Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya Mwambe 4–10: “Botelema na Bisika Bisantu”: Malongi mpe Mayokani 85–87


“Sanza ya Mwambe 4–10: ‘Botelema na Bisika Bisantu’: Malongi mpe Mayokani 85–87,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)

“Malongi mpe Mayokani 85–87,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025

libota kokendaka na tempelo

Sanza ya Mwambe 4–10: “Botelema na Bisika Bisantu”

Malongi mpe Mayokani 85–87

Mokolo ya Noele ezali na momeseno ntango ya komanyola maloba lokola “kimia likolo ya mabele” (tala Luka 2:14 Kasi na Sanza ya zomi na mibale 25, 1832, molimo ya Joseph Smith emitungisaki mingi na makaneli ya etumba. Carolina ya Sudi etelemelaki mbula-matari ya Etazini mpe ezalaki komilengela mpo na etumba. Mpe Nkolo amonisaki epayi ya Joseph ete oyo ezalaki bobele ebandeli: “Etumba,” esakolaki Ye, “ekopanzana na bikolo nyonso” (Malongi mpe Mayokani 87:2 Emonanaki lokola ete lisakoli oyo ekokokisama sasaipi mpenza.

Kasi nsima ekokisamaki te. Kati na mwa baposo mike, mbula-matari ya Carolina ya Sudi mpe mbula-matari ya Etazini basalaki boyokani, mpe baboyaki kobunda etumba. Kasi, emoniseli, ekokisamaka ntango nyonso te na ntango to na lolenge tozelaka yango. Pene na mibu 30 nsima, ntango mingi kala nsima ete baboma Joseph Smith na liwa ya martiro, Carolina ya sudi batombokaki mpe etumba ya bana mboka elandaki. Lelo oyo, etumba na mokili mobimba esali ete “mabele [e] lela” (Malongi mpe Mayokani 87:6 Motuya ya emoniseli oyo ezali moke na makoki ya kosakola ntango likama ekoya kasi mingi na koteyaka nini ya kosala ntango yango ekoya. Toli ezali ya lolenge moko na 1831, 1861, mpe 2021: “Botelema na bisika bisantu, mpe boningana te” (molongo 8)

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Malongi mpe Mayokani 85:1–2

Nkolo alingi ngai “nabomba mambi ya kala.”

Mona ete Nkolo alingaki ete akotisama kati na “mambi ya kala” etalisami na Malongi mpe Mayokani 85:1–2. Mpo na nini okanisi Ye alingi Bansatu na Ye babomba mambi ya kala? Nini okoki kokoma oyo etali lolenge ya “bomoi na yo, [ya yo] bondimi, mpe misala na yo” oyo ekoki kozala lipamboli mpo na bankola oyo ekoya lobi? Lolenge nini kobomba mambi ya kala ya yomoko esalisi yo oya epayi na Klisto?

Tala lisusu “Journals: ‘Of Far More Worth than Gold [Bazulunale: ‘Ya Motuya Mingi Mpenza Koleka Wolo],’” Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff [Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Wilford Woodruff] (2011), 125–33; “Turning Hearts [Kobalusa Mitema]” (video), ChurchofJesusChrist.org.

3:5

Turning Hearts

Malongi mpe Mayokani 85:6

Molimo elobaka na “kimia na mongongo moke.”

Manyola maloba Joseph Smith asalelaki mpo na kolimbola Molimo kati na Malongi mpe Mayokani 85:6. Na lolenge nini mongongo ya Molimo ezali “kimia” mpe “moke”? Tala ndimbola oyo ebakisami epesamaki na nzela ya : Malongi mpe Mayokani 6:22–24; 8:2–3; 9:7–9; 11:12–13; 128:1. Na ndenge nini Molimo alobelaka yo?

Tala lisusu Luka 24:32; Mosiya 5:2; Alma 32:28; Elamani 5:30; Malongi mpe Mayokani 6:22–23; 11:12–13.

Salela mateya ya ndakisa Bato bakundolaka liteya moko ya nsango malamu mingi koleka ntango bazali komona to kosangana na ndakisa moko ya liteya elandisami na oyo bazali koyekola. Ndakisa, ntango bozali koteya oyo etali mongongo ya kimia, ya moke ya Molimo Mosantu, ntango mosusu okoki koyoka miziki ya kimia, ya bule, mpe bayekoli bakoki kososola na oyo etali lolenge nini miziki esalaka bango bayoka mpe lolenge nini yango ekoki k‑ozala mpasi makasi koleka mpo na koyoka soki ezali na makelele ya kobungisa makanisi. Yango ekoki kokamba na lisolo etali makambo ya motuya moke na bomoi na biso oyo ebombi biso uta na boyoki ya mongongo ya kimia, ya moke.

elenge mwas azali kotanga makomi

Moko na yango ezalaki ete Molimo Mosantu alobaka na mongongo moko ya kimia, ya moke.

Malongi mpe Mayokani 86

Bayengebene bazali kosangisama na mikolo ya nsuka.

Malongi mpe Mayokani 86 ezali na ndimbola ya lisese ya nkona malamu mpe matiti mabe, ezwami na Matai 13:24–30, 37–43. Ntango bozali koyekola na oyo etali ndimbola ya lisese yango, bokanisa kotondisa etando lokola oyo:

Bilembo

Bandimbola Ekoki

Mituna mpo na komaniola

Bilembo

Baloni ya milona

Bandimbola Ekoki

Baprofeta mpe Bapostolo

Mituna mpo na komaniola

Lolenge nini ya “milona” baprofeta mpe bapostolo balonaka?

Bilembo

Monguna

Bandimbola Ekoki

Satana

Mituna mpo na komaniola

Lolenge nini monguna amekaka kotelemisa mosala na Nkolo?

Bilembo

Bandimbola Ekoki

Mituna mpo na komaniola

Bilembo

Bandimbola Ekoki

Mituna mpo na komaniola

Awa ezali mwa mituna ya kobakisa ya kotalela:

  • Nsima ya kolimbola lisese, Nkolo alobaki na ntina ya bonganganzambe, bozongisi, mpe lobiko ya bato na Ye (tala milongo 8–11). Mikangani nini omoni kati na milongo oyo mpe lisese ya nkona malamu mpe matiti mabe?

  • Mosala na yo ezali na kozalaka “pole kati ya Bayuda-te mpe “mobikisi moko epayi ya bato [ya Nkolo]”? (molongo 11).

Malongi mpe Mayokani 87

elembo ya seminele
Kimia ezwami na “bisika bisantu.”

Lisakoli na eteni 87 ekebisi na oyo etali makama ya nzoto elandisami na etumba na mikolo eleki. Kasi toli na limonisi oyo lisusu elobeli makama ya molimo. Kanisa mituna ndakisa oyo elandi:

Na makanisi yango na moto, tanga eteni 87. (Mpo na mwa makambo eyebana ezali nzinganzinga, osengeli kolinga kotanga lisusu motindo na internet.) Nini oyekoli etali masakoli uta na emoniseli oyo mpe lolenge yango ekokisamaki? Nini okokaki koloba na moto moko oyo atie ntembe na lisakoli mpo ete yango ekokisamaki te nokinoki?

Liteya nini Nkolo apesi na molongo 8? Nini ezalaka ya yo “bisika bisantu” epayi wapi ozwaka kimia mpe bokengi? Nini esalaka ete esika moko ezala esantu? Likolo ya bisika oyo bimonanaka na miso, ntango mosusu ezali na bangonga esantu, misala misantu, to makanisi masantu oyo ekoki kopesa kimia. Ndakisa, lolenge nini maloba baprofeta ya Nzambe ekoki kozala esika esantu mpo na yo? Nini elingi koloba ko “telema esika moko” mpe “koningana te” uta na bisika oyo?

Tala lisusu “Where Love Is [Bisika wapi Bolingo Ezali],” Children’s Songbook, 138–39; Saints [Basantu], 1:163–64; “Peace and War [Kimia mpa Bitumba],” na Revelations in Context, 158–64.

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na bamagazini ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge .

elembo ya eteni ya bana 03

Makanisi mpo na Koteya Bana

Malongi mpe Mayokani 85:6

Molimo elobaka na “kimia na mongongo moke.”

  • Nini bana na bino bakoki koloba soki moto moko atunaki bango lolenge nini bango bayebaka ntango Molimo Mosantu alobelaka bango? Bobenga bango batanga oyo etali lolenge moko Joseph Smith alimbolaki mongongo ya Molimo mosantu na asalelaki mpo na kolimbola Molimo kati na Malongi mpe Mayokani 85:6. Boye bango bakoki kosalela boyoki mpe bolobi na mongongo moke. Bokoki lisusu kokabola mayele ntango Molimo alobelaki bino na mongongo ya kimia mpe ya moke.

  • Mpo na kosalisa bana na bino basosola liloba “mongongo ya kimia,” bokoki koyoka na kimia nyonso nzembo ya bana, lndakisa “The Holy Ghost [Molimo Mosantu]” (Children’s Songbook, 105). Botuna moko ya bana akanisa loyembo nini yango ezali ntango bana mosusu bazali kotia makelele ya kobungisa makanisi. Nsima bokoki kobandela loyembo na bozangi kobungisa makanisi. Makambo nini ya pamba tokoki kolongola na bomoi na biso mpo na koyoka Molimo mbala mingi koleka?

Malongi mpe Mayokani 86

Nakoki kosalisa na bosangani ya bato ya Nzambe.

  • Mpo na kosalisa bana na bino bamaniola lisese elobami na eteni 86, bokoki kolengela bililingi mikemike ebele to kopakola langi ya milona mpe kobomba yango katikati na ndaku. Mpo na kolimbola na bana na bino lisese ya mbuma malamu mpe milona mabe (tala Matai 13:24–30), mpe botanga elongo maloba ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 86:1–7. Bana na bino bakoki nsima kosangisa bililingi ebombami ya milona mpe kokoma likolo na yango nkombo ya moto moko bango bakoki “bakutanisa” na Yesu Klisto. Ekoki kolinga koloba nini kokutanisa bato na Yesu Klisto? Banzela nini ebele ezali oyo tokoki kosala yango?

Malongi mpe mayokani 86:11

Nakoki kozala pole mpo na basusu.

  • Botala mwa mituna bokoki kotuna bana na bino ntango bozali kosolola Malongi mpe Mayokani 86:11: Lolenge nini pole epamboli yo? Lolenge nini yango ezali ntango tozali na pole te? Lolenge nini nakoki kozala pole mpo na bato? Bosalisa bana na bino bakanisa ndenge nini biso tokoki “kokoba kati na [boboto] ya Yesu” mpe kokabola yango na basusu.

Malongi mpe Mayokani 87:6, 8

Nakoki “kotelema … na bisika bisantu.”

  • Botanga elongo Malongi mpe Mayokani 86:6 mpo na koyekola oyo etali biloko Nkolo alobaki ekokaki kosalema na mikolo ya nsuka. Nsima bokokaki kolobela bitumba yo na bana na bino bokutanaki na yango . Kati na molongo 8, nini Nkolo alobaki tokoki kosala katikati ya ntango ya mpasi?

  • Bosalisa bana na bino basala molongo ya bisika esantu, makanisi esantu, misala esantu oyo ekoki kosalisa bango mpo na kotelemela likama ya molimo. Mpo na makanisi, botala ba video “Standing in Holy Places [Botelemi na Bisika Bisantu]” mpe “Stand Ye in Holy Places—Bloom Where You’re Planted [Botelema na Bisika bisantu—Bobota fololo bisika wapi Bolonami]” (Gospel Library [Ebombelo ya Nsango malamu]).

    5:36

    Standing in Holy Places

    4:36

    Stand Ye in Holy Places - Bloom Where You’re Planted

Mama azali kolakisa bebe na ye tempelo.

Tempelo ezali esika esantu.

Mpo na makanisi mingi koleka, botala nsango ya sanza oyo na magazini ya Moninga .

Nkona na bilanga

Nkolo asangisi bato na Ye lokola bilona.

lokasa ya molulu mpo na bana