Makomi
3 Nefi 16


Mokapo 16

Yesu akokende kotala mpate mosusu uta na kati ya oyo ebunga ya Yisalaele—Na mikolo ya nsuka nsango malamu ekokende na baoyo bazali Bayuda-te mpe nsima na ndako ya Yisalaele—Bato ya Nkolo bakomona miso na miso ntango Akomema lisusu Siona. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe solo, solo, nalobi epayi na bino ete nazali na mpate mosusu, oyo ezali ya mboka oyo te, mpe ya mboka ya Yelusaleme mpe te, mpe ya biteni ya mboka nzinganzinga mpembeni wapi nasalaki mosala mpe te.

2 Mpo bango oyo nalobeli bazali baoyo bayoka naino te mongongo na ngai, mpe namimonisaki mbala moko te epayi na bango.

3 Kasi nazwi motindo uta na Tata ete nakokende epayi na bango, mpe ete bakoyoka mongongo na ngai, mpe bakotangama na kati ya mpate na ngai, ete ekoka kozala etonga moko, mobateli moko; boye nakeyi komilakisa epayi na bango.

4 Mpe natindi bino ete bokoma maloba oyo wana esili ngai kokende, ete soki bato na ngai na Yelusaleme, bango oyo bamonaki ngai mpe bazalaki elongo na ngai na mosala na ngai, basengi te Tata na nkombo na ngai, ete bakoka kozwa boyebi na bino na lisalisi ya Molimo Mosantu, mpe ya mabota mosusu oyo bayebi mpe te, ete maloba oyo bokokoma ebombama mpe elakisama epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, ete na nzela ya litondi ya Bayuda-te, montika ya nkona na bango, oyo bakopanzama likolo ya etando ya mabele na ntina ya bozangi bondimi na bango, bakoka kokota mpe na kati, soki te bakoka komemama na boyebi na ngai, Mosikoli na bango.

5 Mpe na ntango wana nakosangisa na kati bango oyo bauti na ntaka minei ya mabele; mpe nde nakokokisa liyokani oyo Tata asalaki na bato nyonso bato ya ndako ya Yisalaele.

6 Bayuda-te bapambolami, na ntina ya boyambi na bango na ngai, kati mpe na Molimo Mosantu, oyo atatoli epayi na bango mpo na oyo etali ngai mpe Tata.

7 Tala, na ntina ya boyambi na bango na ngai, elobi Tata, mpe na ntina ya bozangi boyambi na bino, O ndako ya Yisalaele, na mikolo ya nsuka bosolo ekoya epayi ya Bayuda-te, ete litondi ya makambo oyo ekoyebisama epayi na bango.

8 Kasi lisuma, elobi Tata, epayi ya Bayuda-te oyo bazangi bondimi—mpo ata bayei likolo ya etando ya mboka oyo, mpe bapanzi bato na ngai oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele; mpe bato na ngai baoyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele babenganami uta na kati na bango, mpe baniatami na nse ya makolo na bango.

9 Mpe na ntina ya boboto ya Tata epayi na Bayuda-te, mpe masambisi ya Tata likolo ya bato oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele, solo, solo, nalobi epayi na bino, nsima ya nyonso eye, mpe nasalaki ete bato na ngai bato ya ndako ya Yisalaele babetama, batungisama, babomama, mpe babenganama uta na kati na bango, mpe mpo na kokoma bayinami na bango, mpe mpo na kokoma litio moko mpe liseki moko na kati na bango—

10 Mpe boye Tata atindaki ete naloba epayi na bino: Na mokolo wana ntango Bayuda-te bakosumuka na nsango malamu na ngai, mpe bakobwaka litondi ya nsango malamu na ngai, mpe bakotombwana na lolendo ya mitema na bango likolo ya bikolo nyonso, mpe likolo ya bato nyonso na mabele mobimba, mpe bakotonda na ndenge nyonso ya lokuta, mpe bokosi, mpe nko, mpe ndenge nyonso ya bokibisi, mpe bobomi, mpe poloso ya banganga, mpe pite, mpe bonsomo ya nkuku; mpe soki bakosala makambo wana nyonso, mpe bakobwaka litondi ya nsango malamu na ngai, tala, elobi Tata, nakomema litondi ya nsango malamu na ngai uta na kati na bango.

11 Mpe na ntango wana nakomikundola liyokani na ngai oyo nasalaki na bato na ngai, O ndako ya Yisalaele, mpe nakomema nsango malamu na ngai epayi na bango.

12 Mpe nakolakisa epayi na yo, O ndako ya Yisalaele, ete baoyo bazali Bayuda-te bakozala na nguya te likolo na yo; kasi nakomikundola liyokani na ngai na yo, O ndako ya Yisalaele, mpe okoya na boyebi ya litondi ya nsango malamu na ngai.

13 Kasi soki Bayuda-te bakoyambola mpe bakozonga epayi na ngai, elobi Tata, tala, bakotangama na kati ya bato na ngai, O ndako ya Yisalaele.

14 Mpe nakopesa nzela te ete bato na ngai, oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele, baleka na kati na bango, mpe baniata bango na nse, elobi Tata.

15 Kasi, soki babaluki te epayi na ngai, sokibatie bokebi na mongongo na ngai, nakondima bato na ngai, iyo, nakondima bato na ngai, O ndako ya Yisalaele, ete bakende na kati na kati na bango, mpe baniata bango na nse, mpe bakozala lokola mongwa oyo ebungisi elengi na yango, oyo uta na ntango wana kokende liboso ezali malamu mpo na eloko moko te longola se mpo na kobwakama libanda, mpe koniatama na nse ya makolo ya bato na ngai, O ndako ya Yisalaele.

16 Solo, solo, nalobi epayi na bino, boye nde Tata atindi ngai—ete napesa epayi ya bato oyo mboka oyo mpo na bosangoli libula na bango.

17 Mpe nde maloba ya profeta Yisaya makokokisama, oyo malobi:

18 Bakengeli na yo bakotombola mongongo; na mongongo elongo bakoyemba, mpo bakomona miso na miso ntango Nkolo akomema lisusu Siona.

19 Bukana na bosepeli; yemba elongo bino bisika ya mpamba ya Yelusaleme; mpo Nkolo abondisi bato na ye, asikoli Yelusaleme;

20 Nkolo akomisi loboko esantu na ye mpamba na miso ya bikolo nyonso, mpe nsuka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Nzambe.

Bimisa na lokasa