Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya misato 4–10: “Tozali Kosepela na Klisto.” 2 Nefi 20–25


“Sanza ya misato 4–10: ‘Tozali Kosepela na Klisto.’ 2 Nefi 20–25,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya mibale 4–10. 2 Nefi 20–25,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
libota ezali koyekola

Sanza ya misato 4–10: “Tozali Kosepela na Klisto.”

2 Nefi 20–25

Makomi ya Yisaya ezali na makebisi makasi, kasi epesaka lisusu elikya mpe esengo. Oyo ezali ntina moko mpo na nini Nefi akotisaki yango na makundoli na ye: “Nakokoma mwa maloba ma Yisaya,” alobaki, “ete banso oyo … bakomono maloba maye batombola mitema mya bango mpe basepela” (2 Nephi 11:8). Na lolenge moko, libengisi ya kotanga makomi ya Yisaya ezali libengisi moko ya kosepela. Okoki kosepela, lokola esalaki Nefi, na masakoli ya Yisaya oyo etali bosangani ya Yisalaele, boyei ya Mesiya, mpe kimia ya mibu nkoto oyo elakamaki mpo na basembo. Bokoki kosepela kobika na mokolo esakolama yango ntango Nkolo “akotia bendele likolo mpo na bikolo, mpe akowanganisa babwakami ya Yisalaele” (2 Nefi 21:12). Ntango oyoki mposa ya komela boyengebeni okoki kosepela … kotoka mai libanda ya mabulu ma lobiko” (2 Nefi 22:3). Na maloba mosusu, okoki “kosepela na Klisto” (2 Nefi 25:26

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

2 Nefi 21–22

Nakoki kozwa kimia kati na Yesu Klisto.

Bana ya Lehi bazalaki na likambo ya boswani. Likambo ekomaki mabe koleka na bankola miyaki nsima, kokambaka na bokabwani, bowumbu, mawa mpe bobebisi. Mpe boswani ekobaki kozala likambo lelo.

Na nyonso oyo na makanisi, kanisa na ntina ya masakoli kati na 2 Nefi 21–22. Banza lolenge Mobikisi azali kokokisa masakoli oyo. Nini lisakoli ete mbwa ya zamba “akofanda elongo na mwana ya mpate” elingi koloba mpo na bino? (2 Nefi 21:6). Manyola nini okoki kosala mpo na kozala mopesi kimia.

Tala Dale G. Renlund, “The Peace of Christ Abolishes Enmity,” LiahonaSanza ya zomi na moko 2021, 83-85.

2 Nefi 21:9–12

Nkolo azali kosangisa bato na Ye.

Nefi mpe libota na ye bazalaki banzeneneke ya bopalangani ya Yisalaele (yala 2 Nefi 25:10). Sikawa okoki kokota kati ya bosangisi ya Yisalaele (tala 2 Nefi 21:12). Ntango ozali kotanga 2 Nefi 21:9–12, kanisa na ntina ya lolenge nini okoki kosunga bokokisi ya masakoli oyo milongo oyo ezali kolobela.

Ndakisa, ntango ozali kotanga na ntina ya “bendele” (elembo to dalapo) oyo ekotelemisama mpo na kosangisa bato ya Nzamne, kanisa na ntina ya lolenge nini omonaki Nzambe kosangisaka bato na Ye, na nzoto mpe na molimo. Nini ekumbaka bato epai ya Nkolo mpe Eklezia na Ye?

Nini okanisi molimo efuli yo kosala mpo na kosunga kosangisa ya bato ya nzambe?

2 Nefi 23–24

Kimokili ya Babilona ekokweya.

Mokonzi ya Babilona ezalaki na bobangisi moko ya nguya ya politiki mpe mampinga mpo na bato ya kala ya yisalaele. Kasi epai bato ya Nefi—mpe epai na biso lelo—bobangisi monene koleka ezali oyo babilona ezali kotalisa: kimokili mpe lisumu. Banza lolenge nini makebisi kati ya 2 Nefi 23–24 ekoki kokamba bato oyo babangaki to basepelaki to bandimelaki bomengo ya Babilona mpe nguya (tala, ndakisa 23:6–9, 11, 19–22; 24:10–19). Biloko nini mosusu oyo ekokana tokokaki kobanga mpe kosepela na yango to kotiela motema lelo? Nini oyoki nsango ya Mobikisi epai na yo oyo ekoki kozala kati ya mikapo oyo? Kanisa na ntina ya lolenge nini okoki kolakisa ete yo “osepelaka na bonene [ya Nkolo]” (2 Nefi 23:3).

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 25:19–29

“Tosololaka na ntina ya Klisto … tosepelaka kati ya Klisto”

Nefi azalaki ya kofungwama na ntina ya kokabolaka bondimi na ye—mingimingi litatoli na ye ya Yesu Klisto. Kati na boyekoli na yo ya 2 Nefi 25, kanisa na oyo etali bamposa ya Nefi ya “kondimisa [ya ye] bana … mpo na bandimela Klisto, mpe bayokana na Nzambe” (molongo 23). Nefi alingaki nini bato na ye bayeba na ntina ya Mobikisi? (tala milongo 12–13, 16). Lolenge nini Nefi amekaki kondimisa bato bandimela Ye? (tala milongo 19-29). Koma biteni ya makomi kati na mokapo moye oyo endimisi yo ondimela mpe olanda Yesu Klisto.

Basusu kati na biso bakoki koyoka te sikisiki lokola Nefi ayokaki na kolobaka na ntina ya Klisto. Kasi ntango mosusu okoki kozwa eloko moko na kati ya mateya ya Nefi kati na 2 Nefi 25:23–26 oyo efuli yo kosolola na ntina na Ye na basusu na lolenge ya kofungwana mpenza. Ndakisa, esakola ya Nefi “Tosepelaka kati na Klisto” ekoki kotindika yo kokanisa na oyo etali lolenge nini Mobikisi amemelaka yo esengo—mpe lolenge nini okoki kokabola esengo wana na basusu.

Kati ya nsango oyo “Tosololaka na ntina ya Klisto” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 88–91), Elder Neil L. Andersen elimboli lolenge nini tokoki koloba mingi ya kofungwama na ntina ya Klisto na ndenge ebele. Nini ya makanisi na ye esungaka yo? Mabaku nini ozali na yango mpo na kolobela Klisto na basusu?

Oyoki nini oyo efuli yo kosala mpo na kolobela na ntina ya Yesu Klisto? Soki olingi mwa makanisi mosusu, okoki koluka “The Living Christ: The Testimony of the Apostles” (Gospel Library). Loyembo lokola: “I Believe in Christ” (Cantiques, no. 71) ekoki kopesa yo makanisi mingi.

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Nefi 21:1–5

Yesu Klisto Akosambisa na bosembo.

  • Mpo na kosalisa bana na yo bamona milongo oyo, tala soki okoki kozwa nzete oyo ezali ekatanaki to etape oyo ezali kobota uta na nzete (to bozwa foto oyo elandi na nse). Soki “etape” kati na 2 Nefi 21:1 elakisi Yesu Klisto, nini milongo 2–5 eteyi biso na ntina na Ye?

Elilingi
nzete moke ezali kokola libanda ya eteni ya nzete

2 Nefi 21:6–9

Yesu Klisto apesaka kimia mpe esengo

  • Nini 2 Nefi 21:6–9 eteyi na ntina ya maye makoki kosalama ntango moto nyonso azali kolanda Mobikisi? (tala lisusu 4 Nefi 1:15–18). Lolenge nini tokoki kosala libota na biso mingi lokola oyo? Bana na yo bakoki kosepela kotala elilingi ya banyama oyo etalisami kati na milongo 6–7—banyama oyo bazalaka mbala mingi banguna kasi bakoswana te bango na bango ntango Yesu akoya (tala lokasa ya molulu ya poso oyo). Bana na yo bakoki lisusu koyema bililingi na bango moko mpe banyama oyo bafandi na kimia elongo na Yesu.

2 Nefi 21:11–1222

Nkolo azali kosangisa bato na Ye.

  • Yisaya alobaki ete Nkolo akotia “bendele mpo na bikolo” mpo na kosunga bato basangana epai na Ye (tala 2 Nefi 21:11–12). Sunga bana na yo basosola ete bendele ezali lokola dalapo. Ntango mosusu bakoki kosepela koyema dalapo na bango moko. Bakoki kokotisa bililingi to maloba oyo elimboli bantina bango bayaka epai na Yesu Klisto mpe Eklezia na Ye. Tika bango basolola na ntina ya badalapo, mpe sunga bango bakanisa na ntina ya lolenge nini bakoki kosunga basusu “basangana” epai na Yesu Klisto.

  • Nsima ya kotanga 2 Nefi 22:4–5 elongo, okoki kosolola na bana na yo na ntina ya mwa “makambo ya motuya koleka” oyo Nkolo asalaki. Nini ezali misala misusu ya “Nkolo kati na [biso]” oyo tokoki kolobela? Mpo na kosalisa bana na yo bakanisa na ntina ya motuna oyo, bokoki koyemba elongo loyembo etali Mobikisi, lokola “I Believe in Christ” (Hymns, no. 134). Bokoki kokokisa moko nsima ya mosusu liloba lokola moko oyo: “Nandimelaka Klisto; Ye .” Lolenge nini tokoki kosalisa bato mosusu bayeba na ntina ya maye Mobikisi asalaki mpo na biso?

2 Nefi 25:26

“Tosepelaka kati na Klisto”

  • Lolenge nini okoki kosalisa bana na yo “basepela na Klisto”? Ntango mosusu okoki kobeta lisolo etali Yesu Klisto komemaka esengo epai ya basusu, to okoki kolakisa video lokola “Jesus Heals a Man Born Blind” to “Suffer the Little Children to Come unto Me” (Gospel Library). Bana na yo bakoki kopona bantango ya esengo na lisolo to na video. Nsima, ntango bozali kotanga elongo 2 Nefi 25:26, bakoki kosolola na ntina ya mpo ya nini “basepelaka kati na Klisto.”

Botatola Klisto Kokanisa te libota na bino eyebi lolenge ozali koyoka na oyo etali Mobikisi. Yebisa bango, mpe tika mayoki na yo etali Mobikisi etindika lolenge osololaka na bango.

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo ya Friend magazini.

Elilingi
bamisionele bazali koteya libota

Nakokende Epai Yo Olingi Ngai Nakendena Ramon Ely Garcia Rivas

Bimisa na lokasa