Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya misato 18–24: “Oyo Ezali Nzela.” 2 Nefi 31–33


“Sanza ya misato 18–24: ‘Oyo Ezali Nzela.’ 2 Nefi 31–33,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya misato 18–24. 2 Nefi 31–33,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Yesu azali koteya bayekoli na Ye

Klisto Azali koteya Bayekoli na Ye, na Justin Kunz

Sanza ya misato 18–24: “Oyo Ezali Nzela.”

2 Nefi 31–33

Kati na maloba ya nsuka ekomama na Nefi, tozwi esakola oyo: “Nkolo atindaki ngai, mpe nasengeli kotosa” (2 Nefi 33:15). Oyo ezali mobimba ya malamu ya bomoi ya Nefi. Amekaki kososola bolingi ya Nzambe mpe na bompikiliki atosaki yango—atako yango ezalaki kotia bomoi na ye na likama mpo na kozwa bapalaki ya motako uta na Libani, kotongaka masuwa mpe kokatisaka mbu, to na boyengebene koteyaka malongi ya Klisto na bosembo mpe nguya. Nefi akokaki koloba na bokasi ya kondimisa na ntina ya bosenga ya “kokende liboso mbangu na molende elongo na Klisto,” ya kolanda “nzela ya moke mpe ya nkaka oyo ekambaka na bomoi ya seko” (2 Nefi 31:20, 18), mpo ete wana ezali nzela alandaki. Ayebaki na mayele na ye moko ete nzela wana, atako ezali mpasi ntango mosusu, ezali lisusu ya esengo, mpe ete “ezali na nzela mosusu te to nkombo mosusu te oyo epesami na nse ya lola na oyo kani moto akoki kobikisama na bokonzi ya Nzambe” (2 Nefi 31:21).

Makanisi mpo na Boyekoli na Libota mpe na Eklezia

2 Nefi 31

Yesu Klisto mpe malongi na Ye azali nzela bobele se moko mpo na bomoi ya seko.

Soki osengeli kolobela na bokuse nzela yango na bomoi ya seko na kaka mwa maloba, okoloba nini? Yeba lolenge nini Nefi alimbolaki yango na kati ya 2 Nefi 31. Banza koyemaka nzela mpe kokomaka na nzela eloko songolo ya mabongi to matambe oyo omoni na kati ya mikapo oyo. Okoki kobakisa na liyemi na yo moko mobimba ya maye Nefi ateyaki na ntina ya libongi mokomoko.

Ntango ozali kotanga 2 Nefi 31:18–20, manyola babokasi na yo moko ya “kokende liboso” na nzela ya nsango malamu.

Tala lisusu “Press Forward, Saints,” Hymns, no. 81.

Elilingi
libota ezali kosambela elongo

Kolanda mateya ya Yesu Klisto ekokamba biso na bomoi ya seko.

2 Nefi 31:4–13

Yesu Klisto atiaki ndakisa ya bobongi nie ya botosi ntango Azwaki libatisi.

Atako soki libatisi na yo esalamaki lobi to mibu 80 eleki, ezalaki ngonga ya motuya. Okotaki na boyokani ya seko mpo na kolanda Yesu Klisto. Kanisa na ntina ya libatisi na yo ntango ozali kotanga maye matali libatisi ya Mobikisi na 2 Nefi 31:4-13. Koyanolaka mituna lokola oyo ekoki kosunga:

  • Mpo na nini Yesu Klisto abatisamaki? Ntina nini naponaki kobatisama?

  • Bilaka nini nasalaki ntango nabatisamaki? Nkolo alaki nini lokola litomba? (tala milongo 12–13; tala lisusu Mosiya 18:10, 13).

  • Lolenge nini ekoki ngai kolakisa ete namipesi kino sikawa mpo na kolanda Yesu Klisto?

2 Nefi 31:15–20

“Oyo akotia molende kina o nsuka, ye kaka akobikisama.”

Ntango ozali kotanga 2 Nefi 31:15–20, mituna yo moko, “lolenge nini nayebi soki nazali kotia molende kino na nsuka?” Nini oyekoli uta na Nefi oyo esungi yo oyanola motuna oyo?

Mpaka Dale G. Renlund ateyaki: “Kozala na molende kino na nsuka ezali te kokabwana na malongi ya Klisto—atako tokokisi matambe minei ya yambo mpe nsima tosali malamu, tolembisi mino na biso, mpe tozeli liwa. Kozala na molende moko te kino na nsuka, esalamaka na bompikili mpe kobandelaka matambe” (“Lifelong Conversion” [Brigham Young University devotional, Sept. 14, 2021], 2, speeches.byu.edu). Lolenge nini okoki kobandela bilembo oyo ezali na kati ya malongi ya Klisto (bondimi, boyamboli, libatisi, mpe kozwaka Molimo Mosantu)?

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 32; 33:2

Na nzela ya maloba ya Klisto mpe Molimo Mosantu, Nzambe akolakisa ngai maye nakosala.

Oyoka ata mokolo moko bozangi elikia na ntina ya bilembo ekoya na bomoi na yo? Bato ya Nefi bazalaki na mikakatano ya lolenge moko (tala 2 Nefi 32:1). Luka eyano ya Nefi kati ya 2 Nefi 32:2–9. Lolenge nini okoki koloba na maloba na yo moko maye Nefi ateyaki? Mayebi nini eteyi yo ete maloba ya Nefi ezali bosolo?

Banza kotangaka molongo ya mikano to makambo (sikawa mpe lobi ekoya) mpo na oyo osengemi na bokamabami ya Nzambe. Nini okoki koyekola uta 2 Nefi 32 oyo ekosunga yo olonga na kozwaka lifuli kowuta na Ye? Nini ekokaki kokamba bato “bayeisa mitema na bango makasi na Molimo Mosantu”? (2 Nefi 33:2).

Ntango ozali komanyola toli ya Nefi, kanisa na ntina ya lolenge nini oyekoli maloba ya Mobikisi. Okoki komona yango lokola bosepeli, koliaka, to kosalaka feti? Bokeseni nini ezali kati ya makanisi na yo? Banza lolenge nini okoki kosala boyebi na yo na maloba ya Mobikisi mingi koleka kosala feti. Ntango mosusu okoki kozwa makanisi uta na moninga to ndeko ya libota.

Kosala feti na maloba ya Klisto. Nzela ezali mingi ya kosala feti na maloba ya Klisto, kobakisa losambo mpo na bofuli, kotunaka mituna yambo mpe na ntango ya boyekoli, kolimbolaka maloba, komanyolaka, kotiaka bilembo na makomi makokani, kokomaka, kolukaka babosolo ya nsango malamu, mpe kosalelaka makomi na bomoi na yo (tala 1 Nefi 19:23).

Lolenge nini obengisaka Molimo Mosantu azala moninga na yo ya ntango nyonso na bomoi na yo, koleka mopaya ya ntango mokuse? Tanga makanisi misato ya David A. Bednar mpo na kosala mokangano ya Molimo Mosantu ezala “bosolo ya ntango nyonso” kati ya “Receive the Holy Ghost” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2010, 94–97). Lolenge nini okosalela toli na ye?

Tala lisusu Gospel Topics, “Revelation,” Gospel Library; “Daily Bread: Pattern” (video), Gospel Library.

2 Nefi 33

Buku ya Mormon endimisaka biso banso tondimela Klisto.

Na 2 Nefi 33, ntango Nefi asukisaki makomi na ye, alimbolaki mpo na nini azalaki kokoma na esika ya yambo. Bantina nini ozwi na mokapo oyo? Tala masolo mpe mateya otangaki musika na 1 Nefi mpe 2 Nefi. Nini endimisi yo mpe bondimi na yo kati na Klisto koleka?

Tala lisusu “Nephi Records His Final Testimony” (video), Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, tala mikanda ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Nefi 31:4–13

Ntango nabatisami, nalandi Yesu Klisto.

  • Oyo ezali elilingi ya Yesu kobatisamaka na nsuka ya mwango oyo. Ntango mosusu bana na yo bakoki kosalela yango mpo na koyebisa yo maye bayebi na ntina ya molulu oyo (tala lisusu Matai 3:13–17). Mpo na nini Yesu alingaka biso tobatisama lokola Ye asalaki? Bana na yo bakoki koyoka bantina ntango bozali kotanga elongo biteni ya 2 Nefi 31:4–13. Ekoki kosunga soki moto songolo oyo abatisamaki kala te akoki kokabola boyebi na ye moko.

2 Nefi 31

Yesu Klisto ateyaki ngai lolenge nini ya kozonga epai ya Tata na Lola.

  • Mpo na kosunga bana bamona mateya kati ya 2 Nefi 31, bakoki koyema nzela na elilingi ya Klisto na nsuka. Okoki kosunga bango bazwa to bayema bililingi oyo elakisi bilembo oyo na nzela wana, lokola bondimi na Klisto, boyamboli, libatisi, likabo ya Molimo Mosantu, mpe kozala na molende kino na nsuka. Bakoki kopona bililingi ntango bozali kotanga 2 Nefi 31:17–20 elongo.

2 Nefi 32:3–5

Nakoki kosala feti na maloba ya Klisto.

  • Mpo na koteya na ntina ya “feti” na maloba ya Klisto, okoki kotuna bana na yo basala lolenge nini bakokaki kosala feti na bilei na bango balingaka mingi. Kati na 2 Nefi 32:3, nini Nefi alobaki oyo tosengeli kosalela feti? Lolenge nini kosalaka feti na maloba ya Nzambe ekeseni uta na bobele kotangaka yango? Ntango mosusu bana na yo bakoki kosala na bokeseni. Kabola na bango mapamboli ozwaki ntango osalaki feti na makomi.

2 Nefi 32:8–9

Tata na Lola alingaka ngai nasambelaka ntango nyonso.

  • Nsima ya kotanga 2 Nefi 32:8–9, solola na bana na yo na ntina ya mpo na nini Satana alingaka te biso tosambela. Mpo na nini Nzambe alingaka biso “tosambelaka ntango nyonso”? Bana na yo bakoki kosala molongo to koyema bililingi ya makambo oyo bakoki kosambelela. Nsima bokoki koyemba loyembo oyo eteyaka na ntina ya losambo, lokola “Did You Think to Pray?” (Hymns, no. 140). Bokoki kotia na esika ya maloba mosusu ya loyembo maloba kowuta na milongo ya mikanda na bango. Lolenge nini Nzambe apambolaka biso ntango tosambelaka ntango nyonso?

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo ya Friend magazini.

Elilingi
Yoane Mobatisi azali kobatisa Yesu

Mpo na Kokokisa Bosembo Nyonso, na Liz Lemon Swindle

Bimisa na lokasa