Makomi
1 Nefi 5


Mokapo 5

Salia azali koyima-yima na Lehi—Bango mibale basepeli likolo ya bozongi ya bana mibali na bango—Batumbi mbeka—Bapalaki ya motako ezali na nkoma ya Mose mpe ya baprofeta—Bapalaki ekitoli Lehi lokola eboto ya Yosefe—Lehi asakoli mpo na oyo etali nkona na ye mpe bobateli ya bapalaki. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilaki biso kokita kati na esobe epayi ya tata na biso, tala, atondaki na bosepeli, mpe lisusu mama na ngai, Salia, azalaki na nsai mingi koleka, mpo alelaki solo na ntina na biso.

2 Mpo abanzaki ete towaki kati na esobe; mpe lisusu ayima-yimaki na tata na ngai, kolobelaka ye ete azali moto ya mamoni; kolobaka: Tala, omemaki biso mosika uta na mboka ya bosangoli libula na biso, mpe bana na ngai ya mibali bazali lisusu te, mpe tozali kowa kati na esobe.

3 Mpe mama na ngai ayima-yimaki na tata na ngai na elobeli ya lolenge oyo.

4 Mpe esalemaki ete tata na ngai alobaki epayi na ye, kolobaka: Nayebi ete nazali moto ya mamoni; mpo soki namonaki makambo ya Nzambe na limoni te, nalingaki koyeba bolamu ya Nzambe te, mbele natikalaki na Yelusaleme, mpe nawaki elongo na bandeko na ngai.

5 Kasi tala, nazwi mboka ya elaka, makambo oyo wapi nasepeli; iyo, mpe nayebi ete Nkolo akobikisa bana mibali na ngai uta na maboko ya Labana, mpe akokitisa bango lisusu epayi na biso na esobe.

6 Mpe na elobeli ya lolenge oyo, tata na ngai, Lehi, abondisaki mama na ngai, Salia, mpo na oyo etali biso, wana ezalaki biso na mobembo na esobe komata na mboka ya Yelusaleme, mpo na kozwa lisolo ya makomi ya Bayuda.

7 Mpe ntango tozongaki na ema ya tata na ngai, tala bosepeli na bango etondaki, mpe mama na ngai abondisamaki.

8 Mpe abimisaki maloba, kolobaka: Sikawa nayebi na ntembe te ete Nkolo atindaki mobali na ngai kokima kati na esobe; iyo, mpe nayebi lisusu na ntembe te ete Nkolo abatelaki bana na ngai, mpe abikisaki bango uta na maboko ya Labana, mpe apesaki bango nguya na oyo wapi bakokisaki likambo oyo Nkolo atindaki bango. Mpe azalaki koloba na elobeli ya lolenge oyo.

9 Mpe esalemaki ete basepelaki mingi koleka, mpe batumbaki mbeka mpe bapesaki mabonza matumbama epayi ya Nkolo; mpe bapesaki matondi epayi ya Nzambe ya Yisalaele.

10 Mpe esilaki bango kopesa matondi epayi ya Nzambe ya Yisalaele, tata na ngai, Lehi, akamataki masolo ya makomi oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, mpe amanyolaki yango uta na ebandeli.

11 Mpe amonaki ete ezalaki na buku mitano ya Mose, oyo ezalaki kopesa lisolo ya bokeli ya mokili, mpe lisusu ya Adama mpe Eva, oyo bazalaki baboti na biso ya yambo;

12 Mpe lisusu lisolo ya makomi ya Bayuda uta na ebandeli, kutu kino kokita na ebandeli ya boyangeli ya Sidikiya, mokonzi ya Yuda;

13 Mpe lisusu masakoli ya baprofeta basantu, uta na ebandeli, kutu kokita kino na ebandeli ya boyangeli ya Sidikiya; mpe lisusu masakoli mingi oyo elobamaki na monoko ya Yilimia.

14 Mpe esalemaki ete tata na ngai, Lehi, akutaki lisusu likolo ya bapalaki ya motako mambi ma kala ya libota ya batata na ye; yango wana ayebaki ete azalaki eboto ya Yosefe; iyo, kutu Yosefe oyo azalaki mwana ya Yakobo, oyo atekamaki kati na Ejipito, mpe oyo abatelamaki na loboko ya Nkolo, ete akoka kobatela tata na ye, Yakobo, mpe bato ya ndako na ye mobimba uta na liwa ya nzala.

15 Mpe lisusu bakambamaki uta na bokangemi mpe libanda ya mboka ya Ejipito, na Nzambe se moko oyo abatelaki bango.

16 Mpe boye, tata na ngai, Lehi, akutaki mambi ma kala ya libota ya batata na ye. Mpe Labana lisusu azalaki eboto ya Yosefe, yango wana ye, mpe batata na ye, babatelaki masolo ya makomi.

17 Mpe sikawa emonaki tata na ngai makambo oyo nyonso, atondisamaki na Molimo, mpe abandaki kosakola mpo na oyo etali nkona na ye—

18 Ete bapalaki ya motako oyo esengeli kokende epayi na bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso, mpe bato nyonso oyo bazalaki ya nkona na ye.

19 Yango wana, alobaki ete bapalaki oyo ya motako ekowa soki moke te; mpe ekobebisama lisusu te na ntango. Mpe asakolaki makambo mingi oyo etali nkona na ye.

20 Mpe esalemaki ete kino lelo, ngai mpe tata na ngai tobombaki mitindo, oyo wapi Nkolo atindaka biso.

21 Mpe tozwaki masolo ya makomi oyo Nkolo atindaki biso, mpe tomanyolaki yango mpe tososolaki ete ezalaki na ntina; iyo, kutu ezalaki ya motuya mingi mpenza mpo na biso, mpo ete tokoka kobomba mitindo ya Nkolo mpo na bana na biso.

22 Yango wana, ezalaki bwania ya Nkolo ete tokoka komema yango elongo na biso, lokola esalaki biso mobembo na esobe kokendaka na mboka ya elaka.

Bimisa na lokasa