Likita Linene
Boyamba Mambi makoya Nsima na Bondimi
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Boyamba Mambi makoya Nsima na Bondimi

Mikolo ekoya nsima ekozala ya nkembo mpo na ba oyo bamilengeli mpe bakobi komilengela mpo na kozala bisalelo na maboko ya Nkolo.

Oyo ezalaki mpokwa moko ya kobosana te. Bandeko basi ba bolingo, nazali na esengo ya kozala na bino. bazalaki na makanisi na ngai mbala mingi mpenza na mwa basanza oyo eleki. Bozali mingi koleka bamilio mwambe ya bato. Bozali bobele te mitango kasi nguya ya molimo mpo na kobongola mokili. Nazalalaki kotala bino kosalaka yango na ntango ya bokono bobe oyo.

Basusu kati na bino na mbalakaka bamikutaki kolukaka biloko emonanaka mingi te to mosala ya sika. mingi bazalaki kotangisa bana mpe bazalaki kokonde kotala bato ya penepene. Basusu bazalaki koyamba bamisionele na bandako na ntongo-ntongo koleka oyo bakanaki te, ntango basusu bobongolaki bandako na bino na bandako ya kotangisa bamisionele. Bosalelaki tekinolozi mpo na kosangana na libota mpe baninga, kosalisa baoyo boyokaki kozala bango moko, mpe mpo na koyekola Yaka, Landa Ngai elongo na basusu. Bomonaki banzela ya sika ya kosala Saba ezala ya esengo. Mpe bosalaki bamask ya kobatela—bamilio na yango!

Na motema ya mawa mpe bolingo, motema na ngai ekei na basi mingi nzinganzinga ya mokili oyo ya bango balingami bakufi. Tozali kolela elongo na bino. Mpe tozali kosambela mpo na bino. Tokumisi mpe tosambeli mpo na banso oyo bazali kosala ntango nyonso mpo na kobatela bokolongono ya basusu.

Bino bilenge basi bozalaki lisusu ya motuya. Atako media social etondisamaki na boswani, mingi kati na bino bakutanaki na banzela ya kolendisa basusu mpe kokabola pole ya Mobikisi na biso.

Bandeko basi, bozalaki banso solo bilombe! Nasepeli na bokasi nabino mpe bondimi na bino. Bolakisi ete kati na makambo ya kpokoso, bokobaka na mpiko. Nalingi bino, mpe nalobi na bino ete Nkolo alingi bino mpe amonaka mosala monene bozali kosala. Natondi bino! Mbala moko lisusu, bolakisi ete bozala mpenza elikia ya Yisalaele!

Bolati baelikia oyo mokambi Gordon B. Hinckley azalaki na yango ntango ayingisaki “Libota: Esakola na Mokili,” mibu 25 eleki na liyangani ya Lingomba ya Bamama Basungi ya monene ya sanza ya libwa ya 1995. 1 Ezali ntina ete aponaki koyingisa esakola ya motuya oyo epai ya bandeko basi ya Eklezia. Na kosala bongo, Mokambi Hinckley abetaki nsete na nguya ekokitanisamaka te ya basi kati na mwango ya Nkolo.

Sikawa, nakolingi koyeba maye boyekoli mobu oyo. Bopusani penepene koleka epai ya Nkolo, to bomiyoki mosika koleka uta na Ye? Mpe lolenge nini makambo ya sikawa esali bino bomiyoka na oyo etali mambi makoya nsima?

Solo, Nkolo alobeli mikolo na biso na maloba oyo ezali kotinda tokanisa. Akebisaki ete na mikolo na biso “mitema ya bato [ekokweisa] bango” 2 mpe ete ete moponaami nyonso mpenza akozala na likama ya kokosama. 3 Ayebisaki Profeta Joseph Smith ete “kimia [eko] longolama uta na mabele” 4 mpe makambo ya mawa makokweisama likolo ya bato. 5

nzokande Nkolo apesi lisusu limoni ya lolenge nini eleko oyo ezali kitoko. Afulaki Profeta Joseph Smith aloba ete “mosala … ya mikolo ya nsuka oyo, ezali moko ya monene makasi. … Bankembo na yango eleki bolimboli, mpe monene na yango ellekami te.” 6

Sikawa, monene ekoki te ntango mosusu kozala liloba okolinga kopona mpo na kolimbola mwa basanza eleki oyo! Boniboni ezali biso kosalela nyonso mibale masakoli ya molili mpe maloba ya nkembo oyo etali mikolo na biso? Nkolo ayebisaki biso lolenge nini na bobangi te ya pete, kasi ya kokamwa: “Soki bolengelami bokobanga te.” 7

Wana ezali elaka monene! Ezali moko oyo ekoki mpenza kobongola lolenge tomonaka mambi makoya nsima na biso. kala nayokaki mwasi moko ya litatoli ya mozindo koloba ete bokono bobe yango, kosangisama na boningani ya mabele na Lubwaku ya Salt Lake, esungaki ye asosola ete azalaki te ya komilengela lokola akanisaki ezalaki ye. Ntango natunaki soki azalaki kolobela bobombi na ye ya biloko to litatoli na ye, asekaki mwa moke mpe alobaki, “Iyo!”

Soki bomilengeli ezali fungola na biso mpo na koyamba eleko oyo mpe mambi makoya nsima na biso na bondimi, boniboni ekoki biso komilengela malamu?

Mibu mileki mingi, baprofeta ya Nkolo basengaki biso tobomba bilei, mai, mpe misolo mpo na ngonga ya bozangi. Bokono bobe oyo epesi lisusu makasi na bwania ya toli wana. Nasengi bino bobanda komilengela mpo na ntango. Kasi nazali kutu komitungisa mingi na oyo etali molimo na bino mpe bomilengeli ya moyoki ya motema.

Na yango, tokoki koyekola mingi uta na Kapiteni Moroni. Lokola komanda ya mampinga ya Banefi, akutanaki na mampinga kobundisaka bango oyo ezalaki makasi koleka, monene koleka na motango, mpe nkuna koleka. Yango wana, Moroni alengelaki bato na ye na ndenge misato ya ntina.

Yambo, asungaki bango bakela bisika epai wapi bakozala na kimia—“bisika bya bozangi likama” abengaki yango. 8 Ya mibale, alengelaki “mitema ya bato na kozala bosembo epai ya Nkolo.” 9 Mpe ya misato, atikaki mokolo moko te kolengela bato na ye—na nzoto to na molimo. 10 Tika totala mabongisi miye.

Libongi ya liboso: Bokela bisika ya kimia biye bizanga likama.

Moroni alendisaki bingumba ya Banefi nyonso na bangomba ya mabele, bisika ya makasi, mpe bifelo. 11 Ntango Balamani bayelaki bango, Balamani yango “bakamwaki mpenza, na ntina ya bwania bwa Banefi na kolengeleke bisika bya bango bya bozangi likama. 12

Lolenge moko, ntango mpasi etomboki nzinganzinga na biso, tozali na mposa ya kokela bisika epai wapi biso tozali na kimia, na nzoto mpe na molimo lokola. Ntango ndako na bino ekomi ndakonzambe ya moto se moko ya bondimi—esika wapi Molimo efandi—ndako na bino ekomi molongo ya liboso ya bobateli.

Lokola mpe, makonzi ya Siona ezali “ekimelo uta na ekumbaki” 13 mpo ete ekambami na baoyo basimbi bonganganzambe mpe bazali kosalela likoki ya bonganganzambe. Ntango bokobi kolanda toli ya epai baoyo Nkolo apesi ndingisa ya kokamba bino, bokoyoka bozangi likama monene koleka.

Tempelo—ndako ya Nkolo—ezali esika moko ekokani te na mosusu kani. Kuna, bozali bozali bandeko basi balatisami na nguya ya bonganzambe na nzela ya mayokani ma bonganganzambe ya bule oyo bosalaka. 14 Kuna, mabota na bino ekangisami mpo na seko. Kutu mobu oyo, ntango bokoti na batempelo na biso ezalaki solo na ndelo, dotasio na bino epesaki bino bozwi ntango nyonso nguya ya Nzambe ntango bozalaki kotosa mayokani na bino na Ye.

Na maloba ya pete, esika ya bozangi likama ezali epai nyonso bokoki koyokela bozali ya ya Molimo Mosantu mpe kokambama na ye. 15 Ntango Molimo Mosantu azali elongo na bino, bokoki koteya bosolo, kutu ata soki ezali kotelemela makanisi ya mikolo oyo. Mpe bokoki komaniola mituna ya solo oyo etali nsango malamu na esika ya emoniseli.

Nabengisi bino, bandeko na ngai basi ba bolingo, bokela ndako moko oyo ezali esika ya bozangi likama. Mpe nazongeli libengisi na ngai mpo ete bino bobutisa bososoli na bino ya nguya ya bonganzambe mpe ya mayokani mpe mapamboli ya tempelo. Kozalaka na bisika ya bozangi likama epai wapi bokoki kokimela ekosungabino boyamba mambi makoya nsima na bondimi.

Libongi ya mibale: Bolengela mitema na bino mpo na kozala na bosembo epai ya Nzambe.

Tobandaki mwango moko monene ya kosembola bomoi mpe bokasi ya Tempelo ya Salt Lake.

Elilingi
Kotonga ya Tempelo ya Salt Lake

Basusu batiaki ntembe ya bosenga mpo na kozwa bameko ya boye. Nzokande, ntango Lobwaku ya Salt Lake eniokwamaki na boningani ya mabele ya nguya 5.7 na ebandeli ya mobu oyo, tempelo ya lokumu oyo eninganaki makasi mingi ete kelelo ya ekeko ya anjelu Moroni ekweyaki! 16

Elilingi
Anjelu Moroni na kelelo oyo ekewyaki

Kaka lokola moboko ya mabanga ya tempelo ya Salt Lake esengeli kozala makasi ekoka mpo na kotelemela bobomibomi ya solo, ya biso moboko ya molimo esengeli kozala makasi. Nsima, ntango baboningani ya mabele na ndenge ya lisese ezali koningisa bomoi na biso, tokoki kotelama “sikisiki mpe ngwi” mpo na bondimi na biso. 17

Nkolo ateyaki biso lolenge nini kobutisa bondimi na biso na kolukaka “koyekola, kutu boyekoli na mpe lisusu na bondimi.” 18 Tolendisaka bondimi na biso epai ya Yesu Klisto ntango tozali kobunda kobatela mitindo mpe “ntango nyonso komikundola Ye.” 19 Lisusu, bondimi na biso ebutaka ntango nyonso tozali kosalela bondimi na biso kati na Ye. Wana ezali maye koyekola na bondimi elingi koloba.

Ndakisa, ntango nyonso tozali na bondimi ya kotosa mibeko ya Nzambe—kutu ntango makanisi eyebana ezali kokitisa biso—to ntango nyonso tozali kotelemela masano to makanisi oyo ezali kokembela bobuki boyokani, tozali kosalela bondimi na biso, oyo na nsima ezali kobutisa bondimi na biso.

Lisusu, mwa makambu etongaka bondimi mingi koleka bozindi ya ntango nyonso na Buku ya Mormon esalaka. Buku mosusu moko te etatolaka na ntina Yesu Klisto na nguya mpe polele ya boye. Baprofeta na yango, lokola bafulamaki na Nkolo, bamonaki mokolo na biso mpe baponaki malongi mpe bosolo oyo ekosunga biso mingi mpenza. Buku ya Mormon ezali ya biso mokambi mpo ya kobikisama na mikolo ya nsuka.

Ya solo, bozangi likama na biso ya nsuka eyaka ntango tomikangi epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto! Bomoi ezangi Nzambe ezali bomoi moko etonda na bobangi. Bomoi na Nzambe ezali bomoi moko etonda na kimia. Oyo ezali mpo ete mapamboli ya molimo eyaka epai ya basembo. Kozwaka emoniseli ya moto se moko ezali moko ya mapamboli wana ya monene mpenza.

Nkolo alaki ete soki tokosenga, tokoki kozwa “emoniseli likolo ya emoniseli.” 20 Nalaki ete ntango bobutisi makoki na bino ya kozwa emoniseli, nkolo akopambola bino na bokambi mingi mpo na bomoi na bino mpe na makabo ezanga ndelo ya Molimo.

Libongi ya misato: Kotika te komilengela

Kutu ntango makambo ezalaki kotambola malamu, Kapiteni Moroni akobaki kolengela bato na ye. Atikaki te. Ye mokolo moko te akomaki nsai nsai.

Monguna atikaki kobundisa te. Yango wana, tokoki te kotika komilengela! Soki tokozala na bomikoki—na makambo ya mokili, na mayoki ya motema, na molimo—tokomilengela mingi koleka tokotelemela bitumba ya ntango ya mbala na mbala ya Satana.

Bandeko basi ba bolingo, bozali na makoki ya kosala bisika ya bozangi likama mpo na binomei mpe baye bolingaka. Lisusu, bozali na dotasio ya bonzambe oyo epesaka bino makoki ya kotonga bondimi kati na basusu na ndenge ya kondimisa. 21 Mpe bino botika te. Bolakisi yango mbala moko lisusu mobu oyo.

Nasengi, bokoba kokende liboso! Miso gaa na bino na kobatela bandako na bino mpe kokotisa bondimi kati na mitema ya bamoko na bino bolingaka ekobota mbuma mpo na bankola ekoya .

Bandeko na ngai basi ba bolingo, tozali na mingi mpenza ya kozela! Nkolo atiaki bino awa sikawa mpo ete Ye ayebaki bozalaki na makoki ya kosilisa bakpokoso ya eteni ya nsuka ya mikolo ya nsuka oyo. Ayebaki bokosimba makasi moneneya mosala na Ye mpe bokozala na bolingi ya kosunga yango esalama.

Nazali koloba te ete mikolo ekoya ekozala pete, kasi nalaki bino ete mambi makoya nsima ekozala ya nkembo mpo na ba oyo bamilengeli mpe bakobi komilengela mpo na kozala bisalelo na maboko ya Nkolo.

Bandeko na ngai basi ba bolingo, Totia te kaka molende na eleko ya sikawa oyo. Tika toyamba mambi makoya nsima na bondimi! bangonga ya nungunungu ezali mabaku mpo ete biso tobunda na molimo. Ezali bangonga ntango nguya ekoki kozala kokota mingi koleka na bangonga ya kimia koleka.

Nalaki ete ntango tozali kokela bisika ya bozangi likama, bolengela mitema na biso mpo na kozala bosembo epai ya Nzambe, mpe kotika te komilengela, nzambe akopambola biso. Ye ako “kangola biso; iyo, mpenza ete [ ako] loba kimia na milimo na biso, mpe [ako] pesa epai ya biso bondimi bonene, mpe … kosala biso ete biso [tokoka] kolikia mpo ya libiki lya biso na kati ye.” 22

Ntango bozali komilengela mpo na koyamba mambi makoya nsima na bondimi, bilaka oyo eko zala ya bino! Natatoli bongo, na maloba na ngai ya bolingo, mpo na bino, mpe elikia na ngai na bino, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala “Libota: Esakola na Mokili,” ChurchofJesusChrist.org. Na lisikulu oyo esalamaki nzela moko na esakola oyo, Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki epai ya bana basi: “Nazali na botondi mpo na bokasi oyo bozali na yango mpo na bosembo na bino, bondimi na bino, bolingo na bino. Nazali namatondi mingi mpo na mokano oyo bozali na yango na mitema na bino ya kotambola na bondimi, mpo na kobatela mitindo, kosala maye mazali semba na ngonga nyonso mpe na makambo nyonso” (“Stand Strong against the Wiles of the World,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1995, 98–99).

  2. Luka 21:26; tala lisusu Doctrine et Alliances 45:26.

  3. Tala Matai 24:24; Joseph Smith—Matthew 1:22.

  4. Doctrine et Alliances 1:35.

  5. Tala Doctrine et Alliances 1:17. Apostolo Polo asakolaki ete “na mikolo ya nsuka ntango ya mpasi [ekolinga] koya.” Wana ekolinga kosala mikolo na biso ya lokuta na molimo. (Tala 2 Timote 3:1–5.)

  6. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 512.

  7. Doctrine et Alliances 38:30.

  8. Tala Alama 49:5; 50:4.

  9. Alama 48:7.

  10. Tala Alama 49:50.

  11. Tala Alama 48:8.

  12. Alama 49:5; biso nde tobeti sete.

  13. Doctrine et Alliances 115:6.

  14. Tala Russell M. Nelson, “Spiritual Treasures,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 76–79.

  15. Eliza R. Snow ateyaki ete Molimo Mosantu “asepelisaka mpe akokisaka bosenga nyonso ya motema moto. … Ntango natondisami na Molimo wana, molimo na ngai esepeli, mpe nakoki koloba na solo, ete makambo ezanga ntina ya mokolo yango ezali komonana lokola ezali kosala ngai eloko te. … Ezali litomba na biso te ya kotambwisa bomoi na biso na lolenge ete tokoka kozala na molimo moye ntango nyonso kokitaka kati na milimo na biso?” (na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society [2011], 46).

  16. Tala Daniel Burke, “Utah Earthquake Damages Mormon Temple and Knocks Trumpet from Iconic Angel Statue,” Sanza ya misato 18, 2020, cnn.com.

  17. Moziya 5:15.

  18. Doctrine et Alliances 88:91; nsete ebetami.

  19. Moroni 4:3.

  20. Doctrine et Alliances 42:61.

  21. Apostolo Paulo alobaki solo oyo ntango akanisaki bondimi ya bosembo ya Timote ewutaki epai ya mama na ye (Yunike) nkoko na ye ya mwasi Lois (see 2 Timote 1:5).

  22. Alama 58:11.

Bimisa na lokasa