Buku mpe Mbiangi
7. Boepisikopo


“7. Boepisikopo,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“7. Boepisikopo,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
moto azali koloba na elobelo

7.

Boepisikopo

7.1

Episikopo mpe Bapesi toli na Ye

Episikopo azali na bafungola ya kokamba mosala ya Eklezia kati na palwasi (tala 3.4.1). Ye mpe bapesi toli na ye basalaka boepisikopo.

Episikopo azali na mikumba ya liboso mitano:

  • Azali nganganzambe monene mokonzi kati na palwasi.

  • Azali mokambi ya Bonganzambe ya Alona.

  • Azali zuzi mokonzi.

  • Ayangelaka mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli, mpe lisusu kobatela baye bazali na bosenga.

  • Akengelaka makundoli, misolo, mpe bosaleli ndako ya makita.

Mokumba ya liboso ya episikopo ezali mpo na nkola ebuta kati na palwasi (bana, bilenge, mpe bilenge babala te). mpo na kopesa ye makoki kotia makanisi na mokumba oyo, atindaka misala mingi na basusu (tala 4.2.5).

7.1.1

Nganganzambe Monene Mokambi

Episikopo azali mokambi ya molimo ya liboso ya palwasi.

7.1.1.1

Mangomba mpe Masanga makoki ya Palwasi

Episikopo azali na mokumba mpo na mangomba ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe ya Bilenge Basi ya palwasi. Atindaka bapesi toli na ye basala mokumba ya mangomba Eteyelo ya Eyenga mpe Eteyelo ya Bana mpe bapologalami misusu ya palwasi.

Mikumba ya episikopo mpo na masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona ekomami na 7.1.2. mikumba na ye mpo na masanga makoki ya bampaka ekomami na 8.3.1.

7.1.1.2

Makuli mpe Mapamboli

Episikopo ayangelaka mosala ya makuli mpe mapamboli oyo elandi kati na palwasi:

  • Elambo

  • Kopesa nkombo mpe kopambola bana

  • Libatisi mpe nkotisa ya bana ya mibu mwambe oyo bakomama (mpo na babongoli mitema, tala 31.2.3.2)

  • Bopesi Bonganganzambe ya Alona mpe bokulisi na misala ya diakona, moteyi, mpe nganganzambe

7.1.1.3

Masanga mpe Mayangani

Episikopo akambaka lisanga ya palwasi mpe lisanga ya bilenge ya palwasi (tala 29.2.5 mpe 29.2.6).

Boepisikopo esalaka miango ya mayangani ya elambo mpe mayangani mosusu ya palwasi etangami nkombo na mokapo 29.

7.1.1.4

Mabiangi mpe Babopemisi

Mikumba ya episikopo mpo na mabiangi mpe babopemisi ekomami na mokapo 30.

7,1. 2

Mokambi ya Bonganganzambe ya Alona

Episikopo azali na mikumba milandi lokola mokambi ya Bonganganzambe ya Alona kati na palwasi. Bapesi toli na ye basungaka ye.

  • Kosunga baboti na koteyaka bilenge.

  • Kokengela masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpe bakelasi ya Bilenge Basi. Episikopo azali mokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe (tala Malongi mpe Mayokani 107:87–88). Mopesi toli na ye ya yambo azali na mokumba mpo na lisanga likoki ya batei. Mopesi toli na ye ya mibali azali na mokumba mpo na lisanga likoki ya badiakono.

  • Asengaka toli ya mokambi ya Bilenge Basi.

  • Akutanaka mbala na mbala na elenge moko na moko.

7.1.3

Zuzi Mokonzi.

Episikopo azali zuzi mokonzi kati na palwasi (tala Malongi mpe Mayokani 107:71–74). Azali na mikumba oyo elandi:

  • Asalisaka bilenge mpe bakolo mpo balongobana na ntina ya ndingisa ya tempelo.

  • Akambaka mosolo lokola ekomami na 31.2.

  • Akutanaka na bandimi ya palwasi oyo balukaka bokambi ya molimo, oyo bazali na makambo minene ya bango moko, to oyo basali masumu minene, kosalisaka bango batoka nguya ya kobikisa ya Yesu Klisto.

  • Na nse ya boyangeli ya mokambi ya Likonzi, asalaka masanga ya bandimi lokola esengeli. Mpo na babokambi, tala mokapo 32.

7.1. 4

Kokamba Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli

Episikopo ayangelaka mosala ya Nzambe ya lobiko mpe bonetoli kati na palwasi (tala mokapo 1). Bapesi toli na ye mpe bakambi mosusu ya palwasi basungaka ye.

7.1.4.1

Kokamba makasi ya Kobatela Baye bazali na Bosenga ya Ntango

Mpo na nsango mingi etali lolenge nini episikopo abatelaka baye bazali na bosenga, tala 22,6.1.

7.1. 5

Makundoli, Misolo, mpe Ndako ya makita

Mpo na nsango etali makundoli, tala mokapo 33. Mpo na nsango etali misolo, mpe lisusu moko na zomi, tala mokapo 34. Mpo na nsango etali bandako ya makita, tala mokapo 35.

7.3

Sekeletele Mosali ya Palwasi mpe Basekeletele Basali ya Palwasi Basungi

Boepisikopo epesaka ndingisa na moto oyo azali na Bonganganzambe ya Melekisedeki asala lokola sekeletele mosali ya palwasi.

Azali na mikumba oyo elandi:

  • Kokutana na boepisikopo mpe kolengela manaka lokola etindami.

  • Kosala lokola mondimi ya lisanga ya palwasi mpe kozala na mayangani ya makita ya palwasi.

  • Kosala manaka ya bokutani mpo na boepisikopo.

7.4

Kalaki ya Palwasi mpe Bakalaki ya Palwasi Basungi

Mikumba ya kalaki ya palwasi mpe bakalaki basungi ya palwasi ekomami na 33.4.2.

Bimisa na lokasa