Likita Linene
Tolobaka na Ntina ya Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Tolobaka na Ntina ya Klisto

Lokola mokili elobaka moke na ntina yaYesu Klisto, tika tolobaka mingi na ntina na Ye.

Nalakisi bolingo na ngai mpo na bino, baninga ba bolingo mpe bandimi elongo ba biso Naluli bondimi mpe mpiko na bino na basanza oyo elaki, ntango bokono ya mokili mobimba oyo ebebisii bomoi na biso mpe ekamati bato ya mabota na biso ya motuya mpe baninga na biso ba bolingo.

Na eleko oyo ya kimia te, nazongisi botondi ya momesano te mpo na boyebi na ngai ya sikisiki mpe ya solo ete Yesu azali Klisto. Eyoki bino lolenge moko? Ezali na kpokoso oyo etii bozito likolo na moko na moko ya biso, kasi ntango inso liboso na biso ezali Ye oyo na bomikitisi alobaki, “Nazali nzela, bosolo, mpe bomoi.”1 Awa ntango tozali kotia molende na mpasi ya kobatelaka kozala mosika na basusu, tokondima soki moko te kozala mosika na basusu na molimo uta na Ye oyo ntango nyonso, na maboko ya kotandama, abengaki biso kolobaka, “Boya epai na ngai.”2

Lokola monzoto moko kokambaka na likolo moko ya polele, Yesu Klisto azali kopelisa mwinda na nzela na biso. Ye ayaki na mabele na elielo ya baniama kati na komikitisa. Ye azalaki na bomoi ebonga nie. Ye abikisaki babeli mpe alamusaki bakufi. Ye azalaki moninga ya baye babosana bango. Ye ateyaki biso kosala bolamu, kotosa, mpe kolingana. Ye abakamaki na ekulusi, kosekwaka na lokumu nsima ya mikolo misato, kopesaka biso mpe baye tolingaka nzela ya kozala na bomoi na ngambo mosusu ya nkunda. Na ngolu mpe mawa na ye ya kokokisana te, Ye akamataki likolo naYe, masumu mpe mpasi na biso, komemaka bolimbisi ntango toyamboli mpe kopesaka kimia na mipepe ya bomoi. Tolingi Ye. Tokumameli Ye. Tolandi Ye. Ye azali longo ya bomoi na biso.

Na litomba na biso, ntango bondimi oyo ezali kokola na kati na biso, ezali na bato mingi na mokili oyo bayebi Yesu Klisto moke mpenza, mpe, na bisika songolo ya mokili wapi nkombo na Ye esakolami bikeke mingi, bondimi na Yesu Klisto ezali kokita. Bilombe Basantu na mokili ya Poto bamonaki bondimi kokita na bikolo na bango na bazomi ya mibu mileki.3 Likambo ya mawa, awa na Etazini, bondimi ezali mpe lokola kozonga nsima. Boyekoli moko ya kala te elakisaki ete na bazomi ya mibu mileki bato milio 30 na Etazini bapengwi na kondima na bonzambe ya Yesu Klisto.4 Soki totali na mokili mobimba, boyekoli mosusu ebikoli ete na bazomi ya mibu mikoya mingi koleka mibale bakolongwa na mangomba ya boklisto koleka oyo bakoyamba yango.5

Biso, na ntembe te, tomemiaka makoki ya moto na moto mpo na kopona, kasi Tata na biso ya Lola alobaki , “Oyo azali Mwana na Ngai ya Mobali ya bolingo: boyoka ye.”6 Natatoli ete mokolo ekoya moye libolongo nyonso ekokongumbama mpe monoko nyonso ekotatlola ete Yesu azali Klisto.7

Boniboni ezali biso koyanola na mokili na biso ya mbongwana? Ntango bamoko bazali kotala mpamba bondimi na bango, basusu bazali koluka bosolo. Tosili kokamata likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto. Nini lisusu tosengeli kosala?

Bomilengeli ya Mokambi Russell M. Nelson

Ndambu ya eyano na biso ekoki koya ntango totali lisusu boniboni Nkolo alengelaki Mokambi Russel M. Nelson na basanza yambo ya libiangi na ye lokola Mokambi ya Eklezia. Kolobaka na bilenge bakulutu mobu moko yambo ya libiangi na ye, Mokambi Nelson abengisaki biso mpo na koyekola na mozindo matangi 2,200 ya nkombo Yesu Klisto etangami na Guide ya ba Sujets.8

Elilingi
Mokambi Nelson koyekolaka makomi

Sanza misato nsima na likita linene ya sanza ya minei, alobelaki boniboni, ata na bazomi ya mibu ya boyekoli amipesaki lokola moyekoli, boyekoli oyo ya mozindo ya Yesu Klisto epesaki mbano mingi na ye. Mwasi na ye Wendy Nelson, atunaki ye mbano na yango likolo na ye. Ye ayanolaki, “Nakomi moto mosusu!” Azalaki moto na bokeseni? Na mibu 92, okomi moto mosusu? Mokambi Nelson alimbolaki:

“Ntango tosaleli ngonga na koyekola etali Mobikisi mpe libonza lya bomikabi bwa ye, tobendami epai na [Him]. …

“… Mayele na biso [ekomi] ya kokangama na Mobikisi mpe nsango malamu na Ye.”9

Mobikisi alobaki, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso”10

Na mokili ya mosala, mitungisi, mpe makasi malongobani, tobalela mitema na biso, mayele na biso, mpe makanisi na biso na Ye oyo azali elikia mpe lobiko na biso.

Soki boyekoli ya sika ya Mobikisi esalisaki kolengela Mokambi Nelson, ekoki yango te kosalisa biso mpe lokola?

Elilingi
Mokambi Russell M. Nelson

Na kobetaka nsete na nkombo ya Eklezia, Mokambi Nelson ateyaki: “Soki biso … tosengeli kozwa nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto—mpo na kopetola mpe kobikisa biso, mpo na kolendisa mpe kokomisa biso minene, mpe na nsuka mpo na konetola biso—tosengeli kondima na polele Ye lokola liziba ya nguya wana.”11 Ye ateyaki biso ete kosalela nkombo ya solo ya Eklezia, ntango mosusu yango ekoki komonena likambo ya moke, ezali ya moke ata moke te mpenza, mpe ekobongisa malamu lobi-lobi ya mokili.

Elaka mpo na Bomilengeli na Yo

Nalaki bino ete ntango bozali komilengela, lokola Mokambi Nelson asalaki, bino mpe lokola tokokoma bato bakeseni, kokanisaka mingi na ntina ya Mobikisi, kolobaka na ntina na Ye mbala mingi mpe na kotatabana moke. Ntango bokomi koyeba mpe kolinga Ye, maloba na biso ekosopana na pete mingi, lokola tosalaka ntango tolobelaka moko ya bana na biso to moninga moko ya bolingo. Baoyobazali koyoka bino bakoyoka mposa ya kosolola mpe kobosana yo mpe mingi koluka koyeba nani ozali.

Yo mpe ngai tozali banso koloba na ntina ya Yesu Klisto, kasi tokoki ntango inso kosala mwa mingi koleka. Soki mokili ekoloba moke na ntina na Ye, nani akoloba mingi na ntina na Ye? Ezali biso! Elongo na Baklisto basusu oyo Bamipesa!

Kolobaka na ntina ya Klisto na Bandako na Biso

Ezali na bilili ya Mobikisi na bandako na biso? Tolobelaka bana na biso masese ya Yesu mbala na mbala? “Masapo ya Yesu [ezali] lokola mopepe ya makasi kofulaka moto ya bondimii na mitema ya bana na biso.”12 Ntango bana na bino batuni bino mituna, na bwania nyonso kanisa koteya makambo Mobikisi ateyaki. Ndakisa, soki mwana na yo atuni, “Papa, ntina nini tosambeka ?” Osengeli koyanola, “Yango ezali motuna moko monene. Emikundolaka biso ntango Yesu asambalaki? Tika toloba na ntina nini Ye asambelaki mpe boniboni Ye asambelaki.”

“Tolobelaka Klisto, tokosepela na Klisto, [mpe] tosakolaka Klisto … ete bana na biso bakoka koyeba na liziba kani basengeli kotalela mpo na bolimbisi ya masumu na bango.”13

Kolobaka na ntina ya Klisto na Eklezia

Makomi se moko wana kaka ebakisi ete “toteyaka na ntina ya Klisto.”14 Na milulu ya bokumbameli na biso, tika ntango inso tokangama na Mobikisi Yesu Klisto mpe likabo ya mbeka ya bomikabi na Ye. Yango elingi te koloba ete tokoki te kolobela makambu ya bomoi na bisomie to kokabola makanisi uta na basusu. Ntango mama na likambo na biso ekoki kozala mabota to lisalisi to batempelo to miso ya kala te, nyonso na bokumbameli na biso esengeli kolakisa epai ya Nkolo Yesu Klisto.

Mibu ntuku misato moleki, Mokambi Dallin H. Oaks alobelaki mokanda moko azwaki “uta na mobali moko oyo alobaki ye akendeki liyangani moko [ya elambo] mpe ayokaki matatoli zomi na sambo wapi ayokaki te batangi Mobikisi.”15 Mokambi Oaks nde alimbolaki, “Ntango mosusu ndimbola wana eleki mbeka [kasi] nalobeli yango mpamba te epesi likundoli moko makasi mpo na biso banso.”16 Nsima abengisaki biso koloba mingi na ntina ya Yesu Klisto na masolo mpe mateya na biso ya kelasi. Namoni ete tozali kokangama mini mingi na Klisto na mayangani na biso. Tika tokoba na bokebi bonso kosala makasi oyo ya kitoko mingi.

Kolobaka na ntina ya Klisto na Basusu

Elongo na baye bazali nzinga nzinga na biso, tika tozala polele mingi, na bolingi mingi mpo na kolobela Klisto. Mokambi Nelson alobaki, “Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto balingaka kotelama, koloba, mpe kozala ya bokesani na bato ya mokili.”17

Ntango mosusu tokanisaka ete lisolo na moto moko esengeli kosuka na koyaka na bango na eklezia to na komonaka bamisionele. Tika Nkolo akamba bango ntango bazali kolinga, ntango tozali kokanisa mingi mpo na oyo etali mokumba na biso ya kozala mongongo na Ye, ntango inso kokanisaka mpe polele na ntina ya bondimi na biso. Mpaka Dieter F. Uchtdorf ateyi biso ete ntango moto moko atuni biso maye etali nsuka ya poso na biso, tosengeli kolinga koyanola na esengo ete tolingaka koyoka Eteyelo ya Bana koyemba “Nazali komeka kozala lokola Yesu.”18 Tika totatola na boboto bondimi na biso na Klisto. Soki moto moko akoboli kpokoso oyo ye to mosusu azali na yango na bomoi na bangomei, tokoki koloba, “John, Mary, oyebi ete nandimelama Yesu Klisto. Nazali kokanisa na likambo moko Ye alobaki oyo ekoki kosunga bino.”

Zala polele mingi na masolo ya media sociaux na kolobelaka elikia na yo na Klisto. Mingi koleka bakomemia bondimi na biso, kasi soki moto moko aboyi ntango ozali kolebela Mobikisi, yika mpiko na elaka na Ye: “Bopambolami, ntango bato bakofinga bino … mpo na ntina na ngai. … Mpo monene ekozala mbano na yo na lola.”19 Tolengelaka mingi na ntina ya kozala balandi na Ye koleka “kokokanisama” na balandi na bisomei. Petelo apesaki toli: “Zala ntango inso ya kokoka na kopesa eyano mpo na elikia oyo ezali na yo.”20 Tika tolobela Klisto.

Buku ya Mormon ezali nzeneneke moko ya nguya ya Yesu Klisto. Penepene na lokasa nyonso etatolaka Mobikisi mpe etinda na Ye ya Bonzambe.21 Bososoli ya Bomikabi mpe ngolu na Ye etondisi nkasa na yango. Lokola moninga ya Nsango malamu, Buku ya Mormon esalisaka biso mingi koleka kososola ntina nini Mobikisi ayaki mpo na kobikisa biso mpe boniboni tokoki koya mpenza epai na Ye.

Baninga na biso basusu Baklisto bazali, ntango mosusu, na ntembe mpo na oyo etali boyambi na biso mpe bantina na biso. Tika tosepela na solo elongo na bango na bondimi na biso ya kokabola na Yesu Klisto mpe makomi ya Boyokani ya Sika. Na mikolo mikoya, baoyo bandimeli Yesu Klisto bakosenga kozwa baninga mpe lisungi ya moko mpe mosusu.22

Elilingi
Pole ya Mokili

Lokola mokili elobaka moke na ntina ya Yesu Klisto, tika tolobaka mingi na ntina na Ye. Lokola langi na biso ya solo lokola bayekoli na Ye ebimisami, mingi nzinganzinga na biso bakolengelama mpo na koyoka. Ntango tozali kokabola mwinda tozwi uta na Ye, mwinda na Ye mpe mguya na Ye ya kobikisa ya koleka ekopela na baye balingi kofungola mitema na bango. Yesu alobaki, “Ngai… nayei [lokola] mwinda na kati na mokili.”23

Totombola Mposa na Biso ya Koloba na ntina ya Klisto

Eloko moko te etombolaka mposa na ngai ya kolobela Klisto koleka kokanisaka komonaka bozongi na Ye. Atako toyebi te ntanga nini Ye akoya, makambo ya bozongi na Ye ekozala kafukafu. Akoya na mapata na lola na lokumu mpe nkembo elongo na banzelu ba Ye basantu. Kaka te mwa banzelu, kasi banso banzelu basantu na Ye. Baye bazali te bakelupi bayemba na matama ya motane na Raphael, oyo bazwami na bakalati ya Valentina. Baoyo bazali banzelu ya ekeke oyo, banzelu oyo batindamaki mpo na kokanga minoko ya nkosi,24 kofungola bikuke ya boloko,25 koyebisa mbotama na Ye oyo bazelaki ntango molai,26 kolendisa Ye na Getesemane,27 kondimisa bayekoli na Ye na ntina ya Bomati na Ye na lola,28 mpe kofungola Bozongisi ya nkembo ya nsango malamu.29

Elilingi
Boyei ya Mibale

Ekoki bino kobanza kozwama mpo na kokutana na Ye, ezala na ngambo oyo to na ngambo mosusu ya elamba?30 Oyo ezali elaka na Ye epai na bayengebene. Likambo yango ekotika bilembo na milimo na biso libela.

Botondi kani tozali na yango mpo na profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russel M. Nelson, oyo atomgoli mposa na biso ya kolinga Mobikisi mpe kosakola bonzambe na Ye. Nazali nzeneneke moko ya loboko ya Nkolo likolo na Ye mpe likabo ya bobimisi oyo ezali kokamba te. Mokambi Nelson, tozali mpe kozela toli na yo.

Balingami baninga na ngai na mokili mobimba, tika tolobela Klisto, komonaka na mosika elaka ya Mobikisi ya nkembo: “Oyo nyonso … akotatola ngai liboso ya bato, ye nde nakotatola … liboso ya Tata na ngai.”31 Natatoli Ye azali Mwana ya Nzambe. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Yoane 14:6.

  2. Matai 11:28.

  3. Tala Niztan Peri-Rotem, “Religion and Fertility in Western Europe: Trends across Cohorts in Britain, France and the Netherlands,” European Journal of Population, May 2016, 231–65; retrieved from ncbi.nlm.nih.gov/pmc/articles/PMC4875064.

  4. “[Bato nkama motoba na mitano na monkama] ya ba Amerikani mikolo balimbolami lokola Baklisto soki otuni bango eyamba na bango, motango ekiti na 12 na monkama na mibu zomi mileki. Na ntango se moko wana , bato oyo balongwa na bango uta na biyamba, esalemi na bato oyo balimbolaka lokola bato bandimaka nzambe te, bayini ya bondimi to‘eloko moko te na yango moko,’ ezali sikawa na 26%, komata na 17% na 2009” (Pew Research Center, “In U.S., Decline of Christianity Continues at Rapid Pace,” Oct. 17, 2019, pewforum.org).

  5. Pew Research Center, “The Future of World Religions: Population Growth Projections, 2010–2050,” Apr. 2, 2015,

  6. Malako 9:7; Luka 9:35; tala lisusu Matai 3:17; Joseph Smith—History 1:17.

  7. Tala Bafilipi 2:9– 9.

  8. Tala Russell M. Nelson, “Prophets, Leadership, and Divine Lawworldwide devotional for young adults, Jan. 8, 2017), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  9. Russell M. Nelson, “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 41.

  10. Doctrine et Alliances 6:36.

  11. Russell M. Nelson, “The Correct Name of the Church,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 88.

  12. Neil L. Andersen, “Tell Me the Stories of Jesus,” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 108.

  13. 2 Nefi 25:26.

  14. 2 Nefi 25:26.

  15. Dallin H. Oaks, ““Another Testament of Jesus ChristBrigham Young University fireside, June 6, 1993), 7, speeches.byu.edu.

  16. Dallin H. Oaks, “Witnesses of Christ,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1990.

  17. Russell M. Nelson, “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” 40.

  18. Tala Dieter F. Uchtdorf, “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 17; “I’m Trying to Be like Jesus,” Children’s Songbook, 78.

  19. Matai 5:11–12.

  20. 1 Petelo 3:15.

  21. “Lokola [bakomi ya buku ya masakoli ya Buku ya Mormon] akomaki matatoli na bango ya [Molingami Mwana ya Likinda ya Nzambe], batangaki lolenge mosusu ya nkombo na ye na katikati ya milongo 1.7 moko moko. [Bango] batangaki Yesu Klisto na lolenge etangami, mbala, 101 na nkombo ekeseni. … Ntango tososoli ete molongo moko ezalaka bobele na esakola moko, emonani ete tokoki te, na moke, kotanga masakola mibale na Buku ya Mormon na kozangaka komona lolenge songolo ya nkombo ya ya Klisto” (Susan Easton Black, Finding Christ through the Book of Mormon [1987], 5, 15).

    “Ntango maloba komikaba to bomikabi, na ndenge na yango soki nini, ezali komonana bobele mbala moko na bobongoli ya King James ya Boyokani ya Sika, yango ezali komonana mbala 35 na kati ya Buku ya Mormon. Lokola litatoli mosusu ya Yesu Klisto, yango ezali kolakiakisa pole ya motuya na Bomikabi na Ye” (Russell M. Nelson, “The Atonement,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1996.)

  22. Oyo bazali kolongwa na mangomba ya Boklisto na Etazin bazali mingi bilenge “Bandimi mingi koleka moambe na zomi ya nkoloa babengi Silent Generation (oyo babotami kati kati na 1928 mpe 1945) bamilakisaka lokola Bsklisto (84%), lokola esala bato misato na minei ya Baby Boomers (76%). Na bokeseni, bobele ndambu ya ba Millennial (49%) bamilakisakisaka lokola Baklisto; fminei na zomi bazali ‘nones,’ mpe moko na zomi ya ba Millennial bakitolami na baye bazali na boyambi ya Baklisto Te” (“In U.S., Decline of Christianity Continues,” pewforum.org).

  23. Yoane 14:18.

  24. Tala Daniele 6:22.

  25. Tala Misala 10:34.

  26. Tala Luka 2:2–14.

  27. Tala Luka 22:42–43.

  28. Tala Misala 1:9–11.

  29. Tala Doctrine et Alliances 13; 27:12–13; 110:11–16; Joseph Smith—History 1:27–54.

  30. Tala 1 Batesalonika 4:16–17; Doctrine et Alliances 88:96–98.

  31. Matai 10:32.

Bimisa na lokasa