Bozala na Esengo
Bondimi na biso ya sikisiki kati na malongi ya nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto ekambaka matambe na biso mpe epesaka biso esengo.
Na mikolo ya nsuka ya bomoi na Ye ya kufa, Yesu Klisto ayebisaki Bapostolo na Ye na ntina ya minyokoli mpe mpasi basengelaki koniokwama. 1 Asukisaki na elikya monene: “Kati na mokili bojali na bolozi: kasi bozala na esengo; nasili koleka mokili” (Yoane 16:33). Wana ezali etinda ya Mobikisi epai ya banso ya bana ya Tata na biso na Lola. Wana ezali nsango malamu ya nsuka mpo na moko na moko na biso kati na bomoi na biso na kufa.
“Bozala na esengo” ezalaki lisusu elikia oyo esengeli kati na mokili kati na yango Klisto mosekwi atindaki Bapostolo na Ye. “Bakokamolaka biso bipai yonso,” elobaki Apostolo Paulo epai ya Bakolinti nsima, “kasi tobungisi elikya te; tonyokwami, kasi tobwakisami te; tonyatami na nse te, kasi tobebisami te.” (2 Bakolinti 4:8–9).
Nkoto mibale nsima lisusu biso “tokamolami bipai nyonso,” mpe biso lisusu tozali na mposa ya nsango moko wana tobungisa elikia te kasi tozala na esengo. Nkolo azali na bolingo ya kafukafu mpe na makanisi mpo na bana na ye ya basi ya motuya. Ayebi bamposa na bino, masengeli na bino, mpe bobangi na bino. Nkolo azali na nguya nyonso. Bondimela Ye.
Profeta Joseph Smith ateyamaki ete “misala yango, mpe mayemi, mpe makanisi ya Nzambe ekoki kotelemelama te, mpe ekoki kokomisama mpamba te” (Doctrine et Alliances 3:1). Na bana na Ye oyo bazali kobunda, Nkolo apesaki bilaka minene oyo:
“Botala, oyo ezali elaka ya Nkolo epai na bino, O basali na ngai.
“Yango wana, bozala na esengo, mpe bobanga te, mpo Ngai Nkolo nazali elongo na bino, mpe nakotelema mpebeni na bino; mpe nakopesa litatoli na ngai, kutu Yesu Klisto, ete nazali Mwana ya Nzambe na bomoi” (Doctrine et Alliances 68:5–6).
Nkolo atelemi mpebeni na biso, mpe Ye alobi .
“Maye nalobi epai ya moko nalobi yango epai ya banso, bozala na esengo, bana mike; mpo nazali kati na bino, mpe natiki bino te” (Doctrine et Alliances 61:36).
“Mpo nsima ya mitungisi mingi ekoya mapamboli.” (Doctrine et Alliances 58:4).
Natatoli ete bilaka oyo, epesama na kati ya minyoko mpe makama ya moto ye moko, ezali mpo na moko na moko na bino kati na makambo na bino ya mobulu lelo. Ezali ya motuya mpo na kokundolisa moko na moko na biso tozala na esengo mpe tozala na bosepeli kati na litondi ya nsango malamo ntango tozali kokende liboso na nzela ya mikakatano ya bokufi.
Mitungisi mpe mikakatano ezali makambo ya banso ya bokufi. Botelemeli ezali eteni ya ntina ya mwango ya bonzambe mpo na kosunga biso tokola, 2 mpe na kati ya nzela wana, tozali na elaka ya Nzambe ete na emoneli ya mosika ya boseko botelemeli ekopesama nzela te mpo na kolonga biso. Na lisalisi na Ye mpe bosembo mpe molende na biso , tokolonga. Lokola bomoi ya kufa kati na yango bazali eteni moko, mikakatano nyonso ezali mpo na ntango. Na bowelani oyo eyaki liboso ya etumba moko ya kobomaboma, Abraham Lincoln prezida ya Etazini na bwania akundolisaki bayoki na ye na ntina ya bwania ya kala ete “oyo, mpe, ekoleka.” 3
Lokola boyebi, mikakatano ya kufa na ntina yango nazali kolobela—oyo ezali kosala ete ezala mpasi kozala na esengo—ntango mosusu eyelaka biso na lisanga na mingi misusu, lokola bamilio sikawa bazali kobunda kati ya misusu ya mbano ya kobomaboma mingi ya bokono ya COVID-19. Lolenge moko mpe, na Etazini bamilio bazali konyokwama eleko moko ya bozangi kimoninga mpe boswani oyo ntango nyonso ezali komonana lokola kokende elongo na maponami ya baprezida, kasi mbala oyo ezali moko ya mpasi oyo mingi ya bakolo mpenza kati na biso bamikundoli naino te.
Na emoneli na ngai, moko na moko na biso azali kobunda ye moko na boko ya mikakatano mingi ya bokufi, lokola bobola, bokabwani na loposo, bokolongono ya mabe, bobungisi mosala to boyokisami mawa, bana ya mindondo, mabala ya mabe to bozangi libala, mpe mbano ya lisumu—ya biso moko to ya basusu.
Nzokande, o ntei ya manso oyo, tozali na toli ya lola ya kozala na esengo mpe kozwa bosepeli kati na mibeko mpe bilaka ya nsango malamu mpe bambuma ya misala na biso. 4 Toli wana ezali ntango nyonso bongo, mpo na baprofeta mpe mpo na biso banso. Toyebi yango uta na boyebi ya baye baleka liboso na biso mpe nini Nkolo alobela bango.
Bomikundola makambo ya Profeta Joseph Smith. Kotala ye na emoneli ya mikakatano, bomoi na ye ezalaki moko ya bobola, monyoko, bosisoi, libota ya mawa, mpe esukaki na kufa. Ntango azalaki konyokwama na boloko, mwasi mpe bana na ye mpe Basantu misusu banyokwamaki kokoso ya makasi ntango babenganamaki na Missouri.
Ntango Joseph asambelaki mpo na lisungi, Nkolo ayanolaki:
“Mwana na ngai, kimia ezala na kati ya molimo na yo; mokakatano na yo mpe mitungisi na yo ekozala kaka na ngonga moke;
“Mpe nsima soki oyiki mpiko kino na nsuka, Nzambe akotombola yo likolo; okolonga banguna na yo nyonso” (Doctrine et Alliances 121:7–8).
Oyo ezalaki, toli ya moto ye moko, ya seko oyo esungaki Profeta Joseph azala na ezalela ya esengo ya kobotama mpe bolingo mpe bosembo ya bato na ye. Bolamu kaka yango elendisaki bakambi mpe bapionie oyo balandaki mpe ekoki kolendisa bino mpe lokola.
Bokanisa bandimi ya ebandeli wana! Mbala mingi, babenganamaki uta na esika na esika. Na nsuka bakutanaki na mikakatano ya kofandisa bandako na bango mpe Eklezia kati na esobe. 5 Mibu mibale nsima liboke ya bapionie ya ebandeli ekomaki kati na lobwaku ya Great Salt Lake, bapionie bazalaki kokoba kobunda mpo na kozala na bomoi na engumba ya mpasi. Bandimi mingi bazalaki ntango nyonso na nzela ya mobembo kokatisaka bisobe to kobundaka mpo na kozwa biloko ya kosalela bongo. Nzokande,bakambi mpe bandimi bazalaki ntango nyonso na elikia mpe na esengo.
Ata kutu soki bafandaki te na bandako na bango, na likita linene ya sanza ya zomi 1849 mbonge moko ya bamisionele batindamaki na Scandinavia, Falanca, Alemani, Itali, mpe Pacifike ya Sudi. 6 Na ntango bapionie bakoki solo koyoka mawa mpe na elikia te bazalaki kaka na makoki ya kosala makambo minene. Mpe kaka mibu misato nsima, 98 mosusu babiangamaki mpo na kobanda kosangisa Yisalaele epanzana. Moko ya bakambi ya Eklezia alimbolaki nsima ete bamisio oyo “esengeli mingi mingi, kozala milai mpenza te; nakanisi mibu 3 to 7 ekozala molai lokola mpe moto moko te akozanga na libota na ye.” 7
Bandeko basi, Bakambi ya Yambo bazali kokanisa oyo etali mikakatano na bino. Tolingi bino, mpe tozali kosambela mpo na bino. Na ntango kaka oyo, tozali mbala mingi kopesa matondi ete mikakatano na biso na nzoto—longola baboningani ya mabele, bamoto, bampela, mpe bikumbaki—ezali mbala mingi moke koleka oyo baye baleka liboso na biso bakutana na yango.
Na kati ya mikakatano, elaka ya bonzambe ezali ntango nyonso “bozala na esengo, mpo nakokamba bino. Bokonzi ezali ya bino mpe mapamboli na yango ezali ya bino, mpe bomengo ya boseko ezali ya bino” (Doctrine and Covenants 78:18). Lolenge nini esalemi? Lolenge nini esalemaki na bapionie? Lolenge nini ekosalema epai ya basi ya Nzambe lelo? Na kolandaka bokambi ya boprofeta, “bikuke ya lifelo ekozala na nguya te likolo na [biso],” eloba Nkolo na nzela ya emoniseli na sanza ya minei 1830. “Iyo,”Ye alobaki, “… Nkolo Nzambe akopanza banguya ya molili liboso na yo, mpe kosala ete balola eningana mpo na bolamu na yo, mpe nkembo ya nkombo na ye” (Doctrine et Alliances 21:6). “Bobanga te, lisanga moke; bosala bolamu; tika mabele mpe lifelo basangana mpo na bino, mpe te soki soki botongami na libanga na ngai, bakoki kolonga te” (Doctrine et Alliances 6:34).
Na bilaka ya Nkolo, biso “kotombola likolo [ya biso] [mi]tema mpe kosepela” (Doctrine et Alliances 25:13), mpe “na motema ya bosepeli mpe elongi ya esengo ” (Doctrine and Covenants 59:15), tokeyi liboso na nzela ya boyokani. Mingi na biso mpenza tozwa mikano minene te, lokola kotika ndako na biso mpo na kokende kofanda na mboka toyebi te. Mikano na biso ezali mingimingi ya mimesano ya bomoi, kasi Nkolo alobeli biso, “Bolemba kosala malamu te, mpo bozali kotia moboko ya mosala moko monene. Na bongo makambo minene ewutaka na ya mike” (Doctrine et Alliances 64:33).
Ezali na nguya ezanga ndelo kati na malongi ya nsango elamu ezongisami ya Yesu Klisto. Bondimi na biso ya sikisiki kati na malongi wana ekambi matambe na biso mpe epesi biso esengo. Ezali kongengisa milimo na biso mpe kopesa bokasi mpe elikia na misala na biso. Bokambi oyo mpe bongengi mpe nguya ezali makabo elakelami oyo tozwi uta na Tata na biso na Lola. Na kososolaka mpe kotiaka bomoi na biso na molongo moko na malongi wana, kobakisaka likambo ya bonzambe ya koyambola, tokoki kozala na esengo ntango tozali komibatela na nzela ya kokende epai ya lobi na biso ya seko—bosangani mpe bonetolami elongo na baboti na biso ya lola ya bolingo.
“Bokoki kozala kokutana na mikakatano minene,” Mpaka Richard G. Scott ateyaki. “Ntango mosusu ezali makasi mpenza, ekotika te mpenza, ete bokoki komiyoka ezali likolo ya likoki na bino ya bososoli. Bobunda na mokili bino moko te. ‘Talela Yawe na motema na yo mobimba; mpe kondima bososoli na yo moko te’ [Proverbs 3:5]. … Mokano ezalaki ete bomoi ezala momekano, mpo ete okweya te, kasi ete okoka kolonga na nzela ya kolonga moko moko.” 8
Ezali nyonso eteni ya mwango ya Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, na ntina na Ye natatoli, lokola nasambeli ete banso tokoba kokende na nsuka ya mobembo na biso ya lola, na nkombo na Yesu Klisto, amene.