Likita Linene
Mawa Na biso Ekobongwana na Esengo
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Mawa Na biso Ekobongwana na Esengo

Nabiangi baoyo nyonso bazali koyoka mawa, baoyo nyonso bazali komituna, nini ekoya nsima kufa na biso, kotya bondimi na bino kati na Klisto.

Mibu mingi eleki, ntango nazalaki koyangana na makita na Salt Lake City, Profeta na biso ya bolingo, Russell M. Nelson apesaki ngai mbote. Na lolenge ya longonya mpe ya ye moko, atunaki, “Mark, mama na yo azali ndenge nini?”

Nayebisaki ye nazalaki na ye liboso ya poso wana na ndako na ye na Nouvelle-Zélande mpe ete akomaki mpaka kasi atondisamaki na bondimi mpe bofulami moko na baoyo nyonso bayebaki ye.

Nsima alobaki, “Nasengi opesa ye bolingo na ngai … mpe yebisa ye nazali kozela komona ye lisusu.”

Nakamwaki mpenza mpe natunaki, “Ozali na mobembo ebongisami mpo na kokende na Nouvelle-Zélande kala mingi te?”

Na bosembo ya makanisi ayanolaki, “O te, nakomona ye na bomoi ezali koya.”

Ezalaki na eloko ata moko te ezanga ntina na eyano na ye. Ezalaki lolenge ebongi ya kolakisa likambo to bosolo. Na ntango wana ya bobatami mpe ntango ezanga bobateli, nayokaki mpe nasosolaki litatoli ya peto uta na profeta ya bomoi ete bomoi ekobaka nsima ya kufa.

Likita ya nsuka ya poso oyo, bokoyoka bapostolo mpe baprofeta na bomoi kotatolaka na ntina ya Lisekwa ya Yesu Klisto. “Mibeko ya ntina ya lingomba na biso ezali litatoli ya Bapostolo mpe Baprofeta, mpo na oyo etali Yesu Klisto, ete akufaki, akundamaki, mpe asekwaki lisusu mokolo ya misato[;] … biloko nyonso mosusu oyo etali lingomba na biso ezali kaka mabakisi na [bosolo oyo].”1 Nalaki ete ntango ozali koyoka na likanisi ya solo, Molimo akondimisa na makanisi mpe motema na yo bosolo ya matatoli oyo.2

Bapostolo ya kala ya Yesu babongwanaki mpo ya libela nsima Ye amimonisaki na bango kolandaka kufa na Ye. Zomi na bango bamonaki bangomei ete Ye asekwaki. Toma, ndenge azalaki te na ebandeli, alobaki, “Soki namoni te … , Nakondima te.”3 Nsima Yesu akebisaki Toma, “Tika tembe, kasi ndima.”4 Nsima Nkolo ateyaki ntina monene ya kondima: “Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi.”5

Nkolo mosekwi apesaki Bapostolo na Ye mokumba ya kotatola mpo na Ye. Ndenge moko na Bapostolo na biso na bomoi lelo, batikaki nsima misala ya mokili mpe balekisaki ntango oyo etikali ya bomoi na bango kolobaka na molende nyonso ete Nzambe atombolaki Yesu oyo. Matatoli na bango ya nguya ememi bankoto ya bato kondima libiangi ya kobatisama.6

Nsango ya nkembo ya ntongo ya Pasika ezali na katikati ya boklisto nyonso. Yesu Klisto asekwaki uta na bakufi, mpe na ntina na yango, biso mpe tokobika lisusu nsima ya kufa na biso. Boyebi oyo epesaka ndimbola mpe mokano na bomoi na biso. Soki tozali kokende liboso na bondimi, tokobongwana mpo na libela, lokola Bapostolo ya kala bazalaki. Biso, lokola bango, tokokoka koyika mpiko na mikakatano songolo na bondimi na Yesu Klisto. Bondimi oyo epesaka biso lisusu elikya mpo na ntango oyo ya biso “mawa ekobongwana na esengo.”7

Bondimi na ngai moko ezwaki ebandeli na yango kolandaka ntango moko ya mawa.

Tata mpe mama na ngai bazalaki kobokola bampate na feleme na Nouvelle-Zélande.8 Basepelaki na bomoi na bango. Lokola babalani ya sika, bapambolamaki na bana mike misato ya basi. Mwana moke na kati ya baoyo abengamaki Ann. Mokolo moko ntango bazalaki elongo na bopemi na etima, mwana ya sanza 17 Ann abungaki. Nsima ya miniti ya boluki ezanga elikya, bakutaki ye ya kokufa na kati na mayi.

Ndoto mabe oyo epesaki mawa koleka. Tata akomaki mibu ebele nsima ete koseka ekomaki mpasi na bomoi na bango mpo na libela. Epesaki lisusu mposa makasi mpo na biyano na mituna ya ntina mingi ya bomoi: Nini molingami na biso Ann akokoma? Tokomona ye lisusu mpenza? Lolenge nini libota na biso ekoki kozala na esengo lisusu?

Mwa mibu nsima ya likama oyo, bilenge mibale bamisionele ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bayaki na feleme na biso. Babandaki koteya bosolo ezwami na Buku ya Mormon mpe Biblia. Bosolo oyo ezali na kondimama ete Ann azali sikawa kobika na mokili ya molimo. Mpo na Lisekwa ya Yesu Klisto, ye mpe akosekwa. Bateyaki ete Eklezia ya Yesu Klisto ezongisami mbala moko lisusu na mabele na profeta ya bomoi mpe Bapostolo zomi na mibale. Mpe bateyaki liteya se moko mpe ya kokamwa ete mabota ekoki kokangisama elongo mpo na libela na bokonzi ya bonganganzambe se moko Yesu Klisto apesaki Apostolo Mokambi na Ye, Petelo.9

Mama na ntango wana kaka andimaki bosolo mpe azwaki litatoli ya Molimo. Tata, atako bongo, azalaki kobunda mobu elandi kati kati ya ntembe mpe bitinda ya molimo. Lisusu, azalaki kokakatana mpo na kobongola lolenge ya bomoi na ye. Ntongo moko elandi butu ezanga pongi, ntango azalaki kotambola na mabele, abalukaki epai ya Mama mpe alobaki, “Nakobatisama lelo soki te ata mokolo moko te.”

Mama ayebisaki bamisionele likambo ekomaka, mpe mbala moko bandimaki kongenga ya bondimi kati ya tata na ngai oyo ekozala sikawa ya kopela to ya kozimama.

Na ntongo wana mpenza libota na biso ekendaki na libongo ya penepene. Koyebaka te nini ezalaki kosalema, biso bana tozalaki na pikiniki na bitando ya zelo ntango Mpaka Boyd Green mpe Gary Sheffield bamemaki baboti na ngai kati ya mbu mpe babatisaki bango. Kati ya mosala mosusu ya bondimi, Tata asalaki elaka na nkuku epai na Nkolo ete atako nyonso ekoya, akozala na bosolo bomoi na ye mobimba na bilaka nyonso azalaki kosala.

Mbula moko na nsima tempelo ebulisamaki na Hamilton, Nouvelle-Zélande. Mwa moke na nsima libota na biso, na moto moko momonisi ya Ann, tofukamaki nzinganzinga ya etumbelo kati na ndako ya bule ya Nkolo. Kuna, na bokonzi ya bonganganzambe, tosanganaki na bomoko lokola libota ya seko kati ya likuli ya pete mpe ya kitoko. Ememaki kimya monene mpe esengo.

Mibu ebele na nsima Tata ayebisaki ngai ete soki ezalaki te mpo na likama ya kufa ya Ann, akokaki kozala ata moke te na komikitisa mpo na kondima nsango malamu ezongisama. Nzonkande Molimo ya Nkolo alonaki elikya ete oyo bamisionele bateyaki ezalaki solo. Bondimi ya baboti na ngai ekobaki nakokola kino ntango batondisamaki na moto ya litatoli oyo na kimya mpe komikitisa etambwisaki ekateli na bango nyonso kati na bomoi.

Nakozala ntango nyoso na botondi mpo na ndakisa ya baboti na ngai mpo na bankola ekoya. Ezali mpasi koyeba motango ya bomoi ebongwana mpo na libela mpo na misala na bango ya bondimi na eyano na mawa makasi.

Nabiangi baoyo nyonso bazali koyoka mawa, baoyo nyonso bazali kotya ntembe, baoyo nyonso bazali komituna nini ekoya nsima kufa na biso, kotya bondimi na bino kati na Klisto. Nalaki ete soki osepeli kondima, sikawa osali na bondimi mpe olandi banungunungu ya Molimo, okozala na esengo na bomoi oyo mpe na mokili ekoya.

Nazali kozela mpenza mokolo nakokutana na ndeko na ngai ya mwasi Ann. Nazali kozela bokutani ya esengo mingi na tata na ngai, oyo akufaki mibu 30 eleki. Natatoli mpo na esengo ya kozwama kati ya bomoi na bondimi, kondimaka ata namoni te, kasi koyeba na nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu Klisto azali na bomoi. Na motema mpe molimo na ngai mobimba, naponi kolanda Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezongisama. Yango epambolaka lolenge nyonso ya bomoi na ngai. Nayebi ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe, Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Na nkombo na Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 49.

  2. Tala Doctrine et Alliances 8:2.

  3. Yoane 20:25. “Ezali komonana na mokili oyo koloba ete ‘komona ezali kondima.’ Lolenge ya Nkolo elimbolami malamu mpenza na elobeli ya kokesena: ‘Kondima ezali komona.’ Bondimi kati ya Nkolo ezali likanisi, nsuka te” (Lance B. Wickman, “But If Not,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2002, 31).

  4. Yoane 20:27.

  5. Yoane 20:29; nsete ebetami.

  6. Tala Misala 2.

  7. Yoane 16:20.

  8. Kenneth Molony Palmer mpe Jill Garlick Palmer.

  9. Tala Matai 16:19.

Bimisa na lokasa