Likita Linene
Bakoki Kolonga Te, Tokoki Kokweya Te.
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Bakoki Kolonga Te, Tokoki Kokweya Te.

Soki totongi moboko na biso likolo ya Yesu Klisto, tokoki te kokweya!

Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, alobaki na likita linene lileki: “Na ntango ya mpasi oyo wapi Apostolo Paulo asakolaki, Satana azali kutu te trying komeka kobomba mandoki na ye na moango ya Nzambe. Mabe ezali kokoma makasi. Na yango, nzela bobele moko mpo na kobika na molimo ezali ya kozwa mokano ete Nzambe alonga nyonso na kati ya bomoi na biso, mpo na koyekola koyoka mongongo na Ye, mpe mpo na kosalela nguya na biso mpo na kosunga kosangisa Yisalaele.”1

Lolenge tozali kozua libiangi ya profeta ya koyekola koyoka mongongo ya Nzambe, mitema na biso ezui mokano to eyeisami makasi? Tokundola toli epesami na Yakobo 6:6Iyo, lelo soki bokoyoka mongongo mwa ye, boyeisa mitema mya bino mikasi te; mpo na ntina nini elingi bino kokufa? boyeisa mitema mya bino mikasi te; ” Tokoki kopona ete Nzambe azala ntina koleka kati na bomoi na biso.

Lolenge nini tokoki kotika ete Nzambe azala ntina koleka kati na bomoi na biso mpe satana te? Na Doctrine & Alliances 6:34 totangi, “Na yango, bobanga te, lisanga moke; bosala bolamu; tika mabele mpe lifelo basangana mpo na kobundisa bino, mpo na soki botongami na libanga na ngai, bakoki kolonga te. Ezali elaka moko monene. Atako mabele mpe lifelo bakoki kosangana mpo na kobundisa biso, bakoki kolonga te soki tokopona kotika Nzambe azala ntina koleka na kotongaka bomoi na biso likolo ya libanga na Ye.

Kolobaka na bayekoli na Ye, Yesu Klisto ateyaki na ntina ya moto ya bwania mpe moto na liboma, ekomami na Matai mokapo 7 ya Boyokani ya Sika. Mingi kati na bino bayoka loyembo ya Eteyelo ya Bana “The Wise Man and the Foolish.”2 Soki ozui ntango ya kokokanisa milongo minei kati na loyembo, okomona ete molongo 1 mpe 2 ekokani mingi na molongo 3 mpe 4. Bango mibale moto na bwania mpe moto na liboma bazalaki kotonga ndaku. Balingaki kopesa mabota na bango ndaku ya kimia mpe malamu. Balingaki kobika elongo na esengo lokola libota, kaka lokola ngai na yo. Makambo ya zingazinga ezalaki lolenge moko: “nyonso bamvula enokaki, mpe mpela etombokaki.” Toyembaka yango mbala motoba ntango toyembaka loyembo oyo. Bokeseni se moko ezali ete moto na bwania atongaki ndako naye likolo ya libanga mpe ndako etelemaki ngwi, moto na bolema atongaki ndako na ye likolo na zelo mpe ndako na ye ekweyaki. Na yango, epai wapi totie moboko na biso ezali na motuya makasi, mpe yango ezali na ba mbano na mikano na bomoi mpe ya seko na seko.

Nalikii mpe nasambeli ete banso tozwa mpe totelema na moboko ya sikisiki ntango tozali kotonga bomoi na biso ekoya. Tokundolami na Elamani 5:12: “Mpe sikawa, bana mibali ba ngai, bomikundola, bomikundola ete ezali na likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana Mobali ya Nzambe, ete bosengeli kotonga nse ya bino moboko; ete ekotinda zabulu mipepe makasi na ye, iyo, makula na ye na mopepe ya kaina, iyo, ekobete mvula inso ya mabanga ya ye mpe moketi makasi na ye likolo na bino, ekozala na nguya likolo na bino te mpo ya kobenda bino na nse ya libulu ya bobola mpe lisuma ezanga nsuka, na ntina ya libanga likolo liye wapi botongami, oyo ezali nse yoko ya solo, nse yoko na wapi soko bato batongi bakoki kokweya te.”

Oyo ezali elaka uta na Nzambe. Soki totongi moboko na biso likolo ya Yesu Klisto, tokoki te kokweya! Ntango tozali kokoba na kondima kino na nsuka, Nzambe akosunga biso kotonga bomoi na biso likolo ya libanga na Ye, mpe bikuke ya lifelo ekolonga [biso te]” (Doctrine & Alliances 10:69). Tokoki kozala na makoki te ya kobongola maye nyonso makoya, kasi tokoki kopona lolenge nini komilengela mpo na maye makoya.

Mingi kati na biso bakoki kokanisa, “Nsango malamu ezali malamu, bongo tosengeli kotia yango na bomoi na biso ntango mosusu mpo na poso moko.” Kokende eklezia kaka mbala moko na poso ezali mingi te mpo na kotonga likolo ya libanga. Bomoi na biso mobimba esengeli etondisama na nsango malamu ya Yesu Klisto. Nsango malamu ezali te eteni ya bomoi na biso, kasi bomoi na biso ezali sikawa eteni ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Kanisa mpo na yango. Ezali ya solo te? Bomoi ya kufa na biso ezali kaka eteni ya mobimba ya moango ya lobiko mpe bonetoli.

Nzambe Azali Tata na Biso ya Lola Alingi biso banso. Ayebi oyo ekoki kozala nzela na biso malamu koleka biso moko. Ayebi kaka makambo mike ya bomoi na biso te. Nzambe ayebi biteni ya mike mike ya bomoi na biso.

Tosengi tolanda profeta na biso na bomoi, toli ya bwanya ya Mokambi Nelson. Ndenge ekomami kati na Doctrine & Alliances 21:5–6:

“Mpo liloba na ye bondima yango lokola kaka uta na monoko na ngai moko, na bompikiliki bonso mpe bondimi bonso.

“Mpo na kosalaka makambo oyo bikuke ya lifelo bikolonga [bino] te; iyo, mpe Nkolo Nzambe akobengana banguya ya molili liboso na [bino], mpe kosala ete balola eningana mpo na bolamu na bino, mpe nkembo ya nkombo na ye.”

Mpo na ntina oyo, bakoki kolonga te, mpe tokoki kokweya te!

Natatoli epai na bino ete Klisto akoya lisusu mbala ya mibale lolenge Asalaki mbala ya liboso, kasi mbala oyo ekozala na nkembo mpe bokonzi monene. Nalikii mpe nasambeli ete na kozala ya komilengela mpo na koyamba Ye, ezala na ngambo oyo ya bomoi, to mpe na ngambo mosusu. Ntango tozali kosepela na eleko malamu oyo ya Pasika, nalikii, na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe nguya ya Lisekwa na ye (tala Moroni 7:41) nakozala na makoki ya kotelema mpe kokutana na Mokeli na ngai mpe koloba, “Matondi.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa