Likita Linene
Luka Klisto na Makanisi Nyonso
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Luka Klisto na Makanisi Nyonso

Kotelemela masenginia ezwaka bomoi mobimba ya etingia mpe bondimi. Kasi tosengi boyeba ete Nkolo amilengeli mpo na kosalisa biso.

Na loyembo ya lolenge na ye ya kokumisa , Mokomi Nzembo alobaki ete:

“O Nkolo, oluki ngai, mpe oyebi ngai.

“Yo oyebi bolembu mpe makasi na ngai, oyebi likanisi na ngai na mosika.

“Yo otambolaka na nzela na ngai ya moke mpe na monene na ngai, mpe oyebi banzela na ngai nyonso.”1

Na kokokanisaka ndimbola ya nzembo oyo, Mokomi ya nzembo azali kokumisa ezaleli ya bonzambe ya bwania nyonso ya Nkolo mpo ete Ye ayebi mpenza lolenge nyonso ya milimo na biso.2 Kozala na boyebi ya nyonso wana ezali ntina mpo na biso na bomoi oyo, Mobikisi abengisi biso toluka Ye na makanisi nyonso mpe na kolanda Ye na motema na biso mobimba.3 Oyo epesaka biso elaka ete tokoki kotambola na pole na Ye mpe ete bokambi na ye ekopekisa nguya ya molili kati na bomoi na biso.4

Koluka Klisto na makanisi nyonso mpe kolanda Ye na motema mobimba esengisi ete totia na molongo moko molimo mpe bamposa na biso na ya Ye.5 Makomi elobeli kimolongo moko oyo lokola “kotelema[ka] ngwi kati na Nkolo.”6 Mosala oyo esengi ete tokoba kotambwisa ntango nyonso bomoi na biso na boyokani na nsango malamu ya Klisto mpe kotalela mikolo na mikolo eloko nyonso oyo ezali malamu.7 Bobele nsima tokoki kokokisa “kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli mobimba” mpe oyo “ekobomba [ya biso] mitema mpe makanisi na nzela na Yesu Klisto.”8 Nkolo Ye moko ayebisaki bampaka ya Eklezia na sanza ya mibale 1832, “Bobomba biloko oyo na mitema na bino, mpe botika mateya ya seko efanda kati na milimo na bino.”9

Atako makasi na biso ekokoba koluka Nkolo, makanisi ya mabe ekoki kokota kati na milimo na biso. Ntango makanisi ya boye epesami mpe kuttu ebengami kofanda, ekoki kosimba bamposa ya mitema na biso mpe kokamba biso epayi ya maye tokokoma na bomoi oyo mpe na nsuka epayi ya maye tokosangola mpo na seko.10 Mpaka Neal A. Maxwell kala abetaki nsete na motindo oyo na kolobaka, “Bamposa … eyebaka kokokisa matomba, mpe lisusu mpo na nini ‘ebele babengami, kasi moke baponami.’”11

Baprofeta ya kala mpe ya sikawa bakundolisi biso mbala na mbala totelamela masenginia mpo ete tokima kobungisa makasi na biso ya molimo mpe komaka ya kobulunginisama, kobungisama, mpe kotiolama na bomoi.

Kolobaka na lisese, komipesa na masenginia ezali lokola kopusana penepene ya eloko ebandaka na eloko ya libende. Nguya emonanaka te ya eloko ebendaka ebendaka eloko ya libende mpe esimbaka yango makasi. Eloko ebendaka ebungisaka nguya na yango bobele ntango eloko ya libende etiamaka mosika na yango. Nzokande, kaka lokola eloko ebendaka yango ezangi makoki ya kosalela nguya na eloko ya libende oyo ezali mosika, lokola biso totelemeli masenginia, ekokita mpe ekobungisa nguya na yango na molimo mpe motema na biso mpe, na yango, likolo ya misala na biso.

Kokokanisa oyo ekundolisi ngai likambo moko oyo mondimi moko ya bosembo mpenza ya Eklezia akabolaki na ngai kala te. Mondimi oyo ayebisaki ngai ete ntango alamukaki na ntongo moko boye, likanisi moko ya mabe oyo azalaki na yango te liboso na kozanga kolikya ekotaki kati na molimo na ye. Atako ekangaki ye na mbalakata, ayanolaki kotelemelaka likambo yango noki noki mpenza, kolobaka na yemei mpe na likanisi wana, “Te!” mpe akitanisaki yango na eloko moko ya malamu na ntina na kosepelisa molimo na ye uta na likanisi mabe. Ye alobaki na ngai ete lokola asalelaki bonsomi ya bomoto na ye ya kopona malamu na bosembo, ete nguya wana ya mabe ya kazanga koyeba ebungaki sika-sikawana.

Ntango Moroni abengisaki bato bandimela Klisto mpe bayambola, apesaki bango toli ya koya na Mobikisi na mitema na bango mobimba, komilongolaka bosoto nyonso. Lisusu, Moroni apesaki bango toli ya kotuna Nzambe, na ekateli ya makasi, ete bakweya na masenginia te.12 Kosalela mibeko oyo na bomoi na biso esengaka mingi koleka boyambi moko ya mindondo te; esengaka kokokisana milimo mpe mitema na biso na mibeko ya bonzambe oyo. Bokokisani ya boye esengisi makasi na biso ya mokolo na mokolo mpe ya sikisiki, mpo na kobakisa na boyekami likolo ya Mobikisi, mpo ete bamposa na biso ya kufa ebunga yangomei te. Kotelemela masenginia ezwaka bomoi mobimba ya etingia mpe bondimi. Kasi nasengi boyeba ete Nkolo abelemi mpo na kosunga biso na bokasi na biso moko mpe alaki mapamboli kitoko soki totie molende kino na nsuka.

Na ntango ya eleko moko mpenza ya kpokoso wapi Joseph Smith mpe baninga na ye ya bakangami na Boloko ya Liberty bazalaki na bonsomi moko te longola se ya makanisi na bango, Nkolo apesaki bango toli ya lisalisi mpe elaka moko oyo esembolami epai na biso banso:

“Tika nsopo na yo nyonso etonda na bolingani epai ya bango banso [mpe basi], mpe epai ya ndako ya bondimi, mpe bolamu ekembisa makanisi na yo ntango inso, nde elikya na yo ekokoma makasi na miso ya Mzambe;

“Molimo Mosantu akozala moninga na yo ya ntango nyonso, mpe lingenda na yo llingenda ezanga mbongwana ya bosembo mpe bosolo.”13

Na kosalaka bongo, makanisi masantu makokoba kozala kati ya makanisi na biso mpe bamposa ya peto ekokamba biso na misala ya sembo.

Moroni akundolaki bato na ye lisusu na kobebisama te na bilulalula.14 Liloba boluli elakisi mposa makasi mpe mposa mabe ya eloko moko.15 Esangisi makanisi nyonso ya molili to bamposa ya mabe oyo ekotinda moto atia makanisi na ye nyonso na misala ya koluka kaka litomba na ye moko to bozui ya mokili na esika ya kosala malamu, kozala boboto, kobatela mitindo na Nzambe. Emonisami mbala mingi na nzela ya bamposa mpenza ya bisengo ya nzoto. Apostolo Paulo amonaki boko ya mayoki oyo, ndakisa “bosoto, goigoi, … boyini, … nkanda, kowelana, … kolulela, … mpe bongo na bongo.”16 Lisusu makambo nyonso ya mabe ya kolula, tokoki kobosana te ete monguna azali kosalela yango lokola monduki na ye ya nkuku mpe ya lokuta mpo na biso ntango azali kosenginia biso tosala eloko moko ya mabe.

Bandeko na ngai ya bolingo mibali mpe basi, natatoli ete lokola tozali koyekama likolo ya libanga ya lobiko, Mobikisi ya milimo na biso, mpe tozali kolanda toli ya Mormon, makoki na biso ya kotala makanisi na biso ekokola mpenza. Nakoki kondimisa bino ete kokomela na biso na molimo ekokola mbangu makasi, kobongoloka motema na biso, kokomisaka biso lokola Yesu Klisto. Lisusu ete, nguya ya Molimo Mosantu ekozala monene koleka mpe ekokoba na bomoi na biso. Nsima manseginia ya monguna, moke moke, ekobungisa nguya na yango likolo na biso, kokomaka bomoi ya esengo mpe ya peto mpe ya kobulisama koleka.

Mpo na baye, mpo na ntina nini kani, bakwei na masenginia mpe bazali kosala misala ya bosembo te, nalobi na bino ete ezala nzela kozongela na nsima, ete ezali na elikia kati na Klisto. Mwa bambula eleki, nazwaki libaku ya kokende kotala mondimi moko ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo ya Nsuka oyo alekaki na eleko moko ya mpasi mpenza ya bomoi na ye nsima ya kosala bobuki mobeko monene. Ntango namonaki ye mbala ya limboso, nakokaki komona mawa na miso na ye, esangani na pole ya elikia na elongi na ye. Elobeli na ye mpenza ezalaki kotalisa motema ya bomikitisi mpe ya mbongwana. Azalaka Mokliso ya komipesa mpe apambolamaki mingi na Nkolo. Kasi, atikaki makanisi moko ya mabe ekotaki na molimo na ye, oyo nsima ememaki misusu. Ntango akomaki kopesa esika mingi mingi na makanisi oyo, noki noki yango ebotaki misisa na molimo na ye mpe ebandaki kokola na mozindo kati na motema. Na nsuka asalalelaki bamposa na ye elongobana te, oyo ekambaki ye azwa mikano ya koboya makambo nyonso oyo ezalaki motuya na bomoi na ye. Ye ayebisaki ngai ete soki apesaka esika na makanisi wana ya buzoba wana te ntango ebandaka, akokaki kozanga makasi te mpe kokoka na masenginia ya monguna—masenginia oyo ememaki mawa mingi mpenza na bomoi na ye, pene mpo na ngonga moko moke.

Malamu, lokola mwana abunga nzela na lisese eyebana oyo ezali na nsango malamu ya Luka, azongaki moto mpe alamukaki uta na ndoto ya mabe wana.17 Azongisaki sika bondimi na ye na Nkolo mpe ayokaki mawa ya solo mpe azwaki mposa ya kozonga na nsuka epai ya Nkolo ya etonga. Mokolo wana toyokaki biso mibale bolingo ya kosikola ya Mobikisi mpo na biso. Na nsuka ya botali na biso ya mukuse, totondisamaki biso mibale na bopasuki motema, mpe tii lelo oyo, nazali komikundola esengo ya bongengi kati na elongi na ye ntango atikaki bilo na ngai.

Baninga na ngai, ntango totelemeli masenginia ya mike, oyo mbala mingi eyaka na na bozangi kokana na bomoi na, tozali na makoki malamu mpo na kokima bobuki mibeko minene. Lokola Mokambi Spencer W. Kimball alobaki: “Bakotaka mingi mingi te na bobuki mobeko ya mozindo koleka kozangaka yambo kokweya na oyo ya mike koleka, oyo efungolaka ekuke na oyo ya monene koleka. … ‘Elanga ya peto [te] na mbalakaka [ekomaka] na matiti.’”18

Ntango azalaki komilengele mpo na kokokisa etinda na Ye ya bonzambe awa na mabele, Mobikisi Yesu Klisto amonisaki ntina monene ya botelemeli ntango nionso eloko nyonso oyo ekoki kopekisa biso na kososola ntina na biso ya seko. Nsima ya bitumba ebele ezanga elonga ya monguna, oyo amekaki kobungisa Ye na etinda na Ye, Mobikisi abenganaki ye mpenza na kolobaka ete: “Longwa awa yo, Satana. … Nsima Zabolo atikaki ye, mpe, tala, banzelu bayaki mpe basalelaki ye.”19

Ekoki bino kokanisa, bandeko na ngai mibali mpe basi, oyo ekokaki kosalama soki tosengelaki kozwa bokasi mpe mpiko euti na Mobikisi mpe koloba “Te” mpe “Longwa awa yo” epai ya makanisi mabe mbala ya yambo wana oyo eyaka na milimo na biso? Nini elingaki kosalama na bamposa ya mitema na biso? Boniboni misala na biso oyo ewuti na bamposa wana ekokaki kotia biso mpembeni ya Mobikisi mpe kopesa biso botindiki ya Molimo Mosantu kati na bomoi na biso? Nayebi ete na kolandaka ndakisa ya Yesu Klisto, tokokima makama ebele mpe bizaleli ya masumu oyo ekoki kobota makambo na libota mpe matata, mayoki ya mabe mpe bokweyi, kokotisa bozangi bosembo mpe mabe, komikomisa mowumbu ya mabe, mpe eloko nyonso mosusu oyo ekoki kozala na bokeseni na mitindo ya Nkolo.

Na nsango na ye ya motuya mpe kotuta motema ya sanza ya minei na mobu oyo, profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson apesaki elaka ete baoyo nyonso balingi “koyokela Ye”—koyokela Yesu Klisto—mpe kotosa mitindo na Ye “bakopambolama na nguya ya bobakisami mpo na kosilisa masenginia, bitumba, mpe bolembu” mpe ete makoki na biso ya koyoka esengo ekoya monene, atako na ntango ya mobulu makasi ya lelo.20

Natatoli na bino ete bilaka epesami na profeta na biso ya bolingo ezali bilaka epesami na Mobikisi Yemei. Nabengisi banso na biso mpo na “koyokela Ye” na makanisi nyonso mpe kolanda Ye na motema na bino mobimba mpo na kozwa makasi mpe mpiko ya koloba “Te” mpe “Longwa awa yo” na biloko nyonso oyo ekoki komemela biso bozangi esengo na bomoi na biso. Soki tosali bongo, nalaki bino ete Nkolo akotinda emekoli moko mosusu ya Molimo Mosantu na Ye kolendisa mpe kobondisa biso, mpe tokoki kokoma bato engebene na motema ya Nkolo yemoko.21

Napesi litatoli na ngai ete Yesu Klisto azali na bomoi mpe ete Ye na nzela na Ye, tokoki kolonga banguya ya mabe ya monguna mpe kolongobana mpo na kozala na bomoi mpo na elongo na Nkolo mpe liboso ya Tata na biso ya bolingo ya Lola. Natatoli na ntina na bosolo oyo na bolingo na ngai mobimba mpo na bino mpe mpo na Mobikisi na biso ya kitoko, oyo na kombo na ye napesi nkembo, lokumu, mpe masanzoli ntango nyonso. Nalobi makambo oyo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa