Makomi
3 Nefi 21


Mokapo 21

Yisalaele ekosangisama ntango Buku ya Mormon ekobima—Bayuda-te bakotiama lokola bato nsomi na Amerika—Bakobikisama soki bandimi mpe batosi; soki bongo te, bakokatama mosika mpe bakobebisama—Yisalaele akotonga Yelusaleme ya Sika, mpe mabota mabunga, makozonga. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe solo nalobi epayi na bino, napesi epayi na bino lokola elembo moko, ete bokoka koyeba ntango nini makambo oyo makokoma mpembeni na kosalema—ntango nakosangisa na kati, uta na bopanzani na bango ya ntango molai, bato oyo na ngai, O ndako ya Yisalaele, mpe nakotia lisusu Siona na ngai na kati na bango;

2 Mpe tala, oyo ezali likambo oyo nakopesa epayi na bino lokola elembo—mpo solo nalobi epayi na bino ete ntango ekoya makambo oyo nalobei epayi na bino, mpe oyo nakosakola epayi na bino awa nsima ngai moko, mpe na nguya ya Molimo Mosantu oyo akopesama epayi na bino na Tata, ekoyebisama epayi na baoyo bazali Bayuda-te ete bakoka koyeba na ntina ya bato oyo bazali montika moko ya ndako ya Yakobo, mpe mpo na oyo etali bato na ngai oyo bakopanzama na bango.

3 Solo, solo, nalobi epayi na bino, ntango makambo oyo ekoyebisama epayi na bango na Tata, mpe ekoya uta na Tata, uta na bango epayi na bino;

4 Mpo ezali bwania na Tata ete basengeli kotiama na mboka oyo, mpe bakotiama lokola bato nsomi na nguya ya Tata, ete makambo oyo makoka koya uta na bango epayi ya montika moko ya nkona na yo, ete liyokani ya Tata oyo ayokanaki elongo na bato na ngai ekoka kokokisama, O ndako ya Yisalaele;

5 Boye, ntango misala oyo mpe misala oyo ekosalema na kati na bino awa nsima mikosalema uta na Bayuda-te, epayi ya nkona na bino oyo ekobebisama moke moke kati na bozangi boyambi na ntina ya mabe.

6 Mpo boye ezali mposa ya Tata ete esengeli koya uta na baoyo bazali Bayuda-te, ete akoka kolakisa nguya na ye epayi na Bayuda-te; na ntina oyo ete Bayuda-te, soki bayeisi mitema na bango makasi te, bakoka koyambola mpe koya epayi na ngai mpe kobatisama na nkombo na ngai mpe koyeba biteni ya solo ya malongi na ngai, ete bakoka kotangama na kati ya bato na ngai, O ndako ya Yisalaele.

7 Mpe ntango makambo oyo makosalema ete nkona na yo ebanda koyeba makambo oyo—ekozala elembo moko epayi na bango, ete bakoka koyeba ete mosala ya Tata mosili kobanda mpo na bokokisi ya liyokani oyo asalaki na bato oyo bazali ya ndako ya Yisalaele.

8 Mpe ntango ekoya mokolo wana, ekosalema ete bakonzi bakokanga minoko na bango; mpo oyo wana eyebisama te epayi na bango bakomona yango, mpe oyo wana bayoka te bakososola yango.

9 Mpo na mokolo wana, mpo na ntina na ngai Tata akosala mosala moko, oyo ekozala mosala moko monene ya kokamwa na kati na bango; mpe ekozala na kati na bango na bango oyo bakondima yango te, ata soki moto moko asakoli yango epayi na bango.

10 Kasi tala, bomoi ya mosali na ngai ekozala na loboko na ngai; boye bakozokisa ye te, ata akobebisama elongi na ntina na bango. Nzokande nakobikisa ye, mpo nakolakisa epayi na bango ete bwania na ngai ezali monene koleka mayele mabe ya zabulu.

11 Boye ekosalema ete moto nyonso oyo akondima te maloba na ngai, oyo nazali Yesu Klisto, oyo Tata akosala ete ye amema epayi na Bayuda-te, mpe ete akopesa ye nguya ete amema yango epayi na Bayuda-te, (ekosalema kutu lokola Mose alobaki) bakokatama mosika uta na kati ya bato na ngai baoyo bazali ya liyokani.

12 Mpe bato na ngai baoyo bazali montika ya Yakobo bakozala na kati ya Bayuda-te, iyo, na katikati na bango lokola nkosi na kati ya banyama ya zamba, lokola mwana ya nkosi na kati ya bitonga ya mpate, oyo, soki akeyi kati na bango, aniati na nse, mpe apasoli na biteni, mpe moko akoki kobikisa bango te.

13 Loboko na bango ekotombwama likolo na bayini na bango, mpe banguna na bango nyonso bakokatama mosika.

14 Iyo, lisuma epayi ya baoyo bazali Bayuda-te longola se soki bayamboli; mpo ekosalema na mokolo wana, elobi Tata, ete nakoboma bampunda na bino uta na kati na yo, mpe nakobebisa makalo na bino;

15 Mpe nakokata mosika bingumba ya mboka na bino, mpe nakobwaka na nse bisika na bino ya makasi.

16 Mpe nakokata mosika bondoki na bino uta na mboka na bino, mpe bokozala na banganga nkisi lisusu te;

17 Bilili biniangwama ya bino nakokata mosika mpe lokola, mpe bilili etelema ya bino uta na kati na bino, mpe bokokumbamela lisusu misala ya maboko na bino te;

18 Mpe nakopikola bikeko uta na kati bino; bongo nakobebisa bingumba na yo.

19 Mpe ekosalema ete lokuta nyonso, mpe bokosi, mpe boluli, mpe songisongi, mpe poloso ya banganga, mpe pite nyonso ekosilisama.

20 Mpo ekosalema, elobi Tata, ete na mokolo wana, nyonso oyo bakoyambola te mpe bakoya epayi na Mwana Molingami na ngai te, bango nde nakokata mosika uta na kati ya bato na ngai, O ndako ya Yisalaele;

21 Mpe nakosala bobekoli mpe nkanda ya nsomo likolo na bango, kutu lokola likolo ya bapaganu, na lolenge moko lokola bayoka naino te.

22 Kasi soki bakoyambola mpe bakoyoka maloba na ngai, mpe bayeisi mitema na bango makasi te, nakotia eklezia na ngai na kati bango, mpe bakoya kati na liyokani ya ngai, mpe bakotangama na kati ya montika ya Yakobo, epayi na bango napesi mboka oyo mpo na kosangola libula na bango.

23 Mpe bakosalisa bato na ngai, montika ya Yakobo, mpe lisusu mingi bato ya ndako ya Yisalaele lokola bakoya, ete bakoka kotonga engumba moko, oyo ekobiangama Yelusaleme ya Sika.

24 Mpe nde bakosalisa bato na ngai ete bakoka kosangisama na kati, baoyo bapanzami likolo ya etando mobimba ya mboka, kati na Yelusaleme ya Sika.

25 Mpe na ntango wana nde nguya ya lola ekokita na kati na bango; mpe nakozala na katikati na bango mpe lokola.

26 Mpe na ntango wana mosala ya Tata mokobanda na mokolo wana, kutu ntango nsango malamu oyo ekoteyama na kati ya montika ya bato oyo. Solo nalobi epayi na bino, na mokolo wana, mosala ya Tata mokobanda na kati ya bato na ngai oyo bapanzamaki; iyo, kutu mabota oyo mabunga, oyo Tata akambaki uta na Yelusaleme.

27 Iyo, mosala mokobanda na kati ya bapanzami nyonso ya bato na ngai, elongo na Tata mpo na kolengela nzela oyo wapi bakoki koya epayi na ngai, ete bakoka kobelela Tata na nkombo na ngai.

28 Iyo, mpe na ntango wana nde ekobanda mosala, elongo na Tata na kati ya bikolo nyonso mpo na kolengela nzela oyo wapi bato na ye bakoki kosangisama epayi na bango na mboka ya bosangoli libula na bango.

29 Mpe bakobima uta na bikolo nyonso; mpe bakobima na lombangu te, soki mpe na kokimaka te, mpo nakozala liboso na bango, elobi Tata, mpe nakozala nsima na bango.

Bimisa na lokasa