Likita Linene
Pole Ekangamaka na Pole
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Pole Ekangamaka na Pole

Ntango tolendisi bondimi na biso na Klisto, tozwaka pole na lolenge moko ya makasi kino ekimisaka molili nyonso.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, nasepeli elongo na bino na Eyenga epambolama oyo ya Pasika na kotalaka pole ya nkembo eye engengi na mabele na Bosekwi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Klisto.

Na ntango ya mosala na Ye, Yesu asakolaki: “Nazali pole ya mokili: oyo akolanda ngai akotambola kati ya molili te, kasi akozala na pole ya bomoi.”1 Molimo ya Klisto “ezali kati ya biloko binso, [mpe] epesaka bomoi na biloko binso.”2 Elongaki molili eye elingaki kozinga biso.

Mibu eleki, na boluki ya masano, bana na ngai mibale ya mibali elongo na ngai tokendaki kotambola na lingomba moko ya bilenge mibali na Moaning Cavern, nkombo na yango ezali bongo mpo na mongongo moko ebimaka na kati na yango. Libulu ezali nzela lokola ya kubimisa milinga oyo efungwami na kisuku moko ya (bametele 180) na bolai, kisuku moko ya monene libulu ya California.

Elilingi
Moaning Cavern

Ezali bobele na banzela mibale ya kokitela: ebutelo ya bobateli na lolenge ya zolongano to ekitelo na singa kino na nse ya libulu; bana na ngai ya mibali mpe ngai toponaki ekitelo na singa. Mwana na ngai ya liboso akitaki yambo, mpe ngai na mwana ya mibale tokitaki batu ya nsuka.

Nsima ya makebisi mpe bobateli ya bakambi na biso na bisalelo mpe basinga ya makasi, tozongaki moke nsima kino totelemaki pembeni mpe tozongisaki elekia na biso, lokola yango ezalaki esika ya nsuka mpo na kozonga, mpe esika ya nsuka oyo tokokaki komona pole ya moi uta na monoko ya libulu.

Bozongi na biso nsima elandi ezindisaki biso na kati ya libulu monene ya molai mpe molai na yango ekoki komela Statue ya Liberté mobimba. Kuna tobandaki kokita malembe malembe, mpe miso na biso ezalaki kokoma molili ya bongo bongo. Ntango tokobaki bokiti na biso, bongengi ya minda ya lotiliki engengisaki efelo ya kokamwa ya libanga monene mpe ya nse ya mabele.

Na bozangi bokebisi, minda ekufaki mpenza nyonso. Na kokangama wana na likolo, totikalaki na molili moko makasi oyo tokokaki kutu ata komona maboko na biso te na basinga oyo ezalaki liboso na biso. Mongongo moko ewutaki libanda, “Papa, papa, ozali kuna?”

“Nazali awa, mwana na ngai ya mobali, nazali awa,” nayanolaki.

Bozangi ya pole elakisaki ete na bozangi lotiliki, molili ya libulu ezalaki ya bokoti te. Elongaki; “toyokaki” molili. Ntango minda epelaki lisusu, molili mbala moko elimwaki, mpo ete molili esengeli kaka kokima, atako na pole ya moke. Bana na ngai ya mibali mpe ngai totikalaki na makanisi ya molili oyo tomona naino te, bosepeli ya pole oyo tokotikala ata mokolo moko te kobosana, mpe elikya ete tozali biso moko te kati ya molili.

Bokiti na biso na kati ya libulu wana ezali kaka lolenge moko na mobembo na biso na bokufi. Tolongwaki na pole ya nkembo ya lola mpe tokitaki na nzela ya elamba ya bobosani kino na mokili ya molili. Tata na biso na Lola atikaki biso te na kati ya molili kasi alakaki biso pole mpo na mobembo na biso na nzela ya Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Toyebi ete pole ya moi ezali ntina na bomoi nyonso na mabele. Pole oyo ezali kowuta na Mobikisi na biso ezali ntina koleka mpo na bomoi na biso ya molimo. Na bolingo na Ye ebonga nie, Nzambe apesaka pole ya Klisto na moto nyonso “oyo ayaki na mokili”3 mpo ete bakoka “koyeba malamu mpe mabe”4 mpe bazala na makoki ya kokoba “kosala malamu ntango nyonso.”5 Pole wana, emonisamaka yango moko na oyo tobengaka mbala mingi makanisi na biso, ebengisaka biso tosala mpe tozala malamu koleka, mpo na bato babonga malamu.

Ntango tolendisi bondimi na biso na Klisto, tozwaka pole na lolenge moko ya makasi kino ekimisaka molili nyonso ekoki kozinga biso. “Oyo ezali ya Nzambe ezali pole; mpe ye oyo ayambi pole, mpe akobi kati na Nzambe, ayambi pole mingi koleka; mpe pole wana ekokolisa bongengi koleka kino mokolo ebongi nie.”6

Pole ya Klisto elengelaka biso tozwa nguya ya mosala ya Molimo Mosantu, oyo ezali “nguya ya bondimisi ya Nzambe … ya bosolo ya Nsango malamu”7 Moko ya misato ya Bonzambe, Molimo Mosantu “azali moto ya Molimo.”8 Liziba monene ya pole eye Tata na Lola apesaka bino na mokili ya nkufa eyaka na nzela ya Molimo Mosantu, oyo nguya “ekongengisa makanisi na bino [mpe] kotondisa molimo na bino na esengo.”9

Na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na nzela ya likoki ya bonganganzambe ezongisama, obatisami na bozindisi mpo na bolimbisi ya masumu. Nsima, maboko etiami likolo ya moto na yo mpe “libonza kitoko oyo ezanga ndimbola”10 ya Molimo Mosantu etiami likolo na yo.

Nsima, ntango bamposa na yo mpe misala ezali na kati kati ya nzela ya boyokani, Molimo Mosantu, lokola pole kati na yo, ekosakola mpe kotatola bosolo,11 ekokebisa yo likama, ekolendisa12 mpe kopetola13 mpe kopesa yo kimia14 na molimo na yo.

Mpo ete “pole ekangamaka na pole,”15 kimoninga ya ntango nyonso ya Molimo Mosantu ekokamba yo osala maponi eye ekobatela yo otikala na kati ya pole; na ngambo mosusu, maponi oyo esalemi na bozangi nguya ya Molimo Mosantu ekokamba yo na molili mpe butu. Lokola Mpaka Robert D. Hales ateyaki, “Ntango pole ezali wana, molili ekobunga mpe esengeli kokima. … Ntango pole ya molimo ya Molimo Mosantu ezali wana, molili ya Satana elongwaka.”16

Nakoki koloba ete, ntango mosusu, oyo ezali ntango ya komituna yo moko: Nazali na “pole” na bomoi na ngai? Soki te, ntango ya nsuka nini nazalaki na yango?

Kaka lokola pole ya moi esukolaka mabele mpo na kozongisa mpe kosunga bomoi, okoki mokolo na mokolo kongengisa pole kati na yo ntango oponi kolanda Ye.

Litanga ya pole ya moi ebakisami ntango nyonso ozali koluka Nzambe kati ya losambo; ekongengisa yo ntango ozali koyekola makomi mpo na “koyoka Ye”;17 to koyanola na mingongo ya baprofeta na biso ya bomoi, mpe ntango ozali kobatela mibeko mpe “kotambola kati ya makuli ya Nkolo.”18

Okobengisa pole ya moi ya molimo kati na molimo na yo mpe kimia na bomoi na yo ntango nyonso okoyambola. Ntango ozali kolia elambo poso nyonso, ntango ozali kozwa nkombo ya Mobikisi likolo na yo, ntango ozali ntango nyonso komikundola Ye mpe kobatela mitindo na Ye, pole na Ye ekongenga kati na yo.

Pole ya moi ekozala kati ya molimo na yo ntango nyonso okokabola mpe okopesa litatoli na yo. Ntango nyonso bozali kosalisana lokola Mobikisi asalaki, bokoyoka nguya na Ye kati ya motema na bino. Pole ya Tata na Lola ezalaka ntango nyonso na kati ya tempelo na Ye esantu mpe likolo ya banso oyo bazali wana na Ndako ya Nkolo. Pole na Ye kati ya molimo na yo ekembisami na misala ya boboto, na motema molai, na bolimbisi, na bolingani eye ezali komonisama yango moko mikolo minso na elongi na yo ya esengo. Na ngambo mosusu, totambolaka na molili ntango tozwaka nkanda na lombango to tozali malembe mingi mpo na kolimbisa. “Ntango otie elongi na yo na pole ya moi, molili ekoki te kosunga yo kasi kokweya na nsima na yo.”19

Ntango olongobani mpo na kolonga kimoninga ya Molimo Mosantu, ozali mpenza “komatisa makoki na yo ya molimo mpo na kozwa emoniseli.”20

Bomoi ezali na mikakatano mpe masenginya, mpe biso banso tosengeli kokutana na mikolo ya molili mpe mipepe makasi. Na nyonso oyo, soki biso “totiki Nzambe azala ntina koleka to kolonga na bomoi na biso,”21 pole ya Molimo Mosantu ekolakisa ete kuna ntina mpe ndimbola na mimekano na biso ezali , mpe ete na nsuka ekobongola biso tokoma malamu koleka, bato babonga ya kokoka na bondimi elenda mpe elikia ya bongengi kati na Klisto, koyebaka ete Nzambe azalaki elongo na biso ntango nyonso. Lokola Mokambi Nelson ateyaki, “Komata ya molili oyo ezali kokende elongo na mikakatano ezali kosala ete pole ya Yesu Klisto engenga makasi koleka.”22

Bileko ya babomoi na biso ekoki komema biso na bisika mibale, oyo tozelaki te mpe oyo tolingaki te. Soki lisumu ememaki yo kuna, longola lido ya molili mpe banda sikawa komikitisa opusana pene ya Tata na yo ya Lola na motema ya kobukana mpe molimo ya komikitisa mpe yambola. Ye akoyoka losambo na yo ya solo. Na mpiko na biso ya lelo, “belema mpembeni na [Ye] mpe [Ye] akobelema mpembeni na yo.”23 Ozali ata moke te mosika likolo koleka nguya ya Bomikabi ya Yesu-Klisto.

Nabotami na baboti malamu mpe na bankoko ya boyengebene oyo bayanolaki na pole ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, mpe epambolaki bomoi na bango mpe bankola oyo elandaki na bokasi ya molimo. Tata na ngai mbala mingi azalaki koloba na ntina ya tata na ye, Milo T Dyches, mpe akabolaki lolenge nini bondimi na ye na Nzambe ezalaki pole epai na ye ntango nyonso. Nkoko ya mobali azalaki mobateli zamba mpe mbala mingi azalaki kotambola ye moko na mpunda na bangomba, apesaki bomoi na ye na tembe te na bokambami mpe bobateli ya Nzambe.

Na nsuka ya eleko moko ya ebandeli ya malili, Nkoko azalaki ye moko na bangomba milai. Eleko ya malili makasi esilaki kolakisa elongi na yango ntango akangisaki moko ya bampunda na ye alingaka mingi, Nkumu mukolo, mpe akendaki na esika ya bokati mpo na komekola mpe komeka banzete yambo ekatama mpo na kosala mabaya.

Na mpokwa, asilisaki mosala na ye mpe amataki na mpunda. Na ntango wana molunge ekitaka, mpe mopepe makasi ya mvula ya mpembe ebandaki kotonda na bangomba. Na bozangi pole mpe nzela mpo na kokamba ye, azongisaki Nkumu na nzela oyo abanzaki ekokaki kokamba bango bazonga na esika ya bobateli zamba.

Elilingi
Milo Dyches kosalaka mobembo na nse ya mbula ya mipepe makasi

Nsima ya bakilometele ya mobembo na molili, Nkumu alembisaki, nsima atelemaki. Nkoko ya mobali apusaki Nkumu mbala ebele, kasi mpunda eboyaki. Na londende ya mvula ya mpembe ezingaki bango, Nkoko amonaki nsima ete azalaki na bosenga ya lisungi ya Nzambe. Lokola asalaki na bomoi na ye mobimba, na bomikitisi “[asengaki] na bondimi, eloko moko te ezangaka.”24 Mongongo moko ya moke mpe kimia eyanolaki, “Milo, pesa moto na ye epai ya Nkumu.” Nkoko atosaki, mpe nakolembisaka bosimbi na ye na basinga, Nkumu abalukaki mpe akendaki na nzela mosusu. Bangonga ebele nsima, Nkumu atelemaki lisusu mpe akitisaki moto na ye. Na nzela ya bokwei ya mvula ya mpembe, Nkoko ya mobali amonaki ete bakomaki malamu na ekuke ya esika ya bobateli zamba.

Na moi ya ntongo,Nkoko ya mobali abendelaki kotia bilembo ya botamboli ya Nkumu na kati ya mvula ya mpembe. Azwaki bofulami moko makasi ya koyeba esika nini apeselaki moto na ye epai ya Nkumu: ezalaki kutu pene ya ebandeli ya ngomba molai, epai eye litambe moko kaka liboso ekokweisa mpunda mpe momemi mpunda na liwa na kati ya mabanga kino na nse.

Na kotalaka boyebi wana mpe misusu, Nkoko mbala mingi azalaki koteya ete “moninga malamu mpe monene koleka oyo okotikala kozwa te ezali Tata na yo na Lola.” Ntango tata na ngai alingaki koyebisa Nkoko lisolo, namikundoli ete alingaki kozwa litangi uta na makomi.

“Likia na Nkolo na motema na yo mobimba; mpe koyekama te na bososoli na yo moko.

Ndima ye na banzela na yo nyonso, mpe akokamba banzela na yo.”25

Elilingi
Mobikisi kosimbaka mwinda

Natatoli ete Yesu Klisto azali pole ya libela oyo ekobaka “kongenga kati ya molili.”26 Molili moko te ekoki kopekisa, koboma, kotelemela to kolonga Pole wana. Tata na biso na Lola apesi bino pole wana.ya ofele. Bozali bino moko te. Ayokaka mpe ayanolaka nsambo nyonso. Ye “abimisaki bino libanda ya molili kati ya pole na Ye kitoko.”27 Ntango otuni, “Tata, Tata, Ozali kuna?” Ntango nyonso akoyanola, “Nazali awa, mwana na ngai; INazali awa.”

Natatoli ete Yesu Klisto akokisaki mwango ya Tata na Lola lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso;28 Ye azali pole na biso, bomoi na biso, mpe nzela na biso. Pole na Ye ekobomama ata moke te,29 Nkembo na Ye ekosila ata moke te, bolingo na Ye mpo na bino ezali seko, lobi, lelo mpe libela. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa