Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya Mwambe 11–17: “Bobongisa … Ndako ya Nzambe”: Malongi mpe Mayokani 88


“Sanza ya Mwambe 11–17: “Bobongisa … Ndako ya Nzambe”: Malongi mpe Mayokani 88,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)

“Malongi mpe Mayokani 88,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2025

liyangani ya elambo esalamaki na ndako moke

Eteyelo ya Baprofeta esalamaki na kisuku oyo.

Sanza ya Mwambe 11–17: “Bobongisa … Ndako ya Nzambe”

Malongi mpe Mayokani 88

Mbala mingi mpenza, Nkolo apesaka biso bomoni moke moko ya “bonkumu mpe nguya” na Ye ezanga ndelo (Malongi mpe Mayokani 88:47) na nzela ya bimoniseli ya mozindo. Malongi mpe Mayokani 88 ezali emoniseli moko ya lolenge boye—moko na ntina ya pole mpe nkembo mpe babokonzi oyo ekoki kosala ete mitungisi na biso na mabele oyo emonana moke na nzela ya mawa. Atako tokoki kososola yango nyonso te, tokoki koyoka kutu ete ezali na mingi na boseko koleka oyo tokoki kokanisa. Ya solo, Nkolo akabolaki te babosolo oyo ya minene mpo na kobangisa biso to mpo na kosala biso tomiyoka moke. Na kotala mpenza likambo yango, Ye alakaki ete, “Mokolo ekoya ntango oyo bino bokososola kutu Nzambe” (molongo 49; nsete ebetami). Ntango mosusu ezalaki na nsuka ya lokumu wana nde Nkolo atindaki Basantu na Ye na Kirtland basala Eteyelo ya Baprofeta. “Bomiyangela bino moko,” Alobaki. “Bolengela eloko nyonso ya ntina; mpe bofandisa … ndako ya Nzambe” (molongo 119). Koleka bisika mosusu, ezali na kati ya ndako esantu ya Nzambe—mpe na mabota na biso—nde Akoki kotombola limoni na biso mosika kuna koleka mokili ya kufa, “kotalisa elongi na Ye epai na [biso],” mpe kolengela biso “tokota na nkembo ya selesitiale” (milongo 68, 22).

Tala Basantu,, 1:164–66.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Malongi mpe Mayokani 88

Yesu Klisto apesi ngai kimia.

Bobele mikolo sima ya kokebisa ete etumba esengelaki “kokweya na bikolo nyonso” (Malongi mpe Mayokani 87:2), Nkolo apesaki emoniseli ete Joseph Smith abengaki “likasa ya bilaya,” oyo ezali elembo ya bonkoko ya kimia (Malongi mpe Mayokani 88, moto ya eteni; tala lisusu Genese 8:11). Na nzela ya boyekoli na yo ya eteni 88 na poso oyo, luka bansango ya Nkolo ya kimia epai na yo.

Malongi mpe Mayokani 88:6–67

Pole mpe mobeko ewutaka na Yesu Klisto.

Maloba pole mpe mobeko ezongelami mbala mingi na kati ya eteni 88. Tya elembo to koma milongo epai wapi ozwi maloba oyo na kati ya milongo 6–67, mpe koma oyo oyekoli na ntina ya pole mpe mobeko—mpe na ntina ya Yesu Klisto. Nini oyoki efuli yo osala mpo na kozwa pole mpe kosalela “mobeko ya Klisto”? (molongo 21).

Tala lisusu Yisaya 60:19; Yoane 1:1–9; 3 Nefi 15:9; Timothy J. Dyches, “Light Cleaveth unto Light,” Liahona, May 2021, 112–15; Sharon Eubank, “Christ: The Light That Shines in Darkness,” Liahona, May 2019, 73–76.

libota ezali kotanga makomi elongo

Makomi ezali na mobeko ya Klisto na kati.

Malongi mpe Mayokani 88:77–78.

“Yakani penepene epai ya ngai.”

Baboyebi nini elakisi yo ete bilaka kati ya milongo oyo ezali solo? Litambe na yo oyo elandi ezali nini mpo na “koya pene epai ya” Klisto? Banza kosalela loyembo “Nearer, My God, to Thee” (Hymns, no. 100) eteni ya boyekoli mpe bokumbameli.

Malongi mpe Mayokani 88:67–76

Nakoki kokoma peto na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto.

Motindo ya Nkolo ya “bomisantisa” emonisami mbala mibale kati ya eteni 88 (milongo 68, 74). Okanisi nini liloba oyo elimboli? Okoki kotala milongo mosusu na nse ya “Bosantisi” kati ya Mokambi na Makomi (Gospel Library). Lolenge nini tokomaka ya kosantisama? Tika ete motuna oyo ekamba boyekoli na yo ya Malongi mpe Mayokani 88:67–76, mpe koma mamoni songolo ya molimo oyo ozwi.

Malongi mpe Mayokani 88:77–80, 118–26

elembo ya seminele
“Luka boyekoli, atako na boyekoli mpe lisusu na bondimi.”

Nkolo alobelaki Basantu basala “eteyelo ya baprofeta” na Kirtland (Malongi mpe Mayokani 88:137). Mingi ya mateya kati ya eteni 88 eteyaki bango lolenge nini ya kosala yango. Liteya oyo ekoki lisusu kosunga bino “bosala … ndako ya boyekoli” (molongo 119) kati na bomoi na yo moko. Na likambo oyo, okoki kotala na milongo 77–80 mpe 118–26 lokola miango mpo na “kobongisa ndako na yo [to bomoi na yo] ekoma katikati ya boyekoli nsango malamu” mpe “ndako ya bondimi” (Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Nov. 2018, 113). Ekoki kozala malamu kotala nini ya bomoi na yo “bobongisi” ekoki kozala lokola, kokwaka maloba uta na milongo oyo miye oyoki osengeli kosalela.

Ekoki kosunga kolandela mituna oyo: Mpo nini boyekoli mpe bobokoli ezali motuya epai ya Nkolo? Nini Alingi ngai nayekola? Lolenge nini Alingi ngai nayekola? Luka biyano na mituna oyo kati ya milongo 77–80 mpe kati ya “Bosolo ekokomisa yo nsomi” (Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi, 30–33).

Nini okanisi elimboli koyekola “na boyekoli mpe lisusu na bondimi”? (molongo 118). Babomoni nini ozwi uta na liteya ya Mpaka Mathias Held “Kolukaka Boyebi na Molimo”? (Liahona, May 2019, 31–33).

Tala lisusu Topics and Questions, “Kolukaka Bosolo mpe Kokimaka Boyokisi motema Mpasi,” Gospel Library; “A School and an Endowment,” in Revelations in Context, 174–82.

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge bamagazini.

elembo ya eteni ya bana 01

Makanisi mpo na Koteya Bana

Malongi mpe Mayokani 88:33

Tata na Lola apesaka makabo ya malamu

  • Bokoki kobanda lisolo na ntina ya Malongi mpe Mayokani 88:33 na kotunaka bana na yo baloba na ntina ya makabo oyo bapesamaki—nyonso mibale oyo bazwelaki esengo mpe misusu oyo bazwaki esengo te. Ntango mosusu kosala libanda na kozwaka likabo elongo na esengo. Nsima okoki kolobela na ntina ya makabo Tata na Lola apesaka biso (lokola likabo ya Molimo Mosantu). Lolenge nini tozwaka makabo oyo na esengo?

Malongi mpe Mayokani 88:63

Soki naluki Mobikisi, nakozwa Ye.

  • Malongi mpe Mayokani 88:63 ezali na maloba ya mosala oyo ekoki kofula na masano songolo mpo na kolendisa bana na yo baluka elongi ya Nkolo na babomoi na bango. Ndakisa, ekoki yo mpe bana na yo kokanisa na ntina ya lisano ya kosolola etali liloba “luka ngai na etingia mpe okomona ngai” (nsete ebetamaki) to “beta, mpe ekofungolama yo”?

bana balukaka bokeseni. “Bana ebele bayekolaka malamu ntango makambo ebele esangani sangani. Zwa ndenge ya kosunga bana basalela makambo na bango ya bomoni, bosimbi ntango bazali koyekola. Na mabaku mosusu, bokoki kutu kozwa ndenge ya kokotisa makambo na bango ya koyoka solo mpe mpimbo!” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 32).

  • Mpo na kobeta nsete na libiangisi ya Mobikisi etali “yakani penepene epai ya ngai.” okoki kosenga mwana moko asimba elilingi ya Yesu (lokola foto na loboko na lisano oyo) na ngambo moko ya kisuku ntango bana mosusu batelemi na ngambo mosusu. Ntango bana na yo bazali kokanisa na ntina ya makambo bakoki kosala mpo na kopusana penepene ya Mobikisi, bakoki kopusana na foto, mpe mwana oyo asimbi foto akoki kopusana pene ya bana mosusu. Solola na bana na ntina ya koya penepene ya Mobikisi mpe lolenge nini apusanaka pene na bino. Okoki lisusu koyemba elongo na bango loyembo etali likambo oyo, lokola “I Feel My Savior’s Love” (Children’s Songbook, 74–75).

Malongi mpe Mayokani 88:77–80, 118

Tata na ngai na Lola alingi ngai nayekola.

  • Tuna na bana na yo baloba na ntina ya oyo bazali koyekola na eteyelo to Eteyelo ya bana. Bokoki lisusu kokabola makambo mosusu oyo bozali koyekola. Nsima okoki kolakisa bana na yo maloba nini, mponanini, mpe lolengenini. Sunga bango baluka Malongi mpe Mayokani 88:77–79 mpo bazwa nini Nkolo alingaka biso toyekola. Nsima boluka elongo kati ya molongo 80 mpo na kozwa mponanini Alingaka biso toyekola mpe kati ya molongo 118 mpo na kozwa lolengenini tosengeli koyekola.

libota ezali kotanga makomi elongo

“Boluka boyekoli … na boyekoli mpe lisusu na bondimi.”

Malongi mpe Mayokani 88:119

Libota na biso ekoki kozala bule lokola tempelo.

  • Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 88:119 mpo na bana na yo, bakoki kosala elembo ya tempelo na maboko na bango mbala nyonso bakoyoka liloba “ndako.” Limbolela bango ete Tata na Lola alingaki Joseph Smith mpe Basantu batonga tempelo, to “Ndako ya Nzambe.”

  • Okoki kotuna bana na yo bapona maloba nsambo oyo elakisi libota na bango. Nsima sunga bango, bazwa na kati ya Malongi mpe Mayokani 88:119, maloba sambo liloba Nkolo asaleli mpo na kolimbola ndako na Ye. Lolenge nini tokoki kosala libota na biso “ndako ya Nzambe”?

Mpo na makanisi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Moninga magazini.

Klisto kozongaka00

Kobanga Tena Michael Malm

lokasa ya molulu mpo na bana