Buku mpe Mbiangi
4. Bokambi mpe Masanga kati na Eklezia ya Yesu Klisto


“4. Bokambi mpe Masanga kati na Eklezia ya Yesu Klisto,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“4. Bokambi mpe Masanga kati na Eklezia ya Yesu Klisto,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
makita ya masanga ya palwasi

4.

Bokambi mpe Masanga kati na Eklezia ya Yesu Klisto

4.0

Boyingisi

Lokola mokambi kati na eklezia, obiangami na bofuli ya molimo na nzela ya basali bapesama ndingisa ya Nkolo. Ozali na litomba ya kosunga kati na mosala ya Tata ya Lola ya “kokokisa[ka] bozangi nkufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Mose 1:39).

4.2

Mabongi ya Bokambi kati na Eklezia

Na ntango ya mosala na Ye awa na nse, Mobikisi atiaki ndakisa ya bokambi ya Eklezia na Ye. Ntina na Ye ya katikati ezalaki kosala bolingi ya Tata na Ye ya Lola mpe kosalisa basusu basosola mpe babika nsango malamu na Ye (tala Yoane 5:30; Mosiya 15:7).

4.2.1

Komilengela na Molimo

Yesu amilengelaki na molimo mpo na etinda na Ye na mabele (tala Luka 4:1–2). Omilengela lolenge moko na molimo na komibendaka penepene ya Tata ya Lola na nzela ya losambo, boyekoli makomi, mpe botosi na mitindo na Ye.

Luka emoniseli mpo na kososola babosenga ya baye okambaka mpe lolenge nini kokisa mosala ya Nzambe abiangelaki yo osala.

Nkolo alaki lisusu kopesa makabo ya molimo likolo ya baoyo balukaka yango (tala Malongi mpe Mayokani 46:8).

4.2. 2

Kosalisa Bana Nyonso ya Nzambe

Bolinga bato bosalisaka lokola Yesu asalaki. Bosambela “na makasi nyonso ya motema” mpo na kotondisama na bolingo na Ye (Moroni 7:48).

Bosalisa bato balendisa mbongwana na bango mpe bakolisa bondimi na bango na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Bosalisa bango bamilengela basala mayokani ntango bazali kozwa likuli na bango ya nsima. Bolendisa bango babatela mayokani basalaki mpe bakabola mapamboli ya boyamboli.

4.2. 3

Boteya Nsango malamu ya Yesu Klisto

Bakambi nyonso bazali batei. Boluka makasi kolanda ndakisa ya Mobikisi lokola motei (tala mokapo 17; Koteya na Lolenge ya Mobikisi). Na nzela ya maloba mpe misala na bino, boteya malongi ya yesu Klisto mpe mabongi ya Nsango malamu na Ye (tala 3 Nefi 11:32–33; Malongi mpe Mateya 42:12–14).

Boteya uta na makomi mpe maloba ya baprofeta ya basantu ya mikolo ya nsuka (tala Malongi mpe Mayokani 52:9).

Soki obiangami to otindami kokamba na liyangani to molulu ya Eklezia, sala ete mateya ezala ya kotonga mpe na malongi malamu (tala Malongi mpe Mayokani 50:21–23).

4.2. 4

Bokamba kati na Bosembo

Mosali mokambi moko na moko asalaka na nse ya boyangeli ya moto moko oyo azali na bafungola ya bonganganzambe (tala 3,4.1). Lolenge oyo epesaka molongo mpe mikoloto ya polele ya mokumba mpe boyanoli na kosalaka mosala ya nkolo.

Mosali mokambi akoki kotinda moto mosusu mokumba ya ntango moko mpo na kokamba.

Mokambi oyo azali koyangela libongisi, liyangani, to molulu moko ya Eklezia asalaka ete bantina ya Nkolo ekokisama. Na kosalaka oyo, mokambi alandaka mabongi ya nsango malamu, mibeko ya Eklezia, mpe boyangeli ya Molimo Mosantu.

Libiangi to lotomo ya kokamba esalaka moto oyo azwaka yango ntina mingi to moto ya motuya koleka basusu te (tala Malongi mpe Mayokani 84:109–10).

Ebongi te koluka kokamba kati na libongisi kani te na Eklezia ya Nkolo (tala Malongi mpe Mayokani 121:34–37).

4.2.5

Bopesi Mokumba mpe Kosalela Boyanoli

Mobikisi apesaki bayekoli na Ye misala mpe mikumba ya ntina (tala Luka 10:1). Apesaki bango lisusu libaku ya kozala bayanoli mpo na mosala bapesamaki (tala Luka 9:10).

Lokola mokambi, okoki kosalisa basusu bakola na nzela ya bopesi misala epai na bango. Koluka na makasi kotia bandimi nyonso kati mosala ya Nzambe.

Kotinda ekokomisa lisusu mosala na yo makasi mingi. Luka bokambi ya Molimo etali maye ya kotinda mpo ete okoka kotia makanisi na makambo na yo ya kotia esika ya liboso ya likolo mpenza.

4.2. 6

Lengela Basusu bazala Bakambi mpe Batei

Ntango ozali kotala nani akoki kosalela Nzambe kati na mabiangi to mikumba ya Eklezia, zala na losambo. Mikundola ete Nkolo akolongobanisa baye Ye abiangaka. Oyio ezali ntina mpenza ezali ete bazali na bolingi ya kosalela Nzambe, bakoluka na komikitisa lisalisi ya Nkolo, mpe bazali koluka na makasi kozala ya kolongobana.

4.2. 7

Bolengela Mayangani, Mateya, mpe Milulu na Bantina ya Polele

Luka bokambi ya Molimo na kolengelaka mayangani, mateya, mpe milulu oyo ezali na bantina ya polele. Bantina oyo esengeli kolendisa bato mpe mabota, komema bango pembeni ya Klisto, mpe kosalisa kokokisa mosala ya Nzambe ya lobiko mpe bonetoli (tala mikapo 1 mpe 2).

4.2. 8

Kotuya Makasi na Yo

Tala lisusu mbala na mbala mikumba mpe bokoli ya molimo na yo lokola mokambi. Kanisa lisusu bokoli ya baye ozali kokamba.

Elonga na yo lokola mokambi emekolami yambo na komipesa na yo ya kosalisa bana ya Nzambe bakoma bayekoli ya bosembo ya Yesu Klisto. Okoki koyeba ete Nkolo azali na esengo na makasi na yo ntango ozali koyoka Molimo kosala kati na yo.

4.3

Masanga kati na Eklezia

Nkolo atindaki bakambi ya Eklezia na Ye basangana elongo na kosalaka mosala na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 41:2). Masanga epesaka mabaku mpo ete bato ya lisanga bazwa emoniseli ntango bazali koluka kososola babosenga ya bana ya Nzambe mpe kosalaka moango lolenge nini ya kosalisa kokokisa yango.

4.4

Mabongi ya Masanga ya Makasi

4.4. 1

Bantina ya Masanga

Masanga epesaka bobeti nsete ekesana na kosalisaka bandimi bazwa makuli mpe babatela mayokani oyo ezali elongo na yango.

4.4. 2

Bolengeli mpo na Makita ya Masanga

Babokambi mpe masanga ezelami kokutana mbala na mbala. Bakambi balukaka bokambi ya Nkolo na kosalaka miango ya makita ya toli. Balukaka lisusu makambo uta na bato ya lisanga na kokanaka maye ya kosolola.

Bakambi batikaka bato ya masanga bayeba makambo ya kosolola liboso. bato ya masanga bamilengelaka mpo na kokabola makanisi etali makambo oyo.

4.4. 3

Lisolo mpe Mikano

Na ntango ya likita ya lisanga, mokambi (to moto moko mokambi atindaka) alimbolaka likambo oyo ezalaka kotalama. Nsima mokambi alendisaka lisolo kati na bato ya lisanga nyonso, kotunaka mituna mpe kolukaka makanisi.

Bandimi bakabolaka makanisi mpe bayokaka moko na mosusu na limemia. Lokola balukaka koyeba bolingi ya Nkolo, molimo ya bofuli mpe bomoko ekoki kozala.

Kati na lisanga oyo ekwaka na basi mpe mibali, mokambi alukaka babomoni mpe makanisi ya bango mibale. Basi mpe mibali mbala mingi bazalaka na baemoneli ekeseni oyo epesaka boyokokani oyo esengelami.

Mokambi moko akambaka masolo ya lisanga. Nzokande, ye asengeli koyoka mingi koleka koloba.

Nsima ya lisolo, mokambi akoki kozwa mokano na mbala moko to kotindika mokano mokolo mosusu ntango azali koluka nsango mpe bokambi mosusu .

4.4. 4

Bomoko

Bato ya likita balukaka kokoma moko na mposa mpe ntina elongo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Balukaka makasi bomoko na masolo mpe mikano na bango.

4.4. 5

Mosala mpe Boyanola

Bato ya masanga basalaka mingi mpenza ya mosala bango liboso mpe nsima ya makita ya masanga. Na ntango ya makita, balukaka bofuli na kokolisaka miango mpo na kokokisa mikano. Mokambi ya lisanga abengisaka bandimi bakokisa balotomo etali miango oyo.

Bato ya lisanga bapesaka lapole ya balotomo na bango. Bokoli esengaka mbala mingi bokebi makasi mpe balotomo ya bolandeli.

4.4.6

Kobatela Sekele

Bakambi basalelaka boyangeli ntango bakabolaka nsango ya moto se moko elongo na lisanga. Balukaka mingimingi ndingisa mpo na kokabola nsango oyo.

Bato ya lisanga basengeli kokabola nsango se ya moto moko libanda ya lisanga te longola soki esengami mpo na kokokisa lotomo uta na bakambi ya lisanga.

Makambo mosusu ezali mpasi mpo na koyoka mpo na komema liboso ya lisanga mobimba.

Bimisa na lokasa