Likita Linene
Kobatela Mobeko Likonzi na Biso Efulama na Bonzambe
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Kobatela Mobeko Likonzi na Biso Efulama na Bonzambe

Bondimi na biso na bofuli ya bonzambe epesaka na Basantu ba mikolo mya Nsuka mokumba bobele moko ya kotosa mpe kobatela Mobeko likonzi ya Etazini mpe mibeko ya mobeko likonzi esika nyonso tozali kofanda.

Na ntango oyo ya mobulungano, nayoki mposa ya kolobela bino na ntina ya Mobeko likonzi efulama ya Etazini. Mobeko likonzi oyo ezali motuya mpenza na bandimi na biso ya Etazini, kasi ezali mpe lisusu libula ya mibeko likonzi ya bato nyonso na mokili mobimba.

I.

Mobeko likonzi ezali moboko ya guvenema. Epesaka boyangeli mpe bandelo mpo na bosaleli ya banguya ya guvenema. Mobeko likonzi ya Etazini ezali mobeko likonzi ekomama kala mpenza kasi ezali kaka makasi kino lelo. Atako na ebandeli babandaki kosalela yango na bikolo moke, na lombango ekomaki ndakisa na mokili mobimba. Lelo, ekolo nyonso esalelaka mibeko likonzi ekomama longola bobele misato.1

Na makebisi oyo nazolobela oyo etali lingomba ya politiki kani to liboke mosusu te. Nazali kolobela Mobeko likonzi ya Etazini, oyo nayekoli uta koleka mibu 60. Nazali kolobela uta boyebi ya mosala na ngai lokola kalaka epai ya Zusi Mokonzi na Bilo ya Ndako ya Bosambisi Monene ya Etazini. Nazali koloba uta mibu na ngai 15 lokola molakisi ya mibeko, mpe mibu na ngai 3½ lokola zuzi na Ndako ya Monene ya Bosambisi ya Utah. Ya ntina koleka nyonso ezali, nazali koloba uta mibu 37 lokola Apostolo ya Yesu Klisto, na mokumba ya koyekola ndimbola ya Mobeko likonzi efulama ya bonzambe ya Etazini lokola esalisaka na mosala ya Eklezia na Ye ezongisama.

Mobeko likonzi ya Etazini ezali motuya mpo ete Nzambe abimisaki ete Ye “asalaki” yango “mpo na makoki mpe bobateli ya mosuni nyonso” (Doctrine and Covenants 101:77; tala lisusu molongo 80). Yango wana mobeko likonzi oyo ezali motuya koleka mpo na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na mokili mobimba. Soki to lolenge nini mabongi yango esengeli basalela yango na bikolo mosusu ya mokili ezali mokumba na bango ya kozwa mokano.

Mposa ya Nzambe ezalaki nini na kosalaka Mobeko likonzi ya Etazini? Tomoni yango na kati ya malongi ya bonsomi ya bomoto. Na mibu zomi ya yambo ya Eklezia ezongisama, Bandimi na yangoya ndelo ya westi banyokwamaki na bobomi ya kobatama mpe ya misu ya bato. Na ngambo moko, ezalaki mpo na botelemeli kozwa bato na bowumbu oyo esalemaki na libaku mabe na Etazini na ntango wana. Na mabaku oyo wana ya mawa, Nzambe abimisaki na nzela ya Profeta Joseph Smith babosolo ya seko etali malongi na Ye.

Nzambe apesaki na bana na Ye bonsomi ya bomoto—nguya ya kozwa mokano mpe kosala. Lolenge elingami malamu ya kosalela bonsomi oyo ezali bonsomi mobimba ya moto ya kozwa mokano mpe kosala engebene na maponi na ye moko. Boye, emoniseli elimboli, “moto nyonso akoka kozala na mokumba ya koyanola na masumu na ye na mokolo ya bosambisi” (Doctrine et Alliances 101:78). “Na yango,” Nkolo abimisaki, “ezali malamu te ete moto akoka kozala mowumbu ya moto mosusu” (Doctrine et Alliances 101:79). Likambo oyo emonisi polele ete koteka bato lokola bawumbu ezali mabe. Mpe engebene na mobeko moko oyo, ezali malamu te na bato bazala na boponi te na bakambi na bango to na bosaleli mibeko na bango.

II.

Bondimi na biso ya koloba ete Mobeko likonzi ya Etazini efulamaki na bonzambe elingi koloba te ete liloba nyonso mpe nkoma nyonso ewutaki na emoniseli ya bonzambe, lokola eteni ya mokanda elobeli motango ya bantoma ya bana mboka uta na ekolo moko na moko to mobu ya nse ya moko na moko.2 Mobeko likonzi ezalaki te “mokanda ya kokoka mobimba,” elobaki Mokambi J. Reuben Clark. “Na ngambo mosusu,” alimbolaki, “tobanzi esengeli kobakisama mpe kotombola yango ekokisa babosenga ya bokobi ya mokili.”3 Ndakisa, mabongisi mafulama kopekisaka bowumbu mpe epesaki nzela na basi basala voti. Nzokande, tomoni bofuli na mokano ya Ndako Monene ya Bosambisi kolimbolaka mobeko Likonzi.

Nandimi ete Mobeko Likonzi ya Etazini ya Amerika ezali ata na moke na mibeko mitano mifulami na bonzambe.4

Yambo ezali mobeko ya koloba ete ebandeli ya nguya ya guvenema ezali bato. Na ntango oyo bato bazalaki kokanisa ete bokonzi ya koyangela bato ezalaki kowuta na nguya ya bonzambe ya bakonzi to mampinga, ezalaki ya botomboki ya kozongisa nguya ya likolo epai ya bato. Bafilozofe balobelaki yango, kasi Mobeko likonzi ya Etazini ezalaki ya liboso ya kosalela yango. Nguya ya likolo epai ya bato elingi te koloba etuluku ya bato to mangomba ya bato mosusu bakoki kosangana mpo na kobangisa to kotindika bokasi ya misala ya guvenema. Mobeko likonzi ya Etazini ya Amerika etiaki repibiliki demokalatiki ya mibeko likonzi, epai eye bato basalelaka nguya na bango na nzela ya bantoma na bango baponama.

Mobeko ya mibale efulama ezali bokaboli ya bokonzi ya bantoma kati ya ekolo mpe bikolo na yango elandi. Na lolenge na biso ya lisanga ya bikolo, mobeko ya sika oyo eye naino esalama na guvenema moko te ebongolamaki na mabongisi efulama, lokola oyo elongolaki bowumbu mpe kopesa makoki ya kopona epai ya basi, eye elobami kala te. Na ndimbola malamu, Mobeko likonzi ya Etazani ya Amerika etiaka ndelo na guvenema ya ekolo esalela banguya eye elimbolami mbala moko to na bosaleli maye makomama, mpe banguya eye ekomami te na kati ezali “mpo ya Bikolo to bato bango moko.”5

Mobeko mosusu efulama ezali ya kokabwana na banguya. Uta ekeke moko eleki yambo ya Boyokani ya Mobeko likonzi nq biso ya 1787, Parlema ya Angleterre ezalaki yambo ya kokabola nguya ya badepite mpe nguya ya bokonzi ntango balongolaki banguya mosusu uta na mokonzi. Bofuli ya boyokani ya Amelika ezalaki ya kopesa bonsomi na banguya ya bokonzi, badepite, mpe nguya ya basambisi mpo ete biteni misato oyo bakoka kosalela bolandeli ya moko mpe mosusu.

Mobeko efulama ya minei ezali na kati ya buku mobimba ya motuya ya makoki ya bato mpe bandelo etali likoki ya mbula-matari na kati ya Esakola ya Makoki, endimaki bobele mibu misatu nsima ya botiama na mosala ya Mibeko likonzi. Esakola ya Makoki ezalaki sika te. Awa, bofuli ezalaki na bosaleli ya mibeko miye mitiamaki na Angleterre, kobanda na Magna Carta. Bakomi ya Mibeko likonzi bayebaki yango mpo ete mibeko mosusu ya koloni ezalaki na makomi maye.

Soki Esakola ya Makoki ezalaki te, Amerika ekokaki kobikisama te lokola ekolo ya lokumu mpo na Bozongisi ya nsango malamu, eye ebandaki bobele nsima ya mibu ntuku misato. Bofuli ya bonzambe ezalaki na mobeko mwa ebandeli moye molobaki ete esengelaki te kozala na bosenga ya moto azala mondimi ya eyamba songolo mpo na kotia bilo ya mosala,6 kasi bokotisi ya bonsomi ya boyambi mpe Mibeko miye mipesaki ndingisa te ete mondimi songolo akoma mokambi ya eyamba na ekolo. Tomoni lisusu bofuli ya bonzambe na kati ya bonsomi ya mibeko ya maloba mpe na bobateli bato miye mikomamaki na kati mibeko mosusu, lokola etumbu ya bolandeli.

Elilingi
Biso bato.

Ya mitano mpe ya nsuka, namonaka bofuli na kati ya likambo ya motuya ya Mobeko likonzi mobimba. Tosengeli koyangelama na mobeko mpe te na bato, mpe soki ezali na kozanga bosembo esengeli na mobeko likonzi mpe mabongi na yango mpe misala na yango kasi kalaki ya mbulamatari te. Na lolenge loye, bato banso bakokani liboso ya mobeko. Mibeko miye mitelemeli boyangeli na makasi, oyo ebebisi demokalasi na bikolo misusu. Elingi koloba lisusu ete biteni nyonso misato oyo esengeli te koyangela likolo ya moko to moususu to kopekisa basusu basala mokumba na bango na lolenge elongobana engebene na mobeko likonzi mpo na kokonza likolo ya moko to mosusu.

III.

Atako mibeko miye mifulami na Nzambe ya mobeko likonzi ya Etazini ya Amerika, ntango basaleli yango na bato babonga nie te naino bakokisa te likanisi ya ebandeli. Mama na likambo ya motuya koleka na kosalaka mibeko, lokola mibeko mosusu ya mikangano ya bazalani ya libota, elongolamaki uta bikolo na guvenema ya federal. Mbongwana ya Yambo ya bonsomi ya liloba elongolamaka ntango mosusu na kotiaka ndelo na maloba ya bato. Mobeko ya bokabwani ya babokonzi etungisamaki na badisikulu mpe maloba ya eteni moko ya guvenema kosalelaka to kopekisa babokonzi na basusu.

Ezali na mitungisi mosusu miye mizali kotungisa mibeko efulama ya Mobeko likonzi ya Etazini. Bokasi ya Mobeko likonzi ekitisami na mposa ya kotia na esika na yango makambo maye mazali koleka na kati ya bato lokola ntina ya moboko na yango, na esika bonsomi mpe guvenema. Likoki ya Mobeko likonzi emonisami kozala eloko mpamba na bato to bakambi oyo baboyi kosalela mibeko na yango. Bolongobani mpe nguya ya Mobeko likonzi ekitisami na baoyo bazwaka yango lokola momekano ya bosembo to liloba ya politiki, na esika ya bokasi na yango ya likolo ya liziba ya ndingisa mpe bandelo ya likoki ya mbula-matari.

IV.

Bondimi na biso na bofuli ya bonzambe epesaka na Basantu ba mikolo mya Nsuka mokumba monene ya kotosa mpe kobatela Mobeko likonzi ya Etazini mpe mibeko ya mobeko likonzi esika nyonso tozali kofanda. Tosengeli kondimela Nkolo mpe kozala na bondimi mpe kozala na mpiko na ntina ya ekolo na mikolo ekoya nsima.

Nini lisusu esengeli Basantu ba Mikolo ya Nsuka ya Sembo basengeli kosala? Tosengeli lisusu kosambela mpo ete Nkolo akamba mpe apambola bikolo nyonso mpe bakambi na yango. Oyo ezali eteni ya eteni ya bondimi na biso. Komikitisa liboso ya bakambi to bayangeli7 ya solo ezali te kpokoso ya kotelemela mibeko na biso to bapolitiki. Esengeli ete tosalela nguya na biso na bomoto mpe na kimia, na bosaleli na biso ya mosala ya mibeko likonzi mpe mibeko. Na makambo eboyama, tosengeli koluka kosunga bato oyo baboi kondima bandima makambo maye.

Ezali na matomba mosusu oyo ezali na eteni ya kotosa Mobeko likonzi efulama. Tosengeli koyekola mpe kosalela mibeko to mabongi mafulami ya Mobeko likonzi. Tosengeli koluka mpe kosunga bato na bwania mpe malamu baye bakosunga mibeko miye na misala na bango mpo na bolamu ya bato banso.8 Tosengeli kozala bana mboka oyo bayebila baye bazali kosala mpo na koyokisa nguya na makambo ya kokamba mboka.

Na Etazini mpe bikolo mosusu ya demokratia, nguya ya politiki esalemi na kolekaka na maponami (oyo tolendisi), na voti, na bosungi mosolo, na bokoti mpe mosala ya parti plitiki, mpe na bokobi kosolola na bakambi, na mangomba mpe bato. Mpo na kosala malamu, demokratia esengeli na makambo manso maye, kasi moto nyonso asengeli te kopesa nyonso oyo.

Ezali na makambo ebele etali politiki, mpe parti moko te, eteni moko te, mpe moto moko te akoki kosepelisa bosenga mpe bosepelisi ya moto nyonso. Mwana mboka nyonso asengeli, boye, kozwa mokano makambo nini mazali ntina koleka nyonso epai na ye na ntango songolo. Nsima, bandimi basengeli koluka bofuli ya lolenge nini ya kopona mpe kotala nguya na bango engebene na mposa na bango ya motuya. Mosala oyo ekozala pete te. Ekoki kosenga kobongola lisungi ya parti to maponi ya moto, kutu kouta na maponi ya voti.

Misala ya moto na bonsomi na ye ekosenga ntango mosusu baponi mpo na kosunga bakandida to baparti politiki to biteni oyo basusu bakoki kondima te.8 Yango ezali ntina eye toteyaka bandimi na biso batika kosambisama bango na bango na makambo ya politiki. Tosengeli koloba te ete Mosantu ya mikolo mya Nsuka songolo ya boyengebene akota na parti politiki to apona te. Toteyaka mibeko ya malamu mpe totikaka bandimi na biso bapona lolenge nini ya kopesa ntina mpe kosalela mibeko miye na makambo oyo emonisami mbala na mbala. Tobeti lisusu nsete, mpe tosengi bakambi ya bikolo na biso babeta nsete, ete maponi ya politiki mpe bokotisi ezala te likambo ya botei to bolobeli na mayangani ya Eklezia na biso.

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka ya solo ekosalela makoki na yango mpo na kondima to koboya bantoma ya bsna mboka oyo batiami oyo tomoni ete balongobani te na mosala ya bonsomi ya eyamba to litomba ya ntina ya mangomba ya Eklezia.

Natatoli na ntina ya Mobeko efulama na bonzambe yaMobeko likonzi ya Etazini mpe nasambeli ete biso baoyo toyebi Bomoto ya Bonzambe oyo afulaki yango akolongisa mpe akolobela mibeko na yango minene. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Mark Tushnet, “Constitution,” na Michel Rosenfeld and András Sajó, eds., The Oxford Handbook of Comparative Constitutional Law (2012), 222. Bikolo misato eye ezali na mibeko likonzi te ekomama ezali Royaumes Unis, Nouvelle Zelande, mpe Israel. Moko na moko kati na yango ezali na babonkoko ya makasi ya mibeko likonzi, atako mabongisi ya guvenema ezali te ya kosangisama na kati ya mokanda moko.

  2. Tala Mobeko likonzi ya Etazini, atikele 1, eteni 2.

  3. J. Reuben Clark Jr., “Constitutional Government: Our Birthright Threatened,” Vital Speeches of the Day, Jan. 1, 1939, 177, quoted in Martin B. Hickman, “J. Reuben Clark, Jr.: The Constitution and the Great Fundamentals,” in Ray C. Hillam, ed., By the Hands of Wise Men: Essays on the U.S. Constitution (1979), 53. Brigham Young azalaki na limoni ya ntobwama ya lolenge moko ya Mobeko likonzi, ete balakisi “batiaki moboko, mpe ezalaki mpo ete bankola eye ekoya etombola efelo likolo na yango” (Discourses of Brigham Youngsel. John A. Widtsoe (1978), 359).

  4. Mitano oyo ezali ndenge moko na miye topesami makanisi na buku ya J. Reuben Clark Jr., Stand Fast by Our Constitution (1973), 7; Ezra Taft Benson, “Our Divine Constitution,” Ensign, Nov. 1987, 4–7; and Ezra Taft Benson, “The Constitution—A Glorious Standard,” Ensign, Sept. 1987, 6–11. Tala, mingimingi, Noel B. Reynolds, “The Doctrine of an Inspired Constitution,” na By the Hands of Wise Men1–28.

  5. Mobeko likonzi ya Etazini, libongisi 10.

  6. Mobeko likonzi ya Etazini ya Amerika , atikele 6.

  7. Tala Biteni ya Bondimi 1:12.

  8. Tala Doctrine et Alliances 82:10.

  9. Tala David B. Magleby, “The Necessity of Political Parties and the Importance of Compromise,” BYU Studies, vol. 54, no. 4 (2015), 7–23.

Bimisa na lokasa