Likita Linene
Senga, Luka, mpe Beta na Ekuke
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


10:9

Senga, Luka, mpe Beta na Ekuke

Eteni moko ya ntina ya mwango ya Tata na Lola ezali libaku ya kosolola na Ye ntango nyonso tolingi.

Eleki basanza minei, na boyekoli makomi, nazalaki kotanga na ntina ya etinda ya Alma na Ammonihah ntango nakomaki na maloba oyo na kati ya Yaka, Landa Ngai: “tango botangi maye matali mapamboli minene Nzambe apesaki bato ya Nefi (tala Alma 9:19–23), manyola mapamboli minene oyo Ye apesi yo.”1 Nazwaki mokano ya kokoma mapamboli ya Nzambe epai na ngai mpe nakomaki yango na kati ya apareye. Na mwa miniti moke, nakomaki mapamboli 16.

Ya motuya na yango ezalaki mapamboli minene ya ngolu ya Mobikisi mpe likabo ya bomikabi na bomoi na ngai. Nakomaki lisusu lipamboli oyo nasengelaki kolakisa elongi ya Mobikisi lokola elenge misionele na Portugal mpe, nsima, elongo na molongani na ngai ya bolingo ya seko, Patricia, na Brazil Porto Alegre South Mission, epai oyo tosungaki elongo na bamisionele 522 ya nguya mpe ya malamu koleka. Mpo na koloba maye matali Patricia, ebele ya mapamboli nakomaki na mokolo wana ezali mapamboli oyo tosepeli na yango elongo na mibu 40 ya libala na biso - mingimingi bokangemi na biso na libala kati na tempelo ya Sao Paulo na Brésil, bana na biso misato, balongami na bango, mpe bankoko na biso 13.

Makanisi na ngai makendeki lisusu epai na baboti na ngai ya sembo, oyo babokolaki ngai na mabongi ya nsango malamu. Yango ekundolisaki ngai lisusu mingi mingi ntango oyo mama na ngai ya bolingo azalaki kofukama elongo na ngai mpo na kosambela pene ya mbetu na ngai wana nazalaki na mibu 10. Asengelaki koyoka ete soki losambo na ngai ezalaki kokende epai ya Tata na ngai ya Lola, esengelaki kobongisama. Na yango alobaki, “ngai nakosambela liboso, mpe nisma ya losambo na ngai, yo okosamela.” Akobaki na ndakisa wana babutu ebele, kino andimisamaki ete nasilaki koyekola na nzela ya libongi mpe na komekamekaa lolenge nini koloba na Tata na Lola. Nakozala na botondi ntango nyonso epai na ye mpo alakisa ngai kosambela, nde bongo nayekolaki ete Tata na ngai na Lola ayokaka losambo na ngai mpe ayanolaka yango.

Mpe, oyo ezalaki lyoko lipamboli mosusu nakotisaki na molongo na ngai—likabo ya kozala na makoki ya koyoka mpe koyekola bolingi ya Nkolo. Eteni moko ya ntina ya mwango ya Tata na Lola ezali libaku ya kosolola na Ye ntango nyonso tolingi.

Libiangi na Nkolo

Ntango Mobikisi akendaki kotala Bamelika nsima ya Lisekwa na Ye, abandelaki libiangi oyo apesaki bayekoli na Ye na Galileya. Alobaki:

“Senga mpe ekopesamela epai ya bino; luka, mpe bokozwa; beta, mpe ekofungolama epai ya bino.

“Mpo na baoyo nyonso basengaki bazwaki; mpe baoyo balukaki bamonaki; mpe na baoyo babetaki, ekofungolamela bango” (3 Nefi14:7–8; tala lisusu Matai 7:7–8).

Profeta na biso, Mokambi Russell M. Nelson, apesi libiangi ya lolenge moko na mikolo na biso. Alobaki: “Sambela na nkombo ya Yesu Klisto na ntina ya makambo na yo, bobangi na yo, botau na yo—iyo, mposa na yo mpenza ya motema. Mpe nsima, yoka! Koma makanisi oyo eyei na makanisi na yo. Koma mayoki na yo mpe tia na misala oyo otindami kosala na lombango. Ntango ozali kobandela ndakisa oyo mokolo na mokolo, sanza na sanza, mobu nyonso, okokola na kati ya libongi ya emoniseli.’”2

Mokambi Nelson abakisaki, “Na mikolo mikoya, kobika na molimo ekozala mpasi na bozangi bokambi, boyangeli, bolendisi mpe nguya monene ya Molimo Mosantu.”3

Mpo na nini emoniseli ezali ntina na kowumrla na bomoi na biso? Mpo mokili ekoki kopengwisa mpe kobungisa mpe makelele, mpe etondi na bitambwisa mayele. Kosolola elongo na Tata na biso na Lola epesaka biso makoki ya kopona oyo ezali ya solo mpe oyo ezali lokuta, oyo ezali ntina na moango ya Nkolo mpo na biso mpe oyo ezali te. Mokili ekoki lisusu kozala mabe mpe koyokisa mitema mpasi. Kasi ntango tofungoli mitema na biso na losambo, tokoyoka bolendisi oyo eyaka uta na Tata na Lola mpe elikya ete Ye alingaka mpe apesaka biso ntina.

Senga

Nkolo alobaki ete “moto nyonso akosenga, akozwa.” Kosenga emonisami kozala pete, mpe nzokande ezali na nguya mpo yango emonisaka bamposa na biso mpe bondimi na biso. Na yango, ezwaka ntango mpe bompikiliki mpo na koyeba kososola mongongo ya Nkolo. Totiaka bokebi na mayoki mpe mayoki oyo eyaka na makanisi na biso mpe mitema, mpe tokomaka yango, lokola profeta na biso ateyaki biso tosala bongo. Kokomaka makanisi na biso ezali eteni moko ya ntina ya kozwaka. Esungaka biso tokanisa, totanga, mpe toyoka lisusu maye Nkolo azali koteya biso.

Kala mingi te ndeko moko alobaki na ngai, “Nandimi ete emoniseli ya moto ye moko ezali ya solo. Nandimi ete Molimo Mosantu ekolakisa ngai makambo manso nasengeli kosala.4 Ezali mpete kondimela ntango nayoki tolo na ngai kobimisaka molunge na bondimi ezanga ntembe.5 Kasi lolenge nini nakoki kosala mpo ete Molimo Mosantu elobelaka ngai ntango nyonso?”

Na molingami na ngai mpe na banso kati na bino, nalingi koloba ete ngai mpe nalingi nayoka ntango nyonso mayoki wana ya makasi mbala na mbala uta na Molimo mpe ntango nyonso namonaka polele nzela ya kolanda. Kasi ngai na yokaka yango te. Na yango, oyo tosengeli koyoka mbala mingi ezali mongongo moke ya nse ya Nkolo na makanisi mpe mitema na biso: “nazali awa. Nalingi bino. Kende liboso; sala makoki na yo. Nakosunga yo. Tozali na ntina ya koyeba to komona ntango nyonso makambu nyonso te.

Mongongo moke mpe ya nse endimisaka, epesaka bokasi mpe elendisaka—mpe mbala na mbala oyo ezali bobele maye tosengeli na yango na mokolo. Molimo Mosantu azali solo, mpe Mayoki ma Ye mazali solo—ya minene mpe ya mike.

Luka

Nkolo akobaki kolaka, “Ye oyo alukaka, azwaka.” Koluka esengaka makoki ya mayele mpe molimo—komanyolaka, komekolaka, komekaka mpe koyekolaka. Tolukaka mpo ete tondimelaka bilaka ya Nkolo. “Mpo ete ye oyo ayei epai ya Nzambe asengeli kondimela ete ye azali, mpe ete azali mopesi na bango oyo basengaka ye na limemya” (Baebele 11:6). Ntango toluki, toyebaka na komikitisa ete tozali lisusu na ebele ya koyekola, mpe Nkolo akobakisa bososoli na biso, na kolengelaka biso mpo na koyeba mingi koleka. “Mpo tala, boye elobi Nkolo Nzambe: Nakopesa epai ya bana ba bato monkoloto likolo lya monkoloto, mosise likolo lya mosise, awa moke mpe kuna moke; … mpo epai ya ye oyo azwaki nakopesa ebele” (2 Nefi 28:30).

Beta ekuke

Na nsuka, Nkolo alobaki, “Epai na ye oyo akobeta, ekofungolamela ye.” Kobeta ekuke ezali kosala na bondimi. Ntango tolandaka Ye na mpiko, Nkolo afungolaka nzela liboso na biso. Ezali na nzembo kitoko oyo eteyaka biso: “telema mpe sala likambo koleka ndoto ya kozela ndako ya monene. lokola tolobaki na ebandeli. Kosalaka malamu ezali elengi, esengo ya koleka ndelo, lipamboli ya elaka mpe bolingo.”6 Mpaka Gerrit W. Gong ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Mibale alimbolaki ete emoniseli eyaka mbala mingi na ntango tozali kosala bolamu. Alobaki: “Ntango tozali koluka kosalisa bazalani na biso oyo bazali nzinga nzinga, Nabanzi Nkolo apesaka biso makoki na Ye ya koleka ya bolingo na Ye mpo na bango mpe lisusu mpo na biso. Nabanzi toyokaka mongongo—toyokaka Ye na ndenge ebele—tosambeli mpo na kosunga baoyo bazali nzinga nzinga na biso mpo yango ezali moko ya losambo oyo Alingaka koyanola.”7

Ndakisa ya Alma

Ndakisa ya pete wana na kati ya Yaka, Landa Ngai mpo na kokanisa na ntina ya mapamboli na ngai moko ememelaki ngai molimo ya kimia mpe makanisi ya molimo oyo nazelaki te. Ntango nakobaka kotanga maye matali Alma mpe mosala na ye na Ammonihah, namonaki ete Alma apesaki ndakisa malamu ya oyo elakisi senga, luka mpe beta ekuke. Totangi ete “Alma asalaki mingi na molimo, kobundaka na Nzambe na losambo makasi, ete akoka kosopa lipamboli na Molimo na ye likolo ya bato; Losambo wana, bongo, eyanolamaki te na lolenge alikiaki, mpe Alma abwakamaki libanda ya engumba. “Na bozito wana ya mawa,” Alma azalaki pene ya kotika, ntango anjelu apesaki nsango oyo: “Apambolami, Alma; nsima, atombolaki moto mpe asepelaki, mpo ozali na ntina monene ya kosepela.” Nsima anjelu ayebisaki ye azonga na Ammonihah mpe ameka lisusu, mpe Alma “azongaki na lombango.”8

Toyekoli nini epai na Alma na maye matali kosenga, koluka, mpe kobeta ekuke? Toyekoli ete losambo esengaka mosala ya molimo, mpe mbala mingi ememaka te na lifuti oyo tolikiaka. Kasi ntango toyoki bolembu to bozito ya mawa, Nkolo apesaka biso bolendisi mpe makasi na ndenge ebele. Akoki te koyanola mituna na biso nyonso to kosilisa makambo na biso mbala moko; kasi, Alendisaka biso tokoba. Soki na lombango totie moango na biso elongo na moango na Ye, Akofungola nzela mpo na biso, lokola Asalaki na Alma.

Ezali litatoli na ngai ete oyo ezali eleko ya litondi ya nsango malamu. Tokoki kosepela na mapamboli ya Bomikabi ya Yesu Klisto na bomoi na biso. Tozali na makomi nyonso mpo na biso. Tokambami na baprofeta oyo bazali kolakisa biso bolingi ya Nkolo mpo na bantango ya mpasi na bomoi na biso. Na kobakisa, tozali na ekuke ya kokota mbala moko na emoniseli na biso moko mpe Nkolo akoki kolendisa mpe kokamba biso moko. Lokola anjelu alobaki epai ya Alma, tozali na “ntina monene ya kosepela” (Alma 8:15) Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.