Kobila kino Nsuka
Ezali mingi mpenza te na ntina ya oyo tozali kokutana na yango na bomoi kasi oyo tozali kokoma.
Ntango natangaka buku ya Misala mpe mikanda ya Paulo, nasepelaka na lolenge Paulo atambwisamaki na bolingo mpe botondi na kosalaka, koteyaka, mpe kotatolaka na ntina ya Yesu Klisto. Lolenge nini moto ya boye akoki kosala na bolingo mpe botondi ya boye, mingimingi kotalaka bampasi na ye minene? Nini etindikaki Paulo na mosala? “Najali kobila kino nsuka mpo na libonja oyo ezali ebiangeli ya Nzambe kuna na likolo kati na Klisto Yesu.”1
Kobila kino nsuka ezali kokoba na bondimi mpenza na “nzela ya moke mpe ya nkaka oyo ekambaka na bomoi ya seko”2 elongo na Mobikisi na biso mpe Tata na biso ya Lola. Paulo amonaki bampasi na ye lokola “ekoki kokokana te na nkembo elingi komonana kati na biso.”3 Mokanda ya Paulo epai ya Bafilipi oyo akomaki ntango akangamaki na boloko ezali mokanda moko ya esengo koleka mpe bosepeli, mpe ya bolendisi na biso nyonso, mingimingi na ntango oyo ya mikakatano ya bozangi elikya. Biso nyonso tosengeli kozwa bokasi uta na Paulo: “Nazali kotala biloko nyonso mpamba mpo na likambo eleki malamu yango koyeba Klisto Yesu Nkolo na ngai: Mpo na ye naniokwamaki na bobungisi biloko nyonso, mpe nazali kotala yango bobele nyei, ete nazua Klisto lokola libonza.”4
Ntango totali mosala ya Paulo, biso tofulami mpe totombolami na oyo ya biso ba “Paulo” na mikolo na biso, oyo bazali kosala lisusu, koteya, mpe kotatola na bolingo mpe botondi katikati na mikakatano bakutani na yango na bomoi na bango mpe bomoi ya balingami na bango. Likambo moko nakutanaki na yango mibu 9 eleki esungaki ngai kososola motuya ya kokoba kino nsuka.
Na 2012, ntango natambolaki mpo na mbala ya yambo mpo na kokota na liyangani ya bokambi likita linene, nakokaki te kotika komiyoka elekeli ngai mpe naebongeli te. Na mutu na ngai ezalaki na mongongo kobandelaka ya makasi, “Ozali ya esika oyo te! Libunga moko ya somo esalemi!” Kaka lokola nazalaki kotambola komekaka kozua esika moko ya kofanda, Mpaka Jeffrey R. Holland amonaki ngai. Ayaki epai na ngai mpe alobaki, “Edward, ezali malamu komona yo awa,” mpe na boboto abetaki elongi na ngai. Namiyokaki lokola bebe! Bolingo mpe koyamba na ye esepelisaki ngai mpe esungaki ngai koyoka molimo ya kozalaka na esika wana, molimo ya kibondeko. Na mokolo oyo elandaki, natalaki Mpaka Holland kosalaka eloko moko oyo asalaka epai na ngai na mokolo ya liboso, na esengo kobetaka na boboto elongi ya Mpaka Dallin H. Oaks, oyo azali mokolo na ye!
Na ngonga wana nayokaki bolingo ya Nkolo na nzela ya bato oyo tosungaka lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi. Mpaka Holland, na nzela ya misala na ye ya boboto, ya kimoto, asungaki ngai kolonga bomoto ya kakangai na ngai mpe mayoki na ngai ya bozangi kokoka. Asungaki ngai kotia makanisi na mosala ya bule mpe ya esengo na oyo nabiangemaka—komema milimo epai ya Klisto. Ye, lokola Paulo ya kala, alakisaki ngai kokoba kino nsuka.
Ya motuya mpenza, Paulo azali koteya biso kokoba kino nsuka, ntango tobiangemi kobosana yango oyo ezali na nsima—babobangi na biso ya kala, makambo ya makanisi na biso ya kala, babokueyi na biso ya kala, mpe mawa na biso ya kala. Azali kobianga biso, kaka lokola profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, na “lolenge moko esantu koleka, ya sika koleka.”5 Elaka ya mobikisi ezali ya solo: “Moto nyonso oyo akobikisa bomoi na ye akobungisa yango: mpe moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ntina na ngai akobikisa yango.”6
Na liteya na ngai ya yambo na likita linene, nakabolaki likambo moko ya liteya ya mama na ngai ya kosala na elanga na biso. “Kotala na nsima ata mokolo moko te,” alobaki. “Tala liboso na oyo tosengeli lisusu kosala.”7
Na mikolo ya nsuka ya bomoi na ye, ntango azalaki kobunda na maladi ya cancer, afandaki elongo na Naume mpe ngai. Butu moko nayokaki ye kolelaka na kisuku na ye. Mpasi na ye ezalaki makasi, atako nsima ya komela nkisi na ye ya nsuka ya mikolo nyonso ya morphine kaka nsima ya ngonga mibale.
Nakotaki na kisuku na ye mpe nalelaki elongo na ye. Nasambelaki na mongongo makasi mpo na ye ayamba lisungi ya lombango uta na mpasi na ye. Mpe bongo asalaki eloko moko asalaki liboso na elanga mibu eleka: atikaki kolela mpe ateyaki ngai liteya moko. Nakobosanaka ata mokolo moko te elongi ye na ntango wana: ya kolemba, kobukana, mpe mpasi bebo, kotalaka na mawa mwana na ye ya mobai ya mawa. Asekaki katikati ya mai ya miso na ye, atalaki na kati ya miso na ngai, mpe alobaki, “ezali likolo na yo to moto mosusu te, kasi ezali likolo ya Nzambe ye kaka mpasi oyo ekokende to te.”
Nafandaki na kimia mpenza. Ye pe afandaki na kimia mpenza. Yango etikala polele na makanisi na ngai. Butu wana, na nzela ya mama na ngai, Nkolo ateyaki ngai liteya moko oyo ekotikala na ngai libela na libela. Ndenge mama na ngai atalisaki kondima na ye na bolingi ya Nzambe, namikundolaki ntina Yesu Klisto anyokwamaki na Elanga ya Getesemane mpe likolo ya ekulusu na Gologota. Ye alobaki: “Tala napesi bino nsango malamu, mpe oyo ezali nsango malamu ya [ngai] oyo napesi bino—ete nayaki na mokili mpo na kosala bolingi ya Tata na ngai, mpamba te Tata atindaki ngai.”8
Nakanisi na mituna ya kiprofeta profeta na biso ya bolingo, Mokambi Nelson atunaki biso na likita linene eleki. Mokambi Nelson atunaki: “Ezali yo na bolingi ya kotika Nzambe azala ntina koleka na kati ya bomoi na yo? Ezali yo na bolingi ya kotika Nzambe azala na nguya ya monene koleka nyonso kati ya bomoi na yo? Ekopesa yo nzela ete mongongo na Ye ezwa … esika ya likolo ya makanisi nyonso mosusu? Ezali yo na bolingi ya kotika bolingi na yo emelama na kati ya bolingi na Ye?”9 Mama na ngai alingaki koyanola na “iyo,” ya kozanga komitala mpe ya ngwi mpe bandimi ya bosembo mosusu ya Eklezia na mokili mobimba balingaki koyanola na “iyo,” ya kozanga komitala mpe ya ngwi.” Mokambi Nelson, matondi mpo na kofula mpe kotombola biso na mituna oyo ya boprofeta.
Kala te, nazalaki na lisolo moko na Pretoria, Afrika ya Sudi, na episikopo moko akundaki mwasi na ye mpe mwana na ye ya mwasi ya mokolo na mokolo moko kaka. Bomoi na bango esengamaki na bokono oyo ya coronavirus. Natukaki lolenge nini ye azalaki koyoka. Eyano ya Episikopo Teddy Thabete ekembisaki makanisi na ngai ya kolanda maloba mpe toli uta na baprofeta ya Nkolo, bamoni, mpe babimisi. Episikopo Thabethe ayanolaki ete ezali ntango nyonso na elikya mpe libondi na koyebaka ete Mobikisi azwaki likolo na Ye moko bampasi ya bato na Ye, ete Ye akoki koyeba lolenge nini kosunga biso.10 Na bondimi makasi atatolaki, “ nazali na botondi mpo na mwango ya lobiko, mwango ya esengo.” Nsima atunaki ngai motuna: “Ezali te yango profeta na biso azalaki komeka koteya biso na likita oyo eleki?”
Ntango mikakatano ya bokufi ekoyela biso nyonso na nzela moko to mosusu, tika biso totia makanisi na ntina ya biso ya “kobila[ka] kino nsuka,” oyo ezali “ntalo ya kofuta ya libiangi ya Nzambe kuna na likolo.”11
Mbela na ngai ya komikitisa epai na biso nyonso ezali kotika ata mokolo moko te! Tobiangemi na “kolongola bipekiselo, mpe masumu mazali kokanga biso, mpe topota na etingia na emekamelo ya mbangu ezali liboso na biso, kotalaka epai ya Yesu mobandisi mpe mosukisi ya kondima na biso.”12
Ezali mingi mpenza te na ntina ya oyo tozali kokutana na yango na bomoi kasi oyo tozali kokoma. Ezali na esengo na kobilaka kino na nsuka. Natatoli ete Ye oyo alongaki nyonso akosunga biso soki totali epai na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.