Likita Linene
Na yango Kengelaka, mpe Sambelaka Ntango Nyonso
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2020


Na yango Kengelaka, mpe Sambelaka Ntango Nyonso

Lelo, natalisi libiangi na ngai na losambo epai na bino bato ya ekolo moko moko na mokili mobimba.

Bandeko ya talo ya mibali mpe basi, katikati ya mposo na Ye ya suka na mosala na ye ya kibokufi, Yesu ateyaki bayekoli na Ye ete “yango wana bokengelaka, mpe bondeleka ntango nyonso, ete bozala na makasi ya kokima makombo oyo nionso mazali koya, mpe kotelema liboso ya Mwana na moto.”1

Na “makambo maye makosalema” yambo ya boyei na Ye ya Mibale ezali “bitumba mpe nungungungu ya bitumba[,] … banzala, mpe maladi mpe boningani ya mabele na bisika ndenge na ndenge.”2

Na kati ya Doctrine et Alliances Mobikisi alobaki, Mpe makambo manso makozala na boningani; … mpo ete bobangi ekokomela bato banso.”3

Ya solo, tozali na eleko oyo makambo mazali na boningani. Bato mingie bazali kobanga lobi ekoya, mpe mitema mingi ebungisi kondima na bango epai ya Nzambe mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Baraport ya nsango ezali kotondisama na makambo ya mabe. Bozangi bomoto etiami na interneti. Bankunda, biklezia, bamoske, basinagoga, mpe bisika ya biyamba ebebisami.

Bokono ya mokili mobimba elongi etando bisika nyonso ya mabele: bamilio ya bato bazwi bokono, bankoto ya minkama bakufi. Badiplome, misala mya nsambo, mabala, misala ya misionele, makambo ndenge na ndenge ya ntina ebebisami. Mpo na kobakisa, bato ebele batikali bango moko mpe basundolamaki.

Mobulungano ya misolo esali mikakatano mpo na mingi, mingi mingi kati na baye bazali na botau ya bana ya Tata na biso ya Lola.

Tomonaki bato kosalela na nko makoki na bango mpo na kosenga yango na kimia, mpe tomonaki masanga ya batomboki na nkanda.

Na ntango moko, tokobi komona bitumba na mokili mobimba.

Nakanisi mbala mingi baoyo kati na bino bazali konyokwama, komitungisa, kobanga to komiyokaka bango moko. Nalobi solo na moko na moko kati na bino ete Nkolo ayebi bino, ete ayebi motungisi na bino mpe mpasi, mpe ete Ye alingaka bino—na bolingo, yo moko, na bozindo, mpe libela na libela.

Butu nyonso ntango nasambelaka, nasengaka epai ya Nkolo apambola baoyo bazali na mikumba ya mpasi, minyoko, basundolami mpe na mawa. Nayebi ete bakambi mosusu ya Eklezia basambelaka losambo oyo. Mitema na biso, na moto ye moko mpe lisanga, ekendaka epai na bino mpe nsambo ekendaka epai ya Nzambe mpo na bino.

Nalekisaka mikolo ebele na mobu na eteni ya nordi-esti ya Amerika kokendeka kotala Amerika mpe bisika ya masolo ya Eklezia, kosalaka mayangani elongo na bamisionele mpe bandimi, mpe kotalaka bakambi ya gouvenema mpe bakambi ya kompani enene.

Na Lomingo, Sanza ya zomi 20, nalobaki na lisanga monene pene ya Bostone, Massachusetts. Ntango nazalaki koloba, natindikamaki mpo na koloba, “nasengi bino … tosambela mpo na mboka oyo, mpo na bakambi na biso, mpo na bato na biso, mpe mpo na mabota oyo ezali kofanda na mboka monene oyo etiami na Nzambe.”4

Nalobaki lisusu ete Amerika mpe bikolo mingi ya mokili, lokola na ntango eleka kala, ekomi na esika banzela ekutani moko ya mabe mpe bazali na mposa ya nsambo na biso.5

Bosenga na ngai ezalaki na kati ya makebisi na ngai te. Maloba oyo eyelaki ngai ntango nayokaki Molimo kotinda ngai nabiangisa bato oyo bazali awa tosambela mpo na bamboka na bango mpe bakambi na bango.

Lelo, natalisi libiangi na ngai na losambo epai na bino bato ya ekolo moko moko na mokili mobimba. Kotala te lolenge nini okosambela to epai ya nani ozali kosambela, nasengi bosalela bondimi na bino—kotala bondimi na yo te—mpe sambela mpo na mboka na yo mpe mpo na bakambi ya mbokana yo . Lokola nalobaki na Sanza ya zomi eleki na Massachusetts, totelemi lelo na esika banzela ekutani moko ya mabe na lisitwale, mpe bikolo ya mabele ezali na mposa makasi ya bofuli ya bonzambe mpe bokambami. Oyo etali bapolitiki to politiki te. Oyo ezali mpo na kimia mpe bokangoli oyo ekoki koya na milimo ya bato lokola na molimo ya bikolo—bingumba, bituka mpe bamboka—epai ya Nkumu ya Kimia mpe liziba ya libiki nyonso, Nkolo Yesu Klisto.

Na ntango ya mwa basanza eleki nazwaki likanisi ete nzela malamu mpo na kosunga likambo liye ya mokili ezali ete bato banso batalela na bozindo Nzambe mpe bazongisa mitema na bango epai na Ye na nzela ya losambo ya solo. Tomikitisa mpe toluka bofuli ya lola mpo na kotelemela mpe kolonga oyo ezali liboso na biso ekozala nzela na biso ya bobateli mpe ya solo mpo na kokende liboso na elikya na ntango ya mobulungano oyo.

Makomi ebeti nsete na nsambo esalemaki na Yesu mpe lisusu mateya na Ye na ntina ya losambo na ntango mosala na Ye na bokufi. Bokomikundola Losambo ya Nkolo:

“Tata na biso azali na lola, nkombo na yo Ekumisama.

“Bokonzi na yo eya. Tika mokano na yo esalama na nse, lokola esalemi na lola.”

“Pesa biso lelo lipa na biso ya mokolo.

“Mpe limbisa biso niongo ya biso, lokola biso tokolimbisaka bato ba niongo ya biso.

“Mpe kamba biso te na masenginya, kasi bikisa biso na mabe: Mpo ya yo ezali bokonzi, mpe nguya, mpe nkembo, ya libela. Amene.”6

Losambo ya makanisi kitoko, oyo bato bazongelaka mingi na Mango ya baklisto, emonisi polele ete elongobani kosenga “Tata na Biso oyo azali na Lola” fkopesana biyano na maye ezali kotungisa biso. Na yango, tika ete tosambela mpo na bokambi ya bonzambe.

Nabiangisi bino bosambelaka mbala na mbala.7 Bosambela mpo na libota na bino. Bosambela mpo na bakambi ya bikolo. Bosambela mpo na bato ya mpiko baye bazali na molongo mwa yambo ya etumba sikawa kobundaka na mitungisi ya lingoma ya bato, ya nzinganzinga, ya politiki, mpe ya biloji na mokili mobimba, bazwi mpe babola, bilenge mpe mibange.

Mobikisi ateyaki biso totia ndelo te na moto oyo tozali kosambela. Alobaki, “Bolinga banguna na bino, bopambola bango oyo batuki bino, bosalela bango bolamu baoyo bayini bino, mpe bosambela mpo na bango baoyo bazali kosala bino mabe, mpe banyokoli bino.”8

Na ekulusu ya Bolozi, epai eye Yesu akufaki mpo na masumu na biso, Amonaki oyo Ateyaki ntango Asambelaki, “Tata, limbisa bango; bayebi te oyo bazali kosala.”9

Losambo ya solo mpo na baoyo bamonani kozala bayini na biso elakisi boyambi na biso ete Nzambe akoki kobongola mitema na biso mpe mitema ya basusu. Nsambo ya boye esengeli kolendisa ekateli na biso mpo na kosala mbongwana nyonso oyo ezali ntina na bomoi, mabota mpe mangomba na biso.

Kotala te epai wapi ofandi, lokota nini olobaka, to mitungisi na yo, Nzambe ayokaka mpe ayanolaka bino na lolenge na Ye moko mpe na ntango na Ye moko. Mpo ete tozali bana na Ye, tokoki kopusana epai na Ye mpo na koluka lisungi, bolendisi, mpe mposa ya sika mpo na kosala bokeseni malamu na mokili.

Kosambelaka mpo na boyengebene, kimia, bobola mpe maladi ezali mbala mingi ya kokoka te. Nsima ya biso kofukama na losambo, tosengeli kotelema uta na mabolongo na biso mpe kosala oyo tokoki kosala mpo na kosunga—kosalisa biso moko mpe basusu.10

Makomi etondisami na bandakisa ya bato ya boyambi oyo basangisaki nsambo elongo na mosala mpo na kosala bokeseni na bomoi na bango moko mpe na bomoi ya basusu. Na Buku ya Mormon, ndakisa, totangaka oyo etali Enos. Emonisamaki ete “pene ya mibale na misato ya buku na ye ya mokuse etalisi losambo, to biteni ya nsambo, mpe lisolo elobeli oyo asalaki na mbeba ya biyano azwaki.”11

Tozali na bandakisa mingi ya lolenge nini losambo esalaki bokeseni na kati ya lisitwale ya Eklezia na biso moko, kobanda na losambo ya yambo ya maloba ya Joseph Smith na zamba ya polele pene pene ya ndako ya baboti na ye na eleko ya milona na 1820. Kolukaka bolimbisi mpe bokambi na molimo, losambo ya Joseph efungolaki balola. Lelo tozali balongi ya libula ya Joseph Profeta mpe mibali mosusu ya boyambi ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe basi oyo basambelaki mpe basalaki mpo na kosunga kotia Eklezia ya Yezu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Suka.

Nakanisaka ntango nyonso nsambo ya basi ya boyengebene lokola Mary Fielding Smith oyo azalaki na lisungi ya Nzambe, akambaki na bompikiliki libota na ye uta mitungisi ya mpasi na Illinois na bobateli na libulu epai eye libota na ye etombwamaki na molimo mpe na nzoto. Na nsima ya losambo na ye ya makasi na mabolongo, asalaki makasi nsima mpo na kolonga mikakatano na ye mpe apambolaki libota na ye.

Losambo ekotombola biso mpe ekosangisa biso elongo lokola bato, lokola mabota, lokola Eklezia, mpe lokola mokili. Losambo ekopesa nguya na baye ya mayele mpe ekosunga bango bazwa nkisi ya mangwele mpe bankisi oyo ekosukisa bokono ya coronavirise. Losambo ekolendisa baoyo babungisaki balingami na bango. Ekokamba biso na boyebi nini tosengeli kosala mpo na bobateli na biso moko.

Bandeko mibali mpe basi, napusi bino bobakisa boyokani na bino na losambo. Napusi bino tosambela na mitema, na botamboli ya mokolo na mokolo, na bandako, na bapalwasi mpe ntango nyonso, na mitema bino.12

Na nkombo ya bakambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, natondi bino botondi na nsambo na bino mpo na biso. Napusi bino bokoba kosambela mpo ete tokoka kozwa lifuli mpe emoniseli mpo na kokamba Eklezia na bantango oyo ya mpasi.

Losambo ekoki kobongola babomoi na biso. Na nguya ya losambo ya solo, tokoki kobongola mpe kosunga basusu basala lolenge moko.

Nayebi nguya ya losambo na boyebi na ngai moko. Kala te nazalaki ngai moko na bilo na ngai. Bautaki kosala ngai lipaso na loboko. Ezalaki moindo mpe bule, ya kovimba mpasi. Ntango nafandaki na kiti na ngai, nakokaki te kotia makanisi na makambo ya ntina mpe motuya mpo ete nazalaki kotala kaka mpasi yango.

Nafukamaki mpo na kosambela mpe nasengaki Nkolo asunga ngai natala malamu mpo ete nakoka kokokisa mosala na ngai. Natelemaki mpe nazongelaki bankasa na bilo na ngai. Na mbalakaka, pole mpe konzo eyelaki ngai na makanisi, mpe nazalaki na makoki ya kosilisa misala oyo ezalaki liboso na ngai.

Makambo ya mpasi na mokili ya mikakatano ya lelo ekoki komonisama kobangisa ntango tomonaka kpokoso mpe mikakatano. Kasi ezali litatoli na ngai ya nguya ete tokosambela mpe kosenga Tata na Lola mapamboli oyo tosengeli mpe bokambi, tokoyeba lolenge nini tokoki kopambola mabota na biso, bato ya nzinga-nzinga na biso, mangomba mpe kutu bikolo epai eye tofandi.

Mobikisi asambelaki mpe nsima Ye “Asalaki bolamu”13 na koleisaka babola, kopesaka bolendisi mpe lisungi na baoyo bazalaki na bosenga, mpe asalaki na bolingo, kolimbisaka, kimia mpe bopemi na baoyo nyonso bayaki epai na Ye. Azali kokoka kosunga biso.

Nabengisi bandimi nyonso ya Eklezia, mpe bato ya nzinga-nzinga na biso mpe baninga ya mangomba ya boyambi mosusu na mokili mobimba, tosala lokola Mobikisi apesaki toli na bayekoli na Ye: “Bokengelaka, mpe bosambelaka ntango nyonso14 mpo na kimia, mpo na bosikolami, mpo na bobatelami, mpe mpo na mabaku ya kosungana moko na moko.

Boniboni monene ezali nguya ya losambo mpe lolenge nini nsambo na biso ya bondimi esengelami epai ya Nzambe mpe Mwana na Ye ya Bolingo na mokili ya lelo! Tika tomikundola mpe toyeba kozongisa matondi mpo na nguya ya losambo. Na nkombo ya Yesu Klisto, Amene.

Bimisa na lokasa