Makomi
2 Nefi 27


Mokapo 27

Molili mpe bopengwi ekozipa mabele na mikolo ya nsuka—Buku ya Mormon ekobima—Banzeneneke Misato bakotatola mpo na buku yango—Moto oyo ayekola akoloba ete akoki te kotanga buku ekangama—Nkolo akosala mosala ya kokamwa mpe likamwisi—Meka na Yisaya 29. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Kasi, tala, na mikolo ya nsuka, to na mikolo ya baoyo bazali Bayuda-te—iyo, tala bikolo nyonso ya Bayuda-te mpe lisusu Bayuda, ezala bango oyo bakoya likolo ya mboka oyo mpe bango oyo bakozala likolo ya mboka mosusu, iyo, kutu likolo ya mboka nyonso ya mabele, tala, bakolangwisama na mabe mpe ndenge nyonso ya bonsomo—

2 Mpe ntango mokolo wana ekoya bakobimelama na Nkolo na Bibele, elongo na kake mpe elongo na boningani ya mabele, mpe elongo na makelele minene, mpe elongo na ekumbaki, mpe elongo na mopepe makasi, mpe elongo na mololi ya moto oyo mozikisaka nie.

3 Mpe bikolo nyonso oyo bikobunda na Siona, mpe oyo bikotungisa ye, ekozala lokola ndoto ya limoni ya butu; iyo, ekozala epayi na bango, kutu lokola moto moko na nzala oyo azali kolota, mpe tala azali kolia kasi alamuki mpe molimo na ye ezali mpamba; to lokola moto na mposa ya mai oyo azali kolota, mpe tala azali komela kasi alamuki mpe tala azali ya kolembe, mpe molimo na ye ezali na mposa; iyo, kutu ekozala bongo na ebele ya bikolo nyonso oyo bikobunda na Ngomba ya Siona.

4 Mpo tala, bino nyonso oyo bozali kosala mabe, bofanda nie bino moko mpe bokamwa, mpe bolela, mpe bobelela, iyo, bokolangwisama kasi na vinyo te, bokondingbandingba kasi na vinyo ya makasi te.

5 Mpo tala, Nkolo asopaki likolo na bino molimo ya mpongi ya mozindo. Mpo tala, bozipaki miso na bino, mpe bobwakaki baprofeta; mpe bayangeli na bino, mpe azipaki bamoni na ntina ya mabe na bino.

6 Mpe ekosalema ete Nkolo Nzambe akobimisela bino maloba ya buku, mpe ekozala maloba na bango oyo balala mpongi.

7 Mpe tala buku ekozala ya kokangama; mpe kati na buku ekozala na emoniseli uta na Nzambe, uta na ebandeli ya mokili kino na nsuka na yango.

8 Yango wana, mpo na makambo oyo makangami, makambo oyo makangami makopesama te na mokolo ya nkuna mpe bonsomo ya bato. Yango wana buku ekobombama mosika na bango.

9 Kasi buku ekopesama na moto, mpe ye akopesa maloba ya buku, oyo ezali maloba na bango oyo balali mpongi na mputulu, mpe akopesa maloba oyo epayi ya moto mosusu;

10 Kasi maloba oyo ekangama akopesa te, mpe akopesa buku mpe te. Mpo buku yango ekokangama na nguya ya Nzambe, mpe emoniseli oyo ekangamaki ekobombama na buku kino na ntango esengeli ya Nkolo ye moko, ete makoka kobima; mpo tala, ezali kobimisa makambo nyonso uta na bokeli ya mokili kino na nsuka na yango.

11 Mpe mokolo ezali koya wapi maloba ya buku oyo ekangamaki ekotangama likolo ya mitondo ya ndako; mpe ekotangama na nguya ya Klisto; mpe makambo nyonso makobimisama epayi ya bana ya bato oyo masalema mokolo moko te na kati ya bana ya bato, mpe oyo ekozala libela kino na nsuka ya mabele.

12 Yango wana, na mokolo wana ntango buku ekopesama epayi ya moto oyo nalobelaki, buku yango ekobombama na miso ya mokili, ete miso ya moto moko te makomona yango longola se soki ezali banzeneneke Misato baoyo bakomona yango, na nguya ya Nzambe, kobakisa na ye oyo buku ekopesama; mpe bakotatola bosolo ya buku mpe ya makambo kati na yango.

13 Mpe moto mosusu azali te oyo akomona yango, longola se mwa bato moke engebene na bolingi ya Nzambe, mpo na kopesa litatoli ya maloba na ye epayi ya bana ya bato; mpo Nkolo Nzambe alobaki ete maloba ya moto ya sembo makoloba lokola soki ezalaki uta na bakufi.

14 Yango wana, Nkolo Nzambe akokoba kobimisa maloba ya buku; mpe na monoko ya banzeneneke mingi lokola ekosepelisa ye malamu akotia liloba na ye; mpe lisuma ezala epayi na ye oyo akobwaka liloba ya Nzambe!

15 Kasi tala, ekosalema ete Nkolo Nzambe akoloba epayi na ye oyo akopesa buku: Kamata maloba oyo ekangama te mpe pesa yango na moto mosusu, ete akoka kolakisa yango epayi ya oyo ayekola, kolobaka: Tanga oyo, nasengi yo. Mpe oyo ayekola akoloba: Mema buku yango awa, nakotanga yango.

16 Mpe sikawa, na ntina ya nkembo ya mokili mpe mpo na kozwa matabisi nde akoloba oyo, mpe mpo na nkembo ya Nzambe te.

17 Mpe moto yango akoloba: Nakoki komema buku yango te, mpo ezali ya kokangama.

18 Nde oyo ayekola akoloba: Nakoki kotanga yango te.

19 Yango wana ekosalema, ete Nkolo Nzambe akopesa lisusu buku mpe maloba na yango na oyo ayekola te; mpe oyo ayekola te akoloba: Nayekola te.

20 Nde Nkolo Nzambe akoloba epayi na ye: Moto oyo ayekola akotanga yango te, mpo babwakaki yango, mpe nakoki kosala mosala na ngai moko; yango wana okotanga maloba oyo nakopesa epayi na yo.

21 Kosimba te makambo oyo makangami, mpo nakobimisa yango na ntango esengeli ya ngai moko; mpo nakolakisa epayi ya bana ya bato ete nakoki kosala mosala na ngai moko.

22 Yango wana, ekotanga yo maloba natindaki yo, mpe kozwa banzeneneke baye nalakaki epayi na yo, nde okokanga lisusu buku, mpe okobomba yango mpo na ngai, ete nabatela maloba oyo otangaki te, kino nakomona ete elongobani na bwania na ngai moko kobimisa makambo nyonso epayi ya bana ya bato.

23 Mpo tala, nazali Nzambe; mpe nazali Nzambe moko ya makamwisi; mpe nakolakisa epayi na mokili ete nazali se moko wana kaka lobi, lelo, mpe libela; mpe nasalaka te na kati ya bana ya bato longola se soki ezali engebene na bondimi na bango.

24 Mpe lisusu ekosalema ete Nkolo akoloba epayi na ye oyo akotanga maloba oyo makopesamela ye:

25 Nakomonaka ete bato oyo babelemaka epayi na ngai na monoko na bango, mpe bakumisaka ngai na mbebu na bango, kasi basili kolongola mitema na bango mosika na ngai, mpe bobangi na bango epayi na ngai eteyami na misise ya bato—

26 Boye, nakokoba kosala mosala ya kokamwa na kati ya bato oyo, iyo, mosala ya kokamwa mpe likamwisi, mpo bwania ya bato na bango ya bwania mpe ya bato bayekola na bango ekowa, mpe bososoli ya bato na bango ya ekenge ekobombama.

27 Mpe lisuma epayi ya baoyo balukaka na mozindo kobombela Nkolo toli na bango! Mpe misala na bango ezali na molili; mpe balobi: Nani amoni biso, mpe nani ayebi biso? Mpe balobi lisusu: Solo, bobaloli na yo ya makambo likolo mpe nse ekomonana lokola bodongo ya moyemi mbeki. Kasi tala, nakolakisa bango, elobi Nkolo na Bibele, ete nayebi misala na bango nyonso. Mpo mosala oyo basali na maboko ekolobela oyo asali mwango, asali ngai te? To eloko esalemi ekolobela oyo akeli yango, ye azalaki na bososoli te?

28 Kasi tala, elobi Nkolo na Bibele: Nakolakisa epayi ya bana ya bato ete ezali bobele ntango moke mpenza mpe Lebanona ekobongwana elanga ya mbuma mingi; mpe elanga ya mbuma mingi ekomonana lokola zamba.

29 Mpe na mokolo wana bakufi matoyi matoyi bakoyoka maloba ya buku; mpe miso ya bato oyo bakufa miso makomona uta na butu mpe uta na molili.

30 Mpe basokemi lisusu bakofuluka, mpe bosepeli na bango ekozala na Nkolo, mpe babola na kati ya bato bakosepela na Moko Mosantu ya Yisalaele.

31 Mpo solo lokola Nkolo azali na bomoi bakomona ete moto ya nsomo akomisami mpamba, mpe motioli azikisami nie, mpe nyonso oyo bazali koluka libaku mpo na mabe bakatami.

32 Mpe bango oyo bakomisaka moto oyo asali mabe na ntina ya liloba, mpe batandaka motambo mpo na ye oyo apalelaka na ekuke, mpe babwakaka moyengebene mpembeni mpo na eloko ya mpamba.

33 Boye, boye elobi Nkolo, oyo asikolaki Abalayama, mpo na oyo etali ndako ya Yakobo: Yakobo akoyokisama nsoni te sikawa, mpe elongi na ye ekokoma enzuluka te sikawa.

34 Kasi ntango akomona bana na ye, mosala ya maboko na ngai, na katikati na ye, bakosantisa nkombo na ngai, mpe bakosantisa Moko Mosantu ya Yakobo mpe bakobanga Nzambe ya Yisalaele.

35 Lisusu baoyo babungaki na molimo bakoya na bososoli, baoyo bayima-yimaki bakoyekola malongi.

Bimisa na lokasa