Makomi
3 Nefi 17


Mokapo 17

Yesu atindi bato bamanyola maloba na Ye mpe basambela mpo na kozwa bososoli—Abikisi bakoni na bango—asambeli mpo na bato, kosalelaka lokota moko oyo ekoki kokomama te—Banjelu basaleli bana mike mpe moto mozingi bana mike na bango. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Tala, sikawa esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo, atalaki nzinganzinga mpembeni lisusu epayi na ebele ya bato, mpe alobelaki bango: tala, ntango na ngai ebelemi.

2 Namoni ete bozali bato na bolembu, ete bokoki te kososola maloba nyonso oyo natindami na tata mpo na koloba epayi na bino na ntango oyo.

3 Boye, bokende epayi na bino, mpe bomanyola makambo oyo nalobi, mpe bosenga na Tata, na nkombo na ngai, ete bokoka kososola, mpe kolengela makanisi na bino mpo na mokolo ya nsima, mpe nakoya epayi na bino lisusu.

4 Kasi sikawa nakeyi epayi ya Tata, mpe lisusu komilakisa epayi ya mabota ebunga ya Yisalaele, mpo epayi na Tata babungi te, mpo ayebi wapi akamataki bango.

5 Mpe esalemaki ete ntango esilaki Yesu koloba boye, abwakaki miso na ye nzinganzinga mpembeni lisusu na ebele ya bato, mpe amonaki bazalaki na mpizoli na miso, mpe batalaki ye miso ngai lokola soki balingaki kosenga ye kotikala mwa moke lisusu elongo na bango.

6 Mpe alobaki epayi na bango: Tala, nsopo na ngai etondi na mawa epayi na bino.

7 Ezali bino na bakoni na kati na bino? Bomema bango awa. Ezali bino na batengoli, soki te bato bakufa miso, soki te batengumi, soki te bato bakatama binama, soki te bato na maladi ya maba, soki te bilemene, soki te baoyo bakufa matoyi, soki te baoyo batungisami na ndenge nyonso? Bomema bango awa, mpe nakobikisa bango, mpo nazali na mawa epayi na bino; nsopo na ngai etondi na boboto.

8 Mpo namoni ete bozali na mposa ete nalakisa epayi na bino nini nasalaki epayi ya bandeko na bino kuna na Yelusaleme, mpo namoni ete bondimi na bino ekoki malamu ete nabikisa bino.

9 Mpe esalemaki ete ntango alobaki boye, ebele ya bato nyonso, na lisanga moko, bakendaki elongo na bakoni na bango mpe batungisami na bango, batengoli na bango, mpe elongo na bakufa miso na bango, mpe elongo na bababa na bango, mpe elongo na bango nyonso oyo batungisamaki na moko lolenge, mpe abikisaki bango moko na moko lokola bamemamaki epayi na ye.

10 Mpe nyonso, oyo babikisamaki mpe baoyo bazalaki kolongono, bagumbamaki na nse na makolo na ye, mpe bakumbamelaki ye; mpe mingi lokola bakokaki koya mpo ebele ya bato bapwepwaki makolo na ye, mpenza ete basokolaki makolo na ye na mpizoli na bango.

11 Mpe esalemaki ete atindaki ete bamema bana mike na bango.

12 Boye bamemaki bana mike na bango mpe batiaki bango na nse likolo ya mabele nzinganzinga mpembeni na ye, mpe Yesu atelemaki na katikati; mpe ebele ya bato batikaki nzela kino bamemamaki nyonso epayi na ye.

13 Mpe esalemaki ete esilaki bango komema bana mike nyonso, mpe Yesu atelemeki na katikati, atindaki ebele ya bato yango ete bafukama na nse likolo ya mabele.

14 Mpe esalemaki ete ntango bafukamaki likolo ya mabele, Yesu alelaki kati na ye moko, mpe alobaki: Tata, nazali kati na mobulu na ntina ya nkuna ya bato ya ndako ya Yisalaele.

15 Mpe ntango esilaki ye koloba maloba oyo, ye moko mpe lokola afukamaki likolo ya mabele, tala asambelaki epayi ya tata, mpe makambo oyo asambelaki makoki te kokomama, mpe ebele ya bato oyo bayokaki ye bapesaki litatoli.

16 Mpe bapesaki litatoli na lolenge oyo: Liso emona soki moke te, mpe matoyi mayoka ata moke mpe te, liboso, makambo minene mpe ya bokamwi lokola oyo tomonaki mpe toyokaki Yesu koloba epayi na Tata;

17 Mpe lolemo moko ekoki koloba te, mpe ekoki kokomama na moto moko te, mpe mitema ya bato ekoki te kokanisa makambo minene mpe ya kokamwa lokola tomonaki mpe toyokaki Yesu koloba; mpe moto moko te akoki kokanisa bosepeli boye etondisaki milimo na biso na ntango toyokaki ye kosambela mpo na biso epayi na Tata.

18 Mpe esalemaki ete ntango Yesu atiaki nsuka na losambo epayi na Tata, atelemaki; kasi bosepeli ya ebele ya bato ezalaki monene mpenza ete balongamaki.

19 Mpe esalemaki ete Yesu alobaki epayi na bango, mpe atindaki bango batelema.

20 Mpe batelemaki uta na mabele, mpe alobaki epayi na bango: Bopambolami na ntina ya bondimi na bino. Mpe sikawa tala, bosepeli na ngai etondi.

21 Mpe ntango elobaki Yesu maloba oyo, alelaki, mpe ebele ya bato bapesaki litatoli na ntina na yango, mpe akamataki bana mike na bango, moko na moko, mpe apambolaki bango mpe asambelaki Tata mpo na bango.

22 Mpe esilaki ye kosala eye, alelaki lisusu.

23 Mpe alobaki epayi na ebele ya bato, mpe alobelaki bango: Tala bana mike na bino.

24 Mpe lokola bazalaki kotala mpo na komona babwakaki miso na bango epayi na lola, mpe bamonaki lola efungwami, mpe bamonaki banjelu kokitaka uta na lola lokola soki ezalaki na katikati ya moto; mpe bayaki na nse mpe bazingaki bana mike wana mpembeni; mpe bazingamaki mpembeni na moto, mpe banjelu basalelaki bango.

25 Mpe ebele ya bato bamonaki mpe bapesaki litatoli; mpe bayebi ete lisolo ya makomi na bango ezali ya solo mpo nyonso kati na bango bamonaki mpe bayokaki; mpe moto na moto mpo na ye moko; mpe bazalaki na motango penepene na bato nkoto mibale na nkama mitano; mpe bazalaki mibali, basi, mpe bana.

Bimisa na lokasa