Sala na Boyengebene; Linga Mawa; mpe Tambola na Bomikitisi liboso na Nzambe
Kosala na boyengebene elakisi kosala na lokumu nyonso. Tosalaka na lokumu liboso ya Nzambe na kotambolaka na bomikitisi liboso na Ye. Tosalaka makambo ya lokumu liboso ya basusu na kolingaka boboto.
Lokola balandi ya Yesu Klisto, mpe lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka, tozali kobunda—mpe tolendisami na kobunda—mpo na kosala malamu koleka mpe kozala malamu koleka.1 Ntango mosusu omitungisamaki, lokola ngai, “Nazali kosala ya kokoka?” “Nini ekoki ngai, lokolola moto mabe, kolonga mpo na ‘kobika elongo na Nzambe na lolenge ya esengo moko ezanga nsuka’?”2
Profeta Mika ya Kondima ya Kala atunaki motuna lolenge boye: “Na eloko nini nasengeli nakoya liboso ya Nkolo, mpe na ngumbama liboso ya Nzambe Aleki Likolo? ”3 Mika amitunaki na kotiolaka soki makabo ya motuya koleka ekoki mpo na kofutama na ntina na lisumu, kolobaka ete, “Nzambe akosepela na nkoto ya meme ya mibali, to mpe na nkoto [zomi] … bibale ya mafuta? esengeli na ngai kopesa mwana na ngai ya yambo mpo … na lisumu ya molima na ngai?”4
Eyano ezali te. Misala ya malamu mpamba ekoki te. Lobiko elongamaka te. Ezala ata mbeka minene oyo Mika atangaki ekoki kosikola lisumu ya moke koleka nyonso te. Soki kaka mpo na biso moko, elikia ya kozonga kobika elongo na Nzambe ezali te.6
Soki tozangi mapamboli oyo ewutaka na Tata ya Lola mpe na Yesu Klisto, biso tokoki soki moke te kosala maye makoki to kokoka biso moko. Kasi, nsango malamu ezali ete mpo na Yesu Klisto mpe na nzela na Ye tokoki kokoka.7 Bato banso bakobikisama uta na liwa ya nzoto na ngolu ya Nzambe, na nzela ya liwa mpe Bosekwi bwa Yesu Klisto8 Mpe soki to balusi mitema na biso epai ya Nzambe, lobiko na liwa ya molimo epesameli banso na nzela ya Bomikabi ya [Yesu] Klisto … na kotosaka mibeko na misala ya Nsango Malamu.”9 Tokoki kosikolama na masumu mpe kotelema petwa mpe na bozangi mbindo liboso ya Nzambe. Lokola Mika alimbolaki, “[Nzambe] asili koyebisa yo oyo, O moto, oyo ezali malamu; mpe nini Nkolo alingi yo osala, bobele ete osala na boyengebene mpe olinga na bobotoi; mpe kotambola na bomikitisi elongo na Nzambe?”10
Nzela ya Mika mpo na kobalula mitema na biso epai ya Nzambe mpe kolonga mpo na kozwa lobiko ezali na makambo misato ekangama. Kosala na boyengebene elakisi kosala na lokumu nyonso liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato. Tosalaka na lokumu liboso ya Nzambe na kotambolaka na bomikitisi liboso na Ye. Tosalaka makambo ya lokumu liboso ya basusu na kolingaka boboto. Kosala makambo na boyengebene ezali boye na kotosaka mibeko ya minene koleka ya yambo mpe ya mibale, “kolinga Nkolo Nzambe na motema na yo nyonso, mpe na molimo na yo nyonso … mpe na makanisi na yo [mpe ko ] linga moninga na yo lokola omilingi.”11
Mpo na kosala makambo na boyengebene mpe kotambola na bomikitisi liboso ya Nzambe ezali kolongola na bolingi na biso moko loboko na biso na mabe, kotambola engebene na mikano na Ye, mpe kosala makambo na bosolo.12 Moto na boyengebene apesaka masumu mokongo mpe abalukaka epai na Nzambe, asalaka mayokani na Ye, mpe atosaka mayokani yango. Moto na boyengebene aponaka kotosa mibeko ya Nzambe, ayambolaka noki soki akweyi, mpe akobaka komeka.Moto na sembo aponaka kotosa mibeko ya Nzambe, ayambolaka noki soki akweyi, mpe akobaka komeka.
Sima na nsekwa na Ye, Klisto akendeki kotala Banefi, Ye alimbolaki ete mobeko ya likolo koleka ekitanaki mobeko ya Mose. Atangisaki bango ete “bapesa … makabo mpe … mbeka ya kotumba” lisusu te, kasi bapesa “motema ya kobukana mpe molimo ya kotutama.” Alakaki lisusu ete, “Mpe oyo nyonso akoya epai na ngai na motema ya kobukana mpe molimo oyo motutami, ye nde na kobatisa na moto mpe na Molimo Mosantu.”13 Ntango tozwaka mpe tosalelaka likabo ya Molimo Mosantu sima ya libatisi , tokoki kosepela na kozala ntango nyonso elongo na Molimo Mosantu oyo akoteya biso maye tosengeli kosala,14 lokola lolenge ya kotambola na bomikitisi liboso ya Nzambe.
Mbeka ya Yesu Klisto mpo na masumu mpe lobiko na liwa ya molimo epesameli banso bazali na motema moko mobukana mpe molimo motutami.15 Kozala motema mobukana mpe molimo motutami; etindaka biso tobongola mitema mokolo na mokolo mpe tomeka kokoma lokola Tata ya Likolo mpe Yesu Klisto. Na kosalaka boye, nde tozwi nguya ya Mobikisi ya kopetola, ya kobikisa, mpe ya kolendisa. Tosalaka kaka makambo na boyengebene mpe totambolaka kaka na komikitisi liboso ya Nzambe te, toyekola lisusu kolinga bolimbisi lokola Tata ya Likolo na Yesu Klisto basalaka.
Nzambe asepelaka mingi na mawa mpe aboyaka kosalela yango te. Na maloba ya Mika, “Nzambe nini azali lokola Yo,oyo alimbisaka mabe, … akoyokela biso mawa,” mpe “akobwaka … masumu nyonso na bozindo ya mai ya mungwa.”16 Kolinga boboboto lokola Nzambe asalaka ekangama na kosala makambo na boyengebene epai na baninga mpe konyokola bango te.
Ntina ya koboya konyokola baninga ebetameli sete na lisese ya Mpaka Hillel, moyuda ya mayele oyo abikaki ne eleko ya yambo liboso ya mbotama ya Klisto. Moko ya bayekoli ya Hillel ayokaki nkanda na tina ete Torah ezali mpasi mingi —ba buku mitano ya Mose na mibeko na yango 613 mpe etambolaka elongo na makomi ya ba rabbini. Moyekoli wana asengaki Hillel lokola momekano alimbola Torah kaka ntango wana Hillel akokaki kotelema na lokolo moko. Hillel azalaki ntango mosusu na makasi ya kotelema ngwi te, kasi andimaki momekano yango. Alobaki maloba ekomami na Levitiki, kolobaka, “Okozongisa mabe na mabe te, okokangela bana ya bato na yo nkanda na motema te, kasi okolinga moninga na yo lokola yo moko omilingi.”17 Hillel nde na lombango asukisaki: “Oyo ezali mabe mpo na yo, kosala yango moninga ya penepene na yo te. Oyo ezali mobimba ya Torah, oyo etikali ezali kaka ndimbola. Koba mpe yekola.”18
Kokamata baninga na lokumu ezali kati na bolingi ya boboto. Tala lisusu lisolo oyo nayokaki batu kosolola eleki mibu zomi na eteni ya Lopitalo oyo bayambaka babeli ya mpasi makasi na Lopitalo ya Johns Hopkins, na mboka Baltimore, Maryland, na America. Mobeli moko, Tata Jackson, azalaki moto ya botosi, ya esengo oyo ayebanaki na bato basalaka na Lopitalo. Liboso, asilaki kokota lopitalo mbala ebele mpona lisalisi ya bokono ewutaka na komela-masanga ya makasi Na mbala wana, Tata Jackson azongaki lopitalo mpo na bilembo ya oyo eyebanaki lokola bokono bovimbi ya mbuma oyo epesaka bololo na nzoto.
Awa ekomaki ye pene ya kosilisa mosala na ye, Dokotolo Cohen, monganga ya mosala makasi mpe alingama, atalaki ndeko mobali Jackson mpe amonaki ete esengelaki akota lopitalo. Dokotolo Cohen atindaki Dokotolo ya mwasi Jones, monganga oyo aye kokota mosala sima na ye, ayamba ndeko mobali Jackson mpe atala ye mpo na kokomela ye nkisi ya kosalisa ye.
Dokotolo Jones atangaki na eteyelo ya lokumu ya minganga mpe awutaki kobanda kelasi ya likolo. Boyekoli oyo ya mpasi esangisamaki na kozanga kolala mpongi; oyo ekoki kozala solo esalaki ete Dokotolo Jones ayanola malamu te. Awa asengamaki kosala na butu mpo na mbala ya mitano, Dokotolo Jones ayimamaki na mongongo ya likolo epai ya Dokotolo Cohen. Amonaki ete ezalaki sembo te mpo na ye kosala ngonga ebele kolandela ndeko mobali Jackson, mpo mpasi azalaki komona , nsima ya manso, ewutaki na ye moko.
Eyano ya bwanya ya Dokotolo Cohen epesamaki na mongongo moko ya nse. Alobaki boye, “Dokotolo Jones, yo okomaki monganga mpo ya kosalisa bato mpe kosala na ntina ya kobikisa bango. Yo akomaki monganga te mpo na kosambisa bango. Soki ozali kososola bokeseni wana te, ozali na esika te ya koyekola na ndako ya mosala oyo.” Kolanda bosongisi na nzela oyo, Dokotolo Jones asalisaki ndeko mobali Jackson na motema moko tango nnyonso ezalaki ye na lopitalo.
Ndeko mobali Jackson asila kokufa. Bango mibale, Dokotolo Jones na Dokotolo Cohen bawumelaki na kosalaka mosala ya kamwa Kasi na ntango ya mikakatano awa ezalaki ye koyekola, Dokotolo Jones azalaki na mposa bazongisa ye na nzela na kosalaka na boyengebene, na kolingaka boboto, mpe kosalisa ndeko mobali Jackson na kosambisaka ye te.19
Sima ya ba mibu, bozongisi na nzela wana ezali kaka na litomba epai na ngai. Kolinga boboto elakisi ete olingi kaka bolimbisi oyo Nzambe apesaka biso te; tosepelaka ete Nzambe apesi boboto ya ndenge moko na basusu. Mpe tozali kolanda ndakisa na Ye . “Banso tokokani kati na Nzambe,”20 mpe biso nyonso tozali na mposa ya kozwa nkisi ya molimo mpo tosalisama mpe tobikisama. Nkolo alobaki, “Bokokumisa mosuni moko te likolo lya mosusu, to moto moko te akokanisa yemei likolo ya mosusu.”21
Yesu Klisto apesaki ndakisa mpo na ndimbola ya kosala na sembo mpe kolinga blimbisi. Ye na etinda te asanganaki na basumuki, avandaki na bango na lokumu nyonso mpe na limemia. Ateyaki esengo ya kotosa mibeko ya Nzambe mpe ya koluka kotombola na esika ya kokatela etumbu na baye bazalaki kobunda-bunda. Solo abimisaki na mpwasa baye bazalaki kotelemela Ye mpo asalisaki bato oyo bango bamonaki bazali petwa te.22 Komitalela kaka ngai moko ya boye etukaki Ye mpe ezali kaka kosala bongo.23
Kozala lokola Klisto, esengeli na moto kosala makambo na boyengebene, na ezalela yalokumu epai ya Nzambe mpe ya bato basusu. Moto na boyengebene azali na maloba mpe misala ya botosi mpe andimaka ete bokeseni na evandeli to bondimi ekoki kokimisa bolamu mpe kiboninga te Bato basalaka makambo na boyengebene “bakoki kozala na makanisi ya komizokisa bango na bango te, kasi bakobika na kimia”24 bango na bango.
Mpo moto azala lokola Klisto, esengeli alinga boboto. Bato balingaka boboto basambisaka basusu te, balakisaka mawa mpo na bango epai ya basusu, mingi-mingi mpo na baoyo bazali na bozui mingi te, bakabaka, bazalaka malamu mpe bazali bato ya lokumu. Bato ya boye balakisaka bolingo epai na bato nyonso mpe bandimaka bango, batalaka te bokeseni na loposo na bango, soki mwasi to mobali, lingomba na bango, soki balingaka mibali to basi, soki bazali babola to bazui, kabila na bango, libota na bango, to ekolo . Nyonso oyo ezipami na bolingo lokola ya Klisto.
Mpo na kozala lokola Klisto, moto aponaka Nzambe,25 atambolaka na bomikitisi liboso na Ye, alukaka kosepelisa Ye, mpe abombaka mayokani asala na Ye. Bato batambolaka na bomikitisi liboso ya Nzambe bakanisaka maye Tata ya Lola mpe Yesu Klisto basala mpo na bango.
Maye nazali kosala makoki? Nini lisusu esengeli ngai kosala? Maye tosalaka na koyanola mituna oyo ezali na ntina mpenza mpo na esengo na biso na bomoi oyo mpe na boseko. Mobisikisi alingi te tokanisa ete lobiko esilaki kopesemela biso kala. Ata sima na biso kosala mayokani ya bule, tokoki mpe “kokweya libanda na ngolu mpe kokende mosika na Nzambe ya bomoyi.” Boye tosengeli “kosala keba mpe kosambela ntango nyonso” mpona kokima kokweya “na momekano.”26
Kasi na ntango se moko, Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto balingi te tozala kidiba na bozangi koyeba ntango nyonso, awa na mobembo na biso ya bokufi, komitungisaka soki tosalaki maye makoka mpo na kobika mpe konetolama. Solo balingi te tomitungisama na bambeba oyo toyambola, na kokanisaka yango lokola mpota oyo ekaukaka soki moke te,27 to tomitungisama makasi kino tokobeta lisusu libaku.
Tokoki komona bokobi na biso moko mpenza. Tokoki keyeba ete “nzela ya bomoi [oyo tozali] kolanda, ezali engebene na bolingi na Nzambe”28 ntango tozali kosala makambo ya sembo, kolinga bolimbisi, mpe kotambola na bomikitisi liboso ya Nzambe na biso. Tolataka bizalela ya Tata ya Lola na Yesu Klisto kati ya bizaleli na biso mpe tolingani biso na biso.
Ntango osali makambo oyo, okolanda nzela ya mayokani mpe okolonga “kobika elongo na Nzambe na lolenge ya esengo ezangi nsuka.”29 Milimo na bino ekosangana na nkembo ya Nzambe, mpe na mwinda ya bomoi ya seko.30 Bokotondisama na esengo eleki ndelo.31 Natatoli ete Nzambe azali na bomoi, mpe ete Yesu azali Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, mpe na bolingo mpe esengo apesi mawa na Ye epai ya banso. Bolingi yango te? Na nkombo ya Yesu Klisto, Amene.