Makomi
1 Nefi 16


Mokapo 16

Bato ya nkuna bamonaka ete bosolo ezali mpasi—Bana mibali ya Lehi bazwi bana basi ya Yisamaele na bolongani—Liawona elakisi bango nzela na esobe—Maloba uta na Nkolo ekomami likolo ya Liawona mbala na mbala—Yisamaele akufi; libota na ye eyimiyimi na ntina ya mitungisi. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Nefi esilaki ngai kotia nsuka ya koloba na bandeko mibali na ngai, tala balobaki epayi na ngai: Olobeli biso makambo makasi, koleka oyo tokoki kondima.

2 Mpe esalemaki ete nalobaki epayi na bango ete nayebaki ete nalobaki makambo makasi mpo na bato ya nkuna, engebene na bosolo; mpe basembo nde nalongisaki, mpe natatolaki ete bakotombwama likolo na mokolo ya nsuka; yango wana, moto oyo akamatami elindo amonaka ete bosolo ezali mpasi, mpo ezali kokata bango na katikati mpenza.

3 Mpe sikawa bandeko mibali na ngai, soki bozalaki sembo mpe bolingaki koyoka bosolo, mpe kotia bokebi na yango, ete bokoka kotambola semba liboso ya Nzambe, nde bolingaki te koyima-yima na ntina ya bosolo, mpe koloba: Olobeli biso makambo makasi.

4 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalendisaki bandeko mibali na ngai, na molende nyonso, mpo na kobomba mitindo ya Nkolo.

5 Mpe esalemaki ete bamikitisaki liboso ya Nkolo, na lolenge ete nazwaki bosepeli mpe elikya monene mpo na bango, ete bakotambola na banzela ya bosembo.

6 Sikawa, makambo nyonso oyo elobamaki mpe masalemaki wana ezalaki tata na ngai kofanda na ema na ye na lobwaku oyo abiangaki Lemuele.

7 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nakamataki moko kati na bana basi ya Yisamaele na bolongani; mpe lisusu, bandeko mibali na ngai bakamataki bana basi ya Yisamaele na bolongani; mpe lisusu Zolami akamataki mwana mwasi ya nkulutu ya Yisamaele na bolongani.

8 Mpe boye tata na ngai akokisaki mitindo nyonso ya Nkolo oyo epesamaki epayi na ye. Mpe lisusu ngai, Nefi, napambolamaki koleka na Nkolo.

9 Mpe esalemaki ete mongongo ya Nkolo molobaki epayi ya tata na ngai na butu, mpe motindaki ye ete na mokolo ya nsima asengeli kokende mobembo kati na esobe.

10 Mpe esalemaki ete lokola tata na ngai alamukaki na ntongo, mpe ekendaki ye na ekuke ya ema na ye, na bokamwi monene na ye amonaki likolo ya mabele libungutulu moko ya esaleli ya ntoki; mpe ezalaki ya motako ya malonga. Mpe kati na libungutulu, ezalaki na makonga mibale; mpe moko ezalaki kolakisa nzela wapi tosengelaki kokende kati na esobe.

11 Mpe esalemaki ete tosangisaki elongo biloko nyonso oyo tosengelaki komema kati na esobe, mpe nyonso oyo etikalaki ya bilei na biso oyo Nkolo apesaki epayi na biso; mpe tokamataki nkona ya ndenge nyonso oyo tokokaki komema na esobe.

12 Mpe esalemaki ete tokamataki biema na biso mpe tokendaki kati na esobe, na ngambo ya ebale ya Lamani.

13 Mpe esalemaki ete tokendaki mobembo na ntaka ya mikolo minei, penepene na epayi na sudi mpe sudi-esti, totelemisaki lisusu biema na biso; mpe esika yango tobiangaki yango na nkombo ya Sazele.

14 Mpe esalemaki ete tokamataki matimbo na biso mpe makula na biso, mpe tokendaki kati na esobe koboma bilei mpo na mabota na biso; mpe esilaki biso koboma bilei mpo na mabota na biso, tozongaki lisusu epayi na mabota na biso na esobe, na esika ya Sazele. Mpe tokendaki lisusu na esobe, kolandaka se epayi moko wana kaka, kolandaka se bisika ya mabele maleki malamu ya esobe, oyo ezalaki na ndelo mpembeni na Mbu Etane.

15 Mpe esalemaki ete tokendaki mobembo na ntaka ya mikolo mingi, kobomaka bilei na nzela, na matimbo na biso, mpe na makula na biso, mpe mabanga na biso, mpe bilingongo na biso.

16 Mpe tolandaki nzela ya libungutulu yango, oyo ekambaki biso na bisika ya mabele maleki malamu ya esobe.

17 Mpe esilaki biso kotambola mobembo mpo na ntaka ya mikolo mingi, totelemisaki biema na biso mpo na ntaka ya ntango, ete tokokaki lisusu kopema biso moko mpe kozwa bilei mpo na mabota na biso.

18 Mpe esalemaki ete lokola ngai, Nefi, nakendaki koboma bilei, tala, nabukaki litimbo na ngai, oyo esalemaki na ebende ya makasi mpe ya malonga; mpe wana ebukanaki litimbo na ngai, tala bandeko na ngai basilikaki na ngai mpo ete nabungisaki litimbo na ngai, mpo tozwaki bilei te.

19 Mpe esalemaki ete tozongaki na bilei te epayi na mabota na biso, mpe lokola balembaki mingi, na ntina ya mobembo na bango, bayokaki mpasi mingi mpo na bozangi ya bilei.

20 Mpe esalemaki ete Lamani mpe Lemuele mpe bana mibali ya Yisamaele babandaki koyima-yima mingi koleka, na ntina ya mpasi mpe mitungisi na bango na esobe; mpe lisusu tata na ngai abandaki koyima-yima na Nkolo Nzambe na ye; iyo, mpe batondisamaki bango nyonso na mawa koleka, kutu ete bazalaki koyima-yima na Nkolo.

21 Sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, etungisamaki ngai elongo na bandeko mibali na ngai na ntina ya bobungisi ya litimbo na ngai, mpe ebungisaki bango mpe singa ya matimbo na bango, ebandaki kokoma kokoso mingi koleka, iyo, na lolenge ete tokokaki te kozwa bilei.

22 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nalobaki mingi na bandeko mibali na ngai, mpo ete bayeisaki mitema na bango makasi lisusu, kutu kino na koyima-yima na Nkolo Nzambe na bango.

23 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nasalaki litimbo ya libaya, mpe na nzete ya semba, likula; yango wana, namilatisaki ngai moko na bibundeli se litimbo mpe likula, na bilingongo mpe na mabanga. Mpe nalobaki epayi ya tata na ngai: Wapi ekokende ngai mpo na kozwa bilei?

24 Mpe esalemaki ete alukaki koyeba uta na Nkolo, mpo bamikitisaki na ntina ya maloba na ngai; mpo nalobaki epayi na bango makambo mingi na makasi ya molimo na ngai.

25 Mpe esalemaki ete mongongo ya Nkolo moyaki epayi ya tata na ngai; mpe apesamaki solo etumbu na ntina ya koyima-yima na ye na Nkolo, na lolenge ete akitisamaki kati na bozindo ya mawa.

26 Mpe esalemaki ete mongongo ya Nkolo molobelaki ye: Tala likolo ya libungutulu, mpe tala makambo ekomami.

27 Mpe esalemaki ete ntango tata na ngai amonaki makambo oyo ekomamaki likolo ya libungutulu, abangaki mpe alengaki mpenza, mpe lisusu bandeko mibali na ngai, mpe bana mibali ya Yisamaele, mpe basi na biso.

28 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonaki makonga oyo ezalaki na libungutulu, ete ezalaki kosala engebene na bondimi mpe molende mpe bokebi oyo topesaki epayi na yango.

29 Mpe ekomi ya sika ekomamaki likolo na yango, oyo ezalaki polele mpo na kotangama, oyo epesaki biso bososoli mpo na oyo etali banzela ya Nkolo; mpe ekomamaki mpe ebongwanaki mbala na mbala, engebene na bondimi mpe molende oyo topesaki epayi na yango. Mpe boye tomoni ete na kosalelaka banzela ya mike mike Nkolo akoki kokokisa makambo minene.

30 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namataki na kati ya nsonge ya ngomba, engebene na mitindo oyo epesamaki likolo ya libungutulu.

31 Mpe esalemaki ete nabomaki banyama ya zamba, na lolenge ete nazwaki bilei mpo na mabota na biso.

32 Mpe esalemaki ete nazongaki na biema na biso, komemaka banyama oyo nabomaki; mpe sikawa emonaki bango ete nazwaka bilei, boni monene ezalaki bosepeli na bango! Mpe esalemaki ete bamikitisaki liboso ya Nkolo, mpe bapesaki matondi epayi na ye.

33 Mpe esalemaki ete tosalaki lisusu mobembo na biso, kotambolaka penepene se na nzela se moko wana kaka lokola na ebandeli; mpe esilaki biso kokende mobembo mpo na ntaka ya mikolo mingi totelemisaki lisusu biema na biso, ete tokoka kofanda mpo na ntaka ya ntango moko.

34 Mpe esalemaki ete Yisamaele akufaki, mpe akundamaki na esika tobiangaki Nawomi.

35 Mpe esalemaki ete bana basi ya Yisamaele balelaki mingi koleka, na ntina ya liwa ya tata na bango, mpe na ntina ya mitungisi na bango na esobe; mpe bayima-yimaki na tata na ngai, mpo ete akumbaki bango uta na mboka ya Yelusaleme, kolobaka: Tata na biso akufi; iyo, mpe toyenga-yengaki mingi na esobe, mpe toyokaki mpasi mingi ya mitungisi, nzala, mposa ya mai, mpe bolembu; mpe nsima ya mpasi oyo nyonso, tosengelaki kowa na nzala na esobe.

36 Mpe boye eyima-yimaki bango likolo na tata na ngai, mpe lisusu na ngai; mpe bazalaki na mposa ya kozonga na Yelusaleme.

37 Mpe Lamani alobaki epayi ya Lemuele mpe lisusu epayi ya bana ya Yisamaele: Tala, tika toboma tata na biso, mpe ndeko na biso Nefi, oyo akamati mokumba ya kozala moyangeli mpe moteyi na biso, oyo tozali bankulutu na ye.

38 Sikawa, alobi ete Nkolo asololaki elongo na ye, mpe banjelu basalelaki ye. Kasi tala, toyebi ete akosi biso; mpe alobeli biso makambo oyo, mpe asali makambo mingi na nzela ya misala ya mayele mabe na ye, ete akoka kokosa miso na biso, kokanisaka, mbele, ete akoka kokamba biso mosika na esobe ya lolenge mosusu; mpe ekosilisa ye kokamba biso mosika, akanisaki komikomisa ye moko mokonzi mpe moyangeli likolo na biso, ete akoka kosala elongo na biso engebene na bolingi mpe mposa na ye. Mpe na lolenge oyo ndeko na ngai Lamani alamusaki mitema na bango na nkanda.

39 Mpe esalemaki ete Nkolo azalaki elongo na biso, iyo, kutu mongongo ya Nkolo eyaki mpe molobaki maloba mingi epayi na bango, mpe mopesaki bango etumbu koleka; mpe esilaki bango kopesama etumbu na mongongo ya Nkolo balongolaki nkanda na bango, mpe bayambolaki uta na masumu na bango, na lolenge ete Nkolo apambolaki biso lisusu na bilei, mpe towaki te.

Bimisa na lokasa