Nzambe Alingaka Bana na Ye
Nalingi kokabola banzela misato Tata na biso ya Lola amonisi bolingo na Ye mpo na biso, bana na Ye.
Bandeko mibali mpe basi, nasepeli elongo na bino kati na nsango malamu ya Yesu Klisto. Namemeli bino bolingo ewuti na bandimi ya makasi na Philippines mpe nalobi, na nkombo na bango, Mabuhay
Na ntongo ya Pasika oyo, natatoli na ntina ya Klisto na bomoi, ete asekwaki na kufa mpe ete bolingo na Ye mpo na biso mpe mpo na Tata na biso na Lola ezali ya peto mpe ya seko. Lelo, nalingi kobeta nsete likolo ya bolingo ya Tata ya Lola mpe Yesu Klisto mpo na banso, oyo emonisami na nzela ya Bomikabi ya Mwana na Ye, Yesu Klisto. “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesaki Mwana na likinda na ye” (Yoane 3:16
Ntango batunaki profeta Nefi epai anjelu moko mpo na oyo etali boyebi na ye ya Nzambe, Nefi ayanolaki na pete, “Nayebi ete alingaka bana na ye” (tala 1 Nefi 11:16–17
Molongo moko uta na Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto elimbolaka na nguya bolingo ya solosolo ya Mobikisi: “Mpe mokili, na ntina ya mabe na bango, bakosambisa ye lokola eloko mpamba; … bafiakoli ye, … babamboli ye, … babwakeli ye nsoi, mpe atiki ayokela yango mpasi, na ntina ya boboto ya bolingo na ye mpe ya motema na ye molai epayi na bana ya bato” (1 Nefi 19:9 Bolingo ya mokili mobimba ya Mobikisi ezali nguya ya bopesi ntina eleki nyonso oyo Ye asalaka. Toyebi ete ezali bolingo se moko oyo Tata na biso ya Lola azali na yango mpo na biso, mpo ete Mobikisi ateyaki biso na bomikitisi ete Ye mpe Tata “bazali moko” (tala Yoane10:30; 17:20–23
Boniboni, nsima, tozali kozongisa mpe kolakisa botondi na biso mpo na bolingo na Bango ya mokili mobimba? Mobikisi ateyaki biso na libiangi oyo ya mpasi te, na banso: “Soki bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai” (Yoane 14:15
Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki, “Bolingo ya mokili mobimba mpe oyo ebonga nie ya Nzambe elakisami kati na mapamboli nyonso ya mwango na Ye ya nsango malamu, kobakisa likambo ete mapamboli na Ye ya malamu mingi mpenza ezali mpo na baoyo batosi mibeko na Ye.”1
Nalingi kokabola banzela misato Tata na biso ya Lola amonisi bolingo na Ye mpo na biso, bana na Ye.
Yambo, Mokangano elongo na Nzambe mpe Libota Emonisi Bolingo na Ye
Mikangano na biso ya motuya mingi mpenza ezali elongo na Tata mpe Mwana mpe elongo na mabota na biso mpo ete babokangami na biso epayi na bango ezali ya seko. Mwango monene ya esengo ezali emoniseli ya kafukafu ya bolingo ya Nzambe mpo na biso. Na miso ya kokangama na mwango ya Nzambe toponi na bolingi kolongola mabele mpe mabanga kati na biso oyo esungi bamposa ya kimoyimi mpe kokitinisa yango na miboko oyo etongi babozalani ya seko. Na ndenge esengeli, oyo ekoki kobengama “boluki ya molimo.” Na kosalaka boluki na biso ya molimo, tosengeli yambo koluka Nzambe mpe kobondela Ye (tala Yelimia 29:12–13
Kolukaka Ye mpe kobondelaka Ye ekobanda nzela mpe ekopesa esika mpo na kotonga mpe kolendisa babozalani na biso ya seko. Epesaka biso nzela ya komoina na molimo ya monene mpe esungaka biso toyekama na kobongolaka maye tokoki kososola na esika ya koyekama na babobangi ezangi bososoli na biso. Koyekolaka bomoi mpe mosala ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, ekosunga biso tomona makambo mosusu oyo na miso ya seko.
Banzela ya kobungisa makanisi ekoki ntango mosusu kopekisa biso koyoka bolingo ya Nzambe na babozalani na biso ya libota mpe masano to milulu na biso. Mama moko koyokaka ete biloko ya lotiliki ezalaki kobebisa mikangano ya libota na ye ayaki na biyano. Na mesa ya elambo ya monene mpe bangonga mosusu ya libota, azalaki koloba na pete, “Bokitisa batelefoni na mesa; tika tozwa ntango ya masolo ya moto moko liboso ya mosusu.” Azalaki koloba ete oyo ezali ezalela ya sika mpo na libota na bango mpe ete yango ezali kolendisa babozalani na bango lokola libota ntango bazali kozwa ngonga ya masolo ya mbunsu na mbunsu ya solo. Bazali sikawa kosepela na masolo ya Yaka, Landa Ngai ya malonga elongo lokola libota.
Ya mibale, Alakisi Bolingo na Ye epayi ya Bana na Ye na Kobiangaka Baprofeta
Mokili na biso ya lelo etondisami na “bitumba ya maloba mpe makelele ya makanisi” (Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:10 Paulo akundolisi biso ete “Ezali na … mingongo ya ndenge mingi na mokili” (1 Bakolinti 14:10 Nini kati na mingongo nyonso eyokani na polele mpe na ntina koleka nyonso? Ezali mongongo ya baprofeta, bamoni, mpe babimisi ya Nzambe.
Namikundoli mpenza nsima ya lipaso na 2018, na bozongeli mosala, nazalaki na esika ya mituka na bilo ya Eklezia. Na mbalakaka, nayokaki mongongo ya Mokambi Russell M. Nelson kobiangaka, “Taniela, Taniela.” Nakendeki mbango epayi na ye, mpe atunaki boniboni nazali koyoka.
Nalobaki, “Nazali koyoka malamu mpenza, Mokambi Nelson.”
Apesaki ngai toli mpe mbote na boboto. Nayokaki solo mosala mpenza ya profeta epayi ya “moko.”
Mokambi Nelson asali mibembo na mikili mingi ya mabele. Na makanisi na ngai, azali kaka kosalisa bankoto, kasi azali kosalisa bankoto ya “bato moko na moko.” Kosalaka boye, azali kokabola bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na bana na Ye nyonso
Kala te, maloba ya Mokambi Nelson ezalaki liziba ya bokasi mpe bofuli molimo epayi ya bato ya Philippines. Lokola na bamboka nyonso na mokili, na 2020 Philippines esimbamaki mabe na bokono bobe ya COVID-19, lokola mpe na moto ya ngomba, baboningani ya mabele, mipepe makasi, mpe bampela ya konienliginia.
Kasi lokola likonzi ya pole kongengaka kati na mapata ya mwindo ya bobangi, bomoko, mpe bozangi elikya maloba ya profeta mayaki. Ezalaki na libiangi mpo na bokili bilei mpe losambo mpe toli na mokili mobimba mpo na kokende liboso atako bokono bobe. Asengaki biso tokomisa bandako na biso bandako ya losambo ya bondimi. Abengaki Basantu ya Mikolo mya Nsuka bisika nyonso bamemia bana ya Nzambe banso mpe batika Nzambe azuwa esika ya yambo na bomoi na bango.2
Ya solo mpenza likambo ya kafu-kayu ezalaki video ya litatoli ya kala te ya Mokambi Nelson kolobelaka nguya ya botond, mpe losambo na ye ya nsuka oyo esimbaki bato na Phillipines mobimba.3 Na etuka ya Leyte, video ezalaki kolakisa ntango ya molulu ya bokaboli bondimi, mpe etalisamaki lokola eteni moko ya bonganganzambe ya liteya ya nsango malamu. Philippines, elongo na mokili mobimba, epambolami mpenza na koyoka bolingo ya Nzambe na nzela ya maloba ya profeta na ye aponama.
Ya misato, Kopesa Etumbu Ekoki Kozala yoko Mamonisi ya Bolingo ya Nzambe mpo na Bana na Ye
Ntango mosusu, Nzambe amonisaka bolingo na Ye na kopesaka biso etumbu. Ezali nzela moko ya kokundolisa biso ete Ye alingi biso mpe ete Ye Ayebi banani tozali. Mapamboli na Ye elakama ya kimia efungwama na baoyo banso na mpiko bazali kotambola na nzela ya boyokani mpe bazali na bolingi mpo na koyamba mpamela.
Ntango tososoli etumbu mpe toyambi yango na motema moko, yango ekomi lipaso ya molimo. Nani alingaka lipaso, mpenza? Kasi na baoyo bazali na bosenga na yango mpe bayambi yango na motema moko, ekoki kobikisa bomoi. Nkolo apesaka etumbu epayi ya baye Ye alingaka. Makomi elobeli biso bongo (tala Baebele 12:5–11; Elamani 12:3; Doctrine and Covenants 1:27; 95:1). Etumbu wana, to lipaso, ekomema mbongwana esengelami na bomoi na biso. Tokososola, bandeko mibali mpe basi, ete epelisi mpe epetoli bamasuwa na biso ya kati.
Joseph Smith, profeta ya Bozongisi, apesamaki etumbu. Nsima ya Joseph kobungisa nkasa 116 ya nkoma ya maboko ya Buku ya Mormon, Nkolo asembolaki mpe alakisaki bolingo nyonso mibale na kolobaka: “Osengeli kobanga moto mingi te koleka Nzambe. … Osengeli kozala na bondimi. … Tala, ozali Joseph, mpe oponamaki. … Mikundola, nzambe azali mawa; yango wana, yamboli” (Doctrine and Covenants 3:6–10).
Na 2016, ntango nazalaki kosala misio na Little Rock, Arkansas, nasengaki Ndeko Cava akende kotika liboke moko epayi ya yaya na ngai ya mwasi, oyo azalaki kofanda na esanga moko na Fiji. Eyano na ye ezalaki eloko moko te oyo nakasaki liboso. “Mokambi Wakolo,” alelaki, “Ndeko na yo ya mwasi akufaki mpe akundamaki eleki mikolo 10.” Namiyokelaki mawa kutu nayokaki mwa kanda ete libota na ngai ekanisaki kutu te koyebisa ngai.
Mokolo ya nsima, ntango mwasi na ngai azalaki koteya bamisionele, likanisi oyo ekotaki na molimo na ngai: “Taniela, makambo nyonso oyo ezali mpo na bolamu mpe bokoli na yo moko. Ozalaki koteya mpe kokabola litatoli na yo etali Bomikabi ya Yesu Klisto; sikawa salela yango.” Nakundolamisamaki ete “moto oyo Nzambe [a]pamelaka azali moto na esengo; boye [tosengeli] kotiola te … bitumbu na Oyo-na-Nguya-Yonsothe” (Yobo 5:17). Ezalaki lipaso ya molimo mpo na ngai, mpe mbano ezalaki ya noki noki.
Kaka lokola nazalaki kotala likambo yango, nabiangamaki mpo na kopesa makanisi ya nsuka na bokaboli wana. Kati na makambo mosusu, nakabolaki mateya oyo nawutaki koteyama: moko, napesamaki etumbu na Molimo Mosantu mpe nalingaki yango mpo ete nazalaki bobele moko oyo nayokaki yango; mibale, mpo na ntina ya libonza ya Mobikisi mpe lisiko, nakolobela lisusu mikakatano lokola mimekano mpe mitungisa te, kasi lokola “boyekoli boyebi” na ngai; mpe misato, mpo na ntina ya bomoi na ye ebongi nie mpe ezanga masumu nakolobela lisusu mabungi mpe bozangi makoki ya misala lokola botau te kasi lokola ya ngai mabaku ya bokoli. Likambo oyo esungaki ngai nayeba ete Nzambe apesaka biso etumbu mpo ete Alingaka biso.
Nabakisi. Nasukisi, Tata na biso ya Seko mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, balakisaka bolingo na Bango na kopesaka biso nzela ya kozala na babozalani ya seko elongo na Bango mpe bandeko ya libota na biso, na kobiangaka baprofeta ya mikolo ya sika mpo na koteya mpe kosalisa biso, mpe na kopesaka biso etumbu mpo na kosunga biso toyekola mpe tokola. Nzambe azwa matondi mpo na likabo ezanga kokokanisa ya bonzambe ya Mwana na Ye,”4 Nkolo na biso mosekwi, kutu Klisto na bomoi” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.