Makomi
Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli Makomi na Libota na Yo


“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli Makomi na Libota na Yo,” Makanisi ya Boyekoli Makomi (2021)

Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli Makomi na Libota na Yo,” Makanisi ya Boyekoli Makomi

Elilingi
mabota ezali koyekola makomi

Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli Makomi na Libota na Yo

Boyekoli makomi na libota mbala na mbala ezali nzela moko ya nguya mpo na kosunga libota na yo eyekola nsango malamu. Mbala boni mpe ntango boni otangaka lokola libota ezali na ntina te koleka lokola kosala ntango nyonso makasi. Ntango okomisi boyekoli makomi eteni moko ya ntina ya bomoi ya libota na yo, okosalisa bato ya libota na yo kobeleme penepene na Yesu Klisto mpe kotonga matatoli na bango likolo ya moboko ya liloba na Ye.

Kanisa mituna oyo elandi:

  • Lolenge nini okoki kolendisa bato ya libota bayekola makomi na bango moko?

  • Nini okoki kosala mpo na kolendisa bato ya libota bakabola maye bazali koyekola?

  • Lolenge nini okoki kobeta nsete na mabongi oyo ozali koyekola na kati ya makomi na bantango ya kotangisa ya mikolo nyonso?

Mikundola ete libota ezali esika elongobani mpo na koyekola mpe koteya nsango malamu. Okoki koyekola mpe koteya nsango malamu na ndako na bandenge oyo ekoki kosalema te na liteya moko ya Eklezia. Zala na mayele ya kokela ntango okanisi banzela ya kosalisa libota na yo eyekola nsango malamu. Kanisa mwa ndambo ya makanisi oyo elandi mpo na kolendisa boyekoli na bino ya makomi na libota:

Salela Miziki

Yemba nzembo oyo ekolendisa mabongi oyo eteyami na kati ya makomi.

Elilingi
mwana mobali mpe mwana mwasi koyekola makomi

Kabola Makomi ya Ntina

Pesa bato ya libota ntango ya kokabola biteni ya makomi oyo bamonaki kozala ntina na ntango ya boyekoli na bango moko.

Salela Maloba na Yo Moko

Bengisa bato ya libota baloba na bokuse maloba na bango moko oyo bayekoli uta na makomi oyo boyekoli.

Salela Makomi na Bomoi na Yo

Nsima ya kotangaka eteni moko ya makomi, senga bato ya libota bakabola bandenge ya nsango yango esalelami na bomoi na bango.

Tuna Motuna

Bengisa bato ya libota batuna motuna ya nsango malamu, mpe nsima balekisa ntango na kolukaka milongo oyo ekoki kosalisa kopesa eyano na motuna yango.

Lakisa Makomi

Pona molongo oyo omoni kozala motuya, mpe lakisa yango epai wapi bato ya libota bakomona yango mbala na mbala. Bengisa bato ya libota bapona makomi ya kotalisa moko nsima ya mosusu.

Sala Mokanda ya Likomi

Lokola libota, pona milongo mingi oyo okosepela kosolola na poso ekoya nsima.

Kanga Makomi na moto

Pona eteni ya makomi oyo ezali ntina mpo na libota na yo, mpe bengisa bato ya libota bakanga yango na moto na kozongelaka yango mokolo na mokolo to kosalaka lisano ya kokanga na moto.

Kabola Mateya ya Biloko

Zwa biloko oyo ekokani na mikapo mpe milongo oyo bozali kotanga lokola libota. Bengisa bato ya libota basolola na ntina ya lolenge nini eloko moko na moko ekokani na mateya kati ya makomi.

Elilingi
mwasi azali koteya mwana

Pona Liteya Moko

Tika bato ya libota bapona moko nsima ya mosusu liteya moko oyo libota ekoyekola elongo. Salela Mokambi na Masolo, Dikisionele ya Biblia, to Mokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org) mpo na kozwa biteni ya likomi na ntina ya liteya.

Yema Elilingi

Tanga mwa milongo moke lokola libota, mpe nsima pesa ntango mpo na bato ya libota bayema eloko moko oyo ekokani na oyo botangi. Lekisa ntango na kosololaka na ntina ya elilingi ya moko na mosusu.

Sala Lisano na Lisolo

Nsima ya kotanga lisolo, bengisa bato ya libota basala lisano na lisolo yango. Nsima, osolola na ntina ya lolenge nini lisolo ekokani na biloko oyo ozali kokutana na yango yo moko to lokola libota.

Mpaka David A. Bednar alobaki: “Losambo ya libota nyonso, libaku nyonso ya boyekoli makoni ya libota, mpe likita nyonso ya mpokwa na libota ezali koyema lobete ya lingenda ya langi na etando ya milimo na biso. Likambo moko te ekoki komonana ezali kotya elembo to bokundoli mingi. Kasi kaka lokola lobete ya wolo mpe ya moindo ya langi ekobakisama mpe ekosala mosala kitoko ya ntoki, boye sikisiki na biso na kosalaka oyo emonani makambo ya mike ekoki komema na mbano ya ntina ya molimo” (“More Diligent and Concerned at HomeLiahona, Sanza ya zomi na moko. 2009, 19–20).

Bimisa na lokasa