Makomi
Mpo na Nini Koyekola Makomi?


“Mpo na Nini Koyekola Makomi?” Makanisi mpo na Koyekola Makomi (2021)

“Mpo na Nini Koyekola Makomi?” Makanisi mpo na Koyekola Makomi

Elilingi
Klisto abongisaki elambo kati na Banefi, na Andrew Bosley

Mpo na Nini Koyekola Makomi?

Ntango toyekoli makomi na etingya, tobelemi mpembeni koleka ya Yesu Klisto mpe tokomi kososola malamu koleka nsango malamu mpe libonza ya komikaba na Ye . Profeta Nefi alendisaki biso na lolenge oyo:

“Yango wana, bosengeli kokende mbangu liboso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi bolamu ya elikia, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso. Yango wana, soki bokokende mbangu liboso, kosalaka limpati likolo ya liloba ya Klisto, mpe botii molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi ya seko” (2 Nefi 31:20).

Elilingi
libota ezali kotanga makomi

Mateya uta na makomi ekosalisa biso tozonga epai Tata na biso na Lola. Baprofeta na biso ya mikolo ya nsuka basengi biso toyekola yango ntango nyonso lokola bato mpe, wapi ekoki kosalama, lokola mabota. Babengisi biso toyekola uta makambo ya baye bazali na makomi mpe kosalela masolo mpe mateya ya makomi na bomoi na biso lelo, lokola Nefi apesaki toli kati na 1 Nefi 19:23. Baprofeta ya kala mpe sika lokola babengisi biso “salani limpati likolo ya maloba ma Klisto” (2 Nefi 32:3).

Elilingi
mobali azali kotanga makomi

Mokambi Russell M. Nelson lisusu ateyaki bosolo ya motuya oyo na ntina ya “kosala lipati” likolo ya makomi:

“kosala lipati elimboli koleka komeka. kosala lipati elimboli kosepela. Tosepelaka na makomi na koyekolaka yango na molimo ya koyoka esengo ya kokundola mpe botosi ya bosembo. Ntango tosali lipati likolo ya maloba ya Klisto, ekangisami ‘na kati ya bitando ya nzoto ya motema’ [2 Bakolinti 3:3]. Ekomaka eteni na kati ya bomoto na biso” (“Living by Scriptural Guidance,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 2000, 17).

Ntango tozali kosala elongo ntango nyonso boyekoli makomi ya moto ye moko mpe na libota, biso mpe mabota na biso tokoki kokambama, kobatelama, mpe kolendisama na mikakatano ya mikolo na biso.

Bimisa na lokasa