!”

  21. Tala Russell M. Nelson, “Makebisi ya Bofungoli;” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 6–8.

  22. Tala Doctrine et Alliances 131:1–4.

  23. Tala“The FamilyLibota: A Proclamation to the World,” Liahona, sanza ya mitano 2017, 145.

  24. “Tata nionso azali mopamboli ya botata mpo na libota na ye mpe mama nionso mopamboli ya bomama lokola bakokani na misala na bango ekeseni ya kimoboti” (James E. Faust, “The Prophetic Voice,” Ensign, May 1996, 6).

  25. Tala Doctrine et Alliances 45:26–27; 88:91.

  26. Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 113.

  27. Tala “Home Can Be a Heaven on Earth,” Hymns, no. 298.

  28. “Dans Nos Foyers Tout Est Beau,” Cantiques, no. 186)

  29. Soki lolenge ya bolingo oyo esengeli ekokisama, litambwisi na Doctrine et Alliance 121:41–42 should be the goal:

    “Nguya to bokasi te ekoki to esengeli kotiama na nzela ya bonganganzambe, bobele na kondimisa, na motema molai, na boboto mpe bosekomi, mpe na bolingo ya lokuta te;

    “Na boboto, mpe boyebi ya peto, oyo ekokomisa monene mingi molimo na bokibisi te, mpe mayele mabe te.”

    Kosambisa eleka ndelo ya bana na Nzambe esengeli eboyama. Kolonga mabunga mpe kozanga buania esengi boyekoli, kotongatonga te. Lisumu esengi etumbu (tala Doctrine et allainces 1:25–27).

  30. TalaRussell M. Nelson, “Sisters’ Participation in the Gathering of Israel,” 69; tala lisusu Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (losambo ya bilenge na mokili mobimba, sanza ya motoba 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  31. Na lolenge moko, ndako ezali lokola eteyelo ya kisuku-moko mpo na bana ya mibu nyonso. Ntango toteyi ya-mibu-11, tokoki kobosana te ya-mibu-3.

  32. Tala Yoane 17:3; 2 Nefi 31:20; Moloni 7:47

Bimisa na lokasa