Nandimaka Banzelu
Nkolo ayebi mikakatano bozali kokutana na yango. Ayebaka bino, Alingaka bino, mpe nalaki bino, Akotinda banzelu kosalisa bino.
Bandeko mibali mpe basi, nandimaka banzelu, mpe nakosepela kokabola na bino boyebi ya ngai mpo na oyo etali bango. Nakosala bongo, nandimi mpe nasembeli ete tokoyeba motuya ya banzelu na bomoi ya biso.
Awa ezali maloba ya Mpaka Jeffrey R. Holland uta na likita linene moko eleka: “Ntango tozali koloba mpo na baoyo bazali bisalelo na maboko ya Nzambe, tozali komikundola ete banzelu banso bawuti na ngambo mosusu ya elamba te. Basusu kati na bango totambolaka mpe tosololaka na bango— awa, sikawa, mikolo nyonso. Basusu na bango bazali na kati ya bisika tofandaka. Solo mpenza lola lola ezali komonana pembeni kaka ntango bolingo ya Nzambe elakisami na biso na boboto mpe losambo ya bato ya malamu mpe ya petwa na ndenge ete oyo banzelu ezali se liloba moko oyo eyelaka biso na makanisi” (“The Ministry of Angels,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 30).
Nalingi naloba mpo na banzelu oyo bazali na ngambo ya elamba oyo. Banzelu oyo bazali kotambola kati na biso na bomoi ya biso ya mikolo nyonso bazali bokundoli ya makasi ya bolingo ya Nzambe mpo na biso.
Banzelu ya liboso nakolobela bazali bandeko basi mibale bamisionele oyo balakisaki ngai nsango malamu ntango nazalaki elenge mobali: ndeko mwasi Vilma Molima na ndeko mwasi Ivonete Rivitti. Ngai mpe leki na ngai ya mwasi tobengisamaki na molulu ya Eklezia esika wapi tokutanaki na banzelu mibale oyo. Natikala kobosana te lolenge nini eyenga ya mpamba oyo ebongoli bomoi na ngai.
Baboti mpe bandeko na ngai bazalaki kopesa motuya te na koyekola mingi makambo etali Eklezia na ntango wana. Bazalaki ata kolinga te bamisionele na kati ya ndako ya biso, yango wana nayekolaki mateya na kati ya ndako ya Eklezia. Ndako mukie wana na kati ya ndakonzambe ekomaki “zamba ya bule” na ngai.
Sanza moko nsima ya koteyema nsango malamu mbala ya liboso na nzela ya banzelu oyo, nazwaki libatisi. Nazalaki na mibu 16. Likambo ya mawa, nazali na foto ya ntango oyo ya bule te, kasi nazali na elilingi na ndeko na ngai ya mwasi na ntango tokotaki na molulu oyo. Nakoki kolimbola nani azali nani na elilingi oyo. Nazali moto oyo ya molai uta loboko ya mobali.
Lokola okoki kokanisa, kotikala makasi na kati ya Eklezia ezalaki pkokoso mpo na elenge mobali oyo bomoi na ye ewuti kobongwama mpe oyo libota ezalaki kolanda nzela se moko wana te.
Ndenge nazalaki komeka komifandisa na bomoi ya ngai ya sika, ezaleli ya sika, mpe baninga ya sika, namiyokaki ngai moko. Namiyokaki ngai moko mpe ntango mingi motema na ngai elembaki mpenza. Nayebaki ete Eklezia ezalaki ya solo, kasi nazalaki na konyokwama ya kozala moko na yango. Ntango nazalaki na kpokoso yango mpe na ntembe ya komitia na kati ya eyamba na ngai ya sika, nazwaki makasi ya kokota na likita ya bilenge ya mikolo misato, oyo nakanisaki ekosalisa ngai nayebana na baninga ya sika. Ezali se ntango oyo nde nakutanaki na mosungi anzelu mosusu, oyo abengami na nkombo ya Mônica Brandão.
Azalaki sika na mboka, awutaki esika mosusu ya Brazil. Bokebi na ngai ezwamaki na lombangu epai na ye, esengo mpo na ngai, andimaki nazala moninga na ye. Nakanisi ete atalaki ngai mingi na kati koleka libanda.
Mpo andimaki nazala moninga na ye, alakisaki ngai na baninga na ye, baoyo bakomaki mpe baninga na ngai na ndenge tozalaki kosepela banso na milulu mia bilenge oyo nakotaki nsima. Milulu oyo ezalaki ya motuya makasi mpo na komifandisa ya ngai na bomoi ya sika oyo.
Baninga malamu oyo bazalaki na bokeseni monene, kasi kozanga nsango malamu na kati ya ndako ya ngai na libota ya bomoko ezalaki kotia mbongwana na ngai na likama. Boyokani ya ngai ya nsango malamu na Eklezia ekomaki ya motuya mingi kutu mbongwana ya ngai ya moke moke. Nsima, banzelu basusu mibale batindamaki na nzela ya Nkolo mpo na kosalisa.
Moko na bango azalaki Leda Vettori, molakisi na ngai ya liboso ya kelasi ya seminele ya ntongo. Koleka na bolingo mpe bakelasi na ye ya molimo, apesaki ngai ezaleli ya mikolo nyonso ya “liloba malamu ya Nzambe” (Moroni 6:4), oyo nazalaki na yango mposa mikolo nyonso. Oyo esalisaki ngai mpo na kozwa makasi ya molimo mpo na kokoba kokende liboso.
Anzelu mosusu atindamaki mpo na kosalisa ngai azalaki se Mokambi ya Bilenge Mibali, Marco Antônio Fusco. Bapesaki ye mpe mokumba ya kozala moninga na ngai ya mateya na libota. Atako kozanga boyebi ya ngai mpe ezaleli ekeseni, apesaki ngai mikumba ya koltangisa na makita ya lisanga ya banganganzambe mpe na mateya na kati ya mabota. Apesaki ngai libaku ya kosala mpe ya koyekola mpe ya kozala kaka motali ya nsango malamu te. Andimelaki ngai, koleka ndenge namindimelaki ngai moko.
Matondi na banzelu banso oyo, mpe basusu mingi nakutanaki na bango na bambula eleki, nazwaki makasi ekoka ya kotikala na nzela ya boyokani lokola nalongaki litatoli ya molimo ya bosolo.
Na nzela moko oyo, boniboni elenge mwasi anzelu wana, Mônica? Nsima ya mosala ya misio ya biso banso mibale, akomaki mwasi ya ngai.
Nakanisi ete ezalaki mpamba te mpo ete baninga malamu, misala ya Eklezia, mpe koleisama na nzela ya liloba malamu ya Nzambe ezala kati ya mbongwana wana. Mokambi Gordon B. Hinckley na bwania nyonso ateyaki ete :“Ezali eloko ya pete te likambo ya kobongwana mpo na kokoma na Eklezia oyo. Elakisi kokata bokangani to boyokani ya kala. Elakisi kotika baninga. Ekoki kolakisa kotia mpembeni boyambi ya motuya. Ekoki kosenga mbongwana ya bizaleli mpe kolongolama ya bamposa. Na bandakisa ebele elakisi komiyoka yo moko mpe ata bobangi ya moto oyo ayebani te. Esengeli koleisama mpe kokolisama na ntango oyo ya mpasi ya mbongwana ya bomoi” (“There Must Be Messengers,” Ensign, Oct. 1987, 5).
Nsima abakisaki, “Moko na moko ya bango azali na mposa ya biloko misato: Moninga, mokumba, mpe koleisama na ‘liloba malamu ya Nzambe’” (“Converts and Young Men,” Ensign, Sanza ya mitano 1997, 47).
Mpo na nini nazali kokabola boyebi oyo na bino?
Ya liboso, ezali mpo na kotinda nsango na baye bazali kolanda nzela ekokani na oyo sikawa. Mbala mosusu obongwani motema sika, to ozongeli Eklezia nsima ya komituna mpo na oyo etali Eklezia na ntango molai, to moto oyo azali na kpokoso na komifandisa na kati ya Eklezia. Nasengi, nasengi, botika kosala makasi te mpo na kozala moko ya libota ya monene oyo. Ezali Eklezia ya solo ya Yesu Klisto!
Ntango ezali koya na esengo mpe lobiko ya bino, molende na bino ezali ntango nyonso ya motuya na kokoba na komekaka. Molende na bino ezali ya motuya na kofandisa lolenge ya bomoi na bino mpe mimeseno na bino. Nkolo ayebi mikakatano bozali kokutana na yango. Ayebaka bino, Alingaka bino, mpe nalaki bino, Akotinda banzelu kosalisa bino.
Na maloba na ye moko Nkolo alobaki: “Nakokende liboso ya bino. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe na loboko na bino ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala kati na mitema na bino, mpe banzelu na ngai zingazinga na bino, mpo na kotombola bino” (Doctrine and Covenants 84:88).
Mposa na ngai ya mibale na kokabola boyebi oyo ezali kotinda nsango na bandeko banso ya Eklezia—na biso banso. Tokoki komikundola ete ezali pete te mpo na baye babongwani sika, baninga oyo bazali kozonga, mpe baoyo bazali na lolenge ekeseni na komifandisa na kati ya Eklezia. Nkolo ayebi mikakatano bazali kokutana na yango, mpe azali koluka banzelu oyo bazali na mposa ya kosalisa. Nkolo azali kaka koluka basali ya lifuta te ya bolingi mpo ete bazala banzelu na bomoi ya basusu.
Bandeko mibali mpe basi, bokoki kosepela kozala bisalele ya mosala na maboko ya Nkolo? Bokoki kolinga kozala moko ya banzelu oyo? Kozala ntoma, atindami uta na Nzambe, na ngambo oyo ya elamba, mpo na moto oyo Ye azali komitungisela? Azali na mposa na bino. Bazali na mposa na bino.
Ya solo, tokoki ntango nyonso kotalela bamisionele na biso. Bazali ntango nyonso wana, bato ya yambo yayambo ya kotia maboko mpo na mosala ya boanzelu oyo. Kasi bazali mingi koleka te.
Soki otali nzinga nzinga na yo na bokebi nyonso, okozwa mingi ya baoyo baza na mposa ya lisalisi ya banzelu. Bato oyo bakozala balati simisi ya mpembe te, bazambala te, ata elamba mosusu ya mokolo ya Eyanga te. Bakozala bafandi bango moko, kokende nsima ya ndakonzambe to ya kelasi, ntango mosusu bazali komiyoka lokala bazali komonana te. Mbala mosusu lolenge na bango ya kokata nsuki ezali mwa moke kolekela to elobeli na bango ekeseni, kasi bazali bisika wana, mpe bazali komeka.
Bato basusu bakoki komituna: “esengeli ngai kokoba kozonga nsima? Esengeli ngai kokoba komeka?” Bato mosusu bakoki komiituna soki mokolo ekoya oyo bakoyamba bango mpe bakolinga bango. Banzelu basengami, sikasikawa; banzelu oyo balingi kolongua bisika bibonga na bango mpo na koyamba bango; “[bato oyo bazali] boboto mpe peto mpenza ete kimwanze ezali bobele likanisi oyo eyaka na makanisi [mpo na kolibola bango]” (Jeffrey R. Holland, “The Ministry of Angels,” 30).
Bandeko mibali mpe basi, Nandimaka banzelu! Biso banso tozali lelo awa, lisanga monene ya banzelu oyo tobengami mpo na mikolo mya nsuka oyo, na kosalisa basusu lokola maboko ya Mokeli na biso ya bolingo. Nalaki ete soki tozali na mposa ya kosalisa, Nkolo akopesa biso mabaku ya kozala banzelu ya bosalisi. Ayebaka nani azali na mposa ya lisalisi ya banzelu, mpe Akotia bango na nzela ya biso. Ye atiaka baoyo bazali na mposa ya lisalisi ya banzelu na nzela na biso mikolo nyonso.
Nazali na botondi mpo na banzelu mingi Nkolo atiaki na nzela ya bomoi na ngai. Nazalaki na mposa na bango. Napesi botondi mpo na nsango malamu na Ye ezali kosalisa biso na kobongwana mpe epesi biso litomba ya kozala malamu koleka.
Oyo ezali nsango malamu ya bolingo, nsango malamu ya kosalisa. Na yango natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.