Makomi
2 Nefi 4


Mokapo 4

Lehi apesi toli mpe apamboli bana na ye—Akufi mpe akundami—Nefi akembeli bolamu ya Nzambe—Nefi atieli Nkolo motema na ye libela. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, ngai, Nefi, nazali koloba mpo na oyo etali masakoli oyo tata na ngai alobelaki, mpo na ntina ya Yosefe, oyo amemamaki kati na Ejipito.

2 Mpo tala, solo asakolaki mpo na oyo etali nkona na ye mobimba. Mpe masakoli oyo akomaki, ezali na minene mingi koleka yango te. Mpe asakolaki mpo na oyo etali biso, mpe nkola na biso oyo ekoya nsima; mpe ekomami likolo ya bapalaki ya motako.

3 Yango wana, esilaki tata na ngai kotia nsuka ya koloba mpo na oyo etali masakoli ya Yosefe, abiangaki bana ya Lamani, bana mibali na ye mpe bana basi na ye, mpe alobelaki bango: Tala, bana mibali na ngai, mpe bana basi na ngai, bino bozali bana mibali mpe bana basi ya mobotami na ngai ya yambo, nalingi ete botia litoi na maloba na ngai.

4 Mpo Nkolo Nzambe alobaki ete: Na ndenge bokobomba mitindo na ngai, bokofuluka na mboka; mpe na ndenge bokobomba mitindo na ngai te bokolongolama na miso na ngai.

5 Kasi tala, bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi, nakokikokita na lilita na ngai te kaka soki natiki lipamboli likolo na bino; mpo tala, nayebi ete soki bokolisami na nzela wapi bosengeli kokende bokotika yango te.

6 Yango wana, soki bolakelami mabe, tala, natiki lipamboli na ngai likolo na bino, ete bolakeli mabe ekoka kolongwa uta na bino mpe eyanolama likolo ya mito ya baboti na bino.

7 Yango wana, na ntina ya lipamboli na ngai, Nkolo Nzambe akondima te ete bowa; yango wana, akozala na mawa mpo na bino mpe mpo na nkona na bino.

8 Mpe esalemaki ete esilaki tata na ngai kotia nsuka ya kolobaka na bana mibali mpe bana basi ya Lamani, asalaki ete bana mibali mpe bana basi ya Lemuele bamemama liboso na ye.

9 Mpe alobelaki bango, kolobaka: Tala bana mibali mpe bana basi na ngai, bino bozali bana mibali mpe bana basi ya mwana na ngai ya mibale; tala natiki epayi na bino lipamboli se moko wana kaka natiki epayi na bana mibali mpe bana basi ya Lamani; yango wana, bokobebisama nie te; kasi na nsuka nkona na bino ekopambolama.

10 Mpe esalemaki ete esilaki tata na ngai kotia nsuka ya kolobaka na bango, tala, alobaki epayi na bana mibali ya Yisamaele, iyo, mpe kutu ndako na ye mobimba.

11 Mpe esilaki ye kotia nsuka ya kolobaka na bango, alobelaki Sami, kolobaka: Opambolami, mpe nkona na yo; mpo okosangola libula ya mboka lokola ndeko na yo ya mobali Nefi. Mpe nkona na yo ekotangama elongo na nkona na ye; mpe okozala kutu lokola ndeko na yo ya mobali, mpe nkona na yo lokola nkona na ye; mpe okopambolama na mikolo na yo nyonso.

12 Mpe esalemaki ete esilaki tata na ngai, Lehi, koloba epayi ya nyonso oyo ya ndako na ye, engebene na mayoki ya motema na ye, mpe Molimo ya Nkolo oyo azalaki na ye, akomaki mobange. Mpe esalemaki ete akufaki, mpe akundamaki.

13 Mpe esalemaki ete mikolo mingi te nsima ya liwa na ye, Lamani mpe Lemuele mpe bana mibali ya Yisamaele basilikaki na ngai na ntina ya mpamela ya Nkolo.

14 Mpo ngai, Nefi, nasengisamaki kolobela bango, engebene na maloba na ye; mpo nalobaki makambo mingi epayi na bango, mpe tata na ngai mpe lokola, yambo ya liwa na ye; mingi ya maloba yango ekomami likolo ya bapalaki mosusu ya ngai; mpo eteni oyo ezali mingi ya mambi ya kala ekomami likolo ya bapalaki na ngai esusu.

15 Mpe likolo ya oyo nakomi makambo ya molimo na ngai, mpe mingi ya makomi oyo ekomami na bapalaki ya motako. Mpo molimo na ngai esepelaka na makomi, mpe motema na ngai emanyolaka yango, mpe ekomaka yango mpo na boyekoli mpe litomba ya bana na ngai.

16 Tala, molimo na ngai esepelaka na makambo ya Nkolo, mpe motema na ngai emanyolaka ntango nyonso makambo oyo namonaki mpe nayokaki.

17 Nzokande, ata bolamu monene ya Nkolo, na kolakisaka ngai misala na ye minene mpe ya kokamwa, motema na ngai egangi: O ngai moto na mpasi! Iyo, motema na ngai eza na mawa na ntina ya mosuni na ngai; molimo na ngai eleli mpenza na ntina ya mabe na ngai.

18 Nazingami bipayi na bipayi, na ntina ya masenginia mpe masumu oyo elingi ngai mpamba mpamba.

19 Mpe ntango nalingi kosepela, motema na ngai mokolela-lela na ntina ya masumu na ngai; nzokande, nayebi nani natielaki motema.

20 Nzambe na ngai azalaki likonzi na ngai; akambaki ngai na katikati ya mitungisi na ngai na esobe; mpe abatelaki ngai likolo ya mai ya mozindo monene.

21 Atondisaki ngai na bolingo na ye, kutu kino na bozikisi ya mosuni na ngai.

22 Ayokisi banguna na ngai nsoni, kino na kosala ete baningana liboso na ngai.

23 Tala, ayokaki eleli na ngai na moi, mpe apesaki ngai boyebi na nzela ya mamoni na ntango ya butu.

24 Mpe na moi nakomaki moto ya mpiko na losambo ya makasi liboso na ye; iyo, mongongo na ngai natindaki likolo; mpe banjelu bakitaki mpe basalelaki ngai.

25 Mpe likolo na mapapu ya Molimo na ye nzoto na ngai ememamaki mosika likolo ya ngomba ya molai koleka. Mpe miso na ngai mamonaki makambo minene, iyo, kutu minene mingi koleka mpo na moto; boye napekisamaki ete nakoma yango te.

26 O bongo, soki namonaki makambo minene boye, soki Nkolo na bonkonde na ye epayi na bana ya bato ayaki kotala bato na boboto mingi ya bongo, mpo na nini ekolela motema na ngai, mpe ekowumela molimo na ngai na lobwaku ya mawa, mpe ekosila mosuni na ngai bokasi, mpe ekolembe makasi na ngai na ntina ya mitungisi na ngai?

27 Mpe mpo na nini ekomitika ngai na lisumu, na ntina ya mosuni na ngai? Iyo, mpo na nini ekopesa ngai nzela na masenginia, ete moto ya mabe azala na esika na motema na ngai mpo na kobebisa kimia na ngai mpe kotungisa molimo na ngai? Mpo na nini ekosilika ngai na ntina ya monguna na ngai?

28 Molimo na ngai lamuka! Komilela lisusu te na masumu. Sepela, O motema na ngai, mpe kopesa esika lisusu te mpo na monguna ya molimo na ngai.

29 Kosilika lisusu te na ntina ya banguna na ngai. Kolembisa makasi na ngai te na ntina ya mikakatano na ngai.

30 Sepela, O motema na ngai, mpe belela epayi ya Nkolo, mpe loba: O Nkolo, nakosanzola yo libela; iyo, molimo na ngai ekosepela na yo, Nzambe na ngai, mpe libanga ya lobiko na ngai.

31 O Nkolo, ekosikola yo molimo na ngai? Ekobikisa yo ngai uta na maboko ya banguna na ngai? Ekosala yo ete nalenga na komonana ya lisumu?

32 Tika ete bikuke ya lifelo bikangama ntango nyonso liboso na ngai, mpo ete motema na ngai mobukani mpe molimo na ngai mozali na mawa! O Nkolo, ekolinga yo te kokanga bikuke ya bosembo na yo liboso na ngai, ete nakoka kotambola na nzela ya lobwaku ya nse, ete nakoka kozala sikisiki na balabala ya patatalu!

33 O Nkolo, ekozinga yo ngai nzinganzinga na nzambala ya bosembo na yo! O Nkolo, ekosala yo nzela mpo na kokimisa ngai liboso ya banguna na ngai! Ekosala yo nzela ya semba liboso na ngai! Ekotia yo te libanga ya libaku na nzela na ngai—kasi ete okopetola nzela na ngai liboso na ngai, mpe okopekisa te nzela na ngai, kasi nzela ya monguna na ngai.

34 O Nkolo, natiaki elikya epayi na yo, mpe nakolikya epayi na yo pona libela. Nakotia elikya na ngai te na loboko ya mosuni; mpo nayebi ete ye oyo atie elikya na ye na loboko ya mosuni alakelami mabe. Iyo, ye oyo atie elikya na ye na moto to mpe akomisi mosuni loboko na ye alakelami mabe.

35 Iyo, nayebi ete Nzambe apesaka pamba na oyo akosenga. Iyo, Nzambe na ngai akopesa ngai, soki nasengi na lolenge ya mabe te; boye nakotombola mongongo na ngai epayi na yo; iyo, nakobelela epayi na yo, Nzambe na ngai, libanga ya bosembo na ngai. Tala, mongongo na ngai mokomata libela epayi na yo, libanga na ngai mpe Nzambe na ngai ya seko. Amene.

Bimisa na lokasa