Makomi
Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi


“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi,” Makanisi ya Boyekoli Makomi (2021)

“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi,” Makanisi ya Boyekoli Makomi

Elilingi
mwasi azali koyekola makomi

Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi

Oyo ezali mwa nzela ya pete mpo na kobongisa boyekoli na yo ya liloba ya Nzambe kati na makomi

Sambela mpo ete Ofulama na Molimo.

Makomi ezali na liloba ya Nzambe. Ntango ozali koyekola yango, senga Tata na Lola toli na Ye mpe zwa Molimo na Ye mpo na kosalisa yo ososola yango.

Luka Bosolo na ntina na Yesu Klisto

Makomi eteyi biso ete makambo manso mazali kotatola Klisto (tala 2 Nefi 11:4; Mose 6:63), boye luka Ye na milulu, masolo mpe mateya ya makomi. Kanisa kokoma to kotya elembo na milongo miye mizali koteya na ntina na Mobikisi mpe lolenge nini kolanda Ye.

Luka Maloba mpe Masakola oyo ezali Kofula

Okoki komona ete maloba mpe masakola mosusu na makomi etuti yo, lokola soki ekomamaki bobele mpo na yo. Ekoki komonana elongobani na yo mpe ekoki kofula mpe kozala na ntina mpo na yo. Kanisa kotia yango bilembo na makomi to kokoma na ntina na yango na zulunale moko ya boyekoli.

Luka Bosolo ya Nsango Malamu

Ntango mosusu bosolo ya nsango malamu (ebengami mbala mingi malongi to mabongi) elobami mbala moko, mpe ntango mosusu etalisami na nzela ya ndakisa to lisolo. Mituna yomei, “Bosolo ya nsango malamu nini eteyami na milongo oyo?”

Yokela Molimo

Tia bokebi na makanisi mpe mayoki na yo, ata soki emonani lokola ekokani te na oyo ozali kotanga te. Mayoki wana ekoki kozala makambo oyo mpenza Tata na yo na Lola alingi yo koyekola mpe koyoka .

Elilingi
mwasi azali koyekola makomi 2

Kokanisa makomi na Bomoi na Yo

Kanisa lolenge nini masolo mpe mateya ozali kotanga esalelami na bomoi na yo. Ndakisa, okoki komituna, “Boyebi nini nazwi oyo ekokani na oyo nazali koyekola?” to “Lolenge nini nakoki kolanda ndakisa ya moto oyo kati na makomi?”

Tuna Mituna

Kotunaka mituna etali nsango malamu ekoki kosunga yo ozwa mokano nini koyekola. Ntango ozali koyekola makomi, mituna ekoki lisusu koya na makanisi. Mituna oyo ekoki kotala oyo ozali kotanga to bomoi na yo na mbala mingi. Manyola mituna oyo, mpe luka biyano ntango ozali kokoba koyekola makomi. Nsima ya koyekola, tuna nini Nzambe akolinga ete yo oyekola koleka, mpe talela biyano na bangonga mpe mikolo ekoya.

Salela Masalisi ya Boyekoli Makomi

Mpo na kozwa boyebi ya kobakisa na kati ya milongo ozali kotanga, salela matangi na nse ya lokasa, Bokambi na Masolo, lisusu Dikisionele ya Biblia, Bokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org), mpe masalisi masusu mpo na boyekoli.

Kanisa Esika mpe Eleko ya Makomi

Okoki kozwa boyebi ya motuya na ntina na makomi soki okanisi esika mpe eleko na yango—mabaku to esika ya makomi. Ndakisa, koyeba makambo ya kala mpe boyambi ya bato eye profeta alobelaki ekoki kosunga yo ososola likanisi ya nsango na ye.

Elilingi
mobali azali koyekola makomi

Koma Makanisi mpe Mayoki na Yo

Ezali na banzela ebele ya kokoma makanisi oyo ekoya ntango ozali kotanga. Ndakisa, okoki kotia elembo na liloba to lisakola moko ya ntina mpe kokoma makanisi na yo lokola litangi moko na makomi na yo. Okoki lisusu kobomba zulunale moko ya boyebi, mayoki, mpe makanisi ozali kozwa. To okoki kokoma motuna oyo otunaki liboso ya kobanda koyekola, kolandisama na biyano ozwilaki toli.

Yekola Maloba ya Baprofeta mpe Bapostolo ba Mikolo mya Nsuka

Tanga oyo baprofeta mpe bapostolo ya mokolo ya nsuka bateyaki na ntina ya mabongi ozwi na makomi. Nsango na bango ezali na “Likita Linene,” “Bamagazini,” mpe mikanda misusu na Ebombelo ya Nsango malamu.

Tanga Masolo

Tanga masolo na makomi, kolukaka kososola makambo na yango (ntango, esika, molobi, mpe moyoki). Makomi oyo etalisami ezali makoki monene mpo na yango, mingimingi mpo na bana mpe bandimi oyo bameseni mingi te na makomi.

Kabola Boyebi

Kososola boyebi uta na boyekoli na yo moko ezali nzela moko malamu mpo na koteya basusu mpe ezali kosalisa na kolendisaka bososoli na yo ya oyo otangi.

Bika na Oyo Yo Oyekoli

Koyekola makomi ekoki kofula biso mpe kokamba biso na kobongola lolenge tozali kotambwisa bomoi na biso. Yoka nini Molimo azali kolobela yo na mongongo moke osala ntango ozali kotanga, mpe nsima zwa ekateli ya kosalela banungunungu yango.

Bimisa na lokasa