“Sanza ya zomi 13–19: ‘Libonza na Ye Ekozala Bule Mingi mpo na Ngai Koleka Koyikana na Ye’: Malongi mpe Mayokani 115–120,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)
“Malongi mpe Mayokani 115–120,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025
Sanza ya zomi 13–19: “Libonza na Ye Ekozala Bule Mingi mpo na Ngai Koleka Koyikana na Ye”
Malongi mpe Mayokani 115–120
Ezalaki na ntina mpo na Basantu bazala na elikya oyo etali esika na bango ya sika ya bosangani na Far West, Missouri. Engumba ezalaki kokola mbangu, mabele emonanaki lokola ya kotondana, mpe pembeni ezalaki Adam-ondi-Ahman, esika oyo ezali na ndimbola monene ya molimo na kala mpe na lobi ekoya (tala Malongi mpe Mayokani 107:53–56; 116). Kino sikawa, esengelaki kozala mpasi mpo na Basantu bakanisi te oyo etali nini babungisaki. Mpo na kobakisa, nsima ya kobenganama na bango na Independence, esika monene ya Siona, Basantu basengelaki lisusu kokende na Kirtland, batikaki tempelo na bango oyo balingaki mingi bobele nsima ya mibu mibale. Mpe na ntango wana ezalaki kaka banguna ya libanda ya Eklezia oyo bazalaki kotelemela Eklezia te—bandimi mingi ya lokumu mpe batelemelaki Joseph Smith, kobakisa bato minei ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale.
Na esika batalela maye babungisaki, bayengebene bakobaki kotongaka Siona, mbala oyo na Far West. Basalaki mwiango ya kotonga tempelo ya sika. Bapostolo minei ya sika babengamaki. Basosolaki ete kosalaka mosala ya Nzambe elingi koloba te ete okokweya mokolo moko te; elingi koloba “okolamuka lisusu.” Mpe atako okosala libonza, mabonza oyo ezali bule epayi ya Nzambe, kutu “bule mingi … koleka bokoli na [yo]” (Malongi mpe Mayokani 117:13).
Tala Basantu, 1:296–99.
Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia
Nkombo ya Eklezia ezali motuya epayi ya Nkolo.
Mokambi Russell M. Nelson alobaki ete nkombo ya Eklezia ezali “likambo ya motuya monene” (“Nkombo Malamu ya Eklezia,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 87). Kanisa na ntina nini likambo oyo ezali solo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 115:4–6. Nkombo ya Eklezia esengeli kosala nini na mosala mpe misio na yango?
Tala lisusu 3 Nefi 27:1–11.
Siona mpe makonzi na yango epesaka “ekimelo na ntango ya mipepe makasi.”
Ntango ozali koyekola elilingi ya nguya kati na Malongi mpe Mayokani 115:5–6, banza mokumba Nkolo alingi yo, lokola mondimi ya Eklezia na Ye, okokisa. Ndakisa, nini okoki kosala mpo na “kotelema mpe kongenga” to “kozala bendele mpo na bikolo”? (molongo 5). Mipepe makasi ya molimo nini omonaka nzinganzinga na yo? Lolenge nini ozwaka “ekimelo” na nzela ya bosangani? (molongo 6).
Tala lisusu “Brightly Beams Our Father’s Mercy,” Hymns, no. 335.
Mabonza na ngai ezali bule epayi ya Nkolo.
Kanisa soki ozalaki Newel K. Whitney to mwasi na ye, Elizabeth, oyo azalaki na bomoi kitoko makasi na Kirtland mpe nsima asengamaki kokende. Nini omoni kati na Malongi mpe Mayokani 117:1–11 oyo ekoki kosalisa yo osala libonza oyo? Mabonza nini osalaka mpo na Nzambe? Milongo oyo eteyi yo nini oyo etali nani Nzambe azali mpe nini Asalaka?
Libonza oyo basengaki Oliver Granger ezalaki ya kokesena na ya Whitneys: Nkolo ayebisaki ye atikala na Kirtland mpe abongisa makambo ya misolo ya Eklezia. Ntango azalaki kolobela Eklezia na boyengebene, na nsuka azwaki elonga mingi te. Banza lolenge nini maloba ya Nkolo kati na Malongi mpe Mayokani 117:12–15 ekoki kosalelama na makambo Ye asengaki yo.
Tala lisusu “Far West and Adam-ondi-Ahman,” na Revelations in Context, 239–40.
Moko na zomi na ngai esalisaka na botongi ya bokonzi ya Nzambe.
Mateya kati na biteni 119 mpe 120 etalisi polele nini moko na zomi ezali: topesaka “moko na zomi” ya litomba na biso (to lifuta) mobu moko na moko (tala Malongi mpe Mayokani 119:4). Kasi bimoniseli oyo esalaka ebele koleka kopesa ndimbola. Nkolo ayebisaki Basantu ete moko na zomi “ekosantisa mabele ya Siona.” Mpe na bozangi mobeko oyo, Alobaki, “Ekozala na … Siona te kati na bino” (molongo 6). Okanisa naino te oyo etali moko na zomi na lolenge oyo? Lolenge nini kofuta moko na zomi ekoki kosalisa yo ozala ya kosantisama mingi, ya kolengelame mingi mpo na Siona.
Oyekoli nini uta na bimoniseli oyo oyo etali lolenge nini basali ya Nkolo basalelaka misolo ya moko na zomi? Nini ezali motuya epayi na yo oyo etali liloba “na mongongo na ngai moko epayi na bango” na kati na Malongi mpe Mayokani 120
Mpaka David A. Bednar apesaki bandakisa ya lisungi ya lolenge nini moko na zomi esalelamaka mpe mapamboli oyo eyaka uta na mobeko oyo kati na “Maninisa ya Lola” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 19–20). Mituna oyo elandi ekoki kosalisa yo ntango ozali koyekola nsango na ye:
-
Nani azali kokata lolenge nini moko na zomi esalelamaka nsima ya kofuta yango na Eklezia?
-
Moko na zomi esalelami na nini?
-
Mapamboli nini eyaka lokola mbano ya lifuti ya moko na zomi? Ndakisa, ndenge nini kofuta moko na zomi elendisaka mokangano na yo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto?
-
Nini okoki koyekola uta lna ibiangi ya Mpaka Bednar?
-
Lolenge nini okoki kosalisa basusu bakolisa bondimi na bango na mobeko ya Nkolo ya moko na zomi?
Tala lisusu Malaki 3:8–12; “The Tithing of My People,” na Revelations in Context,, 250–55.
Makanisi mpo na Koteya Bana
Nazali moko ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.
-
Mpo na kosalisa bana na bino bayekola nkombo ya Eklezia mpe basosola mpo na nini ezali motuya, bobanza kotuna soki moko na bango akoki koloba nkombo mobimba ya Eklezia. Bokkoki nsima kolakisa bango nkombo uta na Malongi mpe Mayokani 115:4 mpe babandela kotanga yango elongo na bino. Ntango bosali bongo, bobanzaka kopona maloba ya motuya mpe mpo na nini ezali ntina. Bokoki lisusu kotala “Mokapo 43: Yesu Klisto Apesi Nkombo na Eklezia na Ye” (na Masolo ya Malongi mpe Mayokani, 164, to video oyo ekokani na kati ya Gospel Library) to koyemba “The Church of Jesus Christ” (Children’s Songbook, 77).
Ndakisa na ngai ekoki kosalisa basusu baya epayi ya Klisto mpe bazwa bokengi.
-
Bana na bino bakoki koyeba bato oyo bazali komitungisa mpe bazali na bosenga ya “ekimelo” uta na “mipepe makasi ya bomoi” (molongo 6). Lolenge nini bakoki kosalisa bato oyo? Bobanza kobengisa bana na bino batelema ntango bozali kotanga liloba telema na Malongi mpe Mayokani 115:5. Bakoki kosembola misapi na bango lokola bongengi ya moyi ntango bozali kotanga ngenga. Bokundolisa bana na bino ete pole na biso ewutaka na Yesu Klisto, mpe bosalisa bango bakanisa ndenge bakoki “kongenga” lokola Ye angengaka.
-
Bana na bino bakoki koyema elilingi elimboli Malongi mpe Mayokani 115: 6. Ndakisa bakoki koyema mopepe makasi na bato bazali koluka ekimelo kati na etonga ya Eklezia. Mopepe makasi ekoki kolimbola nini? Lolenge nini Eklezia ya Mobikisi epesaka lisalisi? Bosalisa bana na bino bakanisa moninga moko, ndeko moko ya libota, mozalani oyo azali na bosenga. Lolenge nini tokoki kobengisa bango bazwa lisalisi na Eklezia ya Yesu Klisto?
Mabonza na ngai ezali bule epayi ya Nkolo.
-
Bobengisa bana na bino basala lokola bazali Newel K. Whitney. Lolenge nini bakoyoka soki Nkolo asengaki bango batika mosala na bango ya malonga mpe bakende na esika moko ya sika? (Ekoki kosalisa kotala “Mokapo 41: Trouble in Kirtland,” na Masolo ya Malongi mpe Mayokani, 158–60, to video oyo ekokani kati na Gospel Library.) Ntango bozali kotanga elongo Malongi mpe Mayokani 117:1–11, botuna bana na bino batelemisa bino ntango bakoyoka eloko moko oyo ekosalisa bango bazala na bondimi ya kotosa Nkolo. Bomikabi nini tosalaka mpo na kotosa Nkolo? Lolenge nini Apambolaka biso?
Tata na Lola asalelaka moko na zomi mpo na kopambola bana na Ye.
-
Mingi ya bana oyo boteyaka bakoki kozala bilenge makasi mpo na kozwa mbongo mpe kofuta moko na zomi, kasi ezali malamu mpo na bango basosola lolenge nini moko na zomi esungaka na mosala ya Nkolo na mokili mobimba. Bobanza kosalela bililingi mpe lokasa ya molulu na nsuka ya mateya oyo mpo na kosalisa bango basosola moko na zomi ezali nini. (Tala lisusu “Mokapo 44: Tithing,” na Masolo ya Malongi mpe Mayokani, 165–66, to video oyo ekokani na kati ya Gospel Library.) Lolenge nini Tata na Lola asalelaka moko na zomi mpo na kopambola bana na Ye? Bokabola mayoki na bino oyo etali mobeko ya moko na zomi mpe lolenge nini epamboli bino.