Makomi
1 Nefi 6


Mokapo 6

Nefi akomi na ntina ya makambo ya Nzambe—Ntina ya Nefi ezali ete andimisa bato baya epayi ya Nzambe ya Abalayama mpe kobikisama. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, napesi mambi ma kala ya libota ya batata na ngai te kati na eteni oyo ya lisolo ya makomi na ngai; mpe nsima nakopesa yango na ntango moke te likolo ya bapalaki oyo nazali kokoma; mpo epesamaki kati na lisolo ya makomi oyo tata na ngai abatelaki; yango wana, nakomi yango kati na buku oyo te.

2 Mpo ekoki na ngai koloba ete tozali biboto ya Yosefe.

3 Mpe likambo ezali te epayi na ngai ete nazali na bokebi ya kopesa lisolo mobimba ya makambo nyonso ya tata na ngai, mpo ekoki kokomama likolo ya bapalaki oyo te, mpo nazali nde koluka esika ete nakoka kokoma makambo ya Nzambe.

4 Mpo litondi ya mokano na ngai ezali ete nakoka kondimisa bato ete baya epayi ya Nzambe ya Abalayama, mpe Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo, mpe babikisama.

5 Yango wana, makambo oyo ezali kosepelisa mokili, nakomi te; kasi makambo ezali kosepelisa Nzambe mpe bango oyo bazali ya mokili te.

6 Yango wana, nakopesa motindo epayi ya nkona na ngai, ete batondisa bapalaki oyo te na makambo oyo malongobani te mpo na bana ya bato.

Bimisa na lokasa