Makomi
1 Nefi 7


Mokapo 7

Bana mibali ya Lehi bazongi na Yelusaleme mpe babiangi Yisamaele mpe bato ya ndako na ye kosangana elongo na bango na mobembo na bango—Lamani mpe basusu batomboki—Nefi alendisi bandeko mibali na ye bazala na bondimi na Nkolo—Bakangi ye na singa, mpe bakani bobebisami na ye—Akangolami na nguya ya bondimi—Bandeko na ye ya mibali basengi bolimbisi—Lehi mpe lingomba na ye batumbaki mbeka mpe bapesaki mabonza etumbama. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, nalingi bokoka koyeba ete esilaki tata na ngai, Lehi, kosakola mpo na oyo etali nkona na ye, esalemaki ete Nkolo alobelaki ye lisusu, kolobaka ete ezali malamu te mpo na ye, Lehi, ete akamata libota kati na esobe se libota moko na ye; kasi ete bana na ye ya mibali bakamata bana basi na bolongani, ete bakoka kokolisa nkona mpo na Nkolo na mboka ya elaka.

2 Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki ye ete ngai, Nefi, mpe bandeko na ngai ya mibali tosengeli kozonga lisusu epayi na mboka ya Yelusaleme, mpe kokita na Yisamaele mpe libota na ye kati na esobe.

3 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, elongo na bandeko mibali na ngai, tokendaki lisusu kati na esobe mpo na komata na Yelusaleme.

4 Mpe esalemaki ete tomataki epayi na ndako ya Yisamaele, mpe tozwaki lisungi na miso ya Yisamaele, na lolenge ete tolobelaki ye maloba ya Nkolo.

5 Mpe esalemaki ete Nkolo alembisaki motema ya Yisamaele, mpe bato ya ndako na ye mpe lokola, na lolenge ete basalaki mobembo na bango elongo na biso kati na esobe kino na ema ya tata na biso.

6 Mpe esalemaki ete lokola ekendaki biso mobembo na esobe, tala Lamani mpe Lemuele, mpe mibale ya bana basi ya Yisamaele, mpe bana mibali mibale ya Yisamaele elongo na mabota na bango, batombokelaki biso; iyo, na ngai, Nefi, mpe Sami, mpe tata na bango, Yisamaele, mpe mwasi na ye, mpe bana basi misato misusu na ye.

7 Mpe esalemaki ete kati na botomboki wana, bazalaki na mposa ya kozonga epayi na mboka ya Yelusaleme.

8 Mpe sikawa ngai, Nefi, nayokaki mawa mpo na bokasi ya mitema na bango, boye nalobelaki bango, kolobaka, iyo, kutu na Lamani mpe na Lemuele: Tala bozali bandeko mibali bankulutu na ngai, mpe ezali lolenge boni ete bozali bongo makasi na mitema na bino, mpe bakufi miso na mayele na bino, ete bosengeli ete ngai, ndeko mobali ya leki na bino, nalobela bino, iyo, mpe nazala ndakisa mpo na bino?

9 Ezali lolenge boni ete botiaki bokebi te na liloba ya Nkolo?

10 Ezali lolenge boni ete bobosani ete bomonaki anjelu ya Nkolo?

11 Iyo, ezali lolenge boni ete bobosani makambo minene kani Nkolo asalaki mpo na biso, na kobikisaka biso uta na maboko ya Labana, mpe lisusu ete tozwa lisolo ya makomi?

12 Iyo, mpe ezali lolenge boni ete bobosani ete Nkolo akoki kosala makambo nyonso engebene na bolingi na ye, mpo na bana ya bato, soki ezali bongo ete basaleli bondimi epayi na ye? Yango wana, tika tozala sembo epayi na ye.

13 Mpe soki ezali bongo ete tokozala sembo epayi na ye, tokozwa mboka ya elaka; mpe bokoyeba na eleko moko ekoya nsima ete liloba ya Nkolo ekokokisama mpo na oyo etali bobebisami ya Yelusaleme; mpo makambo nyonso oyo Nkolo alobaki mpo na oyo etali bobebisami ya Yelusaleme esengeli kokokisama.

14 Mpo tala, Molimo na Nkolo akotika kala mingi te kobunda elongo na bango; mpo tala, baboyaki baprofeta, mpe Yilimia babwakaki ye kati na boloko. Mpe balukaki kolongola bomoi ya tata na ngai, na lolenge ete babenganaki ye uta na mboka.

15 Sikawa tala, nalobi epayi na bino ete soki bokozonga na Yelusaleme, bokowa elongo na bango mpe lokola. Mpe sikawa, soki boponi, bomata na mboka, mpe bomikundola maloba oyo nalobi epayi na bino, ete soki bokei, bokowa mpe lokola; mpo boye nde Molimo na Nkolo asengisi ngai ete naloba.

16 Mpe esalemaki ete ntango ngai, Nefi, nalobaki maloba oyo epayi ya bandeko na ngai ya mibali, basilikaki na ngai. Mpe esalemaki ete batiaki maboko na bango likolo na ngai, mpo tala, badasukaki mingi koleka, mpe bakangaki ngai na singa, mpo balukaki kolongola bomoi na ngai, ete bakoka kotika ngai na esobe, naliama na nyama ya zamba.

17 Kasi esalemaki ete nasambelaki epayi ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo, engebene na bondimi na ngai oyo nazali na yango epayi na yo, kangola ngai uta na maboko ya bandeko mibali na ngai; iyo, kutu pesa ngai makasi ete nakoka kokata singa oyo nakangami na yango.

18 Mpe esalemaki ete ntango nalobaki maloba oyo, tala, singa efungolamaki na maboko mpe makolo na ngai, mpe natelemaki liboso ya bandeko mibali na ngai, mpe nalobelaki bango lisusu.

19 Mpe esalemaki ete basilikaki na ngai lisusu, mpe balukaki kotia maboko na bango likolo na ngai; kasi tala, moko kati na bana basi ya Yisamaele, iyo, mpe mama na ye mpe lokola, mpe moko ya bana mibali ya Yisamaele, babondelaki bandeko mibali na ngai, kino balembisaki mitema na bango; mpe batikaki kosala makasi mpo na kolongola bomoi na ngai.

20 Mpe esalemaki ete bayokaki mawa, na ntina ya nkuna na bango, na lolenge ete bafukamaki liboso na ngai, mpe babondelaki ngai ete nalimbisa bango mpo na likambo basalaki ngai.

21 Mpe esalemaki ete nalimbisaki bango na motema moko na nyonso basalaki, mpe nalendisaki bango ete basambela Nkolo Nzambe na bango mpo na bolimbisi. Mpe esalemaki ete basalaki bongo. Mpe esilaki bango kosambela epayi ya Nkolo, tokobaki lisusu kosala mobembo na biso epayi na ema ya tata na biso.

22 Mpe esalemaki ete tokitaki na ema ya tata na biso. Mpe esilaki ngai, mpe bandeko mibali na ngai, mpe ndako mobimba ya Yisamaele, kokita na ema ya tata na ngai, bapesaki matondi epayi ya Nkolo Nzambe na bango; mpe batumbaki mbeka mpe bapesaki mabonza etumbama epayi na ye.

Bimisa na lokasa