Likita Linene
Nguya ya Kobikisa ya Yesu Klisto
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Nguya ya Kobikisa ya Yesu Klisto

Ntango toyei epai na Yesu Klisto na kosalelaka bondimi na Ye, boyamboli, mpe kosala mpe kobatela mayokani, kobukama motema na biso—ntina na yango ezala soki nini—ekoki kobikisama.

Uta ebandeli ya mobu oyo, tokutani na makambo mingi ya mbalakaka. Kobungisa bomoi mpe misolo na ntina ya bokono ya molongo mobimba etungisi bato mpe nkita ya mokili mobimba.

Mabele koningana, moto, mpe mpela ya mayi na bisika mingi ya mokili, mpe lisusu makama ebele kowuta na meteyo esalaki ete bato bamiyoka bazangi lisalisi, elikiya, mpe batondaki mawa na mitema mpe bamituni soki bomoi na bango ekozonga lisusu lokola ezalaki liboso.

Tika nabetela bino lisapo na ngai moko na maye matali kobukana

Tango bana na biso bazalaki mike, bakanaki kolanda mateya ya kobeta piyano. Mobali na ngai, Rudy, na ngai tosepelaki kopesa bana na biso libaku oyo, kasi tozalaki na piyano te. Tozalaki na makoki ya kosomba piyana te, na boye Rudy abandaki koluka oyo baselela.

Na eleko ya mbotama ya mobu wana, akamwisaki biso na piyano, na mibu elandaki, bana na biso bayekolaki kobeta yango.

Elilingi
Piyano ya kala

Ntango bana na biso ya mibali bakolaki mpe babimaki na ndako, piyano wana ya kala etondaki na mputulu, na boye nde totekaki yango. Sima ya mibu, tosilaki kobomba ndambu ya misolo. Mokolo moko, Rudy alobaki, “Nabanza ngonga ekoki mpo na biso kosomba piyano ya sika.”

Ngai natunaki, “Ntina nini tosomba piyano ya sika, yo na ngai tobetaka yango te?”

Ye alobaki, “O, kasi tokoki kosomba piyano oyo ebetaka yango moko! Na kosalelaka iPad, okoki kotinda piyano ebeta koleka nzembo 4.000 , ezala ya biso ya Eklezia, ya bayembi ya Taberinakele, banzembo nyonso ya bana mike ya Eklezia, mpe mosusu”

Rudy azali moteki ya molende, wana kaka moke ya boyebi na ye.

Elilingi
Piyano ya sika

Tosombaki piyano ya sika ya kitoko, mpe sima ya mwa mikolo, bingambe mibale ya mibali bayaki kotika yango na ndaku na biso.

Nalakisaki bango esika yango esengelaki kozala, mpe na tikelaki bango nzela baleka.

Elilingi
Komema Piyano

Ezalaki kilo mpe monene, mpe esengelaki bango kolongola makolo na yango mpo na komeka kolekisa yango na ekuke na mopanzi na likolo ya loboko ya motuka bayaki na yango.

Ndako na biso etongamaki na mwa ngomba, kasi mbula ya pembe ekweyaki liboso, mpe biloko nyonso etondaki mayi mpe potopoto na yango. Bobandi kososola nini ekoleka na sima?

Awa ezalaki bango kotombola piyano na mwa ngomba, yango esielumukaki, mpe nayokaki makelele makasi ya kobukana. Piyano nde elongwaki na loboko ya motuka mpe ebambanaki na nse makasi mpenza mpe etimolaki libulu monene.

Nagangaki:“O, Nzambe na ngai. Ozali malamu?”

Lib aku malamu, bango mibale bazalaki nzoto kolongono.

Awa ezalaki bango kotalana miso ya kofungwama makasi, batalaki ngai mpe balobaki:“Tosengi bolimbisi. Takozongisa yango na magazini mpe tokesenga mokonzi na biso abenga bino.”

Sima mwa ngonga moke, mokonzi na bango asololaki na Rudy mpo balengela komema piyano mosusu ya sika. Rudy azali mutu malamu mpe alimbisaka mingi. Na yango ayebisaki mokonzi wana ete ezalaki MALAMU soki bakokaki kaka kobongisa esika ebebaki mpe kozongisa piyano se moko wana, kasi mokonzi abetaki sete ete esengelaki ezala kaka ya sika.

Rudy ayanolaki, na koloba, “Ekoki kozala mabe bongo te. Bobongisa kaka yango mpe memela biso.”

Mokonzi azongisaki boye: “Libaya ezali yakobukana, soki libaya ezali ya kobukani ekoki kozala lisusu ndenge moko te. Okozwa piyano ya sika.”

Bandeko basi mpe mibali, biso nyonso tozali lokola piyano eye te, mwa kobukana, mwa kopasuka, mpe ya kobeba, tozali koyoka lokola tokozonga lisusu ndenge tozalaka te? Nzokande, ntango toyei epai na Yesu Klisto na kosalelaka bondimi na Ye, boyamboli, mpe kosala mpe kobatela mayokani, kobukama motema na biso—ntina na yango ezala soki nini—ekoki kobikisama. Mosala moye, oyo ebengisaka nguya ya kobikisa ya Mobikisi na bomoi na biso, ezongisaka biso kaka te na lolenge tozalaki liboso kasi ekomisaka biso malamu koleka. Nayebi ete na nzela ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto, biso nyonso tokoki kobongisama, kokomisama mobimba, mpe kokokisa ntina na biso, kaka lokola piyano oyo ezali kobeta kitoko, piyano ya kitoko ya sika.

Mokonzi Russell M. Nelson ateyaki boye: “tango mimekano ya mpasi eyelaka biso, wana nde ngonga ya kokomisa bondimi na biso epai ya Nzambe mozindo, ya kosala makasi, mpe ya ko salela basusu. Na boye nde akobikisa mitema na biso oyo ezokisami. Akosopa kimia mpe libondisi likolo na moko na moko na kati na biso Makabo oyo ya minene koleka ekobebisama te, ezala na liwa.” 1

Yesu alobaki:

“Boya epai na ngai, bino banso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito, mpe nakopemisa bino.

“Bozwa nkanga na ngai likolo na bino, mpe boyekola epai na ngai; mpo nazali moto ya boboto mpe motema kokita: mpe bokozwa bopemi ya milimo na bino.

Mpona nkanga na ngai ezali mpete, mpe mokumba na nga ezali pepele” (Matai 11:28–30).

Elilingi
Mobikisi na biso, Yesu Klisto

Mpo na kobikisa kobukana na koyaka epai na Ye, esengeli na biso kozala na bondimi na Yesu Klisto. “Kozala na bondimi na Yesu Klisto elakisi kotia elikya nyonso epai na Ye—kotia mayele nyonso na bokasi na Ye ezanga nsuka … mpe bolingo. Esangisi na kondimela mateya na Ye. Elakisi ete ata biso tozali kososola makambu nyonso te, Ye ayebi nyonso. Mpo ete Ye ayokaki ba mpasi, minyoko, mitungisi nyonso ya biso, Ye ayebi ndenge nini akoki kosalisa biso tonyata matata ya mokolo na mokolo.” 2

Ndenge toye epai na Ye, tokoki kotondisama na esengo, kimia, mpe libondisi. Nyonso oyo ezali [mpasi mpe momekano]na ntina ya bomoi ekoki koyeisama malonga o nzela ya Bomikabi bwa Yesu Klisto.” 3 Apesaki biso liteya oyo, “Tala epai na ngai na makanisi nyonso; ntembe te, bobanga te.”(Malongi mpe Boyokani 6:36).

Na kati ya Buku ya Mormon, ntango Alma elongo na batu na ye bakomaki na nsuka mpona mikumba oyo ezalaki likola na bango, bato babondelaki bazwa bopemi. Nkolo alongolaki bozito na bango te, nzoka nde alakaki bango.

“Mpe nakolembisa lisusu mikumba na bango oyo etiami na mapeka na bango, ete kutu bokokoka te koyoka yango na mikongo na bango, kutu ntango bozali na bowumbu; mpe oyo nakosala ete bokoka kotelama lokola banzeneneke mpe na ngai nsima, mpe ete bokoka koyeba na ntembe te ete ngai, Nkolo Nzambe, natalaka bato na ngai na mitungisi na bango.

“Mpe sikawa esalemaki ete mikumba mitiamaki likolo ya Alama mpe bandeko ba ye mikomaki pepele; iyo, Nkolo apesaki bango bokasi ete bakoka komeme mikumba na bango na pete, mpe batosaki na bosepeli mpe bompikiliki bolingi bwa Nkolo” (Mosiah 24:14–15).

Na maye matali bokasi ya Mobisi mpona kobikisa mpe kokomisa mikumba pepele, Mpaka Tad R Callister ateyaki boye:

“Lipamboli moko ewuti na Bomikabi ezali ete tokoki kozwa nguya ya lisungi ya Nkolo. Ysaya alobaki mbala na mbala maye matali mopepe ya Nkolo oyo ebikisaka, epesaka kimia. Atatolaki ete Mobikisi azalaki makasi mpona mozangi na kati ya minyoko na ye, ebombamelo na ntango ya mvula ya mopepe, esika ya mpio na moyi makasi’ (Yisaya 25:4). Mpona baoyo batondi na mawa, Ysaya alobaki ete Mobikisi azali na nguya ya kobondisa baoyo bazali kolela’ (Yisaya 61:2), mpe apangwisaka mayi ya miso na bilongi nyonso’ (Yisaya 25:8; tala lisusu Emoniseli 7:17); ‘apesaka makasi na molimo moto ya komikitisa’ (Yisaya 57:15); mpe akangaka mitema mibukana’ (Yisaya 61:1; tala lisusu Luka 4:18; Njembo 147:3). Bongo nguya na Ye ya kosunga ezalaki monene mpo akokaki kobimisa kitoko na esika ya mputulu, mafuta ya esengo na esika ya kolela, bilamba ya masanzoli esika ya molimo ya bozito’ (Yisaya 61:3).

“O elikya nini etondisami na bilaka na ye! … Molimo na Ye ebikisaka; epetolaka; ebondisaka; epesaka mpema na bomoi ya sika kati na mitema ebungisa elikya. Ezali na nguya ya kobongola nyonso ya mabe mpe ya mayele mabe mpe ya ntina te na bomoi ekoma eloko moko ya kongenga mpe ya nkembo ya likolo Ye azali na nguya ya kobongola mputulu ya liwa na kitoko ya seko.” 4

Natatoli ete Yesu Klisto azali Mobikisi wa bolingo, Mosikoli, Moteyi,Monganga, mpe moninga malamu. Soki tozongi epai na Ye, Ye akobisisa biso mpe akozongisa biso mobimba lisusu. Na tatoli ete oyo ezali Eklezia na Ye mpe ete azali komilengela mpo ya bozongi lisusu awa na mokili kokonza na nguya mpe na nkembo. Na nkombo ya Yesu Klisto, Amene.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Jesus Christ—the Master Healer,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2005, 87.

  2. Faith in Jesus Christ,” Gospel Topics, topics.ChurchofJesusChrist.org.

  3. Prêchez Mon Evangile: Guide pour le Service Missionnaire, rev. ed. (2018), 52, ChurchofJesusChrist.org.

  4. Tad R. Callister: Bomikabi Ezangia Ndelo (2000), 206–7.

Bimisa na lokasa