Likita Linene
Na Bomoko ya Makanisi Tokozwa Nguya ya Nzambe
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


10:6

Na Bomoko ya Makanisi Tokozwa Nguya ya Nzambe

Ntango tozali koluka bomoko ya makanisi, tokosenga nguya ya Nzambe mpo na kosala bokasi na biso ezala ya kokoka.

Mama ya Gordon ayebisaki ye soki asilisi misala na ye ya ndako, akosalela ye lipa moko ya kitoko. Oyo alingaka. Bobele mpo na ye. Gordon akendaki kosala mosala na ye ya ndako, mpe mama na ye asalaki lipa ya kitoko. Ndeko na ye ya kulutu Kathy ayaki na ndako elongo na moninga na ye. Amonaki lipa wana ya kitoko mpe atunaki soki ye mpe moninga na ye bakokaki kozwa ndambu.

“Te,” Gordon alobaki, “ezali lipa na ngai. Mama atumbaki yango mpo na ngai, mpe nasengelaki kozwa yango.

Kathy agangelaki leki na ye ya mobali. Azalaki na boyimi mpe bolingo moke. Mpo na nini nyonso oyo ezala kaka ya ye moko?

Mwa ngonga moke nsima ntango Kathy afungolaki ekuke ya motuka mpo na kokende kotika moninga na ye na ndako, likolo ya kiti ezalaki na maboke mibale balinga na elamba mpe bakanya mibale batia likolo na yango mpe biteni mibale minene ya mapa likolo ya basani. Kathy abetaki lisolo na ye na matanga ya Gordon mpo na kolakisa lolenge nini azalaki na bolingi ya kobongola mpe kolakisa boboto epai ya baoyo basengelaki na yango te.

Na 1842, Basantu bazalaki kosala mosala makasi mpo na kotonga Tempelo ya Nauvoo. Nsima ya kokela Lingomba ya Bamama Basungi na Sanza ya misato, Profeta Joseph azalaki koya mbala na mbala na mayangani na bango mpo na kolengele bango na mayokani ya bule, ya bosangisi oyo basengelaki kosala mosika te kati ya Tempelo.

Na Sanza ya motoba 9, Profeta “alobaki akoteya oyo etali mawa[.] Tozwa lokola Yesu Klisto mpe [ba] anzelu baboyi biso na makambu ezanga ntina, tokokoma ba nani? Tosengeli kozala na mawa mpe kotala biloko ya mike mpamba.” Mokambi Smith akobaki, “Nayoki mawa mpo boyokani mobimba ezali te—soki mondimi moko azali konyokwama banso bayoka yango—na bomoko ya liyoki tokozwa nguya ya Nzambe.” 1

Mwa liloba moke oyo ebeti ngai lokola nkake. Na bomoko ya makanisi tokozwa nguya ya Nzambe. Mokili oyo ezali te oyo ngai nalingi ezala. Ezali na makambo ebele nalingi kobongola mpe kosala malamu koleka. Mpe ya solo, ezali na bonguna ebele na oyo natieli elikya, mpe ntango mosusu namiyokaka ya kozanga makoki. Kala te, namitunaki mituna ya koluka-luka: Lolenge nini nakoki kososola malamu koleka bato oyo bazali nzinga nzinga na ngai? Lolenge nini nakokela “bomoko ya makanisi” oyo ntango makambo manso ezali ya kokesena. Nguya nini ya Nzambe nasengeli kozwa soki nazali bobele ya kosangana moke na basusu? Uta na koluka-molimo na ngai, nazali na makanisi misato. Ntango mosusu ekosunga bino mpe.

Kozala na Mawa

Yakobo 2:17 ekomami, “Bobanzaka [bandeko na bino ya mibali mpe ya basi] lokola bino moko, mpe bozala na bomoko elongo na banso mpe bonsomi na eloko, mpo ete bakoka kozala bato na bozwi lokola bino.” Tika totia liloba eloko na mawa—bozala na bonsomi na mawa na bino moko mpo ete bakoka kokoma bato na bozwi lokola bino.

Tokanisaka mbala mingi ete eloko ezali kaka bilei to mbongo, kasi ntango mosusu oyo tozalaka na yango mposa koleka na lisungi na biso ezali mawa.

Mokambi na ngai ya Lingomba ya Bamama Basungi kala te alobaki: “Eloko ngai … nalaki … bino ezali ete nakobatela nkombo na bino malamu. … Nakomona bino na lolenge bozali malamu koleka. … Nakolobela bino eloko moko te etali bino oyo ezali ya boboto te, oyo ekotombola bino te. Nasengi bino mpe bosala ndenge moko epai na ngai mpo ete nazali na bobangi, solo, ya kokitisa bino.”

Joseph Smith ayebisaki bandeko basi na mokolo ya Sanza ya motoba wana na 1842:

“Ntango bato balakisi boboto mpe bolingo epai na ngai, O nguya nini ezali na makanisi na ngai. …

“… Ntango tozali kopusana pene pene ya Tata na Lola, nde tozali kokoma na mawa koleka na milimo oyo ezali kopengwa—[toyoki ete tolingi] komema bango na mapeka na biso mpe kobwaka masumu na bango nsima ya mukongo na biso. [Nsango na ngai ezali mpo na] Lingomba mobimba nyonso oyo ya bato—soki bolingi Nzambe azala na mawa na bino, bino mpe bozala na mawa ya basusu.” 2

Oyo ezalaki toli etali mingi mingi Lingomba ya Bamama Basungi. Tomisambisa te to maloba na biso eswa te. Tika tobatela bankombo ya moko na moko na biso malamu mpe topesa likabo ya mawa. 3

Sala ete Masuwa na Yo Etambola

Na 1936, ekipi ya lisano ya molili uta na universite ya Washington ekendaki mobembo na Allemagne mpo na kosala Masano ya Olimpike. Ezalaki na katikati ya bozindo ya Ntango ya Mpasi Monene. Bazalaki bilenge mibali oyo bazalaki kofutama na misala ya maboko na bango oyo bawutaki na bituka mike epesaki misolo mpo ete bakende mobembo na Berlin. Makambo nyonso ya lisano emonisamaki kozala mpasi mpo na bango, kasi eloko moko esalemaki na ntango ya kopota mbangu. Na mokili ya lisano ya masuwa, babengaka yango “djemba.” Boyoka malakisi oyo etalisami na buku Bilenge mibali na kati ya Bwato:

Ezali na eloko moko oyo esalemaka ntango mosusu oyo ezali mpasi mpo na kosilisa mpe mpasi mpo na kolimbola. Ebengami “djemba.” Esalemaka bobele ntango banso balukakaka nkayi na bomoko ya malamu mpenza ete mosala moko ezali kosalama na bozangi koyokana.

Baluki nkayi ya bwato basengeli kokonza bonsomi makasi na bango mpe na ntango wana kaka kotikala sembo na makoki na bango moko. Lisano ya kopota mbangu elongami te mpo basani bazali ndenge moko. Ekipi ya malamu ezali basangani ya malamu—moto moko mpo na kokamba mokumba, moto moko mpo na kosimba eloko songolo, moto moko mpo na kobunda etumba, moto mosusu mpo na kotia kimia. Mosani moko te aleki mosusu, banso bazali ntina na bwato, kasi soki balingi kosala lisano malamu elongo, moto na moto asengeli komilengele na bamposa mpe makoki ya basusu—moto ya minduki mikuse kosimbaka, moto ya minduki milai abeti kaka moke.

Bokeseni ekoki kobaluka litomba na esika bozangi litomba. Nde sikoyo okomona ete lokola bwato ezali kotambola yango moko. Nde sikoyo mpasi nyonso epesi nzela na esengo. “Djemba” malamu emonisamaka lokola moto oyo akomaka makomi ya ntoki. 4

Liboso ya mikakatano minene, ekipi oyo ezwaki djemba malamu koleka mpe elongaki. Lopete ya olimpiki ya wolo epesami, kasi bomoko oyo moluki nkayi nyonso amonaki na mokolo wana eleko ya bule oyo etikalaki na bango bomoi na bango mobimba.

Lolongola Mabe na Lombango mpo Bolamu Ekoka Kokola

Na lisolo malamu na Yakobo 5, Nkolo ya elanga ya vinyo alonaki nzete malamu na mabele malamu, ebebaki mpe ebotaki mbuma mabe. Nkolo ya elanga alobi mbala moambe: “Esali ngai mpasi [na] bungisa nzete oyo.”

Mosali alobi epai ya Nkolo ya elanga: “Bikisa [nzete] mwa ntango lisusu. Mpe Nkolo alobaki: Iyo, nakobikisa yango mwa moke.” 5

Mpe nsima malako eyaki ete ekokaki kosalema na banso kati na biso komekaka kotimola mpe koluka mbuma kitoko na kati ya mwa bilanga na biso: “Iyo bokolongola mabe mpo bolamu ekokola.” 6

Bomoko eyaka na lolenge ya soloka te; esengeli mosala. Ezali mobulu, ntango mosusu malamu te, mpe esalemaka malembe malembe ntango tolongolaka mabe na lombango mpo bolamu ekoki kokola.

Tozali biso moko te na kati ya makasi tozali kosala mpo na kokela bomoko. Yakobo 5 akobi, “Basali bakendaki mpe basalaki na bokasi bango nyonso; mpe Nkolo ya elanga asalaki lisusu elongo na bango.” 7

Moko na moko kati na biso akokutana na mayebi ya mpota ya mozindo, makambo oyo esengeli kokoma te. Moko na moko na biso lisusu, na bambala ebele, akotika ete lolendo mpe koluka lokumu elonga mbuma oyo tozali komema. Kasi Yesu Klisto azali Mobikisi na biso na makambo nyonso. Nguya na Ye ekendaka kino na nsuka mpe etalisaka kuna mpo na biso ntango tobelelaka Ye. Biso nyonso tosengaka mawa mpo na masumu mpe bozangi na biso. Apesaka yango na pete. Mpe Ye asengaka biso soki tokoki kolakisa mawa se moko oyo mpe bososoli na moko na moko na biso.

Yesu alobaki yango malamu: “Bozala moko; mpe soki bozali moko te bozali ya ngai te.” 8 Kasi soki bozali moko—soki tokoki kolongola mwa eteni na biso to kopesa batalanta na biso mpo ete masuwa ekoka kotambola malamu na bomoko—nsima tokozala baoyo ya Ye. Mpe Akosunga kolongola mabe na lombango mpo bolamu ekola.

Bilaka ya Profeta

Ntango mosusu tokomi naino te na esika oyo tozali koluka kokoma, mpe sikawa naino tokomi esika oyo tokokoma. Nandimeli ete mbongwana tozali koluka na kati na biso moko mpe na mangomba oyo tozali ekoya na mosala mpe mingi mingi na komekaka makasi mikolo nyonso kososola moko na moko. Mpo na nini? Mpo ete tozali kotonga Siona—bato “ya motema moko mpe makanisi moko.” 9

Lokola basi ya liyokani, tozali na nguya makasi. Nguya oyo emonisamaka mikolo nyonso ntango tozali koyekola elongo na moninga, kotiaka bana na mbeto, kosololaka na mozalani na biso, kolengelaka liteya na moninga. Tozali na nguya ya kolongola mabe mpe kotonga bomoko.

Lingomba ya Bamama Basungi mpe Bilenge Basi ezali biteyelo ya moke te. Ekoki kozala lisusu bisika ya kozwa mayele ya kobosana te wapi basi nyonso ya kokesena basanganaka na kati ya masuwa mpe basali na bomoko kino tokozwa elonga na biso. Napesi libengisi oyo: ezala eteni ya bokasi ya elongo oyo ebongolaka mokili na bolamu. Mosala na biso ya liyokani ezali ya kosunga, kotombola maboko oyo ezali na nse, kosala ete kotia bato ya mpasi na mikongo na biso to na maboko mpe komema bango. Ezali mpasi te koyeba oyo tosengeli kosala, kasi ezalaka mbala mingi mabe na matomba ya bopimi na biso, mpe tosengeli komeka. Basi ya Eklezia oyo bazali na bokasi ezanga ndelo mpo na kobongola lingomba ya bato. Nazali na elikya ya molimo koleka ete, ntango tozali koluka bomoko ya makanisi, tokosenga nguya ya Nzambe mpo na kosala bokasi na biso ezala ya kokoka.

Ntango Eklezia ekundolaki na 1978 emoniseli etali bonganganzambe, Mokambi Russell M. Nelson apesaki nguya makasi ya lipamboli ya boprofeta: “Ezali losambo na ngai mpe lipamboli oyo nazali kotikela banso baye bazali koyoka ete tokoka kolonga mikumba ya mabe mpe totambola elongo na Nzambe—mpe elongo na basusu—na kimia ebonga nie mpe malamu.” 10

Tokoka koyekama na lipamboli ya boprofeta oyo mpe tosalela babokasi na biso moko mpe ya lisanga mpo na kotombola bomoko na mokili. Natikeli bino litatoli na maloba ya komikitisa ya losambo ya Nkolo Yesu Klisto: “Ete bakoka kozala na lisanga; lokola yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, ete bango lisusu bazala lisanga kati na biso.” 11 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.