Bolamu ya Sasepi ya Nzambe
Atako ntango tozali kozela na motema molayi epai ya Nkolo, ezali na mapamboli ya solo oyo eyelaka biso na lombango.
Mibu ebele eleki, mwana na biso ya mobali ya mibu mitano ayako epai na ngai mpe alobaki, “Tata, namoni likambo moko. Nasosoli eloko moko ete kala te mpo na yo ezali ntango molayi mingi mpo na ngai.”
Ntango Nkolo to basali na Ye balobi makambo lokola, “Mikolo ebele etikali te” to “Ngonga ezali mosika mingi te,” yango ekoki koloba na bolimboli bomoi mobimba to ntango molayi.1 Ntango na ye, mpe mbala mingi ntango na Ye, ezali ya kokesena na ya biso. Motema molayi ezali fungola. Longola yango, biso tokoki ata moke kokoba kutu te kolakisa bondimi na biso na Nzambe na kati ya bomoi mpe lobiko. Kasi etinda na ngai mokolo ya lelo ezali ete, atako bosenga ya motema molayi epai ya Nkolo, ezali na mapamboli ya solo eyaka epai na biso na lombango.
Ntango Alma mpe bato na ye bakangamaki epai ya Balamaniti, basambelaki mpo na bokangoli. Bakangolamaki mbala moko te, kasi bazelaki na motema molayi mpo na bokangolami, Nkolo alakisaki liboso boboto na Ye elengo na mapamboli misusu ya sasaipi. Ye na mbala moko akitisaki mitema ya Balamanite boye bango bakokaki te koboma bango. Ye lisusu alendisaki bato ya Alma mpe alembisaki mikumba na bango.2 Ntango bakangolamaki na nsuka, bakendaki mobembo na Zarahemela, epai wapi babetaki lisolo ya boyebi na bango na esengo. Bato ya Zarahemela basepelaki, “mpe … ntango bateyaki na ntina ya sasaipi bolamu ya Nzambe mpe nguya na ye ya bokangoli Alma mpe bandeko na ye ya mibali libanda ya bowumbu, batombolaki mingongo na bango mpe batondaki botondi epai ya Nzambe.”3
Bolamu ya sasepi ya Nzambe eyaka na bato nyonso oyo babengi ye na mposa ya solo mpe ntina etondi na motema. Yango esangisi na baoyo bazali kolela kati na kozanga elikia ya makasi, ntango bokangolami emonanaka lokola kozala mosika mingi mpe koniokwama ezali komonana lokola ekobi, kutu makasi koleka.
Boye yango ezalaki na profeta moko ya elenge oyo aniokwamaki na nsuka mpe ya mpio ya boloko moko yambo na nsuka nionso angangaki: “O Nzambe, ozali wapi? … Ntango boni okokanga loboko na yo … ? Iyo, O Nkolo, kino ntango boni … ?”4 Na eyano, Nkolo akangolaki mbala moko Yosefe, kasi asakolaki mbala moko kimia.5
Nzambe apesaka lisusu elikia ya sasepi mpo na bokangolami ekoki koya.6 Atako soki nini, atako soki wapi, kati na Klisto mpe na nzela na Klisto ezali ntango nionso na elikya kosekaka na bongengi makasi liboso na biso.7 Sasepi mpenza liboso na biso.
Lisusu, tozali na elaka na Ye: “Ya ngai boboto ekolongwa te epai na bino.”8
Likolo na nyonso, bolingo ya Nzambe ezali sasepi. Elongo na Paulo, ngai natatoli ete eloko moko te ekoki “kokabola biso wuta na bolingo ya Nzambe, oyo ezali na Klisto Yesu.”9 Kutu masumu na biso, na nzela na yango ekoki kokabola biso wuta na Molimo na Ye Mosantu mpo na ngonga moko, ekoki te kokabola biso wuta na bozali mpe sasepi ya bolingo na Ye.
Oyo ezali bobele ndenge mpe ntina na oyo “asalaki mbango mpo na kopambola [biso].”10 Sikawa, mpo na kokokisa mabongi oyo sika mpe pene, nakaboli elongo na bino mayebi ya bato mibale oyo babomoi etalemaki lokola matatoli ya boboto ya sasepi ya Nzambe.
Wuta na ntango ye azalaki elenge moko moseka, Emilie abundanaki bobebisami ya bomeli biloko ya makasi. Koyeba ekomaki ezalela, oyo na nsuka eyaki makasi ememaki na bokangami moko oyo ekangaki ye mibu ebele, atako na mwa ba eleko moke ya kokoma malamu. Emilie na bokebi nyonso abombaki likambo na ye, mingimingi nsima ye kokoma mwasi mpe mama.
Na ebandeli ya bokangolami na ye ezalaki te lokola bokangolami mpenza. Na ntango moko, Emilie akendaki na kotalisa na monganga ya mokolo na mokolo, mpe nsima, amemamaki na ambulance mpo na ndako ya bosungi babeli. Ye akomaka kobanga lokola akanisaki akobolamaki na bana na ye, mobali na ye, ndako na ye.
Na butu wana, ye moko na kati ya kisuku ya malili, ya molili, Emilie amigumbaki na mbeto na ye mpe alelaki. Bokasi na ye na ntina ekitaki kino na nsuka, alongisamaki na mawa, bobangi, mpe molili makasi na ndako mpe molimo na ye, Emilie akanisaki mpenza ye akokaki kokufa na butu wana. Ye moko.
Na lolenge ya mawa, Emilie na lolenge moko mpe mosusu asangisaki makasi ya kokita na mbeto na ye mpe kino na mabolongo na ye. Kozangaka lolenge moko ya kotelemela oyo ezalaka ntango mosusu eteni ya nsambo ya kala, Emilie amipesaki ye moko mobimba epai ya Nkolo ntango abondelaki na mawa nyonso, “Nzambe ya motuya, nazali na bosenga na Yo. Soki olingi sunga ngai. Nalingi kozala ngai moko te. Nasengi, kangola ngai na butu oyo.”
Mpe na sasepi, lokola Ye asalaki na Petelo ya mpaka, Yesu atandaki liboso loboko na Ye mpe asimbaki molimo na ye ya kodinda.11 Wana kimia monene ekomelaki Emilie, mpiko, elikia; mpe bolingo. Kisuku ezalaki lisusu malili te, ye ayebaki ete azalaki kisusu yemoko te, mpe mpona mbala yambo wuta azalaki na mibu 14 ya mbotama, Emilie ayebaki ete makambo nionso ekoki kozala malamu. Ntango ye “atelemaki kati ya Nzambe”12 mpe alalaki na kimia. Mpe yango wana tomoni ete, “soki bokoyambola mpe bokoyeisa mitema mya bino mikasi te, sasepi mwango monene ya bosikoli ekomemama mpembeni ya bino.”13
Kobika mpe bokangolami ya nsuka ya Emilie ezuaki ntango—basanza ya bozwi nkisi, ngalasisi, mpe toli, katikati na yango asungamaki mpe ntango mmosusu amemamaki na boboto na Ye . Mpe boboto na Ye ekobaki elongo na ye ntango akotaki na tempelo elongo na mobali mpe bana mpo na kokangisama elongo mpo na libela. Lokola bato ya Zarahemela, Emilie sikawa apesaka botondi ntango ye akanisaka na boboto ya sasepi ya Nzambe mpe nguya na Ye ya kokangola ye na bowumbu.
Sikawa, wuta na bomoi ya mondimi ya makasi mosusu. Na sanza ya zomi na mibale 27, 2013, Alicia Schroeder ayambaki baninga na ye ya talo, Sean mpe Sharla Chilcote, baoyo na bokamwi nionso mpenza alakisaki esika. Sean, oyo azalaki lisusu episikopo ya Alicia, apesaki ye telefone mpe na botosi nionso alobaki, “Alicia, tolingi yo. Osengeli koyamba mbela oyo.”
Mobali ya Alicia, Mario, azalaki na telefone. Ye azalaki esika moko ya mosika elongo na bamoko ya bana na bango na mobembo ya molayi-ya mbalaka na motuka ya mbula ya pembe. Kuna ezalaki na likama monene. Mario azokaki makasi mpenza, mwana na bango ya mibu 10 ya mobali, Kaleb, akufaki. Ntango Mario na mpinzoli ayebisaki Alicia liwa ya Kaleb, ayokaki motema mpasi mpe mpasi moke oyo kati na biso tokoki koyoka. Yango ekueyisaki ye. Akangamaki na mpasi ya kufa ekokaki kolimbolama te, Alicia akokaki kutu koloba te to koningana te.
Episikopo mpe Ndeko mwasi Chilcote nokinoki batombolaki ye likolo, mpe basimbaki ye. Balelaki mpe bayokaki mpasi ya bozindo mpenza elongo mpo na ntango moko. Bongo episikopo Chilcote asengaki kopesa Alicia lipamboli.
Oyo eyaki na nsima ezangi ndimbola kozangaka bososoli moko ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe boboto ya sasepi ya Nzambe. Episoko Chilcote na boboto atiaki maboko na ye na moto ya Alicia mpe, na mongongo ya kolenga, abandaki koloba. Alicia ayokaki makambo mibale lokola soki elobamaki na Nzambe Yemei. Yambo, ye ayokaki nkombo na ye, Alicia Susan Schroeder. Nsima ayokaki episikopo kobenga nguya ya Nzambe na Nguya nYonso. Na ntango wana kaka—na botangi pamba ya nkombo na ye mpe nguya ya Nzambe—Alicia atondisamaki na kimia, bolingo, bolendisi, mpe mwa esengo. Mpe ekobaki elongo na ye.
Sikawa, na bosolo, Alicia, Mario, mpe libota na bango bakobi kosala matanga mpe kozanga Kaleb. Ezali mpasi! Ntango nyonso nasololaka na ye, miso ya Alicia etondaka na mpizoli ntango alobaka lolenge nini ye alingaka mpe azangaka mwana na ye ya moke ya mobali. Mpe miso na ye etikalaka na mai ntango ye ayebisaka ngai boniboni Mokangoli Monene asungaki ye na kati na nzela ya komekama nyonso ya moke, konbandaka na boboto na Ye ya sasepi na ntango na ye ya boyoki motema mpasi bozindo mpenza na bozangi elikia “mikolo ebele te.”
Namoni ete makambo ya bomoi ntango mosusu ememaka mpasi mpe mobulungano oyo ekoki kozala mokakatano ya koyamba to kososola to kosimba lolenge ya lisungi oyo eyelaki Emilie mpe Alicia. Nazalaki na nzela ya ntango wana. Natatoli ete, katikati na bantango ya lolenge wana, kobatelama na biso ya pete ezali komonisama ya malembe mpe ya nguya mingi ya boboto ya sasepi ya Nzambe. Bomikundola, yisalaele ya kala ekangolamaki na nsuka “na Nzambe kaka moko oyo abatelaki bango”14 mokolo na mokolo.
Napesi litatoli na ngai ete Yesu Klisto azali Mokangoli Monene, mpe na nkombo na Ye, nalaki ete soki bozongi epai na Ye na mposa ya solo mpe ntina etondi na motema, Ye akokangola yo wuta na eloko nyonso oyo ezobundisa kokitisa to kobebisa bomoi na yo to esengo na yo. Bokangolami wana ekozwa ntango molayi koleka okoki kolinga—ntango mosusu bomoi mobimba to molai koleka. Boye, mpo na kopesa yo bolendisi, bozangi kobanga, mpe elikya, kosunga mpe kopesa yo makasi na mokolo oyo ya bokangolami ya nsuka, natindi epai na bino mpe natatoli na ntina ya boboto ya sasepi ya Nzambe na nkombo ya Yesu Klisto, amen.