Likita Linene
Baepisikopo—Babateli Mpate ya Etonga ya Nkolo
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Baepisikopo—Babateli Mpate ya Etonga ya Nkolo

Episikopo azali na mokumba monene na kosalaka lokola mobateli mpate mpo na kotambwisa nkola ya sika, kobakisa bilenge minzemba, epai na Yesu Klisto.17

Bandeko na ngai balingami ya bonganganzambe, moko ya milongo ya kobosana te na loyembo moko tolingaka mingi etuni, “Bilenge ya Siona bakoki kolemba?”1 Esakola na ngai ya motema mpe ya makasi na eyano na motuna wana ezali “Te!”

Mpo na koyeba soki eyano oyo ezali ya solo, natatoli lelo ete kosunga nkola ya sika kati ya ntango ya mikakatano mpe komekama ya momeseno te ezali mokumba ya ntina mingi oyo Tata wa biso ya Lola apesi baboti mpe baepisikopo.2 Tika natalisa ntina ya episikopo na mayele ya ngai moko.

Ntango nazalaki diakona, libota na ngai ekendaki kokota na ndako ya sika mpe na palwasi mosusu. Nazalaki kobanda eteyelo ya katikati to ecole secondaire, na yango nakotaki lisusu na eteyelo ya sika. Ezalaki na lingomba ya kokamwa ya bilenge mibali kati ya lisanga likoki ya badiakona. Baboti na bango mingi bazalaki bandimi ya molende. Mama na ngai azalaki molende mpenza; tata na ngai azalaki na ndenge na ye moko na makambo nyonso kasi azalaki mondimi ya molende te.

Mopesi toli ya mibale kati na episikopo,3 Ndeko Dean Eyre, azalaki mokambi amipesa. Ntango nazalaki komesana na palwasi ya sika, liyebisi ya feti moko ya batata na bana epesamaki mpo kokende na Bear Lake—na ntaka ya kilometre soki 65. Nakanisaki te nakokende na tata na ngai te. Kasi Ndeko Eyre asalaki libengisi ya kafukafu mpo ete ngai nakende elongo na ye. Akumisaki makasi mpe na limemya nyonso tata na ngai mpe atalisaki ntina ya libaku nazwaki ya kozala na bandimi mosusu ya lisanga likoki ya badiakona. Na yango nazwaki ekateli ya kokende na Ndeko Eyre, mpe namonaki makambo ya kitoko mpenza.

Ndeko Eyre azalaki ndakisa malamu ya bolingo ya Klisto na kokokisaka mokumba na ye na episikopo ya kosunga baboti na kokengelaka mpe koleisa bilenge. Apesaki ngai ebandeli ya malamu mpenza na kati ya palwasi oyo ya sika mpe azalaki molakisi na ngai.

Mwa bansanza liboso ngai nakende misio na mobu ya 1960, Ndeko Eyre akufaki na maladi ya kanser ntango azalaki na mibu 39. Atikaki mwasi na bana mitano, bana nyonso bazalaki na nse ya mibu 16. Bana na ye ya mikolo, Richard mpe Chris Eyre, bayebisi ngai ete na bozangi ya tata na bango, baepisikopo basungaki mpe bakengelaki bango na baleki na bango ya mibali mpe ya mwasi na bolingo ya Klisto, mpo na oyo napesi botondi.

Baboti bakozala ntango nyonso na mokumba ya liboso mpo na mabota na bango.4 Babokambi ya masanga makoki ezali kopesa lisusu lisungi ya ntina mpe botambwisi na bato ya masanga makoki na kosalisaka bango na kotombola misala mpe nguya ya Bonganganzambe ya Alona ezala ntina koleka kati ya bomoi na bango.5

Mobateli mpate na bampate

Lelo ntina na ngai ezali ya kolobela na oyo etali baepisikopo mpe basungi na bango, baoyo bakoki na solo kobiengama “babateli ya etonga ya Nkolo”—na bobeti sete na kozalaka babateli ya nkola ya sika.6 Ezali ntina ete Apostolo Petelo alobaki na Yesu Klisto lokola “Mobateli mpe Episikopo ya milimo na bino.”7

Episikopo azali na mikumba minene mitano na kokambaka palwasi:

  1. Azali nganganzambe minene mokambi na palwasi.8

  2. Azali mokambi ya Bonganganzambe ya Alona.9

  3. Azali mosambisi ya momeseno.10

  4. Azali kotambwisa mosala ya lobiko mpe ya bonetoli, kobakisa kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisungi.11

  5. Mpe azali koyangela makomi, misolo, mpe esaleli ya ndakonzambe.12

Na mosala na ye ya nganganzambe monene, episikopo azali “motambwisi ya molimo” ya palwasi.”13 Azali “moyekoli ya sembo ya Yesu Klisto.”14

Lisusu, “episikopo azali kotambwisa mosala ya lobiko mpe bonetoli kati na palwasi.”15 Episikopo asengeli kopesa mokumba ya mokolo na mokolo mpo kokabola nsango malamu, kolendisa bandimi ya sika mpe baye bazongi, kosalisa, mosala ya tempelo mpe ya mambi ya libota na babokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe lingomba ya Bamama Basungi.16 Episikopo azali kotambwisa mosala oyo na kati ya likita ya palwasi mpe likita ya bilenge ya palwasi.

Episikopo azali na mosala monene na kozala lokola mobateli mpate mpo na kotambwisa nkola ya sika, kobakisa bilenge minzemba, epai na Yesu Klisto.17 Mokambi Russell M. Nelson abeti sete na mosala monene ya episikopo na bapesi toli na ye. Ateyi ete ya bango “mokumba ya liboso mpe eleki monene mpenza ezali ya kobatela bilenge mibali mpe basi na [ya bango] palwasi.”18 Episikopo azali kosunga baboti na kokengelaka mpe koleisaka bana mpe bilenge kati ya palwasi. Episikopo mpe mokambi ya Bilenge Basi basalaki likita ya toli elongo. Bazali kosala makasi mpo na kosunga bilenge kosalela mibeko kati ya Mpo na Bokasi ya Bilengebalongobana mpo na kozwa makuli, mpe kosala mpe kobatela mayokani.

Bokoki kotuna “Mpo na nini episikopo atindami kolekisa ntango ebele na bilenge?” Nkolo abongisi Eklezia na Ye mpo na kokokisa makambo eleki motuya mingi. Na bongo, ebongiseli ya Eklezia na Ye ezali na lolenge oyo episikopo azali na mosala esangisi mikumba mibale. Azali na mokumba ya koteya dokitrini kati ya palwasi mobimba, kasi azali mpe na mokumba ya kafukafu ya koteya dokitrine mpo na lisanga likoki ya banganganzambe.19

Bilenge mibali oyo bazali banganganzambe mpe bilenge basi ya mbula moko bazali na ntango moko ya ntina mingi na bomoi na bango mpe kokola. Na ntango moke, bazwaka bikateli oyo ezalaka na bandimbola ya libela. Bazwaka mokano soki bakolongobana mpo na kokota na tempelo, kosala misio,20 kosala makasi mpo kobala na tempelo, mpe komilengela mpo na mosala ya bomoi na bango. Bikateli oyo, soki ekamatami, ezali na bandimbola ya molimo ya mozindo mpe matomba ya mimeseno mpo na bomoi na bango etikali. Baepisikopo, tosengi boyeba ete ntango moke oyo bolekisi na elenge nganganzambe to elenge mwasi ekoki kosunga bango kososola nguya oyo ezali na bango na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Ekoki kopesa limoni oyo ekozala na nguya makasi na bomoi na bango mobimba.

Episikopo Moa Mahe mpe Bapesi toli na ye

Moko ya bandakisa malamu nazwi ezali ya episikopo oyo apesaki limoni ya boye mpo na bilenge na ye ezali Episikopo Moa Mahe. Abiengamaki kozala episikopo ya liboso ya Palwasi ya San Francisco Tongan.21 Azalaki moto uta na Vava’u, Tonga. Palwasi na ye ezalaki pembeni ya libanda ya mpepo ya San Francisco, wapi azalaki kosala.22

Palwasi ya Tonga

Palwasi ezalaki na bilenge ebele, mingi bawutaki na mabota oyo eyaki sika na Etazini. Episikopo Mahe ateyaki bango kaka na liloba te kasi na ndakisa ya lolenge nini kozala bayekoli ya bosembo ya Yesu Klisto, kasi asungaki lisusu kopesa bango limoni ya oyo bokokaki kokoma mpe asungaki bango komilengela mpo na tempelo, misio, kotanga kelasi, mpe mosala. Asalaki mpo na pene mibu mwambe, mpe bandoto na ye mpe bamposa na ye mpo na bilenge ekokisamaki.

Pene ya 90% ya bilenge mibali na masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona basalaki misio. Bilenge mibali mpe basi 15 bazalaki bato ya libota na bango ya liboso ya kokende universite.23 Akutanaki na mokambi ya eteyelo ya katikati (mondimi na biso te), mpe basalaki kimoninga mpe bayokanaki na oyo etali lolenge nini kosalisa elenge moko na moko akokisa mikano ya ntina mpe kolonga mikakatano. Mokambi ya eteyelo ayebisaki ngai ete Episikopo Mahe asalisaki ye na kosalaka bauta ya mangomba nyonso oyo bazalaki kobundabunda. Bilenge bayebaki ete episikopo azalaki kolinga bango.

Likambo ya mawa, Episikopo Mahe akufaki ntango azalaki kosalela lokola episikopo. Nakobosana ata moke te matanga na ye ya mawa mingi mpe ya kofulama. Ezalaki na ebele ya bato. Lingomba ya bayembi ezalaki na bandimi ya bosembo bilenge koleka 35 oyo basalaka misio to oyo bazalaki kotanga na univesité mpe baoyo bazalaka bilenge ntango ya mosala na ye lokola episikopo. Molobi moko atalisaki mayoki ya mozindo ya botondi uta na bilenge mpe bilenge banzemba ya palwasi na ye. Apesaki lokumu na Episikopo Mahe mpo na limoni apesaki bango na komilengela mpo na bomoi mpe mosala ya sembo. Kasi likambo ya motuya mingi mpenza, Episikopo Mahe asungaki bango kotonga bondimi na Nkolo Yesu Klisto lokola moboko ya bomoi wa bango.

Sikawa, baepisikopo, bisika nyonso bozali kosala, na masolo mpe makutani mosusu na bino, bokoki kopesa limoni ya boye mpe kotonga bondimi kati ya Yesu Klisto. Bokoki kopanza mabiangi ya nguya mpo na kobongola bizaleli, kolengela bango mpo na bomoi, mpe kofula bango batikala na nzela ya mayokani.

Lisusu, bokoki kosunga mwa bilenge oyo bazali na bozangi boyokani na baboti na makambo oyo ezanga ntina mpenza.24 Na ntango oyo bilenge bamonani kozala na bozangi boyokani mingi na baboti na bango, moto oyo akambaka lisanga likoki na bango mpe oyo bayanolaka na eklezia azali mpe moto epai na oyo baboti na bango bakendaka mpo kozwa bandingisa ya tempelo. Yango epesi episikopo nzela se moko mpo kopesa toli na bilenge mpe na baboti na bango ntango boswani epesi bokabwani. Baepisikopo bakoki kosunga bango nyonso bazwa emoneli ya seko mpe kosilisa makambo ya ntina koleka to ya ntina moke. Tosengi ete baepisikopo bazala te na mabota ya kosalisa mpo ete bakoka kotia ya bango ntango mpe bokasi na kosalisa bilenge mpe mabota na bango na makambo ya boye.25

Nayebi episikopo moko oyo akokaki kosilisa boswani ya makasi katikati ya mwana mobali moko na baboti na ye, kozongisa boyokani kati ya ndako mpe kokolisa komipesa na bango na nsango malamu. Episikopo asungaki baboti kososola ete kosala bokasi mpo na kozala moyekoli ya Yesu Klisto ezalaki na ntina mingi koleka lolenge mpe ntango ninimisala ya ndako esilaki.

Mpo na kolekisa ntango ebele na bilenge, bisika nyonso bazali, kobakisa na bafeti ya kelasi to milulu, baepisikopo bapesami toli ya kotinda bato mosusu kosala makita mpe ntango ya toli na bakolo. Ntango baepisikopo bakoki kosala makita etali makambo ya makasi mpe ya lombangu, tosengi ete batoma ya makita ya makambo esilaka te, ya lombangu moke oyo ezali kosenga bosambisi te lokola bolongobani epesama na bato ya lisanga likoki ya bampaka to ya lingomba ya Bamama Basungi—mingimingi babokambi to bandeko mibali mpe basi basalisi. Molimo ekotambwisa bakambi yango26 bapona bandimi ya bosembo mpo kopesa toli yango. Baoyo bakozwa mokumba ya etinda ya toli oyo basengeli na emoniseli. Bango, ya solo, basengeli ntango nyonso kobomba sekele ya sikisiki.

Bakambi ya bokebi bamipesaka ntango nyonso mpo na nkola ya sika. Oyo ezali esika baye ya baepisikopo balekisaka ebele ya ntango na bango kati na mosala na Eklezia.

Sikawa nalingi koloba mwa makambo moke mbala moko epai ya bilenge mpe nsima epai ya baepisikopo.

Mingi kati na bino bilenge ya motuya mingi bokoki ntango mosusu kozanga limoni ya oyo bozali mpe oyo bokoki kokoma. Nzokande bozali na ebandeli mpenza ya bikateli ya ntina koleka bokozwa kati na bomoi na bino. Tosengi bozwa toli uta na baboti mpe episikopo na bino na ntina ya maponi ya motuya ezali koya liboso na bino. Bopesa nzela na episikopo azala moninga mpe mopesi toli na bino.

Toyebi ete bozali na mikakatano mpe mimekano oyo ezali koyela bino na nzela nyonso. Biso banso tosengeli koyambola mokolo na mokolo lokola eteyi Mokambi Nelson. Tosengi boloba na episikopo na bino na oyo etali likambo nyonso oyo mosambisi ya momeseno akoki kosungela bino na kotiaka bomoi na bino na nzela ya Nkolo na bomilengeli mpo na “mosala monene” Ye azali na yango mpo na bino na eleko oyo ya nsuka.27 Lokola Mokambi Nelson abengisaki bino, tosengi bomilongobanisa mpo na kozala moko ya lipinga ya bilenge ya Nkolo!28

Sikawa liloba moko mpo na bino baepisikopo ya ntina mingi mpo na bokambi mpe bandimi ya Eklezia. Topesi bino botondi na motema moko. Na bambongwana bosengamaki kosala mibu ewuti koleka, baepisikopo ya bolingo, tosengi boyeba ete tolingi bino mingi mpe tosepelaka na bino. Lisungi na bino kati na bokonzi ezali ntina koleka. Eklezia ezali na baepisikopo mpe bakambi ya bitape 30,900 oyo bazali kosala kati na mokili mobimba.29 Topesi bino longonya.

Mwa maloba mpe mabiangi ya bule bazali kopesa etondi na ndimbola ya molimo mpe ya likolo. Libiangi ya episikopo ezali solo na molongo ya yambo ya maloba ya boye. Kosalela Nkolo na nkombo oyo ezali ya kokomwa na ndenge ebele mpenza. Libiangi, bosungi, mpe bokulisi episikopo ezali likambo ya kobasana ata moke te. Mpo na ngai, etiami na molongo na makambo mike eluti kitoko mpo ebele mpenza mpe mozindo ya mayoki ebendaka. Ekokani mpenza na motuya na makambo lokola libala mpe kokoma tata oyo ekoki kolimbolama na mwa maloba te.30

Baepisikopo, tozali kosunga bino! Baepisikopo, tolingi bino! Bozali solo babateli mpate ya etonga na Ye. Mobikisi akosundola bino na mabiangi oyo ya bule te. Natatoli na ntina na yango, na nsuka ya poso ya Pasika oyo, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “True to the Faith,” Cantiques,, no. 164.

  2. Bakambi ya bilenge, babokambi ya masanga makoki mpe ya bakelasi, mpe bakambii misusu ya Eklezia bazali kokabola mokumba oyo.

  3. Episikopo azali mokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe. Mosungi na ye ya yambo azali na mokumba ya lisanga likoki ya bateyi, mpe mosungi na ye ya mibale azali na mokumba ya lisanga likoki ya badiakono. (Tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 10.3, , ChurchofJesusChrist.org.)

  4. Tala Doctrine et Alliances 68:25–28

  5. Tala Quentin L. Cook, “Adjustments to Strengthen Youth,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 40–43.

  6. Kosalela ya liloba episikopo ezali ndenge moko na bakambi ya bitape na biso ya bosembo.

  7. 1 Petelo 2:25

  8. Tala General Handbook, 6.1.1.

  9. Tala General Handbook, 6.1.2.

  10. Tala General Handbook, 6.1.3.

  11. Tala General Handbook, 6.1.4.

  12. Tala General Handbook, 6.1.5.

  13. General Handbook, 6.1.1; tala lisusu General Handbook, 6.1.1.1–6.1.1.4.

  14. General Handbook, 6.1.1.

  15. General Handbook, 6.1.4.

  16. Tala General Handbook, 21.2; 23.5; 25.2.

  17. Tala General Handbook, 6.1; 14.3.3.1; tala lisusu Quentin L. Cook, “Adjustments to Strengthen Youth,” 40–43. Episikopo alendisami mpo na kolekisa ntango ebele na mwasi mpe libota na ye. Kofandisa makanisi na likanisi moko boye ekoki kosalema ntango bamikolo oyo bazali na makoki mpe mayele babiangami kosalisa bakambi ya lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe episikopo na misala na bango.

  18. Russell M. Nelson, “Witnesses, Aaronic Priesthood Quorums, and Young Women Classes,” Liahona,, Sanza ya zomi na moko. 2019, 39.

  19. Tala Doctrine et Alliances 107:87–88.

  20. “Nkolo azali kozela ete elenge mobali nyonso asengeli komilengela mpo na kosala [misio] (tala Doctrine et Alliances 36:1, 4–7). Bilenge basi mpe bandimi bamikolo oyo balingi kosalela basengeli mpe komilengela. Eteni ya ntina monene mpo na komilengela ezali kobunda mpo na jobongwana epai ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezongisama. Baoyo balingi kosalela mpe lisusu komilengela na nzoto mpe, mayele, mpe na mayoki ya motema, mpe na misolo” (General Handbook, 24.0).

  21. Palwasi ebongisamaki na mokolo ya 17 Sanza ya zomi na mibale , 1980. Mpaka John H. Groberg ya Lisanga Likoki ya Yambo ya Bantuku Sambo asungaki kobongisa palwasi oyo ya lokota ya Tongan. (Tala Gordon Ashby, chairman, and Donna Osgood, ed., The San Francisco California Stake: The First 60 Years, 1927–1987 [1987], 49–52.)

  22. Episikopo Mahe akomaki na ebonga ya boyangeli ya likolo na kompanyi Pan American Airlines na libanda ya Mpepo monene ya San Francisco, Californie.

  23. Tala History of San Francisco California Stake, 49.

  24. Bakoki lisusu kotombokela makambo ezali na ntina ya seko.

  25. Tala General Handbook, 21.2.1.

  26. Episikopo akoyangela elongo na babokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi na limemya na baoyo bakopesa mokumba mpe lolenge nini bolandeli ya bolingo mpe bobateli esengeli kokokisama.

  27. Doctrine et Alliances 64:33

  28. Tala Russell M. Nelson, “Hope of Israelworldwide youth devotional, Sanza ya motoba 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  29. Na sanza ya mibale 19, 2021, ezalaki na baepisikopo 24,035 mpe bakambi ya bitape 6,865 na mokili mobimba.

  30. Nabiengamaki lokola episikopo ya Palwasi ya Burlingame na Californie na mobu ya 1974 na Mokambi David B. Barlow mpe nakulisamaki na sanza ya libwa 15, 1974 na Mpaka Neal A. Maxwell, oyo abiengamaki kala te Mosungi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale.