Likita Linene
Kotalela Nkolo
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Kotalela Nkolo

Bondimi elingi koloba kotiaka elikya na Nzambe na bangonga malamu mpe ya mabe, atako soki yango ezali na mwa bampasi kino tokomona loboko na Ye komonisama mpo na litomba na biso.

Bandeko mibali mpe basi ba bolingo, tozali banso motema moto moto —moko te koleka ngai—mpo na koyoka makebisi ya kosukisa uta na Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson. Oyo ezalaki likita moko ya kafukafu, kasi ezali mbala ya mibale wapi bokono mabe oyo COVID-19 ebongoli motindo na biso ya kosala lokola momeseno. Tolembi mpenza na bopanzani na yango ete tozali koyoka lokola kobendaka nsuki na biso. Mpe na kotala na miso, Bandeko na ngai basusu basili komesena na yango. Tosengi boyeba ete tosambelaka ntango nyonso mpo na baye batutisamaki na lolenge nyonso, mingi mingi mpo na oyo nyonso oyo babungisi balingami. Moto nyonso andimi ete ekomi kowumela ntango molai, molai mpenza.

Ntango boni tokozela libondi uta na bampasi oyo ezali koyela biso? Tozali kosala nini mpo na oyo etali mimekano na biso moko ntango tozali kozela se kozela kasi lisalisi ezali komonana lokola kowumela na koya? Mpo na nini kozela ntango mikumba ezali komonana lokola eleki oyo tokoki komema?

Ntango tozali kotuna motuna ya boye, tokoki, soki tomeki, koyoka elelo ya mosusu koyokanaka uta na kisuku ya boloko moko ya malili, ya molili na ntango ya bileko ya mpio ya malili mpenza oyo ezala naino te na esika wana.

“O Nzambe, ozali wapi?” tozali koyoka uta na babozindo ya Boloko ya Liberty. “Mpe wapi ema oyo ezali kobomba ebombamelo na yo? Ntango boni okokanga loboko na yo?”1 Ntango boni, O Nkolo, kino ntango boni?

Bongo, tozali bato ya liboso te mpe tokozala bato ya nsunka te ya kotuna mituna ya boye ntango mawa ezali kozinga biso to mpasi kati na motema na biso ezali kowumela. Nazali kolobela babokono mabe to baboloko te kasi yo, libota na yo, mpe bato ya penepene na yo oyo bazali kokutana na mikakatano nzike. Nazali kolobela mposa ya bato mingi oyo bakolinga kobala mpe babalani naino te to oyo babalana mpe balingi mokangano yango ezala mwa ya lola mingi. Nazali kolobela na ntina ya baoyo basengeli kobunda na ezaleli ya maladi ya monene oyo bakani te—ntango mosusu moko oyo esilaka te—to oyo bazali kobunda bitumba moko ya ntango nyonso na bokono ya kobotama ezanga nkisi. Nazali kolobela na ntina ya etumba ya ntango nyonso na mikakatano ya bokolongonu ya motema mpe ya moto oyo etie kilo likolo ya molimo ya bato mingi oyo bazali koyoka mpasi na yango, mpe na mitema ya baoyo balingaka bango mpe bazali koyoka mpasi elongo na bango. Nazali kolobela na ntina ya babola, baye Mobikisi alobelaki biso mokolo moko te tobosana bango, mpe nazali kolobela na yo oyo ozali kozela bozongi ya mwana moko, kotala mobu te, oyo apona nzela moko ekeseni uta na moko oyo osambelelaki azwa.

Lisusu, nayebi ete atako kutu molongo molai ya makambo oyo tokoki kozela biso moko ezali komeka te koyanola mitungisi ya nkita, politiki, mpe ya bato na oyo tozali kokutana na yango banso. Tata na biso na Lola azali kozela na polele topesa biyano na bampasi ya bato banso oyo ya mpasi lokola mpe ya moto se moko, kasi ezali na bangonga na bomoi na biso ntango ata bokasi na biso ya malamu mpenza mpe nsambo ya sembo mpe ya kombondela epesaka baelonga oyo tozali kolikia te, ezala na bampasi minene ya mokili to bampasi mike ya moto se moko. Bongo ntango tozali kosala mpe kozela elongo biyano na misusu ya nsambo na biso, napesi bino elaka na ngai ya boapostolo ezali koyokama mpe koyanolama, atako ntango mosusu te na ngonga to na lolenge tolingelaki. Kasi yango ezali ntango nyonso koyanolama na ngonga mpe na lolenge moboti moyebi manso mpe ya seko ya mawa asengeli koyanola yango. Bandeko na ngai mibali mpe basi ba bolingo, nasengi bososola ete Ye oyo alalaka te to akonimbaka te2 abatelaka mpo na esengo mpe bonetolami ya nsuka ya bana na Ye na likolo ya nyonso mosusu oyo moto ya bonzambe asengeli kosala. Azali bolingo ya petwa, akomisami moto na nkembo, mpe Tata ya Ngolu ezali nkombo na Ye.

“Malamu, soki wana nde likambo,” okoki koloba, “Esengeli te bolingo mpe ngolu na Ye ekabola na pete Mbu Motane ya biso moko mpe kopesa biso nzela ya kokatisa bakpokoso na biso likolo ya mabele ekauka ? Esengeli te Ye kotinda bamouette ya ekeke ya mbala ya 21 kopumbwaka na kati uta esika moko songolo mpo na kodunga bakonko na biso ya nkanda ya ekeke ya mbala 21 nyonso?

Eyano na mituna ya boye ezali “Iyo, Nzambe akoki kosala makamwisi na mbalakaka, kasi nokinoki to nsima toyekoli ete bangonga mpe bileko ya mobembo na biso na kufa ezali ya Ye mpe Ye moko kaka akoki kokamba.” Azali koyangela manaka wana epayi ya moto nyonso kati na biso moko na moko. Mpo ete motengoni nyonso abikisama na mbalakaka ntango azali kozela kokota na Liziba ya Beteseda,3 moto songolo mosusu akolekisa mibu 40 kati na esobe kozelaka kokota na mboka ya elaka.4 Mpo ete Nephi mpe Lehi oyo babatelamaki na bonzambe na lolemo ya moto oyo ezingaki bango mpo na bondimi na bango,5 ezali na Abinadi moko atumbama na likonzi ya moto ya kopela mpo na oyo ya ye.6 Mpe tomikundola ete kaka Eliya oyo sasaipi abelelaki moto ekita uta na likolo mpo na kotatola kotelemelaka banganga ya Bala7 ezali kaka Eliya yango oyo aniokwamaki eleko moko ntango ezalaki na mvula te mpo na mibu ebele mpe oyo, mpo na ntango moko, aliesamaki bobele na bilei moke oyo ekokaki komemama na manzaka ya yanganga to kokombele.8 Na makanisi na ngai, wana ekokaki kozala moko te tokobenga “elambo ya malonga.”

Likambo nini nazali koloba? Likambo ezali ete bondimi elingi koloba kotiaka elikia na nzambe na bangonga malamu mpe ya mabe, atako soki yango ezali na mwa bampasi kino tokomona loboko na Ye komonisama mpo na litomba na biso.9 Wana ekoki kozala kpokoso na mokili na biso ya sika ntango mingi basengeli kondima ete eloko malamu oyo ekoki kosalama na bomoi ezali koboya mpasi, ete moko te asengeli komitungisa mpo eloko kani.10 Kasi bondimi wana ekokamba mokolo moko te na “kokola kino na monene na litondi na Klisto.”11

Na bolimbisi epai ya Mpaka Neal A. Maxwell mpo ete nameki kobongwanisa mpe kobakisa likambo moko aloba kala, ngai mpe nalobi ete “bomoi ya moto … ekoki te kozala nyonso mibale etondisama na bondimi mpe ezanga motema likolo.” Ekosala te na pete “kozala na bomoi na pete kozangaka koyoka mpasi,” kolobaka lokola tomelaka kopo mosusu ya masanga ya sukali, “Nkolo, pesa ngai babolamu nyonso ya malamu ya yo, kasi yeba kopesa ngai mpasi ya motema te, mawa te, mpasi ya nzoto te, botelemeli te. Nasengi kotika moto te aboya ngai to ateka ngai, mpe likolo na nyonso, kotika te namiyoka mokolo moko bakimi ngai na Yo to na baye nalingaka. Solo, sala keba mpo na kobatela ngai mosika ya makambo nyonso oyo esalaki bonzambe na Yo. Mpe boye, ntango kpokoso ya bobendi ya basusu ekosuka, nasengi otika ngai naya kofanda elongo na Yo, esika wapi nakoka kotuta tolo na ntina ya bokokani na biso ntango nazali konana na esengo likolo ya lipata ya Boklisto ya elengi.”12

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, Boklisto ezali kolendisa, kasi mbala mingi ezalaka elengi te. Nzela emememaka na bosantu mpe esengo awa mpe na lola ezali molai mpe nango mosusu etonda na mabanga. Ezwaka ntango, mpe molende mpo na kolonga. Kasi, solo, mbano ya kosala bongo ezali motuya. Bosolo oyo eteyami na polele mpe malamu na mokapo ya mbala 32 ya Alma na Buku ya Mormon. Kuna nganganzambe monene oyo azali koteya ete soki liloba ya Nzambe elonami kati na mitema na biso lokola mboto ya mindondo te, mpe soki tosali keba ekoka mpo na kotia mai, kolongola matiti, koleisa, mpe kolendisa yango, ekolinga na mikolo ekoya kobota mbuma “ eye ezali ya motuya,… sukali likolo lya enso eye ezali sukali,” bolei yango ekambaka na bomoi moko ezanga mposa ya mai mpe ezanga boyoki nzala.13

Mateya mingi eteyami na mokapo kitoko oyo, kasi na katikati na yango nyonso ezali na esakola ete mboto esengeli koleisama mpe tosengeli kozela yango ekomela, biso“[kotala] liboso na lisu moko ya bondimi epayi ya mbuma na yango.”14 Bobuki ya mbuma na biso, elobi Alma, eyaka “noki noki.”15 Ezali kokamwa te asukisa boyingisi na ye ya kitoko na kozongelaka mbala misato libiangi mpo na etingia mpe bompikiliki na koleisaka liloba ya Nzambe kati na mitema na biso, “kozelakana “motema molai,” lokola elobi ye, “nzete epesa mbuma epai ya bino.”16

COVID mpe cancer, ntembe mpe mawa, mpasi ya mosolo mpe mikakatano ya mabota. Ntango nini mikumba oyo ekolongolama? Eyano ezali “nokinoki.”17 Mpe ezala eleko ya mokuse to moko ya molai, esengeli te ntango nyonso na biso toloba, kasi na mawa ya Nzambe, mapamboli ekoyela baoyo basimbi ngwi nsango malamu ya Yesu Klisto. Motuna wana eyanolamaki na elanga moko ya moto moko mpenza mpe na ngomba efungwama na bato banso mpenza kati na Yelusaleme kala mpenza.

Lokola tozali koyoka sikawa profeta na biso ya bolingo kosukisa likita oyo, tika tomikundola, lokola Russell Nelson alobelaki bomoi na ye nyonso, ete baoyo “batalelaka Nkolo bakozwa nguya na bango [mpe] bakopombwa likolo na mapapu lokola mpongo; bakopota mbango nde bakolemba te; … bakotambola, nde bakosenzwa te.”18. Nasambeli ete “nokinoki”—noki to ata ndele—mapamboli wana ekoyela moto nyonso kati na bino oyo aluki libondi ya mpasi na bino mpe bonsomi uta na mawa na bino. Natatoli na ntina ya bolingo ya Nzambe mpe ya Bozongisi ya nsango malamu na Ye ya nkembo, oyo ezali eyano na lolenge moko to mosusu kpokoso nyonso tozali kokutana na yango. Na nkombo ya bosikoli ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa