Likita Linene
Lilita Ezali na Elonga Te
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Lilita Ezali na Elonga Te

Na nzela ya bosikoli ya Bomikabi ya Klisiko mpe Lisekwa ya nkembo ya Yesu Klisto, mitema mibukana mikoki kobika, somo ekoki kokoma kimia, mpe kozanga elikya ekoki kokoma elikya.

Na Eyenga ya Pasika oyo ya Nkembo, bana ba biso bayembi na esengo, “Na ntango ya molunge ya wolo, Yesu Klisto alamukaki mpe atikaki lilita epai wapi ye alalaki; ye akataki singa ya kufa.”1

Tozali na botondi mpo na boyebi ya Lisekwa bwa Yesu Klisto. Mpe bongo, na biteni mingi ya bomoi na biso, tokoyoka motema kobukana nsima ya kobungisa moto moko oyo tolingaka mingi. Katikati ya bokono ya mokili mobimba, ebele kati na biso babungisaki boko balingami—lisusu bato ya libota to baninga.2 Tobondeli mpo na baye oyo bazali na mawa lya bobungisi ya ndenge wana.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki:

Kolandaka mobu te, tosalaka matanga mpo na balingami mpe babungami. Matanga ezali moko ya libaku ya komonisa bolingo ya petwa na bozindo.

“Lisusu, tokoki te kosepela na mobimba makutani ya esengo mosika kozanga kokabwana na mayi na miso sikawa. Nzela bobele moko ya kolongola mpasi ya kufa ezali kolongola bolingo na bomoi.”3

Elilingi
Basi Bayyekoli balelaki Yesu.

To koki kobanza lolenge nini baninga ya Yesu, oyo balandaki Ye mpe basalelaki Ye,4 boyokaki ntango bamonaki liwa na Ye lokola batemwe.5 Toyebi ete bango “basalaki matanga mpe balelaki.”6 Na mokolo ya bobakemi na ekulusu, koyebaka te nini ekokaki koya na Eyenga, bakokaki kotondisama na bobangi mpe mpasi, komitungisaka lolenge nini bakoki kokende liboso awa bazangi Nkolo na bango. Ata bongo, bakobaki kosala mpo na Ye atako na kufa.

Yosefe moto na Alimataya abondelaki Pilate apesa ye nzoto ya Yesu. Akitisaki nzoto, ajingelaki yango na elamba na molikani ya peto, atii yango na lilita na yemoko ya sika, mpe atii libanga linene na ekuke ya nkunda.7

Nikodeme amemaki mola mpe aloe. Asungaki Yosefe kozwa nzoto mpe balingaki yango na molikani mpe malasi.8

Malia Magadala, mpe basi basusu balandaki Yosefe mpe Nikodeme, bamonaki epai wapi bango bakundaki nzoto ya Yesu, mpe balengelaki malasi ya kitoko mpe mafuta mpo na kopakola yango.9 Engebene na mibeko ya makasi ya mokolo wana, bazelaki mpo kolengela nsima mpe bopakoli nzoto mafuta mpo ete mokolo mwa Mposo ezalaki Sabata.10 Bongo, na ntongo mpenza ya Eyenge, bakendaki na nkunda. Nsima ya komona ete nzoto ya Mobikisi ezalaki kuna te, bakendaki koyebisa bayekoli oyo bazalaki Bapostolo ya Yesu. Bapostolo bayaki elongo na bango na lilita mpe bamonaki ete yango ezalaki mpamba. Banso kasi Malia Magadala na nsuka alongwaki, komitungisaka na oyo ekomelaki na Nzoto ya Mobikisi.11

Malia Magadala atikalaki ye moko na lilita. Kaka mikolo mike yambo, amonaki liwa ya mpasi ya moninga mpe Moteyi na ye. Sikawa lilita na Ye ezalaki polele, mpe ayebaki te epai wapi Ye azalaki. Akokaki kososola te oyo ekomaki, mpe alelaki. Na ntango wana, Mobikisi mosekwi kotelamaka nsima na ye atunaki mpo na nini azalaki kolela mpe nani azalaki koluka. Kokanisaka ete azalaki mobateli ya elanga nde alobaki na ye, asengaki ete, soki ye amemaki nzoto ya Nkolo na ye, ayebisa ye esika ezalaki boye akoka kozwa yango.12

Elilingi
Maliya Magadala

Nakanisi ete Nkolo apesaki nzela na Malia Magadala ya kolela mpe kobimisa mayoki mpe mpasi na ye.13Nsima Abengaki ye na nkombo na ye, mpe abalukaki epai na Ye mpe ayebaki Ye. Nsima Abengaki ye na nkombo na ye, mpe abalukaki epai na Ye mpe ayebaki Ye. Amonaki Klisto mosekwi mpe azalaki nzeneneke moko ya lisekwa na Ye ya nkembo.14

Lokola bino, na nzela mosusu nakoki koloba motungisi eyokaki Malia Magadala mpe baninga ba ye yango balelaki mpo na liwa bwa Nkolo na bango. Ntango nazalaki na mibu libwa, nakufelaki yaya wa ngai ya mobali katikati ya ekumbaki moko ya bobebisi. Mpo ete yango nyonso eyaki na mbalakaka, ezwaki ngai ngonga mingi mpo na kondima mpenza oyo ekomaki. Motema na ngai etutisamaki na mawa mpe monyokoli, mpe nakokaki komituna ngai moko, “Nini ekomelaki ndeko na ngai ya mobali? Azali wapi? Akendaki wapi? Nakomona ye mokolo moko lisusu?”

Na ntango yango, nayebaki nanu te mwango ya libiki ya Nzambe, mpe nazalaki na bosenga ya koyeba epai wapi towuta, ntina ya bomoi na biso ezali nini, mpe nini ekoyela biso na nsima ya biso kokufa. Biso banso tozali na mayoki wana ntango tokufisi molingami moko to ntango toleki na mikakatano na bomoi na biso?

Mibu mike nsima, nabandaki kokanisa ndeko wa ngai ya mobali na lolenge mosusu mpenza. Nalingaki kokanisa ye kobeta kokoko na ekuke na biso. Nalingaki kofongola ekuke, alingaki kotelema kuna, mpe alingaki koloba na ngai, “nakufi te. Nazali na bomoi. Nakokoka te koya epai na yo, kasi sikawa nakotikala na yo mpe nakokende ata mokolo moko te.” Libanzo wana, penepene na ndoto, esalisaki ngai kotelema likolo ya mpasi mpe monyokoli oyo nayokaki ya kobungisa ye. Likanisi ete alingaki kozala elongo na ngai eyaki na makanisi ma ngai mbala na mbala. Bangonga mingi nazalaki kutu kotala na ekuke, kolikyaka ete akolinga kobeta kokoko mpe nakolinga komona ye lisusu.

Nsima ya mibu 40 koleka, na eleko ya Pasika, nazalaki kokanisa na ntina ya Lisekwa ya Yesu Klisto mpe nabandaki kokanisa na ntina ya ndeko wa ngai ya mobali. Na ngonga wana, eloko moko etikalaki polele na makanisi na ngai. Nakundolaki kokanisa ye koya kotala ngai.

Mokolo wana nasosolaki ete Molimo apesaki ngai lilendisi na ntango ya mokakatano. Nazwaki litatoli ete molimo ya ndeko na ngai ya mobali ekufi te; azali na bomoi. Azalaki kokobaka na bozali wa ye bwa seko. Nayebi ete “[ya ngai] ndeko mobali akotelema lisusu”15 na ngonga wana ya lokumu ntango, mpo na Lisekwa ya Yesu Klisto, biso banso tokosekwa. Mpo na kobakisa, Asali yango ekokisama mpo na banso kati na biso tosangana lokola mabota mpe esengo bwa seko na liboso ya Nzambe soki toponi kosala mpe kobomba mayokani na biso na Ye.

Mokambi Nelson ateyaki:

“Liwa ezali eteni moko ya ntina ya bozali na biso ya seko. Moto moko te ayebi mokolo yango ekoya, kasi yango ezali na ntina mpo na mwango monene ya esengo bwa Nzambe. Na lisalisi ya Bomikabi ya Nkolo, lisekwa mpenza ezali solo mpe bomoi ya seko ezali likoki moko mpo na molongo mobimba.

“… Mpo na mawa ya balingami batikali na bomoi … esweli ya kufa elembisami na bondimi ya mpiko na Klisto, pole ebongi nie ya elikya, bolingo bwa Nzambe mpe ya bato banso, mpe mposa makasi ya kosalela bango. Bondimi wana, elikya wana, bolingo wana ekobongisa biso mpo na kokota na liboso ya bule bwa Nzambe mpe, elongo na balongani ba biso mpe mabota ma biso ya seko, kovanda na ye libela na libela”16

Elilingi
Lilita na Elanga

Natatoli ete “soko Klisto asekwaka te uta o bakufi, to akataka nkanga ya liwa te ete lilita lizala na elonga te, mpe ete liwa lizala na etengu te, ekokaki kozala bosekwi te.

“Kasi lisekwa lizali, yango wana lilita lizali na elonga te, mpe etengu ya liwa emelami na Klisto.

“Azali mwinda mpe bomoi ya mokili; iyo, mwinda moye ezanga nsuka, moye mokoki koyindisama mokolo moko te; iyo, mpe lisusu bomoi oyo ezanga nsuka, ete liwa ekoka kozala lisusu te.”17

Elilingi
Mobikisi mosekwi

Yesu Klisto Yemoko alobaki, “nazali lisekwa, mpe bomoi: oyo azali na bomoi kati na ngai, atako akufaki, nsima akozala na bomoi.”18

Natatoli ete na nzela ya Bomikabi ya lisiko mpe Lisekwa ya nkembo ya Yesu Klisto, mitema mibukana mikoki kobika, somo ekoki kokoma kimia, mpe kozanga elikya ekoki kokoma elikya. Akoki koyamba biso na maboko na Ye ya ngolu, kobondisaka, kopesaka nguya, mpe kobikisaka moko na moko na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa