Likita Linene
Bokundola Nzela na Bino ya Bozongi Ndaku
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Bokundola Nzela na Bino ya Bozongi Ndaku

Tozali na ndakisa ebonga nie mpenza ya kolanda ya Yesu Klisto, mpe mobembo na ndako bwa biso ya seko ekoki kosalema bobele mpo na mateya ma Ye, bomoi na Ye, mpe libonza ya bomikabi.

Na 1946, elenge moluki Arthur Hasler azalaki kotambola na ngomba ya mongala penepene na mboka wa ye ya bomwana ntango azwaki likanisi oyo ememaki na bokundoli moko ya motuya mpenza na ntina na lolenge nini bambisi basalaka mpo kozonga na mingala bwa bango ya mbotama.

Na komataka ngomba, kasi amonaki te bweta azalaki kolinga mingi na bomwana, na mbala moko Hasler amemamaki na bokundoli moko abosanaki. Alobaki, “Ntango mopepe ya malili, ezalaki na nsolo kitoko ya makenzi mpe bafololo kitoko, etambolaki na ngomba ya mabanga na ndelo ya bitando mibale, makambo mikemike ya bweta oyo mpe botyami na yango liboso na ngomba na mbala moko nazwaki likanisi.”1

Bansolo eye elamusaki lisusu eloko moko esalamaki na bomwana wa ye mpe ekundolisaki ye ndako.

Soki bansolo ekokaki kobimisa babokundoli ya boye mpo na ye, akanisaki ete ntango mosusu bansolo ekokaki komema makanisi kati na bambisi oyo, nsima bambula ya kozala na mbu efungwama, bazongi se na mongala ya mbotama bwa bango mpo kobota bana.

Na koyekamela boyebi oyo, Hasler, elongo na baluki basusu, balakisaki ete bambisi oyo Saumon bakundolaka mpenza bansolo eye ekoki kosalisa bango kotambola bantaka ebele mpo na koluka nzela bayaki mpo na kozonga ndako uta na mbu.

Lisolo liye esalaki nayekola ete moko ya makambo ya motuya tosengeli kosala kati na bomoi oyo ezali koyeba mpe kokundola nzela ya bozongi na Tata bwa biso ya Lola mpe na bosembo mpe esengo mpenza koyika mpiko na mobembo wa biso.

Nakanisaki babokundoli minei eye, ntango masalelami mpe masalami ntango nyonso na bomoi bwa biso, ekoki kozongisa makanisi ya ndako bwa biso ya lola.

Ya yambo, Tokoki Kokundola Ete Tozali Bana ba Nzambe

Tozali na libula ya bonzambe. Koyebaka ete tozali bana ba Nzambe mpe ete Alingi biso tozonga na liboso wa Ye ezali moko ya makambo ya yambo na mobembo ya kozonga na ndako na biso ya lola.

Bomikundola libula oyo. Mbala na mbala bozwa ntango ya kopusa libongisi na bino ekoka ya molimo na kokundolaka mapamboli bozwi uta na Nkolo. Bokanisa bokambami bozwi epai wa Ye, na esika ete bolanda bobele mokili na komeka motuya wa bino moko mpe koluka nzela bwa bino.

Kala mingi te, natalakii molingami moko ya mwasi nsima ya kozalaka na lopitalo. Ayebisaki ngai na bolingo ete ntango alalaki na mbeto ya lopitalo, nyonso azalaki na yango mposa ezalaki mpo moto moko ayembela ye nzembo “Nazali Mwana ya Nzambe.” Likanisi moko wana, alobaki, epesaki ye kimya azalaki na yango mposa na ngonga wana ya mpasi.

Koyeba nani bozali ebongoli maye bosengeli kokanisa mpe maye bosengeli Kosala.”

Kososola nani bozali solo mpenza ekolengele bino malamu na koyeba mpe kokundola nzela ya bozongi ndako na bino na lola mpe kozala na mposa makasi ya kozala kuna.

Ya mibale, Tokoki Kokundola Libanga Eye Ebateli Biso

Bokasi ekoyela biso ntango totikali boyengebene, solo, mpe sembo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto, kutu ntango basusu na bolingi mpenza bakobuka mitindo mpe mibeko lya libiki.2

Na Buku ya Mormon, Elamani ateyaki bana na ye na kokundola ete basengeli kotonga nse lya bango likolo na libanga lya Yesu Klisto mpo kozwa bokasi ya kotelemela masenginia ma monguna. Mipepe makasi mpe minkalali ya kaina ya Satana ezalaki kobeta likolo na biso, kasi ekozala na nguya te ya kokitisa biso soki totie elikya na biso na esika lya kimia mpenza—na Mosikoli na biso.3

Nayebi uta na likanisi na ngai moko ete ntango toponi koyoka mongongo na Ye mpe kolanda Ye, tokozwa lisalisi na Ye. Tokozwa bomoni ya monene ya makambo na biso moko mpe bososoli na mozindo lya ntina ya bomoi. Tokoyoka bitinda ya molimo biye bikomema biso na ndako na biso ya lola.

Ya misato, Tokoki Kokundola Kozala na Losambo

Tozali kobika na ntango oyo ya kosimba ya mpamba to liloba lya etinda, tokoki kobanda koluka biyano na makambo ebele kati na mitango ebombami mpe ebongisami kati na mokili ya baordinatere.

Na ngambo mosusu, tozali na libiangisi lya bosembo ya kobanda koluka biyano uta na lola. “Bosambelaka ntango nyonso, mpe nakotia Molimo na ngai kati na bino.” Nsima Nkolo alaki ete soki tozali kosambela ntango nyonso, bongo Akosopa Molimo na Ye likolo na biso, mpe lipamboli na biso ekozala monene---koleka kutu soki tozwi biloko lya motuya ya mabele.”4

Nzambe ayebi malamumalamu moko moko ya biso mpe azali pene ya koyoka bansambo na biso. Ntango tokundoli kosambela, tozwi lisungi lya bolingo ya Ye, mpe koleka tokosambela Tata na biso ya Lola na nkombo lya Klisto, koleka tozali kokotisa Mobikisi na bomoi na biso mpe malamu koleka tokokundola bokambami uta na Nzambe mpo ya kokende na ndako na biso ya lola.

Ya minei, Tokoki Kokundola Kosalela Basusu

Ntango tosali makasi ya kolanda Yesu Klisto na kosalelaka mpe kolakisaka boboto epai ya basusu, tozali kokomisa mokili esika ya malamu koleka.

Misala na biso makoki kopambola mpenza bomoi ya baoyo nzinganzinga wa biso mpe lokola bomoi na biso moko. Lisalisi ya bolingo ekobakisa esengo na bomoi ya banso mibale mopesi mpe mozwi.

Bomona mpamba te likoki bozali na yango ya kopusa basusu mpo na bolamu, na nyonso mibale lisalisi ya misala na bino mpe lisalisi ya ndakisa na bino.

Lisalisi ya bolingo na basusu ekomema biso na nzela ya ndako na biso ya lola—nzela ya kokoma lokola Mobikisi na biso.

Na 1975, lokola litomba ya etumba moko kati na bana-mboka, Arnold mpe Eugenia Teles Grilo mpe bana na bango basengelaki kotika ndako na bango eye batongaki na bikeke ya mosala ya mpasi. Ntango azongaki na engumba na bango ya Portugal, ndeko Mobali mpe Mwasi Teles Grilo bakutanaki na momekano ya kobandela nyonso lisusu. Kasi bambula na nsima, nsima ya kokota na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, balobaki, “Tobungisaki eloko binso tozalaka na yango, kasi ezalaki eloko malamu mpo ete esengisaki biso kokanisa ntina ya mapamboli ya seko.”5

Babungisaki ndako na bango na mabele, kasi bamonaki nzela ya kozonga na ndako na bango ya lola.

Nyonso eye bosengeli kotika mpo kolanda nzela ya ndako na bino ya lola ekomonana mokolo moko te lokola libonza.

Tozali na ndakisa malamu mpenza ya kolanda ya Yesu Klisto, mpe mobembo na ndako bwa biso ya seko ekoki kosalema bobele mpo na mateya ma Ye, bomoi na Ye, mpe libonza ya bomikabi—bakisa kufa mpe Lisekwi na Ye ya nkembo.

Nabengisi bino na koyoka esengo ya kokundola ete tozali bana ba Nzambe mpe ete Alingaki mokili mingi mpenza yango wana atindaki Mwana na Ye6 mpo kolakisa biso nzela. Nabengisi bino na kokundola kozala sembo, na kopesa bomoi bwa bino na Mobikisi mpe kotonga ya bino libanga likolo na Ye. Bokundola kozala na losambo na mobembo na bino mpe na nzela bosalela basusu.

Bandeko balingami mibali mpe basi, na Eyenga oyo ya Pasika, natatoli ete Yesu Klisto azali Mosikoli mpe Mobikisi ya mokili. Azali moko oyo akoki kotya biso na mesa ya bomoi ya esengo mpe akamba biso na mobembo na biso. Akanisi tokokundola mpe tokolanda Ye na ndako. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Arthur Davis Hasler, in Gene E. Likens, “Arthur Davis Hasler: January 5, 1908–March 23, 2001,” na National Academy of Sciences, Biographical Memoirsvol. 82 (2003), 174–75.

  2. Tala Book of Mormon Student Manual (2009), 268–73.

  3. Tala Elamani 5:6–12

  4. TalaDoctrine et Alliances 19:38

  5. Tala Don L. Searle, “Discovering the Gospel Riches of Portugal,” EnsignSanza ya zomi. 1987.

  6. Tala Yoane 3:16.

Bimisa na lokasa